Mituna ya batángi
Na libondeli ya ndakisa, Yesu alingaki nde koloba ete mokano ya Nzambe ezalaki kosalema na likoló atako babenganaki naino baanzelu mabe te?
Ndenge ekomami na Matai 6:10, Yesu alobaki: “Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” Tokoki kokanga ntina ya maloba yango ndenge mibale. Ya liboso, ezali kosɛnga ete mokano ya Nzambe esalema na mabelé ndenge ezalaki kosalema na likoló; ya mibale, ezali kosɛnga ete mokano na ye esalema mobimba na likoló mpe awa na mabelé.a Maloba oyo Yesu alobaki liboso ete “tiká bokonzi na yo eya,” emonisi ete ndenge ya mibale nde eyokani mpenza na Biblia. Ezali mpe komonisa ndenge makambo ezalaki ntango Yesu azalaki awa na mabelé mpe na boumeli ya ebele ya bambula oyo elandaki na nsima. Na ndenge nini?
Mokanda ya Emoniseli emonisi ete makambo mibale ekosalema soki Bokonzi ya Nzambe ebandi koyangela na likoló. Likambo ya liboso ekosalema kuna na likoló, mpe ya mibale ekosalema awa na mabelé. Emoniseli 12:7-9, 12 elobi boye: “Etumba ebimaki na likoló: Mikaele mpe baanzelu na ye babundaki ná dalagona, mpe dalagona mpe baanzelu na ye babundaki, kasi alongaki te, mpe esika ezalaki lisusu te mpo na bango na likoló. Bongo dalagona yango ya monene abwakamaki na nse, ye nyoka ya ebandeli, oyo abengami Zabolo mpe Satana, oyo azali kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela; abwakamaki na mabelé, mpe baanzelu na ye babwakamaki na nse elongo na ye. Yango wana bósepela, bino likoló mpe bino baoyo bazali kofanda na likoló! Mawa na mabelé mpe na mbu, mpamba te Zabolo akiteli bino, azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.”
Likoló epɛtolamaki ntango babenganaki Satana ná bademo na ye nsima ya 1914 mpe na ndenge yango, baanzelu ya sembo ya Yehova, oyo bazali mingi koleka bademo, basepelaki mingi. (Yobo 1:6-12; 2:1-7; Emoniseli 12:10) Na bongo, likambo oyo tosɛngaka ete esalema na likoló na libondeli ya ndakisa oyo Yesu ateyaki ekokisamaki. Baanzelu nyonso oyo batikalaki na likoló bazali sembo epai ya Yehova mpe batosaka ye.
Tosengeli kobosana te ete liboso na yango, ntango baanzelu ya mabe bazalaki naino na likoki ya kokende na likoló, bazalaki lisusu na libota ya Nzambe te mpe bapekisaki bango makambo mosusu. Na ndakisa, Yuda 6 oyo ekomamaki na ekeke ya liboso ya ntango na biso emonisi ete ‘babombaki bango na minyolɔlɔ ya seko na kati ya molili tuu [ya elimo] mpo na lisambisi ya mokolo yango ya monene.’ Lisusu, 2 Petelo 2:4 elobi: “Nzambe amipekisaki te kopesa etumbu na baanzelu oyo basumukaki, kasi, na kobwakáká bango na Tartare, atyaki bango na mabulu ya molili tuu mpo bábombama mpo na kozwa lisambisi.”b
Ntango baanzelu mabe bazalaki naino na likoki ya kokɔta na likoló, atako bazalaki lisusu na libota ya Nzambe te, bazalaki na makoki ya kosala makambo mingi ya minene awa na mabelé. Kutu, Liloba ya Nzambe ebengi Satana “moyangeli ya mokili oyo,” mpe ebengi bademo ‘bayangeli ya mokili oyo ya molili.’ (Yoane 12:31; Baefese 6:11, 12; 1 Yoane 5:19) Lokola Zabolo azalaki mokonzi ya mokili, akokaki ata kopesa Yesu “makonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango” soki asambelaki ye. (Matai 4:8, 9) Na bongo, ezali polele ete ntango Bokonzi ya Nzambe ‘ekoya’ ekomema mbongwana monene na mabelé.
Awa na mabelé, ‘koya’ ya Bokonzi ya Nzambe ekomema ebongiseli ya makambo ya sika. Bokonzi yango ekobukabuka biyangeli nyonso ya bato mpe ekozala guvɛrnɛma kaka moko oyo ekoyangela mabelé mobimba. Na ntango yango, bato babangaka Nzambe oyo bokonzi yango ekoyangela bakozala “mabelé moko ya sika.” (2 Petelo 3:13; Danyele 2:44) Lisusu, Bokonzi ekolongola lisumu epai ya bato ya botosi mpe na nsima ekokómisa mabelé mobimba paladiso, mpe na ndenge yango ekotika ata likambo moko te ya boyangeli ya Satana.—Baloma 8:20, 21; Emoniseli 19:17-21.
Na nsuka ya boyangeli ya Mbula Nkóto, ntango Bokonzi ya Masiya ekokokisa mokano mobimba ya Nzambe, “Mwana ye moko mpe akomitya na nse ya Moto oyo atyaki biloko nyonso na nse na ye, mpo Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso.” (1 Bakolinti 15:28) Na nsima, komekama ya nsuka ekozala, mpe na nsima na yango, Satana, bademo na ye, mpe batomboki nyonso oyo bakokosama bakolongolama mpo na libela na “liwa ya mibale.” (Emoniseli 20:7-15) Bongo na nsuka, ezala baanzelu na likoló mpe bato awa na mabelé, bakotosa bokonzi ya Yehova na esengo. Na ndenge yango, maloba ya Yesu na libondeli ya ndakisa ekokokisama mobimba mpe na makambo nyonso.—1 Yoane 4:8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kondimana na sika—Njembo ebongoli eteni yango ya libondeli oyo Yesu ateyaki lokola ndakisa ete, “Bokonji na yo éya, Mokano na yo ésalema, Na nse lokola na Likolo.”—Matai 6:10.
b Ntoma Petelo akokanisaki bomoi oyo bakómá na yango na “bolɔkɔ.” Kasi, yango ezali te “lobwaku mozindo” epai bakobwaka bademo mpo na mbula nkóto.—1 Petelo 3:19, 20; Luka 8:30, 31; Emoniseli 20:1-3.