Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/11 nk. 18-21
  • Kolonga elimboli nini mpo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolonga elimboli nini mpo na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango mimeseno ya mboka eyokani te na lisosoli
  • Salelá makoki na yo malamu
  • Kolonga na mosala ya kosakola
  • Osepelaka na basaleli ya ntango nyonso?
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mosala ya mobongisi-nzela: ezali mpo na yo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Tókanisaka basali ya ntango nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/11 nk. 18-21

Kolonga elimboli nini mpo na yo?

DIKSIONƐRƐ moko elimboli liloba kolonga ete ezali “kokóma na bomɛngo, kondimama, to mpe kokóma moto monene.” Ndimbola wana ekoki? Tokoki nde koloba ete kozwa bomɛngo, kondimama, to mpe kokóma moto monene, nde kolonga? Liboso opesa eyano, talelá likambo oyo: na bomoi na ye, Yesu Klisto azwaki bomɛngo ya mokili te. Bato mingi bandimaki ye te, mpe bato minene ya ntango na ye bazalaki kokumisa ye te. Atako bongo Yesu alongaki. Mpo na nini?

Ntango azalaki awa na mabele, Yesu azalaki “mozwi epai ya Nzambe.” (Luka 12:21) Nsima ya lisekwa na ye, Nzambe apesaki ye “nkembo mpe lokumu.” Yehova atombolaki Mwana na ye ‘mingi mpe apesaki ye nkombo koleka nkombo mosusu nyonso.’ (Baebele 2:9; Bafilipi 2:9) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, bomoi na ye esepelisaki motema ya Yehova. (Masese 27:11) Alongaki na bomoi na ye awa na mabele mpamba te, akokisaki mokumba na ye. Yesu asalaki mokano ya Nzambe mpe apesaki lokumu na nkombo na Ye. Na nsima, Nzambe apesaki Yesu bomɛngo, andimaki ye, ayebanaki, mpe akómisaki ye moto monene koleka bato nyonso oyo batángá mingi, koleka bato nyonso ya politiki, to bavɛdɛti nyonso ya masano. Ya solo, Yesu azali moto oyo alongaki koleka bato nyonso awa na mabele.

Baklisto oyo bazali na bana bayebi ete soki bana na bango balandi ndakisa ya Klisto, bakómi bazwi epai ya Nzambe lokola Yesu, bakozwa mapamboli banda sikoyo mpe mbano monene na mokili ya sika oyo ezali koya. Lolenge oyo eleki malamu mpo elenge alanda ndakisa ya Klisto ezali ya kosala mosala oyo Yesu asalaki, elingi koloba kosala mosala ya kosakola ntango nyonso soki likoki ezali.

Nzokande, na mikili mosusu, bilenge bakanisaka kosala mosala ya ntango nyonso te. Ntango elenge mobali asilisi kelasi, makanisi ya bato ezali ete azwa mosala, abala mpe abongisa bomoi na ye. Ntango mosusu, bilenge oyo bakoli na bisika yango bakakatanaka kosala mosala ya ntango nyonso. (Masese 3:27) Mpo na nini? Mpamba te bazali kolanda ndenge oyo bato nyonso bazali kosala. Likambo yango ekómelaki Robert.a

Ntango mimeseno ya mboka eyokani te na lisosoli

Robert akolaki na libota ya Batatoli ya Yehova. Ntango azalaki elenge, azalaki na etamboli ya malamu mpenza te mpe akómaki na baninga mabe. Mama na ye azalaki komitungisa mpo na ye. Yango wana, asɛngaki na mobongisi-nzela moko—Matatoli ya Yehova oyo azali mosakoli ya ntango nyonso—ete alendisa ye. Robert ayebisi biso likambo oyo esalemaki na nsima.

“Ndenge oyo ndeko wana mobongisi-nzela amibanzabanzaki mpo na ngai esepelisaki ngai mingi. Ndakisa malamu na ye epesaki ngai mposa ya kosala mosala ya mobongisi-nzela soki kaka nasilisi kelasi. Kasi, likambo yango mpe ekómaki kotungisa mama. Na mboka na biso, emonanaka malamu nde mwana mwasi akóma mobongisi-nzela ntango auti kosilisa kelasi, kasi mpo na mwana mobali, esengelaka ete abongisa naino bomoi na ye, bongo na nsima akanisa kosala mosala ya mobongisi-nzela.

“Nayekolaki mosala ya mabɔkɔ mpe nakómaki kosala na esika na ngai moko. Mosika te namipesaki mpenza na mosala mpe nazalaki lisusu koyangana na makita malamu te mpe nazalaki lisusu kosakola mingi te. Lisosoli na ngai ebandaki kotungisa ngai, nayebaki ete nakoki kosalela Yehova mingi koleka. Ezalaki mpenza etumba mpo natika oyo bato bazalaki kolinga ete nasalaka, kasi nazali na esengo ete natikaki. Lelo oyo, nazali na mwasi mpe esili koleka mbula mibale, ngai na mwasi na ngai tozali babongiseli-nzela. Eleki mwa mikolo, naponamaki lokola mosaleli ya misala na lisangá. Nakoki sikoyo koloba na bosembo nyonso ete nazali na esengo mpamba te nazali kosalela Yehova na motema na ngai mobimba, na makoki na ngai nyonso.”

Na masolo mingi Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elendisaka bilenge ete soki likoki ezali, báyekola mosala moko ya mabɔkɔ to ya biro ntango bazali naino kotánga. Mpo na nini? Mpo bákóma bazwi? Te. Libosoliboso ezali mpo bázala na makoki ya kobikela ntango bakokóma mikóló mpe bákoka kosalela Yehova malamu koleka, mingimingi na mosala ya ntango nyonso soki likoki ezali. Kasi, mbala mingi bilenge mibali mpe basi bamipesaka na koluka mosala oyo ekopesa bango lokumu mpe bazongisaka mosala ya kosakola na nsima. Bamosusu kutu bakanisaka ata te kosala mosala ya ntango nyonso. Mpo na nini?

Maloba ya Robert ezali kosalisa biso mwa moke na kokanga ntina ya likambo yango. Nsima ya koyekola mosala na ye, Robert abandaki kosala. Mosika te, amonaki ete mosala yango ezalaki kopesa ye litomba moko te. Mposa na ye ezalaki akóma na mbongo mingi. Kasi, ezala na lisangá to na mokili, nani oyo asi akokisá mokano wana? Baklisto basengeli kosala makasi mpo bázwaka mbongo oyo ekosalisa bango bákokisaka mikumba na bango, basengeli kosala makasi báfutaka nyongo nyonso oyo bazali na yango; kasi basengeli mpe koyeba ete na mikolo oyo etondi na yikiyiki oyo, bato oyo bakómá na mbongo oyo bakoki koloba ete ekoki mpenza kobatela bango bazali mingi te. Yango wana elaka oyo Yesu apesaki na Matai 6:33 ebɔndisaka mpenza baklisto.

Robert azali na esengo ete azwaki ekateli ya kolanda mposa ya motema na ye na esika alanda ndenge oyo bato bamesani kosala na mboka na bango. Lelo oyo, azali kosala mosala ya ntango nyonso. Ya solo, mosala ya ntango nyonso ezali mosala ya lokumu. Robert alobi ete azali na kimya na motema mpamba te azali kosalela Yehova ‘na makoki na ye nyonso.’

Salelá makoki na yo malamu

Batatoli ya Yehova mingi bazali na makoki mingi. Bamosusu bayebi mokanda mingi, bamosusu bayebi misala ya mabɔkɔ. Makabo yango nyonso eutaka epai ya Yehova, oyo apesaka “bato nyonso bomoi, na mpema, na biloko nyonso.” (Misala 17:25) Soki bomoi ezali te, makabo nyonso wana ekozala mpe na ntina moko te.

Yango wana, ezali mpenza malamu ete tósalela bomoi na biso na mosala ya Yehova. Ezali yango nde elenge mobali moko ya makoki asalaki. Elenge yango azalaki na bomoi na ekeke ya liboso T.B. Abotamaki na libota moko ya lokumu, akolaki na Talasia, engumba oyo eyebanaki mingi na etúká ya Kilikia. Atako azalaki Moyuda, akómaki Moloma na nsima ya tata na ye. Yango epesaki ye nzela ya kosala makambo mingi. Ntango akómaki mokóló, ayekolaki Mibeko epai ya Gamaliele, moko kati na “baprofesɛrɛ” oyo bayebanaki mingi na ntango wana. Emonani ete alingaki koumela te na kozwa ‘bomɛngo, kondimama, mpe kokóma moto monene.’—Misala 21:39; 22:3, 27, 28.

Elenge mobali yango ezali nani? Nkombo na ye ezalaki Saulo. Kasi Saulo akómaki moklisto mpe na nsima akómaki ntoma Paulo. Atikaki mikano oyo azalaki na yango liboso mpe amipesaki mobimba na mosala ya Yehova lokola moklisto. Paulo ayebanaki te lokola moto monene ya mibeko, kasi lokola mosakoli ya nsango malamu na molende. Nsima ya kosala mbula 30 lokola misionɛrɛ, Paulo akomelaki baninga na ye ya Filipi mokanda. Na mokanda yango alobelaki makambo mosusu oyo asalaki liboso akóma moklisto. Alobaki boye: “Mpo na [Yesu Klisto] nabungisi biloko nyonso mpe nazali kotánga yango bobele nyei ete nazwa Klisto lokola libonza.” (Bafilipi 3:8) Paulo azalaki na mawa te mpo na nzela oyo aponaki.

Tokoki koloba nini mpo na mayele oyo Paulo ayekolaki epai ya Gamaliele? Ezalaki na litomba epai na ye? Ɛɛ! Ntango azalaki kosamba, asalelaki mayele yango mpo na “kolongisa mpe kobatela Nsango Malamu na mibeko ya Leta.” Kasi Paulo azalaki libosoliboso kosakola nsango malamu, mosala oyo akokaki soki moke te koyekola na bakelasi oyo atángaki liboso.—Bafilipi 1:7, NW; Misala 26:24, 25.

Ndenge moko mpe lelo oyo, bandeko mosusu bazali kosalela makoki na bango, mpe ata mayele na bango ya kelasi mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso. Na ndakisa, Amy azali na diplome ya iniversite na misala ya mombongo mpe mosusu na makambo ya mibeko. Liboso, azwaki mosala moko ya mbongo mingi na biro ya ba avocat, kasi sikoyo azali kosala lokola mosali ya bolingo malamu na filiale moko ya la Société Watch Tower. Yoká ndenge alobeli bomoi oyo azali na yango sikoyo: “Nakanisi ete naponi nzela oyo eleki malamu na bomoi. . . . Nazali ata na mposa moke te ya kozwa esika ya moninga na ngai moko oyo totángá na ye na iniversite. Nazali kosepela na bomoi oyo naponi. Nazali na nyonso oyo nasengeli na yango mpe oyo nasepeli na yango: bomoi ya malamu mpe ya esengo mpe mosala oyo ezali kosepelisa ngai.”

Amy aponaki mosala oyo epesi ye kimya ya makanisi, esengo mpe mapamboli ya Yehova. Na ntembe te ezali yango nde baboti baklisto balingaka mpo na bana na bango!

Kolonga na mosala ya kosakola

Ya solo, kozala na likanisi malamu mpo na mosala ya kosakola yango moko ezali na ntina. Ezali mpasi te tómona ete tolongi na mosala ya kosakola ntango tolekisi ntango moko malamu, tokaboli mikanda oyo elimbolaka Biblia to mpe tosololi na bato masolo ya Biblia. Kasi soki tozali kokutana na bato mingi te oyo bazali koyoka biso, tokoki kokanisa ete tozali kolekisa ntango na biso mpamba. Kasi, kobosana te ete moko ya bandimbola ya kolonga ezali ‘kondimama.’ Nani oyo tolingi andima biso? Na ntembe te ezali Yehova. Yehova akoki kondima biso ata soki bato bayoki nsango na biso to bayoki te. Yesu ateyaki bayekoli na ye likambo moko ya ntina na likambo yango.

Kanisá ete Yesu atindaki basakoli ya Bokonzi 70 “kati na mboka nyonso na bisika nyonso bilingaki ye kokende.” (Luka 10:1) Bakendaki kosakola na mboka mike mpe minene kasi Yesu akendaki na bango te. Ezalaki likambo ya sika mpo na bango. Yango wana, Yesu apesaki bango malako oyo esengeli liboso ya kotinda bango. Soki bakutani “na moto ya kimya,” basengelaki kopesa ye litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi. Nzokande, soki bato baboyi koyoka bango, basengelaki kokende kozanga komitungisa. Yesu alobaki ete baoyo bakoboya koyoka bayekoli na ye bakoboya koyoka nde Yehova ye moko.—Luka 10:4-7, 16.

Ntango bayekoli 70 basilisaki mosala ya kosakola oyo bapesaki bango, bazongaki epai ya Yesu “na esengo, mpe balobaki ete, Nkolo ata [bilimo, NW ] mabe batosi biso mpo na nkombo na yo.” (Luka 10:17) Kobengana bilimu oyo ezali na nguya mingi ezalaki likambo monene mpo na bato wana ya kozanga kokoka! Kasi, Yesu akebisaki bayekoli na ye oyo bazalaki motema mɔ́tɔmɔ́tɔ ete: “Bósepela oyo te ete [bilimo, NW ] batosi bino, nde bósepela ete nkombo na bino isili kokomama na Likoló.” (Biso nde totɛngisi makomi; Luka 10:20) Bayekoli 70 balingaki ntango nyonso te kozala na nguya ya kobengana bademo, to mpe kobuka kaka mbuma malamu na mosala ya kosakola. Kasi soki batikali sembo, Yehova akondima bango ntango nyonso.

Osepelaka na basaleli ya ntango nyonso?

Elenge mobali moko alobaki na moklisto moko oyo azali nkulutu ete: “Soki nazwi diplome na ngai, nakomeka koluka mosala. Soki nazwi mosala te, wana nde nakoki kosala mosala ya ntango nyonso.” Kasi, bato mingi oyo bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela bakanisaki bongo te. Mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela, basusu baboyaki misala oyo ekokaki kopesa bango mbongo mingi. Basusu batikaki libaku ya kokɔta kelasi milaimilai. Lokola ntoma Paulo, bato yango bamipimelaki makambo mosusu, kasi ndenge moko na Paulo, Robert na Amy bayokaka mawa te mpo na nzela oyo baponaki. Basepelaka na libaku malamu na bango ya kosalela makoki na bango mpo na kokumisa Yehova, oyo abongi kozwa biloko oyo eleki malamu oyo bakoki kopesa.

Ebele ya Batatoli ya Yehova oyo bazali sembo bazali na makoki ya kozala babongi-nzela te mpo na bantina mingi. Mbala mosusu bazali kokokisa mikumba mosusu oyo Makomami ezali kosɛnga bango. Kasi, soki bazali kosalela Nzambe na ‘motema na bango mobimba na molimo na bango mobimba mpe na elimo na bango mobimba,’ Yehova akosepela na bango. (Matai 22:37) Atako bango moko bazali babongisi-nzela te, bayebaka ete baoyo bazali kosala mosala yango, baponaki nzela ya malamu.

Ntoma Paulo akomaki boye: “[Bólandaka] makambo na ntango oyo te.” (Baloma 12:2) Soki tolingi kolanda toli ya Paulo, tokotika te ete mimeseno ya mboka to makambo ya mokili oyo etambwisa makanisi na biso. Ezala ete okoki kozala mobongisi-nzela to te, tyá mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na yo. Ntango nyonso oyo okosepelisa Yehova, okolonga.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

[Elilingi na lokasa 19]

Kokangama te na mosala oyo ekopesa yo ata litomba moko te

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto