Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • bhs mok. 17 nk. 174-184
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
  • Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Tángá na Biblia eteyaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MPO NA NINI KOBONDELA YEHOVA?
  • TOSENGELI KOSALA NINI MPO NZAMBE AYOKA BISO?
  • MITUNA OYO BATO BAMITUNAKA MPO NA LIBONDELI
  • NDENGE OYO YEHOVA AYANOLAKA NA MABONDELI NA BISO
  • Pusaná penepene na Nzambe na nzela ya libondeli
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Ndenge nini kobɛlɛma epai na Nzambe kati na libondeli
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Zwá na motuya likabo oyo ozali na yango ya kobondela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Yesu ateyi biso ndenge ya kobondela
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
Makambo mosusu
Makambo oyo Biblia eteyaka
bhs mok. 17 nk. 174-184

MOKAPO YA ZOMI NA NSAMBO

Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene

Mwasi moko azali kobondela na butu ntango likoló etondi na minzoto

“Mokeli ya likoló ná mabele” alingaka koyoka mabondeli na biso.​—Nzembo 115:15

1, 2. Mpo na nini okanisi ete libondeli ezali likabo ya malamu mpenza, mpe mpo na nini tosengeli koyeba oyo Biblia eteyaka mpo na yango?

SOKI tokokanisi mabele na molɔ́ngɔ́, mabele ezali moke mpenza. Ntango Yehova atalaka na mabele, bato ya bikólo nyonso bamonanaka lokola litangá ya mai na katini. (Nzembo 115:15; Yisaya 40:15) Ata soki tozali moke ndenge wana na kati ya molɔ́ngɔ́, Nzembo 145:18, 19 elobi ete: “Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye, na baoyo nyonso babelelaka ye na bosolo. Akokokisa mposa ya baoyo bazali kobanga ye, mpe akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi, mpe akobikisa bango.” Ezali likambo ya lokumu monene mpenza! Yehova, Mozalisi mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, alingaka kozala pene na biso mpe koyoka mabondeli na biso. Ya solo, libondeli ezali lokumu monene, likabo ya malamu mpenza oyo Yehova apesi mokomoko na biso.

2 Kasi, Yehova akoyoka biso kaka soki tozali kobondela ye na ndenge oyo alingaka. Ndenge yango nini? Tótala oyo Biblia elobi mpo na libondeli.

MPO NA NINI KOBONDELA YEHOVA?

3. Mpo na nini osengeli kobondela Yehova?

3 Yehova alingi obondelaka ye, oyebisaka ye makambo. Ndenge nini toyebi yango? Tángá Bafilipi 4:6, 7. Kanisá naino maloba ya vɛrsɛ yango. Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba akipaka yo mpenza mpe alingi oyebisaka ye makanisi na yo mpe makambo oyo ezali kotungisa yo.

4. Na ndenge nini kobondela Yehova mingi ekokómisa yo moninga na ye ya motema?

4 Libondeli esalisaka biso tókóma baninga ya motema ya Yehova. Soki bato mibale basololaka mingi, bayebisanaka makambo, mpe mitungisi na bango, bakómaka baninga makasi. Ezali mpe bongo ntango tozali kobondela Yehova. Na Biblia, Yehova ayebisi biso makanisi na ye mpe ndenge atalelaka biso; ayebisi biso mpe makambo oyo akosala na mikolo ezali koya. Ntango ozali kobondela ye mingi, okoki koyebisa ye ata makambo oyo obombá na kati ya motema. Soki ozali kosala bongo, yo ná Yehova bokokóma baninga makasi.​—Yakobo 4:8.

TOSENGELI KOSALA NINI MPO NZAMBE AYOKA BISO?

5. Ndenge nini toyebi ete Yehova ayokaka mabondeli nyonso te?

5 Yehova ayokaka mabondeli nyonso? Te. Na ntango ya mosakoli Yisaya, Yehova ayebisaki Bayisraele ete: “Ata bozali kobondela mingi, nazali koyoka te; mabɔkɔ na bino etondi na makila oyo bosopi.” (Yisaya 1:15) Yango wana, soki tokebi te, tokoki kosala makambo oyo ekokabola biso na Yehova mpe akoyoka mabondeli na biso te.

6. Mpo na nini kondima ezali na ntina? Ndenge nini okomonisa ete ozali na kondima?

6 Soki tolingi Yehova ayokaka mabondeli na biso, tosengeli kozala na kondima epai na ye. (Marko 11:24) Ntoma Paulo alobi: “Soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa ye ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.” (Baebre 11:6) Kasi, kosuka kaka na koloba ete tozali na kondima ekoki te. Mpo na komonisa polele ete tozali na kondima, tosengeli kotosa Yehova mikolo nyonso.​—Tángá Yakobo 2:26.

7. (a) Mpo na nini tosengeli kozala na komikitisa mpe na limemya ntango tozali kobondela Yehova? (b) Ndenge nini tokomonisa ete tozali koyebisa Yehova makambo na bosembo ntango tozali kobondela?

7 Tosengeli kozala na komikitisa mpe na limemya ntango tozali kobondela Yehova. Mpo na nini? Soki tolingi kosolola na mokonzi to prezida moko, tokosala yango na limemya mpenza. Lokola Yehova azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, tosengeli kutu kozala na limemya mpe na komikitisa mingi koleka ntango tozali kosolola na ye. (Ebandeli 17:1; Nzembo 138:6) Tosengeli mpe koyebisa Yehova makambo na bosembo, koloba makambo oyo euti mpenza na motema, na esika ya kozongelaka kaka maloba moko mbala na mbala.​—Matai 6:7, 8.

8. Ntango tobondeli mpo na likambo moko, tosengeli kosala lisusu nini?

8 Lisusu, ntango tobondeli mpo na likambo moko, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo likambo oyo tosɛngi ekokisama. Na ndakisa, soki tobondeli Yehova apesa biso biloko ya mokolo na mokolo oyo tosengeli na yango, tosengeli kokanga mabɔkɔ te mpe kozela ete Yehova apesa biso biloko, nzokande tozali na makasi ya kosala mpo na kozwa yango. Tosengeli kosala mosala makasi mpe kondima mosala nyonso oyo tokokoka kosala. (Matai 6:11; 2 Batesaloniki 3:10) To soki tobondeli Yehova asalisa biso tótika ezaleli moko ya mabe, tosengeli kokima likambo nyonso oyo ekoki kotya biso na komekama. (Bakolose 3:5) Sikoyo, tótalela mituna oyo bato mosusu bamitunaka mpo na libondeli.

MITUNA OYO BATO BAMITUNAKA MPO NA LIBONDELI

9. Tosengeli kobondela nani? Yoane 14:6 emonisi biso nini mpo na libondeli?

9 Tosengeli kobondela nani? Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka “Tata na biso na likoló.” (Matai 6:9) Alobaki mpe: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Na yango, tosengeli kobondela kaka Yehova na nzela ya Yesu. Kobondela na nzela ya Yesu elimboli nini? Mpo Yehova andima mabondeli na biso, tosengeli komonisa ete tondimi mokumba monene oyo Yehova apesá Yesu. Ndenge toyekolaki yango, Yesu ayaki awa na mabele mpo na kobikisa biso na lisumu mpe na liwa. (Yoane 3:16; Baroma 5:12) Yehova atyá mpe Yesu Nganga-nzambe Monene mpe Mosambisi.​—Yoane 5:22; Baebre 6:20.

Bato bazali kobondela mpo na makambo ndenge na ndenge

Okoki kobondela ntango nyonso

10. Tosengeli nde kofukama, kofanda, kolala to kotɛlɛma ntango tozali kobondela? Limbolá.

10 Tosengeli nde kofukama, kofanda, kolala to kotɛlɛma ntango tozali kobondela? Te, Yehova asɛngi biso likambo ya ndenge wana te. Biblia emonisi ete tokoki kosolola na Yehova, ezala tofandi, totɛlɛmi to na ndenge mosusu nyonso, kasi ezala nde na limemya. (1 Ntango 17:16; Nehemia 8:6; Danyele 6:10; Marko 11:25) Likambo oyo eleki ntina na miso ya Yehova ezali ete tóyebisa ye makambo oyo euti na motema, kasi kofukama, kofanda, kolala to kotɛlɛma ntango tozali kobondela ezali na ntina mingi te. Tokoki kobondela na mongongo makasi to na motema, na esika nyonso oyo tozali, mpe ata na ngonga nini, na butu to na moi. Ntango tobondeli Yehova, tokoki kotya motema ete akoyoka biso ata soki moto moko te ayoki.​—Nehemia 2:1-6.

11. Tángá mwa makambo oyo tokoki kosɛnga Yehova na libondeli.

11 Tokoki kobondela mpo na makambo nini? Tokoki kobondela mpo na eloko nyonso oyo ezali malamu na miso ya Yehova. Biblia elobi: “Ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” (1 Yoane 5:14) Tokoki nde kosɛnga makambo mpo na biso moko? Ɛɛ. Kobondela Yehova esengeli kozala lokola kosolola na moninga ya motema. Tokoki koyebisa Yehova likambo nyonso oyo ezali na makanisi mpe na motema na biso. (Nzembo 62:8) Tokoki kosɛnga ye elimo santu na ye mpo esalisa biso tósala makambo ya malamu. (Luka 11:13) Tokoki mpe kosɛnga Yehova apesa biso bwanya mpo tózwa bikateli ya malamu, mpe apesa biso makasi mpo tókanga motema soki tozali na mpasi. (Yakobo 1:5) Tosengeli kosɛnga Yehova alimbisa masumu na biso. (Baefese 1:3, 7) Tosengeli mpe kobondela mpo na bato mosusu, na ndakisa bato ya libota na biso mpe bandeko ya lisangá.​—Misala 12:5; Bakolose 4:12.

12. Makambo nini esengeli kozala na esika ya liboso na mabondeli na biso?

12 Makambo nini tosengeli kosɛnga libosoliboso na mabondeli na biso? Makambo oyo etali Yehova mpe mokano na ye. Tosengeli kopesa Yehova matɔndi na motema moko mpo na nyonso oyo asalelá biso. (1 Ntango 29:10-13) Toyebi yango mpo ntango Yesu azalaki awa na mabele, ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kobondela. (Tángá Matai 6:9-13.) Alobaki ete basengeli libosoliboso kobondela ete nkombo ya Nzambe esantisama, elingi koloba etalelama ete ezali mosantu. Na nsima, Yesu amonisaki ete tosengeli kobondela mpo Bokonzi ya Nzambe eya mpe mokano ya Yehova esalema na mabele mobimba. Kaka nsima ya kobondela mpo na makambo wana ya ntina mingi nde Yesu alobaki ete tosengeli kobondela mpo na makambo oyo tosengeli na yango. Ntango tozali kotya makambo ya Yehova mpe mokano na ye na esika ya liboso na mabondeli na biso, tozali komonisa ete yango nde eleki ntina mpo na biso.

13. Mabondeli na biso esengeli kozala molai to mokuse?

13 Mabondeli na biso esengeli kozala molai to mokuse? Biblia epesi eyano te. Mabondeli na biso ekoki kozala molai to mokuse, na kotalela likambo oyo tozali na yango. Na ndakisa, liboso ya kolya, tokoki kosala libondeli ya mokuse; kasi ntango tozali kopesa Yehova matɔndi to tozali koyebisa ye mitungisi na biso, libondeli ekoki kozala molai. (1 Samwele 1:12, 15) Ezali malamu te kosala mabondeli ya milai kaka mpo ekamwisa bato, ndenge bato mosusu na ntango ya Yesu bazalaki kosala. (Luka 20:46, 47) Mabondeli ya ndenge wana ekamwisaka Yehova te. Yehova alingi nde tóbondelaka ye na motema moko.

14. Tosengeli kobondela mbala boni na mokolo, mpe yango eteyi biso nini mpo na Yehova?

14 Tosengeli kobondela mbala boni na mokolo? Yehova asɛngi biso tósololaka na ye ntango nyonso. Biblia elobi ete tosengeli ‘kobondelaka ntango nyonso,’ mpe ‘kotingama na mabondeli.’ (Matai 26:41; Baroma 12:12; 1 Batesaloniki 5:17) Yehova azalaka ntango nyonso pene ya koyoka mabondeli na biso. Tokoki kopesa ye matɔndi mokolo na mokolo mpo na bolingo na ye mpe mpo na biloko oyo apesaka biso. Tokoki mpe kosɛnga ye alakisa biso nzela, apesa biso makasi, mpe akitisa biso motema. Soki tondimi mpenza ete kobondela Yehova ezali likambo ya lokumu monene, tokosala yango ntango nyonso oyo tozwi libaku ya kosolola na ye.

15. Mpo na nini tosengeli koloba “amen” na nsuka ya libondeli?

15 Mpo na nini tosengeli koloba “amen” na nsuka ya libondeli? Liloba “amen” elimboli “ya solo mpenza” to “ezala bongo.” Yango emonisaka ete tondimi makambo oyo tolobi na libondeli, ete tolobi yango na bosembo. (Nzembo 41:13) Biblia emonisi ete ezali mpe malamu koloba “amen,” na motema to na mongongo makasi, na nsuka ya libondeli oyo moto moko asali mpo na bato ebele mpo na komonisa ete tondimi makambo oyo alobi.​—1 Ntango 16:36; 1 Bakorinti 14:16.

NDENGE OYO YEHOVA AYANOLAKA NA MABONDELI NA BISO

16. Yehova ayanolaka mpenza na mabondeli na biso? Limbolá.

16 Yehova ayanolaka mpenza na mabondeli na biso? Ɛɛ. Biblia ebengi ye “Moyoki ya libondeli.” (Nzembo 65:2) Yehova ayokaka mpe ayanolaka na mabondeli ya ebele ya bato oyo babondelaka ye na motema moko, mpe asalaka yango na ndenge ebele.

17. Ndenge nini Yehova asalelaka baanzelu mpe basaleli na ye awa na mabele mpo na koyanola na mabondeli na biso?

17 Yehova asalelaka baanzelu mpe basaleli na ye awa na mabele mpo na koyanola na mabondeli na biso. (Baebre 1:13, 14) Ezali na masolo ya ebele ya bato oyo babondelaki Nzambe asalisa bango báyeba Biblia malamu, mpe eumelaki te, Motatoli moko ya Yehova ayaki kotala bango. Biblia emonisi ete baanzelu bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kosakola “nsango malamu” na mabele mobimba. (Tángá Emoniseli 14:6.) Longola yango, mingi kati na biso tobondelá Yehova asalisa biso na likambo moko boye, mpe na nsima ndeko moko ayei kosalisa biso na likambo yango.​—Masese 12:25; Yakobo 2:16.

Mobali moko ná mwasi na ye bayei kotala moninga na bango ya mobange oyo atambolaka lisusu malamu te

Yehova akoki kosalela bandeko mpo na koyanola na mabondeli na biso

18. Ndenge nini Yehova asalelaka elimo santu na ye mpe Biblia mpo na koyanola na mabondeli?

18 Yehova ayanolaka na mabondeli na biso na nzela ya elimo santu na ye. Ntango tobondeli ye asalisa biso na likambo moko ya mpasi, akoki kosalela elimo santu na ye mpo na kotambwisa biso mpe kopesa biso makasi. (2 Bakorinti 4:7) Yehova asalelaka mpe Biblia mpo na koyanola na mabondeli na biso mpe kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu. Ntango tozali kotánga Biblia, tokoki komona bavɛrsɛ oyo ekosalisa biso. Yehova akoki mpe kotinda ndeko oyo azali kopesa eyano na makita alobela likambo oyo tozali mpenza na mposa na yango to nkulutu moko atángela biso vɛrsɛ moko boye.​—Bagalatia 6:1.

19. Mpo na nini ekoki komonana lokola nde Yehova ayanoli na mabondeli na biso te?

19 Kasi, ntango mosusu, tokoki komituna: ‘Mpo na nini Yehova ayanoli naino te na mabondeli na ngai?’ Kobosana te: ayebi ntango mpe ndenge ya koyanola na mabondeli na biso. Ayebi makambo oyo tosengeli na yango. Ekoki kosɛnga tókoba kobondela mpo na komonisa ete tozali mpenza na mposa ya eloko oyo tozali kosɛnga ye mpe komonisa ete tozali mpenza kondimela ye. (Luka 11:5-10) Ntango mosusu, Yehova ayanolaka na mabondeli na biso na ndenge oyo tokanisi te. Na ndakisa, tokoki kobondela mpo na mokakatano moko, kasi na esika alongola yango, akoki kopesa biso makasi mpo tókangela yango motema.​—Tángá Bafilipi 4:13.

20. Mpo na nini tosengeli kobondela Yehova mingi?

20 Kobondela Yehova ezali likambo ya lokumu monene mpenza! Tokoki kotya motema ete akoyoka mabondeli na biso. (Nzembo 145:18) Mpe soki tozali kobondela Yehova mingi na motema moko, akokóma moninga na biso ya makasi mpenza.

NA MOKUSE

LITEYA 1: YEHOVA ALINGAKA KOYOKA MABONDELI NA BISO

“Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye, na baoyo nyonso babelelaka ye na bosolo.”​—Nzembo 145:18

Tosengeli kosala nini soki tolingi Yehova ayokaka mabondeli na biso?

  • Baebre 11:6

    Tosengeli kozala na kondima.

  • Nzembo 138:6

    Tosengeli kozala na komikitisa mpe na limemya.

  • Yakobo 2:26

    Tosengeli kosala makambo oyo eyokani na mabondeli na biso.

  • Matai 6:7, 8

    Tosengeli kozala sembo mpe koloba na motema moko ntango tozali kobondela. Tosengeli te kozongelaka kaka maloba moko mbala na mbala ntango tozali kobondela.

  • Yisaya 1:15

    Tosengeli kozala na bomoi oyo eyokani na mokano ya Nzambe.

LITEYA 2: MITUNA OYO BATO BAMITUNAKA MPO NA LIBONDELI

  • Tosengeli kobondela nani?

    Matai 6:9; Yoane 14:6

  • Tosengeli nde kofukama, kofanda, kolala to kotɛlɛma ntango tozali kobondela?

    1 Ntango 17:16; Nehemia 8:5, 6; Danyele 6:10; Marko 11:25

  • Yehova ayokaka mabondeli oyo tosali na motema?

    Nehemia 2:1-6

  • Mabondeli esengeli kozala molai to mokuse?

    1 Samwele 1:12, 15; Luka 20:46, 47

  • Tosengeli kobondela mbala boni na mokolo?

    Baroma 12:12; 1 Batesaloniki 5:17

  • Mpo na nini tolobaka “amen” na nsuka ya libondeli?

    1 Ntango 16:36; 1 Bakorinti 14:16

LITEYA 3: TOKOKI KOBONDELA MPO NA MAKAMBO NINI?

“Ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.”​—1 Yoane 5:14

Wapi mwa makambo oyo tokoki kobondela mpo na yango?

  • Matai 6:9, 10

    Kobondela ete mokano ya Yehova esalema.

  • 1 Ntango 29:10-13

    Kobondela mpo na kopesa Yehova matɔndi.

  • Matai 6:11-13

    Kobondela mpo na biloko oyo tosengeli na yango mpe mitungisi na biso.

  • Luka 11:13

    Kobondela mpo na kosɛnga elimo santu.

  • Yakobo 1:5

    Kobondela mpo na kosɛnga bwanya mpo na kozwa bikateli ya malamu.

  • Bafilipi 4:13

    Kobondela mpo na kosɛnga makasi ya kokanga motema na ntango ya mpasi.

  • Baefese 1:3, 7

    Kobondela mpo na kosɛnga bolimbisi ya masumu.

  • Misala 12:5

    Kobondela mpo na bato mosusu.

LITEYA 4: YEHOVA AYANOLAKA NA MABONDELI NA BISO

“Ee Moyoki ya libondeli, ɛɛ bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo.”​—Nzembo 65:2

Ndenge nini Yehova ayanolaka na mabondeli na biso?

  • Masese 12:25; Emoniseli 14:6

    Yehova akoki kosalela baanzelu to bato mpo na kosalisa biso.

  • 2 Bakorinti 4:7

    Elimo na ye esalisaka biso ntango tosengeli na yango.

  • Bafilipi 4:6, 7, 13

    Apesaka biso kimya mpe makasi oyo esengeli mpo tókanga motema soki tozali na mpasi.

  • Bagalatia 6:1; 2 Timote 3:16, 17

    Apesaka biso bwanya na nzela ya Biblia mpe ya lisangá.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto