Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/11 nk. 4-7
  • Bizaleli oyo Biblia ezali koteya nde eleki malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bizaleli oyo Biblia ezali koteya nde eleki malamu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kangamá na molongani na yo
  • Bongo soki mikakatano ebimi?
  • Kozala sembo na makambo nyonso
  • Bato nyonso bazali kozwa litomba
  • Bizaleli oyo Biblia eteyaka eleki malamu
  • Mokristo akoki kosala nini mpo na kozala na libala ya malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Libala oyo ezali na mikakatano ekoki kobonga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Soki libala elingi kopanzana
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/11 nk. 4-7

Bizaleli oyo Biblia ezali koteya nde eleki malamu?

MOTO moko ya Allemagne, ye akomaka mikanda mpe azali mopanzi nsango na televizyo, alobaki ete “mboka esengeli kozala na mibeko ya malamu mpo na kobatela mpe kotambwisa bato na yango.” Makambo alobaki ezali mpenza solo. Mpo bato bázala na kimya mpe mboka etambola malamu, esengeli kozala na mibeko oyo bato mingi bandimi yango mpe mibeko yango emonisa oyo ezali solo mpe oyo ezali lokuta, oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Yango wana motuna ezali boye: Mibeko nini eleki malamu, mpo na mboka mpe mpo na bato oyo bafandi na mboka yango?

Soki bato baponi mateya ya Biblia, mateya yango esengeli kosalisa bango bázala na bomoi ya kimya mpe ya esengo. Na yango, mateya yango ekosala ete bato oyo batosaka yango, bázala mpenza na esengo mpe na kimya. Esalemaka mpe bongo? Tótala oyo Biblia elobi na makambo mibale oyo ya ntina: kokangama se na molongani na yo mpe kozala sembo na bomoi ya mokolo na mokolo.

Kangamá na molongani na yo

Mozalisi na biso akelaki Adama mpe na nsima akelaki Eva azala molongani na ye. Libala na bango ezali libala ya liboso na mokili mpe libala yango esengelaki koumela libela. Nzambe alobaki boye: “Moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye.” Nsima ya mbula soki 4 000, Yesu Klisto azongelaki mobeko yango ya libala mpo na bayekoli na ye nyonso. Mpe lisusu, Yesu alobaki ete kosangisa nzoto na mobali to na mwasi mosusu ezali mabe.​—Genese 1:27, 28; 2:24; Matai 5:27-30; 19:5.

Biblia emonisi ete mpo libala ezala na esengo, esengeli mwasi na mobali bákokisa makambo mibale ya ntina oyo: bálingana mpe bápesanaka limemya. Lokola mobali azali mokonzi ya libota, asengeli kolinga mwasi na ye mingi, mpe asengeli koluka kosala makambo mpo na bolamu ya mwasi na ye. Asengeli kofanda na ye na “mayele” mpe asengeli kosalela ye “makambo na makasi” te. Mwasi asengeli ‘kotosa’ mobali na ye. Soki mwasi na mobali bazali kotosa mibeko yango, bakozala na mikakatano mingi te na libala na bango to mpe bakoyeba ndenge ya kosilisa yango. Mobali asengeli kokangama na mwasi na ye mpe mwasi na mobali na ye.​—1 Petelo 3:1-7; Bakolose 3:18, 19; Baefese 5:22-33.

Mibeko ya Biblia oyo esɛngi ete moto akangama na bosembo nyonso na molongani na ye, esalaka ete libala ezala na esengo? Tótala makambo oyo emonanaki na ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Allemagne ntango batunaki bato makambo nini ezali na ntina mingi mpo libala ezala malamu. Bato mingi balobelaki bosembo na kati ya mwasi na mobali. Ondimi te ete moto oyo abalá azalaka na esengo mingi ntango ayebi ete molongani na ye azali sembo?

Bongo soki mikakatano ebimi?

Tokoloba boni soki mwasi na mobali bazwani na matata makasi? Soki bazali lisusu kolingana te? Tokanisi te ete eleki malamu báboma libala? To ebongi nde kolanda mobeko ya Biblia oyo esɛngi na moto akangama na bosembo nyonso na molongani na ye?

Bato oyo bakomaki Biblia bayebaki ete basi na mibali nyonso oyo bakobalana bakokutana na mikakatano mpo bazali bato ya kozanga kokoka. (1 Bakolinti 7:28) Nzokande, basi na mibali oyo batosaka mibeko ya Biblia basalaka makasi mpo na kolimbisa mpe kosilisa mikakatano elongo. Ya solo, ezali na ntango oyo moklisto akoki komona ete ebongi kokabwana to koboma libala; na ndakisa soki molongani moko asali ekobo to azali konyokola mosusu. (Matai 5:32; 19:9) Kasi soki moto azali kowela koboma libala kozanga ntina ya solosolo to mpo na kobalana na moto mosusu, ekomonisa ete azali koluka bamposa na ye moko mpe azali kotalela bamposa ya baninga te. Kosala bongo ememelaka mpenza moto kimya mpe esengo te. Tókamata ndakisa moko.

Peter amonaki ete libala na bango ezalaki lisusu na esengo ndenge ezalaki liboso te.a Na yango, atikaki mwasi na ye mpe akendaki kofanda epai mosusu ye na Monika, mwasi wana mpe asundolaki mobali na ye. Makambo elekaki ndenge nini? Nsima ya mwa basanza, Peter alobaki ete kofanda na Monika ezalaki “pɛtɛɛ te lokola nazalaki kokanisa.” Mpo na nini? Mpo amonaki ete mwasi na ye ya sika azali na mabunga ya bomoto ndenge moko kaka na mwasi ya kala. Makambo ekómaki lisusu mpasi koleka mpe, ekateli oyo azwaki mbangumbangu na kotalela kaka bamposa na ye moko, ememelaki ye mikakatano ya mbongo. Lisusu, bana ya Monika batungisamaki mingi na ndenge bomoi na libota na bango ebongwanaki.

Ndenge lisolo oyo emonisi yango, soki mikakatano ebimi na libala, ndenge ya malamu ya kosilisa yango ezalaka kaka kokabwana te. Nzokande, na ntango mikakatano ebimi, kotosa bizaleli malamu oyo Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali koteya, mbala mingi ebatelaka libala mpe ememaka kimya. Esalemaki bongo na libala ya Thomas na Doris.

Thomas na Doris baumelaki mbula 30 na libala na bango tii na ntango Thomas akómaki komela masanga mingi. Doris akómaki konyokwama mingi na makanisi, mpe bango mibale bamonaki ete báboma libala. Doris ayebisaki Motatoli ya Yehova moko likambo yango. Motatoli yango ayebisaki Doris makambo oyo Biblia elobi mpo na libala, mpe alendisaki ye awela kokabwana te kasi ye na mobali na ye básala makasi bábongisa makambo. Doris asalaki bongo. Nsima ya mwa basanza, batikaki makanisi ya koboma libala. Thomas na Doris bakómaki koluka kosilisa mikakatano na bango mibale. Lokola balandaki toli ya Biblia, libala na bango ebongaki mpe bazwaki ntango ya kobongisa makambo.

Kozala sembo na makambo nyonso

Mpo moto akangama na bosembo nyonso na molongani na ye, esɛngaka kozala makasi na elimo mpe kolinga mibeko ya bizaleli malamu. Esengeli mpe kozala na bizaleli yango mpo na kozala sembo na mokili oyo ezangi bosembo. Biblia elobi makambo mingi mpo na bosembo. Ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Yudea boye: “Tozali na mposa [ya] kosalaka malamu na makambo nyonso.” (Baebele 13:18) Maloba yango elimboli nini?

Moto oyo azali sembo, azali moto ya kotyela motema mpe azali moto ya lokuta te. Azalaka motema polele na bato nyonso, azalaka na kolongobana, bapesaka ye lokumu, azali na makambo ya lokuta te mpe amemaka bato na nzela ya mabe te. Lisusu, moto oyo azali sembo abubaka baninga na ye te. Moto oyo azali sembo asalaka makambo oyo etindaka bato bátyela ye motema mpe bázala na elikya; yango esalaka ete bato bázala na bizaleli malamu mpe báyokana malamu.

Bato oyo bazali sembo bazalaka nde na esengo? Ɛɛ, bazali na ntina ya kozala na esengo. Atako kanyaka mpe kobuba epalangani mingi, bato basepelaka mingi na bato oyo bazalaka sembo; mbala mosusu basepelaka na bango mpo bayokaka mabe mpenza lokola kanyaka mpe kobuba epalangani mingi. Ankɛtɛ moko oyo basalaki epai ya bilenge emonisi ete ntango batunaki bango bizaleli oyo balingaka mingi, mingi na bango (70 %) balobaki ete kozala sembo. Mpe lisusu, tózala mikóló to bana, bosembo ezali ezaleli ya liboso oyo tolingaka baninga na biso bázala na yango.

Balakisaki Christine makambo ya moyibi ntango azalaki na mbula 12. Na nsima akómaki moyibi monene na mabenga ya bato. Alobi boye: “Mikolo mosusu nazalaki kozonga na ndako na Deutschmark 5 000 (dolare 2 200) mbala moko.” Kasi bazalaki kokanga Christine mbala na mbala, mpe bakokaki kotya ye na bolɔkɔ. Ntango Batatoli ya Yehova balimbolelaki ye makambo oyo Biblia elobi mpo na kozala sembo, Christine asepelaki na mateya ya Biblia. Akómaki kotosa toli oyo: “Moyibi ayiba lisusu te.”​—Baefese 4:28.

Ntango oyo Christine azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova, asilaki kotika makambo ya moyibi. Azalaki kosala makasi mpo na kozala sembo na makambo nyonso, mpamba te Batatoli basalaka makasi mpo na kozala sembo mpe na bizaleli mosusu ya boklisto mpe bamonaka ete likambo yango ezali na ntina mingi. Zulunalo moko (Lausitzer Rundschau) elobi boye: “Na lingomba na bango, Batatoli bapesaka motuya mingi na maloba lokola bosembo, bokatikati, mpe kolinga mozalani.” Ndenge nini Christine atalelaka mbongwana oyo asalaki na bomoi na ye? “Nazali sikoyo na esengo mingi lokola natiká koyiba. Nazali koyoka ete nazali moto moko ya ntina na kati ya mboka.”

Bato nyonso bazali kozwa litomba

Moto oyo azali sembo epai ya molongani na ye mpe sembo na makambo na ye, azalaka na esengo mpe bato bazalaka na mposa na ye. Bakóló-misala balingaka bato oyo bayibaka te. Biso nyonso tolingaka kozala na baninga oyo tokoki kotyela motema, mpe tolingaka kosomba biloko na magazini ya bato ya sembo. Topesaka limemya mingi na bato ya politiki, bapolisi, mpe bazuzi oyo baboyaka kanyaka, boye te? Mboka ezwaka matomba mingi ntango bato bazali komitambwisa na bosembo mpe bazali kotosa mibeko, kasi básalaka bongo te kaka na ntango oyo bamoni malamu.

Lisusu, libota ezalaka malamu soki mwasi na mobali bazali sembo. Mpe bato mingi bakondimela moto moko ya politiki na mokili moko ya Mpoto oyo alobaki ete: “Libota [oyo tata na mama bazali esika moko] ezali, tii lelo oyo, esika oyo moto akoki kobatelama malamu koleka mpe kozala na esengo.” Libota ya kimya ezali oyo mikóló na bana bazalaka na kobanga te. Bato oyo bazalaka sembo na kati ya libala basungaka mpo ete mboka ezala na kimya.

Kanisá naino bolamu oyo moto nyonso akozwa soki makambo ya kosundola molongani, koboma libala na batribinale, to kowela bana ezalaki te. Bongo soki bato oyo bayibaka na mabenga ya bato, baoyo bayibaka na bamagazini, baoyo bakosaka, bakonzi oyo bandimaka kanyaka, to bato ya siansi oyo bakosaka, bazalaki te? Ozali komona ete makambo yango ekoki kosalema te? Ezali mpenza makambo ya solo mpo na bato oyo basepelaka na Biblia mpe na makambo oyo yango elobaka mpo na mikolo oyo ezali koya. Liloba ya Nzambe elaki ete etikali moke Bokonzi ya Masiya ya Nzambe ezwa esika ya biyangeli nyonso ya bato ya mokili oyo. Ntango Bokonzi yango ekoyangela, bakoteya bato nyonso kotosa mateya ya Biblia na bomoi na bango. Na ntango wana, “bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”​—Nzembo 37:29.

Bizaleli oyo Biblia eteyaka eleki malamu

Bamilio ya bato oyo batalelaki Makomami Mosantu malamumalamu bandimi ete toli ya Biblia euti na mayele ya Nzambe, mayele oyo eleki makanisi ya bato mosika. Bato yango bamonaka ete Biblia ezali mokanda ya kotyela motema mpe ebongi mpo na bomoi ya ntango oyo. Bayebi ete soki bazali koyoka toli ya Liloba ya Nzambe, ezali mpo na bolamu na bango moko.

Yango wana, bato yango batosaka toli ya Biblia oyo elobi ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” (Masese 3:5, 6) Lokola bazali kosala bongo, bazali kobongisa bomoi na bango, mpe baoyo bafandi na bango bazali kozwa bolamu. Bazali mpe kokóma na elikya makasi ya “bomoi . . . na ntango ekoya,” ntango oyo bato nyonso bakolanda mateya ya Biblia.​—1 Timote 4:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Na ntango mikakatano ebimi na libala, mbala mingi soki mwasi na mobali bakosalela bizaleli malamu oyo Biblia, Liloba ya Nzambe ezali koteya, bakobatela libala na bango mpe bakozala na kimya

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

Atako kanyaka mpe kobuba epalangani mingi, bato basepelaka mingi na bato oyo bazalaka sembo; mbala mosusu basepelaka na bango mpo bayokaka mabe mpenza lokola kanyaka mpe kobuba epalangani mingi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto