Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/11 nk. 3-4
  • Kobondela ezali mpenza na ntina?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobondela ezali mpenza na ntina?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bato babondelaka?
  • Ezali na moto oyo ayokaka mabondeli?
  • Nzambe ayokaka mabondeli nyonso?
  • Mabondeli oyo mazali kondimama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mabondeli nini mandimami na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/11 nk. 3-4

Kobondela ezali mpenza na ntina?

MOTO nyonso asukaka kaka na koyoka mposa ya kobondela. Kutu, bato ya mangomba nyonso bamipesaka na mabondeli. Na ndakisa, na mokolo moko, moto ya Lingomba ya Bouddha akoki kozongela libondeli “Natii elikya na ngai na Bouddha Amida” mbala ata bankóto.

Soki totali mikakatano oyo ezali kosila te na mokili oyo, ebongi mpenza tómituna mituna oyo: Bato bazalaka na elikya nini ntango babondelaka? Mabondeli nyonso oyo basalaka ezalaka mpenza na ntina?

Mpo na nini bato babondelaka?

Bato mingi ya Azia babondelaka bankɔkɔ na bango mpe banzambe ya Lingomba ya Shinto to ya Tao. Babondelaka mpo bálonga na kelasi, mpo bilanga na bango ebota malamu, mpe lisusu mpo bábɛla te. Bato ya Lingomba ya Bouddha bakanisaka ete bakoki kosala milende mpo bázwa kongɛngisama. Bato ya Lingomba ya Bahindu bamipesaka na kobondela banzambe oyo balingaka mingi mpo bákóma na mayele, bázwa bomɛngo mpe bábatelama.

Bakatolike mosusu bakanisaka ete soki bakómi basango to bamamelo mpe bafandi na bakuva mpo bámipesa na mabondeli, bakosalisa bato mosusu. Ebele ya Bakatolike basambelaka Maria mpe mbala mosusu basalelaka sapɛlɛ. Na mikili ya Azia, bato mingi, na esika ya koloba, babalolaka nde eloko moko oyo ezali zolongano (moulin à prière). Baprotesta basalaka “Libondeli ya Nkolo,” kasi ntango mosusu mpe bayebisaka Nzambe makanisi oyo ezali mpenza na mitema na bango. Bayuda mingi bautaka mosika mpo na kokende kobondela na Efelo ya Wɛsti na Jérusalem, na elikya ete tempelo ekotongama lisusu mpe mokili ya sika ya malamu mpe ya kimya ekozonga.

Atako ebele ya bato bamipesi na mabondeli, makambo oyo ezali kotungisa bato lokola bobola, komela bangi, kokabwana ya mabota, mobulu mpe bitumba, ezali se kobakisama. Ekoki nde kozala ete bato nyonso wana babondelaka na ndenge oyo ebongi te? Ezali mpenza na moto oyo ayokaka mabondeli?

Ezali na moto oyo ayokaka mabondeli?

Soki ezali na moto moko te oyo ayokaka mabondeli, boye ntina ya kobondela ezali te. Ntango moto azali kobondela andimaka mpenza ete ezali na moto moko oyo amonanaka te kasi ayokaka ye. Kasi, mabondeli ebutaka kaka na mopɛpɛ te mpo ekómela ye. Bato mingi bandimaka ete ezali na moto oyo akoki koyeba ata makanisi ya moto oyo azali kobondela. Moto yango nde nani?

Basava bayebaka te ndenge oyo makanisi esalemaka na kati ya bamiliare ya baselile ya bɔɔngɔ ya moto. Kasi, ntembe ezali te ete Moto oyo akelaki bɔɔngɔ akoki koyeba makanisi oyo ezali kati na yango. Moto yango ezali Mozalisi na biso, Yehova Nzambe. (Nzembo 83:18; Emoniseli 4:11) Tosengeli nde kobondelaka ye. Kasi, Yehova ayokaka mabondeli wana nyonso?

Nzambe ayokaka mabondeli nyonso?

Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala azalaki kobondela mingi. Apemamaki na Nzambe mpo na kokoma nzembo mpe na loyembo moko ayembaki boye: “Yo okoyokaka mabondeli; bato nyonso bakoya epai na yo.” (Nzembo 65:2) Yehova akoki koyoka mabondeli ata soki esalemi na monɔkɔ nini kati na ebele ya minɔkɔ oyo bato balobaka. Tókanisa te ete lokola moto moko te akoki koyoka minɔkɔ nyonso wana, Nzambe mpe akoki te koyoka bato nyonso oyo babondelaka ye na ndenge oyo ebongi.

Kasi, Yesu Klisto, moto oyo mpe azalaki kobondela mingi, amonisaki ete Nzambe asepelaka na mabondeli nyonso te. Yesu alobaki nini mpo na momeseno oyo bato mingi bazalaki na yango ya kozongela mabondeli oyo bakangi na motó? Biblia Boyokani ya Sika elobi boye: “Ntango bozali kosambela, boloba maloba mingi te lokola bapagano basalaka. Bango bakanisaka ete Nzambe akoyokela bango soki bazali koloba mingi.” (Matai 6:7) Yehova akoyoka biso te soki mabondeli na biso ezali mpenza kouta na motema te.

Lisese moko ya Biblia emonisi ntina oyo mabondeli mosusu esepelisaka Nzambe te; elobi boye: “Ye oyo akolongola litoi na ye ete ayoka mobeko te, ata libondeli na ye ekozala eloko ya koboyama.” (Masese 28:9) Lisese mosusu elobi boye: “[Yehova] atikali mosika na bato mabe, nde ayoki mabondeli ya bayengebene.” (Masese 15:29) Na ntango oyo bakonzi ya Yuda ya kala bazalaki na ngambo monene na motó na bango, Yehova alobaki boye: “Ekosembola bino mabɔkɔ na bino, nakobombela bino miso na ngai; ata bokobondela mabondeli mingi mpenza nakoyoka te, mabɔkɔ na bino itondi na makila.”​—Yisaya 1:1, 15.

Ntoma Petelo alobaki likambo mosusu oyo ekoki kosala ete Nzambe aboya koyoka mabondeli mosusu. Akomaki boye: “Bino mibali lokola, bózalana na basi na bino kososola na mayele ete bango baleki motau, nde bópesa lokumu epai na bango lokola na bato bakozwa libula ya likabo ya bomoi na bino elongo; bongo mabondeli na bino makopekisama te.” (1 Petelo 3:7) Nzambe akoki kokanga matoi na ye na mabondeli ya moto oyo aboyi kolanda toli oyo!

Tomoni polele ete mpo Nzambe ayoka mabondeli na biso, ezali na mwa makambo oyo tosengeli kokokisa. Kasi, bato mingi oyo babondelaka bakanisaka mpenza te kosala makambo oyo Nzambe azali kosɛnga biso. Yango wana, atako bato bamipesi na kobondela, mokili ezali kobonga kaka te.

Nzambe alingi tósala nini mpo ayoka mabondeli na biso? Eyano na motuna oyo etaleli mpenza ntina oyo tobondelaka. Soki tolingi mpenza koyeba ete kobondela ezali na ntina, tosengeli koyeba ntina na yango. Mpo na nini Yehova atikeli biso nzela tósololaka na ye?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

G.P.O., Jérusalem

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto