Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/11 nk. 28-31
  • “Batelá malako na ngai mpe okozala na bomoi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Batelá malako na ngai mpe okozala na bomoi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Kangá malako na ngai na misapi na yo’
  • Elenge mobali akutani na ‘mwasi moko ya mayele mabe’
  • ‘Atondi na maloba ya kitoko mingi’
  • ‘Lokola ngɔmbɛ akei na kobomama’
  • ‘Koyengayenga na nzela na ye te’
  • Okoki kozala pɛto na mokili oyo etondi na makambo ya pite na ekobo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/11 nk. 28-31

“Batelá malako na ngai mpe okozala na bomoi”

AZALAKI elenge mobali mpe azalaki na mayele, “azalaki bonzenga mpe kitoko.” Mwasi ya mokonzi na ye alingaki makambo ya kosepelisa nzoto mingi mpe asilá nsɔni. Lokola azalaki kosepela na elenge mobali yango, mokolo na mokolo azalaki koluka kobenda ye. “Nde na mokolo moko wana ekɔtaki ye na ndako mpo na kosala mosala na ye mpe moto moko na ndako yango azalaki kuna na kati ya ndako te, mwasi asimbaki elamba na ye mpe alobaki ete, Lalá na ngai.” Kasi Yosefe, mwana ya Yakobo, atikaki elamba na ye mpe akimaki mwasi ya Potifala.​—Genese 39:1-12.

Ya solo, moto nyonso te akimaka liboso ya likambo oyo ekoki kokweisa ye. Na ndakisa, talá, likambo ya elenge mobali oyo Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, amonaki na balabala na butu. Ntango mwasi moko ya makanisi mabe abendi ye, “[alandi] ye nokinoki, lokola ngɔmbɛ akei na kobomama.”​—Masese 7:21, 22.

Bapesi baklisto toli ete ‘bákima pite.’ (1 Bakolinti 6:18) Ntoma Paulo akomelaki elenge moklisto Timote ete: “Okimaka mposa nyonso ya bolenge.” (2 Timote 2:22) Ntango tokutani na makambo oyo ekoki komema biso na kosala pite, ekobo to makambo mosusu ya mbindo, tosengeli kokima lokola Yosefe akimaki mwasi ya Potifala. Nini ekosalisa biso tózwa ekateli ya ndenge yango? Na Biblia, na Masese mokapo 7, Salomo apesi biso toli ya malamu mpenza. Alobeli kaka te mateya oyo ezali kobatela biso tókwea na masɛnginya ya bato ya pite te, kasi amonisi lisusu mayele oyo esengeli kosalela, na kati ya lisolo oyo alobeli ndenge oyo mwasi moko ya pite abendaki elenge mobali moko.

‘Kangá malako na ngai na misapi na yo’

Mokonzi abandi na toli oyo ezali lokola ya tata: “Mwana na ngai, batelá maloba na ngai mpe kamatá malako na ngai elongo na yo. Batelá malako na ngai mpe okozala na bomoi; batelá mpe mobeko na ngai lokola liso na yo.”​—Masese 7:1, 2.

Nzambe apesi baboti, mingimingi batata, mokumba ya koteya bana na bango mitinda ya Nzambe oyo ezali komonisa nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Mose apesaki batata toli oyo: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛma yo.” (Deteronome 6:6, 7) Ntoma Paulo mpe akomaki ete: “Bino batata mpe bóyokisa bana na bino nkanda te, kasi bóbɔkɔla bango na mateya mpe na mpamela ya Nkolo.” (Baefese 6:4) Malako, mitinda mpe mibeko oyo ezali na kati ya Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali na kati ya mateya ya moboti oyo mwana asengeli kobatela to kotalela lokola eloko ya motuya.

Baboti basengeli mpe koteya bana na bango makambo mosusu oyo esengeli kozala lokola mibeko oyo bazali kopesa na kati ya libota. Mibeko yango ezali mpo na bolamu ya bato nyonso na libota. Ya solo, libota na libota esengeli kozala na mibeko na yango, na kotalela ndenge yango ezali. Kasi, baboti bazali na mokumba ya kopona nini eleki malamu mpo na libota na bango. Mbala mingi, mibeko na bango emonisaka bolingo mpe lobanzo na bango. Bapesi bilenge toli ete bátosa mibeko yango mpe mateya ya Makomami oyo baboti bazali kopesa bango. Ya solo, ezali na ntina ete bótalela mateya wana ‘lokola miso na bino,’ bóbatela yango malamu mpenza. Yango nde nzela malamu mpo na kokima likama ya koboya mitinda ya Yehova mpe na ndenge yango ‘bokozala na bomoi.’

Salomo abakisi ete: “Kangá yango [mibeko na ngai] na misapi na yo, komá yango na etando ya motema na yo.” (Masese 7:3) Lokola miso na biso emonaka misapi ntango nyonso mpe tosalelaka misapi yango na misala mingi, ndenge moko mpe, mateya ya Makomami oyo babɔkɔli biso na yango to boyebi ya Biblia, esengeli ntango nyonso kokundolela biso mpe kotambwisa biso na makambo nyonso oyo tozali kosala. Tosengeli kokoma yango na etando ya motema na biso, ekɔta mpenza na bomoto na biso.

Mokonzi abosani te ntina ya bwanya mpe mayele, yango wana alobi ete: “Lobá na [bwanya, NW] ete, Yo ndeko mwasi na ngai! Byangá [mayele, NW] ete, Mwasi na libota na ngai!” (Masese 7:4) Kozala na bwanya elimboli koyeba kosalela boyebi oyo Nzambe apesi biso. Tosengeli kolinga bwanya ndenge tolingaka mpenza ndeko na biso ya mwasi. Bongo mayele ezali nini? Ezali likoki ya kotalela likambo mpe kokanga ntina na yango, ntango tozali koyeba boyokani oyo ezali kati na mwa makambo ya mikemike mpe likambo yango mobimba. Tosengeli mpenza kolinga mayele ndenge tolingaka moninga na biso ya motema.

Mpo na nini tosengeli kondima mateya oyo euti na Makomami mpe kolinga bwanya mpe mayele? Mpo ‘[tókima] mwasi mopaya, mpe na mopaya oyo akozimbisa na maloba na ye [ya elengi, NW].’ (Masese 7:5) Ya solo, soki tosali bongo, ekobatela biso tóbendama te na maloba ya elengi mpe banzela mabe ya mopaya, elingi koloba moto ya pite.a

Elenge mobali akutani na ‘mwasi moko ya mayele mabe’

Na nsima, mokonzi ya Yisalaele alobeli likambo moko oyo ye moko amonaki na miso: “Na lininisa ya ndako na ngai, natalaki kati na emonelo. Namonaki kati na bilema, nasosolaki kati na bilenge mwana moko oyo azangaki mayele. Azalaki kotambola na nzela penepene na esika ya mwasi yango, mpe [alandaki] nzela epai na ndako na ye, na ntango ya mpokwa, nsuka ya pole, na kati ya butu mpe ya molili.”​—Masese 7:6-9.

Salomo azali kotala libándá na lininisa oyo ezali na madusumadusu, ekoki kozala ete esalemi na mwa mabaya mikemike elandisami mpe na mayemi. Lokola moi ezali kolala, molili ya butu ekɔti na balabala. Salomo amoni elenge mobali moko, oyo amitiki bákende na ye. Lokola azangi bososoli to makanisi malamu, elenge mobali yango azali mpenza na mayele te. Emonani ete ayebi malamu lolenge ya bato oyo bafandi na kartye oyo akɔti mpe nini ekoki kokómela ye kuna. Elenge mobali yango akómi penepene “na esika ya mwasi yango,” elingi koloba na nzela oyo ezali koleka tii na ndako ya mwasi yango. Mwasi yango nde nani? Mosala na ye ezali nini?

Mokonzi oyo azali kotala likambo yango alobi ete: “Talá mwasi azwani na ye, na bilamba ya mwasi na pite na motema ya mayele [mabe, NW]. Azali na makɛlɛlɛ mpe na mobulu, makolo na ye makotikala na ndako na ye te; sikawa azali libándá, sikawa azali na nzela, azali [kozela, NW] na bizwanelo na nzela nyonso.”​—Masese 7:10-12.

Molato ya mwasi yango ezali komonisa polele lolenge ya bomoi na ye. (Genese 38:14, 15) Molato na ye ezali ya bopɔlɔ te, ezali lokola ya mwasi ya ndumba. Lisusu, azali na mayele mabe, azali na makanisi ya “bokosi” mpe azali na mikano “mabe.” (An American Translation; New International Version) Azali na makɛlɛlɛ mpe ayokaka likambo te; azali kolobaloba mpe azali motó makasi, azali koganga mpe alingi kosala makambo na ndenge ye moko alingi, asilá mpenza nsɔni mpe azali na matumoli. Na esika ete afanda na ndako, alingi kozala na libándá, atɛlɛmi na nsuka ya babalabala mpo akanga moto na motambo na ye. Azali kozela moto lokola elenge mobali oyo.

‘Atondi na maloba ya kitoko mingi’

Na bongo, elenge mobali moko akutani na mwasi ya pite oyo azali na makanisi mabe. Na ntembe te likambo yango ebendaki mpenza likebi ya Salomo, yango wana alobi ete: “Boye akangi ye, apwepwi ye mpe na elongi na lolendo alobi na ye ete, Nazali na makabo ya kimya elongo na ngai; lelo oyo nakokisi ndai na ngai. Boye nabimi mpo na kozwana na yo, nazali koluka elongi na yo na etingya mpe nazwi yo.”​—Masese 7:13-15.

Mwasi yango azali na maloba ya elengi. Azali ata na nsɔni te mpe azali kobanga te ntango azali koloba. Abongisaki maloba na ye nyonso malamumalamu mpo na kobenda elenge mobali yango. Ntango alobi ete mokolo yango apesaki makabo na ye ya kimya mpe akokisaki ndai na ye, mwasi yango alingi komonisa ete azali sembo mpe alingaka makambo ya elimo. Mbeka ya kimya oyo bazalaki kopesa na tempelo ya Yelusaleme ya kala ezalaki nyama, falini, mafuta na vinyo. (Levitike 19:5, 6; 22:21; Mituya 15:8-10) Moto oyo azalaki kopesa mbeka yango akokaki mpe kolya yango na libota na ye. Yango wana, mwasi yango azali koloba ete biloko ya kolya mpe vinyo ezali bebo na ndako na ye. Makambo ezali polele: Elenge mobali wana akolekisa ntango malamu kuna. Mwasi yango abimaki na ndako na ye kaka mpo na koluka elenge mobali wana. Soki moto andimi maloba ya ndenge wana ezali mpenza mawa. Molimboli moko ya Biblia alobi ete: “Ezali solo ete mwasi yango abimaki mpo na koluka moto moko, kasi abimaki nde mpo na koluka kaka elenge mobali oyo? Kaka zoba, mbala mosusu elenge mobali oyo, nde akoki kondima maloba na ye.”

Nsima ya kosala monzele na ye, na maloba na ye ya elengi, na ndenge apesi ye bizi, na elengi ya bibebu na ye, mwasi mozimbisi yango abakisi nsolo kitoko mpo na kobenda mpenza elenge mobali wana. Alobi boye: “Nabongisi mbeto na ngai na bilamba kitoko, na bilamba malamu [mpenza] bisalami na [molikani] ya Ezipito; nasopi malasi na nsolo malamu na mbeto na ngai, na mola mpe na aloe mpe na kinamomo.” (Masese 7:16, 17) Abongisi mbeto na ye malamumalamu, na elamba ya molikani ya Ezipito ya langilangi mpe asopeli yango malasi ya nsolo ya mpimbo, lokola mola, aloe mpe kinamomo.

Alobi lisusu ete: “Yaká, tótonda na kolingana kino ntango ya ntɔngɔ; tómipesana na esengo ya bolingo.” Azali kobenga elenge mobali oyo kaka te mpo bálya biloko kitoko bango mibale. Azali nde kolaka ye ete bakosangisa nzoto. Yango esepelisi mpenza elenge mobali mpe elamusi mposa na ye! Mpo na kobenda ye lisusu, mwasi yango alobi boye: “Zambi mobali azali na ndako te, akei mobembo molai. Akamataki libenga ya mosolo na lobɔkɔ na ye mpe [akozonga] na ndako bobele na sanza ya sika.” (Masese 7:18-20) Azali komonisa elenge mobali ete eloko ya kobanga ezali te mpamba te mobali na ye akei mobembo mpo na kosala mombongo mpe akozonga noki te. Ya solo, mwasi yango ayebi mpenza kokosa bilenge mibali! “Na maloba mingi na ye na kitoko boye akondimisa ye, na kozimbisa na bibebu na ye akobenda ye.” (Masese 7:21) Esengeli mpenza kozala moto lokola Yosefe mpo abenda yo te. (Genese 39:9, 12) Elenge mobali yango azali na makasi ya koboya?

‘Lokola ngɔmbɛ akei na kobomama’

Salomo alobi ete: “[Alandi] ye nokinoki, lokola ngɔmbɛ akei na kobomama mpe lokola zoba abendami na nkanga mpo na kopesamela etumbu. Kino [mbanzi] ekozokisa [libale, NW] na ye, lokola ndɛkɛ epumbwi epai na [motambo], ayebi te ete akobungisa bomoi na ye.”​—Masese 7:22, 23.

Elenge mobali yango akoki kokanga motema te. Abosani makanisi nyonso ya malamu mpe alandi ye ‘lokola ngɔmbɛ akei na kobomama.’ Lokola moto oyo akangami na minyɔlɔlɔ akoki kokima etumbu na ye te, elenge mobali yango akei kokwea na lisumu. Azali komona likama na yango te tii ntango ‘mbanzi moko ekozokisa libale na ye,’ elingi koloba, tii ntango akozwa mpasi oyo ekomema ye na liwa. Liwa yango ekoki kozala na nzoto, na boye ete azali komitya na likama ya kozwa maladi mabe oyo ezwamaka na kosangisa nzoto.b Mpota yango ekoki mpe koboma ye na elimo, elingi koloba, “akobungisa bomoi na ye.” Ye moko mpe bomoi na ye mobimba ezali na likama, mpe asaleli Nzambe lisumu monene. Azali kokende nokinoki na liwa, lokola ndɛkɛ oyo ekangami na motambo!

‘Koyengayenga na nzela na ye te’

Mokonzi ya mayele apesi liteya na makambo oyo amoni mpe alobi ete: “Bongo, ɛ bana babali, yokamelá ngai [sikoyo], mpe sembolá litoi na maloba ya monɔkɔ na ngai. Tiká te ete motema na yo ebendama na nzela na ye; [koyengayenga na nzela na ye te, NW]. Zambi asili kokweisa mingi na mpota, ɛɛ bato na makasi mingi babomami na ye. Ndako na ye ezali nzela na [Sheole, NW], ekolekisa kino biteni na kufa.”​—Masese 7:24-27.

Toli ya Salomo ezali polele: tókima nzela ya moto ya pite, nzela yango ezali komema na liwa, mpe ‘tózala na bomoi.’ (Masese 7:2) Toli yango ebongi mpenza mpo na mikolo na biso oyo! Na ntembe te, esengeli mpenza tókima bisika ya bato oyo bazelaka ete bákanga moto na motambo na bango. Mpo na nini kokende na bisika yango mpe kozwama na mayele mabe na bango? Mpo na nini osengeli ‘kozanga mayele’ mpe koyengayenga na nzela ya “mopaya”?

“Mwasi mopaya” oyo mokonzi amonaki abendaki elenge mobali na maloba oyo ete ‘bámipesana na esengo ya bolingo.’ Bilenge mingi, mingimingi bilenge basi, bazwamá na maloba ya ndenge yango, boye te? Kasi, kanisá naino: Soki moto azali koluka kobenda yo na pite, yango ezali bolingo to alingi nde akokisa mposa na ye ya nzoto? Soki mpenza mobali alingi mwana mwasi na bolingo ya solosolo, akotinda ye abuka mobeko ya boklisto mpe aboya koyokela lisosoli na ye? Salomo apesi toli ete: ‘Tiká te ete motema na yo ebendama na nzela wana.’

Mbala mingi, maloba ya mozimbisi ezalaka elengi mpe alambaka yango malamu. Soki tozali na bwanya mpe na mayele, ekosalisa biso tómona yango. Soki tozali kobosana mibeko ya Yehova te, yango ekobatela biso. Yango wana, tiká ete tósala ntango nyonso makasi mpo na ‘kobatela malako ya Nzambe mpe kozala na bomoi’ libela na libela.​—1 Yoane 2:17.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bazalaki kobenga “mopaya” bato oyo bazalaki kopesa Nzambe mokɔngɔ na ndenge bazalaki kobuka Mibeko na ye. Yango wana, bazali kobenga mwasi oyo azali na etamboli ya mbindo, na ndakisa mwasi ya ndumba, ete “mwasi mopaya.”

b Maladi mosusu oyo ezwamaka na kosangisa nzoto ebebisaka mabale (foie). Na ndakisa, soki moto aumeli na kasende, mikrobe na yango etondaka na mabale. Lisusu, mikrobe ya sopisi ntango mosusu evimbisaka mabale.

[Bililingi na lokasa 29]

Ndenge nini otalelaka mibeko ya baboti na yo?

[Elilingi na lokasa 31]

Kobatela malako ya Nzambe epesaka bomoi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto