Mosala ya mobongisi-nzela: ezali mpo na yo?
1 “Nakoki te kokanisa kosala eloko mosusu. Nakoki te kokanisa eloko mosusu oyo ekoki komemela ngai esengo motindo yango.” Nani alobaki bongo? Ezali Motatoli ya Yehova moko kati na bankóto ya Batatoli oyo bazali kosala mosala ya ntango nyonso na esengo mpenza. Osilá komituna kati na libondeli soki mosala ya mobongisi-nzela ezali mpo na yo? Lokola tomipesá mobimba na Yehova, tosengeli mpenza kokanisa malamu mpo na koyeba soki tokoki te kosala ntango mingi mpo na kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi. Na ntina yango, tótalela mwa mituna mosusu oyo bandeko mingi bamitunaka mpo na mosala ya mobongisi-nzela.
MOTUNA 1: “Balobaka ete moto nyonso akoki kozala mobongisi-nzela te. Ndenge nini nakoki koyeba soki mosala yango ezali mpo na ngai?”
2 Eyano ezali kotalela ezalela na biso mpe mikumba na biso oyo miuti na Biblia. Kolɔngɔnɔ ya nzoto to ezalela ya bandeko mingi sikawa ezali kopesa bango nzela te ete básala ngonga 90 na sanza na mosala ya kosakola. Na ndakisa, bandeko basi mingi ya sembo bazali basi ya mabala mpe bamama baklisto. Basanganaka na mosala ya kosakola mbala na mbala soki likoki ezali mpe na meko oyo ezalela na bango ezali kopesa bango nzela. Soki libaku emonani, mbula na mbula, basalaka mosala ya mobongisi-nzela mosungi na boumeli ya sanza moko to basanza mingi, kozwáká esengo oyo eutaka na kosangana mingi kati na mosala yango. (Gal. 6:9) Atako sikawa likoki ezali te mpo ete bázala babongisi-nzela ya sanza na sanza, balonaka elimo ya mobongisi-nzela, mpe basakoli yango ya molende ya nsango malamu bazali lipamboli mpo na masangá na bango.
3 Epai mosusu, bandeko mingi oyo bazali na mikumba mingi te bamibongisi mpo na kozala babongisi-nzela na kotaleláká lisusu makambo oyo maleki ntina na bomoi na bango. Ezali boni mpo na yo? Ozali elenge moklisto oyo auti kosilisa kelasi? Ozali mwasi oyo mobali azwaka mwa makoki ya kokokisa bamposa ya libota malamu? Osili kobala kasi ozali naino na bana te? Ozali asila-sanza? Kozala mobongisi-nzela to kozala mobongisi-nzela te ezali ekateli oyo moto asengeli kozwa ye moko. Motuna yango oyo: okoki kobongisa bomoi na yo mpo na kozala mobongisi-nzela?
4 Satana azali kosalela ebongiseli ya biloko na ye mpo na kotondisa bomoi na biso na makambo ya kominanola mpe kozindisa biso kati na moimi. Soki tozwi ekateli ya kozala bato ya mokili te, Yehova akosalisa biso ete tókoba kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso mpe ete tósimba mabaku nyonso ya mosala ya Teokrasi oyo epesameli biso. Soki tokokoka komibongisa mpo na kozala babongisi-nzela, mpo na nini te kosala yango?
MOTUNA 2: “Ndenge nini nakoyeba soki nakokoka kozwa mbongo mpo na kokokisa bamposa na ngai wana nazali kosala mosala ya ntango nyonso?”
5 Esengeli koyeba ete, na bikólo mingi, bangonga oyo moto asengeli kosala na mosala pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kozwa likoki ya kobikela ezali kobakisama na boumeli ya bambula. Nzokande, bandeko mingi bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela bambula mingi, mpe Yehova azali ntango nyonso kosalisa bango. Mpo na kolonga na mosala ya mobongisi-nzela, esengeli komonisa kondima mpe kozala na elimo ya komipesa. (Mat. 17:20) Nzembo 34:10 ezali kondimisa biso ete ‘baoyo bakolukaka Yehova bakozanga eloko malamu soko moko te.’ Moto nyonso oyo azali kosala mosala ya mobongisi-nzela asengeli kosala yango na komindimisáká mpenza ete Yehova akokokisa bamposa na ye. Ezali yango nde azali kosala mpo na babongisi-nzela ya sembo bipai binso na mokili! (Nz. 37:25) Ya solo, na boyokani na mitinda mizwami na 2 Batesaloniki 3:8, 10 mpe na 1 Timote 5:8, babongisi-nzela basengeli komizela te ete basusu bákokisaka bamposa na bango na makambo matali mbongo.
6 Ndeko nyonso oyo azali kokana kosala mosala ya mobongisi-nzela asengeli kolanda toli oyo ya Yesu: ‘Kofanda liboso mpo na kotánga motuya.’ (Luka 14:28) Kosala bongo, ezali komonisa mayele mabongi. Sololá na baoyo bazali babongisi-nzela ya molende mpe baumeli na mosala yango bambula mingi. Tuná bango lolenge Yehova azali kosunga bango. Mokɛngɛli ya zongazonga na bino azali mobongisi-nzela oyo ameseni na mosala, akosepela kopesa yo makanisi mpo na kolonga na mosala ya ntango nyonso.
7 Soki tomitiki na mabɔkɔ ya Yehova te, tokokoka te kotalela bosolo ya elaka ya Yesu oyo elobelami na Matai 6:33. Ndeko mwasi moko mobongisi-nzela ya sembo alobaki ete: “Ntango batindaki ngai na teritware mosusu elongo na ndeko mwasi mosusu oyo azalaki mpe mobongisi-nzela, tozalaki bobele na mwa ndambo ya ndunda, pakɛ moko ya manteka, kasi tozalaki na mbongo te. Na mpokwa, ntango tosilisaki misala na biso, tolobaki ete: ‘Tozali lisusu na eloko te mpo na lobi.’ Liboso ya kolala, tobondelaki Nzambe na ntina na likambo yango. Lobi na ntɔngɔntɔngɔ, moklisto moko ya mwasi oyo azalaki kofanda zingazinga wana akómelaki biso mpe alobaki ete: ‘Nabondelaki Yehova ete atindela biso babongisi-nzela. Nakokende na bino elongo moi mobimba, kasi lokola nafandaka mwa mosika, nasɛngi na bino tólya esika moko na midi. Nayei na bilei mpo na biso misato.’ Bilei yango ezalaki misuni ya nyama mpe ndunda mingi.” Ezali likambo ya kokamwa te ete Yesu andimisa biso ete ‘tómitungisaka te mpo na milimo na biso!’ Na nsima abakisi ete: ‘Nani kati na bino ayebi kobakisa ndambo mosusu ya bolai ya bomoi na ye bobele mpo na komitungisa?’—Mat. 6:25, 27, NW.
8 Mokili oyo ezingi biso ezali komipesa se na bozwi ya biloko ya mosuni. Tozali kozwa bopusi makasi mpo ete tókóma kosala makambo lokola bato nyonso. Nzokande, soki na komikitisa nyonso, tozali komonisa motuya na mosala ya ntango nyonso, tokomibanzabanza mingi te mpo na makambo ya mosuni. (1 Tim. 6:8) Babongisi-nzela oyo bazali na bomoi ya mindɔndɔ te mpe oyo ebongisami malamu bazali na ntango mingi ya kosala na mosala ya kosakola, bazali kozwa esengo mingi mpe bazali makasi na elimo mpamba te bazali koteya solo epai na basusu. Atako balukaka te kozala na bomoi lokola bato oyo bamipimelaka makambo nyonso, makanisi na bango malongobani na makambo ya mbongo ezali kopesa bango nzela ya kozwa matomba ya mosala ya mobongisi-nzela.
9 Soki tondimi mpenza ete tozali kobika na mikolo ya nsuka mpe ete ntango etikali mokuse mpo na mokili oyo mabe, tokomipesa mingi na makambo ya elimo mpo ete tósimba mabaku nyonso ya kosakola nsango malamu. Soki totaleli makambo ya mbongo na bokatikati, mpe topesi nyonso na mabɔkɔ ya Yehova, mbala mosusu tokomona ete tokoki kosala mosala ya ntango nyonso. Ata soki esengeli na biso kotika mikano mosusu ya mosuni mpo na kozala mobongisi-nzela, tokozwa mapamboli mingi ya Yehova.—Nz. 145:16.
MOTUNA 3: “Lokola nazali elenge, mpo na nini nasengeli kotalela mosala ya mobongisi-nzela lokola mosala ya bomoi na ngai?”
10 Mbala mosusu osilisi bakelasi na yo mpe ozali sikawa kokanisa mpo na bomoi na yo ya mikolo mizali koya. Olingi kozala na bomoi malamu, ya esengo mpe ya kosepelisa. Ekoki kozala ete bapesi-toli na eteyelo bápusa yo ete olanda kelasi milaimilai oyo ekopesa yo nzela ya kosala mosala ya kozwa mbongo mingi. Lisosoli na yo ya moklisto oyo liteyami malamu lizali koyebisa yo ete osengeli nde komibongisa mpo na kosalela Yehova mingi. (Mos. 12:1) Mbala mosusu ozali kokana kobala mpe kosala libota. Na yango, okosala nini?
11 Bikateli oyo ozali kozwa na eleko oyo bikozala na bopusi na bomoi na yo ya mikolo mizali koya. Soki ozali Motatoli ya Yehova oyo amipesá mpe azwá batisimo, emonisi ete omipesá na Yehova na molimo na yo mobimba. (Ebe. 10:7) Libosoliboso, salá mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya sanza moko to basanza mingi. Na yango, okoyoka esengo mpe okososola mokumba ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe na ntembe te okozwa likanisi ya sikisiki na oyo osengelli kosala na bomoi na yo. Na nsima, na esika ete oluka mosala ya mosuni ya ntango nyonso mpo ete osilisi kelasi na yo mpe ozali na ntango mingi, mpo na nini te kobanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza? Basusu oyo bazelaki liboso ya kokóma babongisi-nzela bazali koyoka mawa mpo ete babandaki mosala yango noki te.
12 Soki ozali elenge, salelá likoki oyo ozali na yango lokola monzemba mpe zwá matomba oyo yango ezali kopesa mpo na mosala ya kosakola ya ntango nyonso. Soki ozali kokana kobala mokolo mosusu, okotya moboko malamu mpo na libala bobele na kosaláká liboso mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Wana ozali kokɔmela mpe kokola na elimo, mbala mosusu okopona kosala mosala ya mobongisi-nzela elongo na moto oyo azali na mikano ndenge moko na yo mpe kobalana na ye. Babalani mosusu oyo bazali babongisi-nzela baponamaki mpo na kosala mosala ya zongazonga to ya misionere. Lolenge wana ya bomoi ezali mpenza kosepelisa!
13 Ezala ete ozali mobongisi-nzela mpo na ntango mokuse to mpo na ntango molai, okozwa makoki mingi mpe okobongisama na lolenge moko malamu koleka mosala mosusu nyonso awa na mokili. Mosala ya mobongisi-nzela ezali kolakisa biso lolenge ya disipilini malamu, kozala na ebongiseli malamu, kozala na etamboli malamu na miso ya bato, komipesa na Yehova mpe kolona motema pɛtɛɛ mpe boboto, oyo ezali bizaleli ya ntina mpo na kokokisa mikumba minene.
14 Na mikolo na biso, bato bazali lisusu na elikya te. Longola bilaka ya Yehova, makambo oyo bato balakaka, bobele mwa ndambo moke nde ekokisamaka. Lokola ozali na elikya malamu mpo na bomoi ya mikolo mizali koya, ntango nini ya malamu oyo okozala na yango koleka sikawa mpo na kokanisa na mozindo makambo oyo okosala na bomoi na yo na bambula oyo ezali koya? Talelá malamumalamu libaku ya kozala mobongisi-nzela. Okomilela soko moke te mpo ete oponaki kosala mosala yango na bomoi na yo mobimba.
MOTUNA 4: “Nakosɛngisama ntango nyonso te ete nakokisa bangonga oyo esɛngami? Nini ekokómela ngai soki nakokisi bangonga te?”
15 Ndeko oyo akotondisa lokasa ya lisɛngi mpo na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza asengeli koyanola na motuna oyo: “Osili komibongisa na boye ete okokisa ngonga 1 000 oyo esɛngami mpo na mbula?” Mpo na kokokisa yango, esengeli kosala ngonga misato mokolo na mokolo na mosala ya kosakola. Yango ezali kosɛnga mpenza ebongiseli malamu mpe disipilini malamu. Babongisi-nzela mingi bakokaka kosala manaka moko oyo ebongi mpe elongobani bobele nsima ya mwa basanza.
16 Nzokande, Mosakoli 9:11, (NW) elobi na ntina yango ete: ‘Ntango mpe makambo makanami te ekómelaka banso.’ Bokɔnɔ makasi to likambo mosusu oyo ekanamaki te ekoki kopekisa mobongisi-nzela ete akokisa bangonga na ye. Soki likambo yango eumeli te mpe soki lisalemi na ebandeli ya mobu ya mosala, okoki kokokisa bangonga na yo na kosaláká bangonga mingi mokolo na mokolo na mosala ya kosakola. Kasi ezali boni soki likambo moko ya monene ebimi, mpe ete etikali bobele mwa basanza na mobu ya mosala mpe ete mobongisi-nzela akoki te kokokisa bangonga na ye?
17 Soki ozali kobɛla na boumeli ya mwa basanza to soki likambo moko ekweli yo, esali ete okokisa bangonga te, okoki kosolola na nkulutu moko oyo azali na komite ya mosala ya lisangá na bino mpe kolimbwela ye likambo yango. Soki bankulutu bamoni ete ekozala malamu okoba na mosala na yo kozanga komitungisa mpo na kokokisa bangonga oyo ebungisami, bakoki kozwa ekateli na likambo yango. Mokomeli ya lisangá akoyebisa na lokasa ya mosala ya mosakoli ete osengeli te kokokisa bangonga oyo etikali. Yango ezali bopemi te, kasi ezali nde lolenge malamu ya komitya na esika ya moto na kotalela ezalela na ye.—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Máí 1987, lokasa 3, paragrafe 7, ebimeli ya Lifalanse.
18 Babongisi-nzela oyo bameseni na mosala basalaka bangonga mingi banda na ebandeli ya mobu ya mosala. Batyaka mosala na bango ya mobongisi-nzela na esika ya liboso, na yango, mbala mosusu bamonaka malamu kolongola misala mosusu oyo mizali na ntina mingi te. Soki mobongisi-nzela moko azali kokokisa bangonga te mpo na ebongiseli mabe to mpo amipesi disipilini te mpo na kotosa manaka na ye, asengeli komiyoka ete asɛngisami kokokisa bangonga na ye kozanga kolikya ete bakosalisa ye na lolenge moko to mosusu.
19 Mbala mosusu, ekómaka ete ezalela ya mobongisi-nzela moko ezwa mbongwana oyo ekoki kopɛngolama te. Mbala mosusu akokoka te kokokisa bangonga oyo esɛngami na boumeli ya ntango molai mpo na mikakatno ya kolɔngɔnɔ ya nzoto oyo ezali koumela, to mpo na mikumba ya libota oyo mizali na ntina mingi, mpe bongo na bongo. Na yango, ekozala likambo ya mayele kozonga mosakoli, na kosaláká mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbala na mbala soki likoki ezali. Ebongiseli moko te ezali mpo na kopesa nzela na ndeko moko ete atikala na molɔngɔ ya babongisi-nzela soki ezalela na ye ezali kopesa ye nzela te ete akokisa bangonga oyo esɛngami.
20 Tozali na elikya ete ebongiseli oyo ezwami mpo na kotyela baoyo bakokisi masɛngami likebi ekopusa bandeko mosusu mingi ete bábanda mosala yango kozanga komitungisa mpambampamba. Yango esengeli mpe kolendisa baoyo bazali kosala mosala ya ntango nyonso ete bákoba na mosala na bango. Tozali na mposa ete babongisi-nzela bálonga na mosala na bango.
MOTUNA 5: “Nalingi kosala eloko moko mpe kozala na esengo ya kosala yango. Mosala ya mobongisi-nzela ekopesa ngai esengo yango?”
21 Bolamu ya solosolo etaleli mingi boyokani malamu oyo tozali na yango elongo na Yehova mpe mokano na biso ya kosalela Ye na bosembo nyonso. Yesu ayikelaki nzete ya mpasi mpiko “mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye.” (Ebe. 12:2, NW) Kosala mokano ya Nzambe ezalaki kopesa ye esengo. (Nz. 40:8) Na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo, tokoki kozwa bolamu ya solosolo soki misala na biso mingi mikangami na losambo oyo tozali kopesa na Yehova. Mikano ya elimo epesaka biso elikya mpamba te tozali na mposa makasi ya kosala oyo ezali sembo. Ezali na kopesa nde tokomizwela bolamu, mpe komipesa mpo na koteya bazalani na biso lolenge ya kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe, ezali lolenge ya komipesa oyo eleki malamu.—Mis. 20:35.
22 Mobongisi-nzela oyo tolobelaki na paragrafe ya liboso alobeli yango boye: “Ezali na likambo moko ya esengo monene koleka komona moto oyekolaki na ye Biblia kokóma mosanzoli ya molende ya Yehova? Ezali mpenza likambo ya kosepelisa mpe ya kolendisa kondima na komona lolenge Liloba ya Nzambe ezali kopusa bato na kosala mbongwana kati na bomoi na bango mpo na kosepelisa Yehova.” (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1997, nkasa 18-23.) Na yango, nini epesaka yo esengo? Soki, na esika ya kopona bisengo ya ntango mokuse oyo mokili ezali kopesa, okolinga kosala milende ntango nyonso mpe oyo ezali na ntina, mosala ya mobongisi-nzela ekopesa yo esengo ya kosala eloko moko ya ntina oyo ekopesa yo bolamu.
MOTUNA 6: “Lokola esɛngami te ete mpo na kozwa bomoi ya seko esengeli kozala mobongisi-nzela, na bongo ekateli ya kozala mobongisi-nzela to kozala mobongisi-nzela te etali bobele ngai, boye te?”
23 Ya solo, ekateli ya kozala mobongisi-nzela etali yo moko. Bobele Yehova nde akoki kokata na ntina na ezalela na yo moko. (Lom. 14:4) Alingi ete osalela ye na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na elimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso. (Mko. 12:30; Gal. 6:4, 5) Alingaka ye oyo apesaka na esengo, oyo asalelaka ye na esengo, kasi na komilelalela te to na kopusama na makasi te. (2 Kol. 9:7; Kols. 3:23) Ezali mpo na bolingo na yo epai na Nzambe mpe epai na mozalani na yo nde osengeli kozala na mposa ya kosala mosala ya ntango nyonso. (Mat. 9:36-38; Mko. 12:30, 31) Soki ezali yango nde okanisaka, na bongo ebongi ete omanyola na mozindo likoló na mosala ya mobongisi-nzela.
24 Tozali na elikya ete makambo oyo touti kolobela makosalisa yo ete otalela makoki na yo ya kozala mobongisi-nzela. Okoki komibongisa lisusu mpo na kozala mobongisi-nzela? Okokuta awa na nse manaka oyo ezali na motó na likambo ete “Manaka ya pɔsɔ na pɔsɔ mpo na mobongisi-nzela.” Kanisá malamu likoló na manaka moko oyo ekobonga mpo na yo mpe ekopesa yo nzela ya kosala ngonga 23 na pɔsɔ na mosala ya kosakola. Mpe zalá na kondima epai na Yehova mpe tyá elikya epai na ye. Na lisalisi na ye, okokoka! Ye alaki ete: ‘Nakosopela bino lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.’—Mki. 3:10.
25 Na bongo, tozali kotuna motuna oyo: “Mosala ya mobongisi-nzela: ezali mpo na yo?” Soki okoyanola “ɛɛ,” omityela dati mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza kozanga koumela, mpe omindimisa ete Yehova akopambola yo na kopesakáká yo bomoi ya esengo!
[Etanda na lokasa 6]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Manaka ya pɔsɔ na pɔsɔ mpo na mobongisi-nzela
MWAYAMBO: Ntɔngɔ kosakola
MWAMIBALE: Ntɔngɔ kosakola
MWAMISATO: Ntɔngɔ kosakola
MWAMINEI: Ntɔngɔ kosakola
MWAMITANO: Ntɔngɔ kosakola
MWAPƆSƆ: Ntɔngɔ kosakola
MWALOMINGO: Ntɔngɔ kosakola
MWAYAMBO: Nsima ya nzanga kosakola
MWAMIBALE: Nsima ya nzanga kosakola
MWAMISATO: Nsima ya nzanga kosakola
MWAMINEI: Nsima ya nzanga kosakola
MWAMITANO: Nsima ya nzanga kosakola
MWAPƆSƆ: Nsima ya nzanga kosakola
MWALOMINGO: Nsima ya nzanga kosakola
MWAYAMBO: Mpokwa kosakola
MWAMIBALE: Mpokwa kosakola
MWAMISATO: Mpokwa kosakola
MWAMINEI: Mpokwa kosakola
MWAMITANO: Mpokwa kosakola
MWAPƆSƆ: Mpokwa kosakola
MWALOMINGO: Mpokwa kosakola
Komá na krɛyɔ manaka na yo mpo na mokolo nyonso na boumeli ya pɔsɔ.
Omibongisa mpo na kosala ngonga 23 na mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ.
Bangonga nyonso na pɔsɔ ․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․