Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/11 nk. 3-4
  • Bizaleli malamu ezali kosila

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bizaleli malamu ezali kosila
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bizaleli malamu oyo Biblia eteyaka ezali na ntina?
  • Bizaleli oyo Biblia ezali koteya nde eleki malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Yekolá mpe teyá bizaleli malamu ya boklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Bizaleli malamu
    Lamuká!—2019
  • Libala ekoki kolonga mikakatano?
    Lamuká!—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/11 nk. 3-4

Bizaleli malamu ezali kosila

HELMUT SCHMIDT, chancelier ya kala na ekólo Allemagne, alobaki boye: “Makambo ya ndenge yango ezalaki kosalema te.” Azalaki komilela mpo bakonzi ya Leta bakómaki kosala makambo minene ya kolongobana te mpe bapanzi nsango balobelaki yango mingi mikolo oyo. Alobaki boye: “Bizaleli malamu ezali kobunga mpo na lokoso.”

Bato mingi bakondima ete alobi solo. Bato bazali lisusu kolinga bizaleli malamu te oyo Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali koteya, atako bato mingi bazalaki kondima yango lokola motambwisi mpo na kokesenisa malamu na mabe. Makambo yango ezali kosalema ata na mikili ya boklisto.

Bizaleli malamu oyo Biblia eteyaka ezali na ntina?

Bizaleli malamu oyo euti na mateya ya Biblia ezali kosɛnga moto azala na kolongobana mpe azala sembo. Nzokande, bato bamipesi na kobuba, na kanyaka, mpe na moyibi. Zulunalo moko (The Times) oyo ebimaka na Londres elobaki ete “bafundaki bakonzi mosusu ya bapolisi oyo bazali bazuzi ete bazwaki kanyaka ya mbongo babengi livres sterlings 100 000 (dolare 149 800) na mbala moko mpo na kozongisa bangi oyo bapolisi bakangaki epai ya nkolo na yango to mpo na kobomba bankombo ya bato oyo basalaka mobulu na kobombama.” Na ekólo Autriche balobi ete bakompanyi ya asiransi ekómá na momeseno ya kokosa bato. Mpe na Allemagne bato ya siansi bakamwaki mingi ntango balukiluki bamonaki “likambo moko ya lokuta monene na makambo ya siansi na Allemagne.” Balobaki ete profesɛrɛ moko, oyo azali “moko na minganga (généticiens) minene na Allemagne,” abongolaki to akɔtisaki ebele ya makambo ya lokuta na bolukiluki.

Bizaleli malamu oyo Biblia eteyaka ezali kosɛnga lisusu kozala sembo na libala, mpamba te yango esengeli kozala bokangami ya ntango nyonso. Kasi bato mingi bazali kokende epai ya bazuzi mpo na koboma mabala. Zulunalo moko ya Bakatolike (Christ in der Gegenwart [Moklisto ya lelo]) elobi ete “ata na ekólo Suisse oyo esɛngaka kokangama na mibeko,’ mabala mingi ezali kokufa.” Na ekólo Pays-Bas, kati na mabala 100, mabala 33 ezali kosuka na kokufa. Mwasi moko oyo amoni ete bomoi ya bato na Allemagne ebongwanaki mpenza na mwa bambula oyo eleki, alobaki mpo na ye moko boye: “Lelo oyo bazali kotalela libala lokola likambo ya kala mpe esilá ngala. Bato bazali lisusu kobalana mpo na kofanda libela te.”

Nzokande, ezali na bamilio ya bato oyo bazali kondima ete esengeli kozala na bizaleli malamu oyo Biblia ezali koteya mpe bizaleli yango ebongi mpenza na bomoi ya lelo oyo. Mwasi moko na mobali na ye bafandaka na mboka moko na esika oyo ekólo Suisse ekabwani na ekólo Allemagne, bamonaki ete kosalela toli ya Biblia na bomoi na bango nde ekómisi bango bato ya esengo mingi. Mpo na bango, “ezali na motambwisi kaka moko mpo na makambo nyonso ya bomoi. Motambwisi yango ezali Biblia.”

Okanisi nini? Biblia ekoki mpenza kozala motambwisi ya malamu? Bizaleli malamu oyo Biblia eteyaka ebongi mpenza lelo oyo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto