Bolamu ya seko tokozwa yango na likoló to awa na mabele?
MPO na yo, kozala malamu etalelaka libosoliboso esika oyo ofandi? Mpo na bato mingi, kozala malamu etalelaka mingi makambo lokola kozala nzoto kolɔngɔnɔ, kozala na bomoi oyo ezali na ntina, mpe koyokana malamu na bato mosusu. Lisese moko ya Biblia elobi yango boye: “Bilei ya mwa ndunda na epai ya bolingo eleki elambo ya ngɔmbɛ ya mafuta wana koyinana ezali.”—Masese 15:17.
Nzokande, na mawa nyonso, tozali komona ete banda kala, awa na mabele bato bazali koyinana, mobulu mpe makambo mosusu ya mabe ezali. Kasi, tokoloba nini mpo na likoló, to mboka ya bikelamu ya elimo, epai oyo bato mingi balikyaka kokende nsima ya liwa na bango? Ezalaka kaka esika ya kimya na kimya, mobulu ezalaka te, ndenge ebele ya bato bakanisaka?
Biblia elobi ete Nzambe afandaka na likoló mpe kuna azali na bamilio ya bikelamu ya elimo oyo tobengi baanzelu. (Matai 18:10; Emoniseli 5:11) Bikelamu yango ya elimo babengami mpe “bana ya Nzambe.” (Yobo 38:4, 7) Ndenge moko na bato, baanzelu bazali na bonsomi ya kopona; batambwisamaka lokola bamasini te. Elingi koloba ete bango mpe bakoki kopona kosala malamu to kosala mabe. Ekoki mpe kosalema ete baanzelu bápona kosala mabe? Likambo yango ekoki kokamwisa bato mosusu, kasi eleki sikoyo bambula ebele, baanzelu mingi basalaki lisumu na miso ya Nzambe—batombokelaki ye!—Yuda 6.
Batomboki na likoló
Lisumu ebandaki na likoló ntango anzelu moko akómaki motomboki mpe akómá kobengama Satana (Motɛmɛli) mpe Zabolo (Motɔngi). Azalaki liboso anzelu ya botosi nde na nsima, aponaki kosala mabe, na motema na ye moko. Na nsima, bikelamu mosusu ya elimo balandaki ndakisa mabe na ye. Yango wana, na ntango ya Noa, liboso Mpela eya, ebele ya bikelamu ya elimo balandaki nzela ya Satana, bango mpe batombokelaki Nzambe.—Genese 6:2, NW, maloba na nse ya lokasa; 2 Petelo 2:4.
Baanzelu oyo balandaki nzela ya mabe, Nzambe abenganaki bango mbala moko te kuna na likoló. Elekaki bambula ebele mpenza, bazalaki kokende na likoló; kasi tomoni ete bapekisaki bango makambo mosusu.a Nzokande, ntango Nzambe alingaki lisusu te ete basali ya mabe yango bákɔtaka na likoló, ‘babwakamaki’ na nse mpe na nsuka bakobomama. Na nsima, mongongo moko elobaki kuna na likoló ete: “Na bongo bósepela, ɛ likoló, mpe bino bafandi wana!” (Emoniseli 12:7-12) Na ntembe te, baanzelu ya sembo basepelaki mingi ete, nsukansuka, babenganaki bikelamu oyo bazalaki kotya mobulu kuna na likoló!
Soki totaleli makambo yango, oyo bato mingi bayebi yango te, tokomona ete kimya ya solosolo ekoki kozala te na esika nyonso oyo bikelamu ya mayele balingi te kotosa mibeko ya Nzambe. (Yisaya 57:20, 21; Yilimia 14:19, 20) Nzokande, ntango bikelamu nyonso bazali kotosa mibeko ya Nzambe, kimya ezalaka. (Nzembo 119:165; Yisaya 48:17, 18) Sikoyo, soki bato nyonso bazali kolinga Nzambe mpe bazali kotosa mibeko na ye mpe soki bazali kolingana, okanisi te ete mabele ekozala esika ya malamu? Biblia elobi ete ekozala bongo!
Kasi, nini ekokómela baoyo balingi kotika misala ya mabe te? Bakozala kaka awa na mabele mpo batyelaka bato oyo balingi mpenza kosala mokano ya Nzambe mobulu? Te, Nzambe atikaki baanzelu ya mabe na likoló te; bobele bongo, akotika bato mabe awa na mabele te.
Mabele oyo ekómi pɛto
Nzambe alobaki boye: “Lola ezali kiti na ngai, mpe mabele ezali etyelo ya makolo na ngai.” (Yisaya 66:1) Lokola Nzambe azali mosantu koleka bato nyonso, akotika te ete makambo mabe ebebisaka “etyelo ya makolo” na ye mpo na libela. (Yisaya 6:1-3; Emoniseli 4:8) Lokola abenganaki bilimu mabe na likoló, akolongola mpe bato mabe nyonso awa na mabele, ndenge bavɛrsɛ oyo ya Biblia emonisi yango:
“Mpo ete basali na mabe bakosuka, nde baoyo bakozilaka [Yehova] bakosangola mokili.”—Nzembo 37:9.
“Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato ya masumu bakopikolama wana.”—Masese 2:21, 22.
“Emonani malamu epai na Nzambe kopesa bolɔzi lokola libonza na bango bakoyokisaka bino bolɔzi, mpe kopesa bino banyokolami epemelo esika moko na biso na ntango ya komonana ya Nkolo Yesu wana ekobima ye na Likoló esika moko na baanzelu na ye na nguya, kati na epelelo na mɔ́tɔ ete apesa bato mabe etumbu baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa Nsango Malamu na Nkolo na biso Yesu. Bakozwa lifuti ya kobeba ya seko mpe kobwakama libándá longwa na liboso na ye mpe longwa na nkembo na nguya na ye.”—2 Batesaloniki 1:6-9.
“Mokili [ya bato mabe] ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano ya Nzambe akoumelaka seko.”—1 Yoane 2:17.
Kimya ekozala mpo na libela awa na mabele?
Atako Makomami emonisi polele ete Nzambe atiki mabe mpo na mwa ntango, nini endimisi biso ete soki mabe elongwe, ekozonga lisusu te? Mpo soki tozongisi makanisi na nsima, ntango Mpela ya ntango ya Noa elekaki, mabe ezongaki lisusu mingi, yango wana Nzambe abulunganisaki minɔkɔ ya bato mpo na kobebisa mikano na bango ya mabe.—Genese 11:1-8.
Ntina mpenza oyo endimisi biso ete mabe ekozonga lisusu te ezali ete bato bakoyangela lisusu mabele te ndenge ezalaki nsima ya Mpela. Bokonzi ya Nzambe nde ekoyangela mabele. Bokonzi yango ekozala kuna na likoló mpe ekozala guvɛrnɛma kaka moko mpo na mokili mobimba. (Danyele 2:44; 7:13, 14) Guvɛrnɛma yango ekolongola nokinoki moto nyonso oyo akomeka kozongisa mabe. (Yisaya 65:20) Kutu, na nsuka ekoboma mobandisi ya mabe, Satana Zabolo, na bademo na ye, elingi koloba baanzelu mabe oyo balandaki nzela na ye.—Baloma 16:20.
Bato mpe bakomitungisa lisusu te mpo na makambo lokola bilei, bilamba, ndako, to mosala, makambo oyo, lokola ezali kozanga lelo oyo, ezali kotinda bato mosusu básala mobulu. Mabele mobimba ekokóma paladiso mpe biloko ekozala bebo mpo na bato nyonso.—Yisaya 65:21-23; Luka 23:43.
Likambo oyo eleki ntina ezali ete Bokonzi ya Nzambe ekoteya bato na yango bomoi ya kimya mpe ekokómisa bato yango na ezaleli ya kokoka mpenza. (Yoane 17:3; Baloma 8:21) Nsima na yango, mabe to masumu ekotungisa lisusu bato te; na bongo, bato bakoyeba Nzambe mpe bakosepela kotosa ye, lokola Yesu, moto ya kokoka. (Yisaya 11:3) Yesu atikalaki sembo epai Nzambe ata na ntango oyo amekamaki makasi mpe ntango banyokolaki ye, kutu makambo yango ekozala mpe na kati ya Paladiso te.—Baebele 7:26.
Ntina oyo bato mosusu bakokende na likoló
Kasi, bato mingi oyo batángaka Biblia bayebi maloba oyo Yesu alobaki ete: “Na ndako ya Tata na ngai bifandelo bizali mingi. . . . Nakokenda kobongisela bino esika.” (Yoane 14:2, 3) Maloba yango ezali nde kokweisa likanisi ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabele?
Mateya yango ezali bongolabongola te. Kutu, tokoloba ete liteya moko ezali kondimisa liteya mosusu. Ya liboso, Biblia elobi ete kaka baklisto moke ya sembo, elingi koloba bato 144 000, nde bakozala na bomoi lokola bikelamu ya elimo kuna na likoló. Mpo na nini bakopesa bango likabo kitoko bongo? Mpamba te bango nde bato oyo Yoane amonaki na emonaneli “bazalaki na bomoi, mpe bazalaki bakonzi mbula nkóto esika moko na Klisto.” (Emoniseli 14:1, 3; 20:4-6) Soki tokokanisi bango na bamiliare ya bato oyo bakozala awa na mabele, bato 144 000 bazali mpenza “etonga moke.” (Luka 12:32) Lisusu, lokola bakutanaki na mikakatano oyo bato bakutanaka na yango, bakosala makambo lokola Yesu, bakoyeba “koyoka mpasi esika moko na biso kati na bolɛmbu na biso” ntango bakotambwisa makambo mpo bato bákóma malamu mpe mabele ekóma malamu.—Baebele 4:15.
Mabele ezali esika ya moto mpo na libela
Ntango akabaki Yesu Klisto lokola mbeka mpo na kosikola biso, Nzambe abandaki koyanganisa bato 144 000 eleki sikoyo soki mbula 2 000, mpe makambo ezali komonisa ete sikoyo motango yango esilá kokoka. (Misala 2:1-4; Bagalatia 4:4-7) Nzokande, mbeka ya Yesu ezalaki kaka mpo na masumu ya bato 144 000 te, ezalaki mpe “mpo na mokili mobimba.” (1 Yoane 2:2) Yango wana, moto nyonso oyo azali kosala misala oyo emonisi kondima epai ya Yesu, akozwa bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Lisusu, bato oyo bazali na kati ya malita, baoyo Nzambe abombi na makanisi na ye, bakosekwa; na likoló te, kasi mpo na kozwa bomoi na mabele oyo ekokóma pɛto. (Mosakoli 9:5; Yoane 11:11-13, 25; Misala 24:15) Makambo nini bakokuta awa?
Emoniseli 21:1-4 elobi boye: “Talá! Efandelo ya Nzambe ezali na bato esika moko. . . . Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te, mpo ete makambo ya liboso masili koleka.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Kanisá naino: bato bakozala lisusu na boombo ya liwa te, mpasi na kolela ekozala lisusu te! Nsukansuka, nyonso oyo Yehova akanaki na ebandeli mpo na mabele mpe bato ekokokisama na nkembo.—Genese 1:27, 28.
Bomoi to liwa: Biso moko nde tokopona
Ata mokolo moko te bayebisaki Adama na Eva bápona soki balingi kokende na likoló. Basengelaki nde kopona kotosa Nzambe mpe kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele to kotosa ye te mpe kokufa. Likambo ya mawa, baponaki kotosa te mpe yango wana bazongaki na “mputulu” ya mabele. (Genese 2:16, 17; 3:2-5, 19) Ata mokolo moko te Nzambe akanaki ete bato bákufaka, bákundamaka mpo na nsima bákende kofanda na likoló. Nzambe akelá bamiliare ya baanzelu oyo bafandaka na likoló; bikelamu yango ya elimo ezali te bato oyo bakufá mpe basekwá mpo na kozwa bomoi na likoló.—Nzembo 104:1, 4; Danyele 7:10.
Tosengeli kosala nini mpo na kozwa bomoi ya seko na Paladiso awa na mabele? Likambo ya liboso, tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe, Biblia Mosantu. Mokolo moko, Yesu alobaki boye na libondeli ete: “Bomoi ya seko elimboli ete báyekola koyeba yo Nzambe ya solo kaka moko na moto oyo otindaki, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3, NW.
Mpo na kozwa bolamu ya seko na Paladiso, tosengeli mpe kosalela makambo oyo tozali koyekola. (Yakobo 1:22-24) Bato oyo bazali kotosa Liloba ya Nzambe bazali na elikya ya komona na miso na bango ndenge oyo bisakweli ekokokisama, na ndakisa esakweli oyo ekomami na Yisaya 11:9, ete: “[Bato] bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba ya bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbonge ikozipaka mai-na-monana.”—Biso nde totɛngisi makomi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atikaki nzela ete mabe ezala na likoló to awa na mabele, talá mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, na nkasa 70-79, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Bililingi na lokasa 7]
“Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” —Nzembo 37:29