Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/12 nk. 20-23
  • Ndenge oyo okoki kozwa baninga

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge oyo okoki kozwa baninga
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BANINGA YA MALAMU BAZALI NA MOTUYA MINGI
  • ESIKA OYO OKOKI KOZWA BANINGA YA MALAMU
  • BANINGA YA LIBELA
  • Jéhovah—Moyebani na yo to moninga na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • “Bozali baninga na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • “Nabengi bino baninga”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/12 nk. 20-23

Ndenge oyo okoki kozwa baninga

“MONINGA MOKO NA BOMOI MOBIMBA EKOKI; MIBALE ELEKI MINGI; MISATO EZALI MPASI.”​—Henry Brooks Adams.

MALOBA oyo ezali komonisa ete baninga ya malamu bazalaka mingi te. Bato oyo bazali bango moko mpe bazali koluka baninga, mbala mingi balobaka ete, “Namonaka moto ya komipesa na ye te,” “Nakoki kotyela moto motema te,” to “Mbwa na ngai nde moninga na ngai ya motema.”

Kozwa baninga mpe kozala na bango ntango molai ezalaka lisɛki te. Ankɛtɛ moko emonisi ete “na États-Unis kati na bato 100 oyo bakómi mikóló, bato 25 ‘bazalaka kaka bango moko’ mpe . . . na France kati na bato 100 bato 50 basilá kolekisa eleko moko oyo bazalaki kaka bango moko.” Ebele ya masangá ya bokutani oyo ezali kobima, ndenge oyo bato bazali kosolola na nzela ya ordinatɛrɛ mpe ndenge ebele ya bapiblisite ya bato oyo bazali koluka baninga ezali kobima na bazulunalo, ezali komonisa ete bato bazali na mposa makasi ya kozala na bato mosusu.

David Weeks, monganga moko ya maladi ya motó, alobi ete kozala yo moko ebebisaka makanisi mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya moto. Alobi boye: “Nakoki koloba ete kobangabanga mpe mitungisi oyo ekómaka na makanisi ya bato mingi oyo nasalisaka eutaka mpo bazalaka bango moko. Motungisi na makanisi eyaka mingi ntango moto azali ye moko.”

Koboma libala mpe kozanga koyokana na kati ya libota ezali komema bato mingi bázala bango moko. Ankɛtɛ moko esalemaki na Grande-Bretagne emonisaki ete na ebandeli ya ekeke ya 21, na kati ya bato 100, bato soki 30 bakozala kaka bango moko na bandako na bango.

Makomami esakolaki ete na “mikolo ya nsuka” bato mingi bakoluka kaka matomba na bango moko. (2 Timote 3:1-5) Ezali komonana ete bato mingi bazali kolinga mingi biloko ya mokili, lokola ndako to motuka, to mpe misala na bango na esika ya koluka kozala baninga ya bato mosusu. Anthony Storr, ye azali mokomi ya mikanda, alobi boye: “Na esika ya kotya makanisi epai ya basi na bana na bango, makanisi na bango ezalaki mingi na mosala na bango.”

BANINGA YA MALAMU BAZALI NA MOTUYA MINGI

Bomoi na yo etalelaka mingi bizaleli ya baninga oyo ozali na bango. Mbala mingi bato oyo bazalaka bango moko, bazalaka na esengo te mpamba te bazali na baninga te oyo bakabelanaka biloko to kopesana makanisi. Yesu alobaki solo ete: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” (Misala 20:35) George Byron, mokomi ya maloba ya ntɔki, azongelaki likambo yango ntango akomaki boye: “Bato nyonso oyo bakozwa esengo, basengeli kokabola yango.”

Moninga ezali nani? Diksionɛrɛ moko elimboli ete moninga ezali “moto oyo akangami na moto mosusu mpo alingaka ye to asepelaka na ye.” Moninga ya malamu akoki kosalisa yo otya makanisi na yo na makambo ya malamu. Akoki kolendisa mpe kosunga yo na ntango ozali na bosɛnga. Akoki mpe ata koyoka mawa ntango yo ozali na mawa. Mokonzi Salomo alobaki boye: “Moninga akolingaka ntango nyonso; [mpe azali] ndeko abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Mbala mingi motuya ya biloko ya mokili esilaka, nzokande boninga ya solosolo ekolaka mpe ekómaka makasi.

Makomami ezali kolendisa baklisto ete ‘bázipola mitema’ na bango mpo na bolingo. (2 Bakolinti 6:13) Moto ya mayele apesaka bato mosusu mabɔkɔ mpo bázala baninga na ye. Na Mosakoli 11:1, 2, tozali kotánga boye: “Bwaká [limpa, NW] na yo likoló na mai zambi okozwa yango lisusu nsima ya mikolo mingi. Pesá likabo epai na nsambo soko na mwambe mpo ete oyebi te soko mabe nini ekoya na mokili.” Ndenge nini tokoki kosalela likambo yango mpo na kozwa baninga? Soki ozali na baninga mingi, bamosusu bakosalisa yo na ntango ya mpasi.

Baninga ya malamu bakoki mpe kobatela yo. Masese 27:6 elobi boye: “Mpota izokisami na moninga ikondimama.” Bato ebele bakoki kokumisa yo kasi, kaka baninga ya malamu nde bakokumisa yo na ndenge ebongi mpe bakoyebisa yo libunga monene oyo osali mpe bakopesa yo toli ya malamu na bolingo.—Masese 28:23.

Ya solo, baninga ya malamu bazali kati na makabo oyo epesamaka mpambampamba te, bango bakoki komemela yo bolamu. Na Misala mokapo 10, tozali kotánga likambo oyo ekómelaki Koloneli, mokonzi moko ya basoda ya Loma, oyo anzelu moko ayebisaki ye ete Nzambe ayoki mabondeli na ye. Ntango azalaki kozela ntoma Petelo na ndako na ye, Koloneli “ayanganisi [bandeko] na ye na baninga na ye baoyo bafandi penepene na ye.” Baninga yango ya Koloneli bakómaki kati na bato ya liboso ya bikólo mosusu, oyo bakatami ngenga te, oyo bandimaki nsango malamu mpe bapakolamaki na elimo santu, bazwaki elikya ya koyangela na Klisto na Bokonzi ya Nzambe. Talá lipamboli monene boye mpo na baninga ya motema ya Koloneli!—Misala 10:24, 44.

Kasi, okosala nini mpo na kozwa baninga? Biblia, oyo eteyi makambo mingi mpo na boninga, ezali kopesa toli oyo ebongi mpenza na motuna yango. (Talá etanda na nse.)

ESIKA OYO OKOKI KOZWA BANINGA YA MALAMU

Lisangá ya boklisto ezali esika ya malamu mpenza mpo na kozwa baninga ya malamu. Ya liboso, lisangá ezali kopesa yo libaku ya kokóma moninga ya Yehova, Mozalisi na yo mpe Tata na yo ya likoló, mpe Yesu Klisto, Mobikisi na yo. Yesu oyo azali kobenga yo ozala moninga na ye alobaki boye: “Moto te azali na bolingo boleki oyo ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:13, 15) Soki okómi moninga ya Yehova na Yesu Klisto, okoki kozala na elikya ete ‘bakoyamba yo na bandako ya seko.’ Ya solo, soki ozali moninga ya Yehova na Yesu, okozwa bomoi ya seko.—Luka 16:9, NW; Yoane 17:3.

Ndenge nini okoki kokóma moninga na bango? Nzembo 15 emonisi makambo oyo osengeli kosala mpo Yehova ayamba yo na hema na ye lokola moninga na ye. Talá makambo yango na Biblia, mpe tángá bavɛrsɛ mitano ya Nzembo yango. Lisusu, Yesu alobaki boye: “Bino bozali baninga na ngai soko bokosalaka yango esili ngai kolakela bino.”—Yoane 15:14.

Soki ozali koyekola Biblia, Liloba ya Nzambe na motema mobimba mpe ozali kosalela makambo na yango, ozali komonisa ete olingi kozala moninga ya Yehova na Yesu. Yango wana, osengeli mpe koyanganaka na makita ya lisangá ya boklisto, esika bapesaka boyebi ya Yehova. Zalá sembo, yoká ntango Yehova azali koloba, mpe okopusana pene na ye mpe ya Mwana na ye.

Na makita, okoki mpe kokutana na bato oyo balingaka Yehova mpe bamonisaka mbuma ya elimo: bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, mpe komipekisa. (Bagalatia 5:22, 23, NW) Soki olingi mpenza kozwa baninga mpe kotika kozala yo moko, kendáká na makita ya lisangá pɔsɔ na pɔsɔ. Na makita, okomona ete ozali na esika ya malamu mpe na ntango ebongi mpo na kozwa baninga na kati ya bato oyo Nzambe azali kopambola.

BANINGA YA LIBELA

Kozala na baninga ya malamu ezali likabo kitoko ya Yehova Nzambe. Yehova azali moninga malamu mpamba te azali na bizaleli mpe na bomoto ya malamu. Lokola azali bolingo mpe akabaka, asali ebele ya bikelamu ya mayele awa na mabele oyo bakoki kozala baninga na yo. Zalá moninga ya bandeko na yo baklisto. Lendisáká bango. Saláká na bango na mosala ya kosakola. Bondeláká elongo na bango mpe mpo na bango ntango nyonso. Soki ozali kosala bongo nde okolanda ndakisa ya Yehova na Mwana na ye, Yesu Klisto.

Kozwa baninga ezali likabo oyo moto nyonso akoki kopesa mpe kozwa. Na mikolo ezali koya, okozala na libaku ya kokóma na baninga mingi. Bamilio ya bato oyo bazali na bomoi lelo oyo bakoki kokóma baninga na yo, bakisa na bato ya kala oyo bakufá mpe bazali kozela lisekwa ntango “kufa ekozala lisusu te.” (Emoniseli 21:4; Yoane 5:28, 29) Salá makasi sikoyo ozala moninga ya bato, mpe zwá baninga na kati ya bato oyo balingaka Yehova. Yokáká Liloba ya Nzambe mpo ozala ntango nyonso moninga ya Yehova Nzambe na Yesu Klisto. Bongo, libela na libela, okozala lisusu yo moko te.

[Etanda/Bililingi na lokasa 22, 23]

MAKAMBO MOTOBA OYO EKOSALA ETE BONINGA EUMELA

1. ZALÁ MONINGA YA BATO. Babengaki Abalayama “moninga ya Yehova” mpo azalaki na kondima makasi. (Yakobo 2:23) Kasi ezalaki mpe na ntina mosusu. Biblia elobi ete Abalayama azalaki kosala makambo oyo emonisaki ete alingaki Nzambe. (2 Ntango 20:7) Azwaki likanisi ya kosala likambo moko mpe ayebisaki Yehova bamposa na ye. (Genese 18:20-33) Ya solo, osengeli kozala moto ya liboso ya kosala likambo oyo ekomonisa ete ozali moninga ya bato. Yesu alobaki boye: “Bópesa mpe ekopesama na bino.” (Luka 6:38) Ntango mosusu boninga ebandaka kaka na liloba ya kolendisa to mwa lisalisi moke. Ralph Waldo Emerson, moto ya Amerika mpe mokomi ya mikanda, alobaki boye: “Lolenge se moko ya kozwa moninga ezali ya kozala moninga ya bato.”

2. ZWÁ NTANGO YA KOKOLISA BONINGA. Bato mingi balingaka kozala na baninga. Kasi, bazwaka ntango te mpo na kosala molende oyo esengeli mpo na kozwa baninga. Baloma 12:15, 16 ezali kolendisa biso tósepelaka na basusu ntango bazali na bisengo mpe na bolamu, mpe tóyokaka mawa mpe mpasi ntango bazali koyoka yango. Mokapo yango elobi boye: “Bósepelaka na basepeli; bólelaka na baleli. [Bózala, NW] na makanisi ya motindo moko.” Atako azalaki na makambo mingi ya kosala, Yesu Klisto azalaki kolekisa ntango na baninga na ye. (Malako 6:31-34) Kobosana te ete boninga ezali lokola nzete ya fololo, esɛngaka kosopela yango mai mpe kobongisa mabele na yango mpo ebota malamu; nyonso wana esɛngaka ntango.

3. YOKÁKÁ MALAMU NTANGO BAMOSUSU BAZALI KOLOBA. Mbala mingi, bato oyo bayokaka na likebi, ezalaka mpasi te mpo bázala na baninga. Moyekoli Yakobo alobi boye: “Moto nyonso asengeli koyoka noki, awelaka koloba te, ayokaka nkanda noki te.” (Yakobo 1:19, NW) Ntango ozali kosolola na basusu, luká koyeba makambo oyo bazali na yango na motema. Lendisá bango báloba makambo na bango moko. Zalá moto ya liboso ya kokumisa bango. (Baloma 12:10) Okomona ete bakosepela kozala na yo. Nzokande, soki na lisolo nyonso, kaka yo nde ozali koloba to ozali komikumisa, ekozala mpasi mpo omona moto oyo akolinga koyoka yo to kotya likebi na makambo oyo ozali na yango na motema mpe na bamposa na yo.

4. LIMBISÁKÁ BATO. Mokolo moko Yesu ayebisaki ntoma Petelo ete asengeli kolimbisaka “kino mbala ntuku nsambo na nsambo.” (Matai 18:21, 22, NW) Moninga ya malamu alandelaka mabunga ya mikemike te. Tópesa ndakisa: Bato mosusu balingaka kolya bilolo te mpo ezalaka bololo. Kasi, baoyo balingaka kolya bilolo, bayokaka bololo yango te. Baninga ya malamu balinganaka mpo na bizaleli malamu na bango; balandelaka mabunga na bango ya mikemike te. Ntoma Paulo alendisaki biso boye: “Bóyikanaka mpiko, bólimbisanaka.” (Bakolose 3:13) Baoyo balimbisaka bakabwanaka na baninga na bango te.

5. KOKƆTAKA NA MAKAMBO YA BATO TE. Moto na moto, ata mpe moninga na yo, alingaka kozala na sɛkɛlɛ na ye. Masese 25:17 elobi likambo ya mayele ete: “Lokolo na yo ezala mingi na ndako ya mozalani na yo te ete alɛmba na yo te mpe boye ayinana na yo te.” Yango wana, kolekisa ndelo te na kokende epai ya moninga mpe na ntango oyo ozali kolekisa na ye. Koluka te azala kaka moninga na yo moko, noki te, soki azwi baninga mosusu, ekobotela yo zuwa. Zalá na ekɛnge ntango ozali kolobela makambo oyo olingaka mpe makanisi na yo na likambo moko. Soki okosala bongo okozwa baninga ya malamu.

6. KABÁKÁ. Kokaba ekolisaka boninga. Ntoma Paulo apesaki baklisto toli ete ‘bákabelaka bato biloko, básanganaka na bato.’ (1 Timote 6:18) Na ndakisa, zaláká na maloba ya kolendisa basusu. (Masese 11:25) Kokakatanaka te mpo na kopesa longonya mpe kozala na masolo ya kolendisa. Soki ozali mpenza koluka bolamu ya basusu, bakosepela na yo. Kanisáká makambo oyo okoki kosalela bango, kasi koluka kaka te oyo bango bakoki kosalela yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto