“Bozali baninga na ngai”
“Bozali baninga na ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kopesa bino mitindo.”—YOA. 15:14.
1, 2. (a) Baninga ya Yesu bazalaki ndenge nini liboso? (b) Mpo na nini kozala moninga ya Yesu ezali na ntina mingi?
MIBALI oyo bazalaki elongo na Yesu na shambre ya likoló bautaki na mabota ekeseni mpe bazalaki liboso kosala misala ekeseni. Petro ná ndeko na ye Andre bazalaki babomi-mbisi. Matai azalaki liboso mokɔngɔli-mpako—mosala oyo Bayuda bazalaki kotyola. Emonani ete bamosusu, na ndakisa Yakobo ná Yoane, bayebaki Yesu banda kala. Ekoki kozala ete bamosusu, na ndakisa Natanaele, bayebaki ye kaka mwa bambula liboso. (Yoa. 1:43-50) Atako bongo, bango nyonso oyo bazalaki na mpokwa wana na Yerusaleme mpo na fɛti ya Elekeli wana ya ntina mingi bandimisamaki ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki, Mwana ya Nzambe ya bomoi. (Yoa. 6:68, 69) Na ntembe te, bamonaki ete Yesu alingaka bango ntango bayokaki ye azali koloba ete: “Nabengi bino baninga, mpo makambo nyonso oyo nayoki epai ya Tata na ngai, nayebisi bino yango.”—Yoa. 15:15.
2 Lelo oyo, maloba wana oyo Yesu ayebisaki bantoma na ye ya sembo etaleli libosoliboso bakristo oyo batyami mafuta na elimo, kasi, ekoki mpe kotalela baninga na bango “bampate mosusu.” (Yoa. 10:16) Ata soki toutá na libota nini to tozalaki kosala mosala nini liboso, biso mpe tokoki kozala baninga ya Yesu. Boninga na biso na ye ezali na ntina mingi mpamba te kozala baninga na ye elimboli kozala mpe baninga ya Yehova. Kutu, tokoki te kopusana penepene na Yehova soki topusani naino pene na Kristo te. (Tángá Yoane 14:6, 21.) Na yango, tosengeli kosala nini mpo na kokóma mpe kotikala baninga ya Yesu? Liboso tólobela likambo yango ya ntina mingi, tótalela naino ndakisa oyo Yesu ye moko apesaki na oyo etali kozala moninga malamu mpe mateya oyo tokoki kozwa na ndenge oyo bayekoli na ye bamonisaki ete bazali baninga na ye.
Ndakisa ya Yesu na oyo etali kozala moninga malamu
3. Yesu ayebanaki mpo na nini?
3 Salomo, mokonzi ya bwanya, akomaki boye: “Baninga ya mozwi bazalaka ebele.” (Mas. 14:20) Maloba yango emonisi na mokuse ete bato ya kozanga kokoka balukaka boninga oyo ekomemela bango matomba, kasi te oyo ekosɛnga bango bápesaka. Yesu azalaki ndenge wana te. Bomɛngo to lokumu ya bato ezalaki kobenda ye te. Ezali solo ete Yesu alingaki elenge moyangeli moko oyo azalaki mozwi mpe abengaki ye akóma moyekoli na ye. Atako bongo, asɛngaki elenge mobali yango atɛka biloko na ye mpe apesa na babola. (Mrk. 10:17-22; Luka 18:18, 23) Soki Yesu ayebanaki, ezalaki te mpo azalaki moninga ya bato ya mbongo mpe ya lokumu, kasi ezalaki nde mpo azalaki moninga ya bato mpamba mpe oyo batyolamaki.—Mat. 11:19.
4. Mpo na nini tokoki koloba ete baninga ya Yesu bazalaki kosala mabunga?
4 Ya solo, baninga ya Yesu bazalaki kosala mabunga. Mokolo moko, Petro atalelaki makambo na liso ya elimo te. (Mat. 16:21-23) Yakobo ná Yoane bamonisaki ete balingi kozala bato minene ntango basɛngaki Yesu atya bango na bisika ya lokumu na Bokonzi. Ezaleli na bango ekɔtelaki bantoma mosusu, mpe bakómaki kowelana mbala na mbala mpo na koyeba soki nani aleki baninga. Kasi, Yesu amonisaki motema molai mpe asembolaki makanisi ya baninga na ye mpe azalaki kosilikela bango mpambampamba te.—Mat. 20:20-28.
5, 6. (a) Mpo na nini Yesu akobaki kozala moninga ya bantoma na ye? (b) Mpo na nini Yesu akataki boninga na ye na Yudasi?
5 Soki Yesu akobaki kozala moninga ya bato wana ya kozanga kokoka, ezali te mpo azalaki kotika bango básala oyo balingi to mpo azalaki kokanga miso na mabunga na bango. Kasi, aponaki nde kotya likebi na makanisi mpe bizaleli na bango ya malamu. Na ndakisa, Petro, Yakobo mpe Yoane balalaki mpɔngi na esika básɛnzɛla elongo na Yesu ntango akutanaki na komekama makasi. Tokoki kokamwa te ndenge Yesu alɛmbaki nzoto mpo na likambo yango. Atako bongo, amonaki ete basalaki yango na nko te; alobaki boye: “Elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.”—Mat. 26:41.
6 Nzokande, Yesu akataki boninga na ye na Yudasi Mokeriota. Atako Yudasi azalaki komimonisa moninga, Yesu amonaki ete moninga yango ya kala atikaki motema na ye ebeba. Lokola Yudasi akómaki moninga ya mokili, amikómisaki monguna ya Nzambe. (Yak. 4:4) Yango wana, Yesu asilaki kolongola Yudasi na molɔngɔ ya baninga na ye ntango ayebisaki bantoma na ye 11 oyo batikalaki sembo ete bazali baninga na ye.—Yoa. 13:21-35.
7, 8. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaka baninga na ye?
7 Yesu azalaki kotya likebi na mabunga ya baninga na ye te, kasi azalaki kosala makambo mpo na bolamu na bango. Na ndakisa, abondelaki Tata na ye abatela bango ntango bamekami. (Tángá Yoane 17:11.) Yesu azalaki koyeba esika makoki na bango esuki. (Mrk. 6:30-32) Mpe azalaki kaka te koyebisa bango makanisi na ye, kasi azalaki mpe koluka koyeba makanisi mpe mayoki na bango.—Mat. 16:13-16; 17:24-26.
8 Yesu azalaki na bomoi mpe akufaki mpo na bolamu ya baninga na ye. Na ntembe te, ayebaki ete asengeli kopesa bomoi na ye ndenge mibeko esɛngaki mpo na kokokisa mitinda ya boyengebene ya Tata na ye. (Mat. 26:27, 28; Ebr. 9:22, 28) Kasi, Yesu apesaki bomoi na ye mpo na komonisa bolingo na ye. Alobaki boye: “Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo na ye mpo na baninga na ye.”—Yoa. 15:13.
Ndenge oyo bayekoli bamonisaki ete bazali baninga ya Yesu
9, 10. Bato basalaki nini lokola Yesu azalaki na ezaleli ya kopesa?
9 Yesu azalaki kopesa basusu ntango, bolingo, mpe biloko na ye mosusu. Yango wana, bato bazalaki koya epai na ye mpe bazalaki kosepela kokabela ye. (Luka 8:1-3) Na kotalela makambo oyo ye moko akutanaki na yango, Yesu alobaki boye: “Bópesaka, mpe bato bakopesa bino. Bakosopa na mabenga na bino biloko mingi, oyo bafini, baningisi mpe etondi mɛkɛ. Mpo bakomekela bino na emekeli oyo bozali komekela.”—Luka 6:38.
10 Ya solo, bato mosusu balukaki kozala baninga ya Yesu kaka mpo na biloko oyo bakokaki kozwa epai na ye. Baninga yango ya lokuta batikaki ye ntango bakangaki te ntina ya makambo oyo alobaki. Na esika bátyela Yesu motema mpe bándimela ye, bazwaki makanisi ya mabe mpe bapesaki ye mokɔngɔ. Kasi, bantoma batikalaki sembo. Mbala mingi, bakutanaki na makambo oyo ekokaki kotinda bango bátika Kristo, kasi basalaki nyonso mpo na kozala elongo na ye na ntango ya mpasi mpe ya bisengo. (Tángá Yoane 6:26, 56, 60, 66-68.) Na butu na ye ya nsuka awa na mabele, Yesu amonisaki ete alingaki mpenza baninga na ye; alobaki boye: “Bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi na komekama na ngai.”—Luka 22:28.
11, 12. Ndenge nini Yesu amonisaki bayekoli na ye ete alingaki bango kaka, mpe bango basalaki nini?
11 Yesu apesaki bayekoli na ye longonya mpo na bosembo na bango; kasi, mwa moke na nsima kaka bayekoli yango basundolaki ye. Na ntango moko, batikaki ete kobanga bato ekitisa bolingo na bango mpo na Kristo. Na mbala yango mpe, Yesu alimbisaki bango. Nsima ya liwa mpe lisekwa na ye, abimelaki bango mpe ayebisaki bango ete bazali kaka baninga na ye. Apesaki bango mpe mokumba moko mosantu—bákómisa bato “na bikólo nyonso” bayekoli mpe bázala batatoli na ye “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mat. 28:19; Mis. 1:8) Bayekoli basalaki nini?
12 Bayekoli basalaki nyonso oyo bakokaki mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi. Na lisalisi ya elimo santu ya Yehova, baumelaki te kotondisa Yerusaleme na mateya na bango. (Mis. 5:27-29) Ata ntango bakanelaki bango ete bakoboma bango, bakobaki kotosa etinda ya Yesu ya kokómisa bato bayekoli. Nsima ya mwa bambula kobanda ntango bazwaki etinda ya Yesu, ntoma Paulo akomaki ete nsango malamu esakolamaki na “bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.” (Kol. 1:23) Emonani polele ete bayekoli yango bamonisaki ete bapesaki mpenza motuya na boninga na bango na Yesu!
13. Na makambo nini bayekoli ya Yesu batikaki ete mateya na ye etambwisa bango?
13 Bato oyo bakómaki bayekoli batikaki mpe mateya ya Yesu etambwisa bomoi na bango. Mingi kati na bango basengelaki kosala mbongwana monene na etamboli mpe bomoto na bango. Bayekoli mosusu ya sika bazalaki liboso mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, bato ya ekobo, balangwi masanga, mpe miyibi. (1 Ko. 6:9-11) Bamosusu basengelaki kobongisa ndenge na bango ya kotalela bato ya mposo mosusu. (Mis. 10:25-28) Atako bongo, batosaki Yesu. Balongolaki bomoto ya kala mpe balataki oyo ya sika. (Ef. 4:20-24) Bamesanaki na “makanisi ya Kristo,” bayebaki mpe bazalaki komekola ndenge na ye ya kokanisa mpe ya kosala makambo.—1 Ko. 2:16.
Boninga na Kristo lelo oyo
14. Yesu alakaki ete akosala nini na eleko ya “bosukisi ya makambo ya ntango oyo”?
14 Mingi kati na bakristo yango ya ekeke ya liboso bakutanaki mpenza na Yesu to bamonaki ye nsima ya lisekwa na ye. Biso tozwá libaku yango te. Na yango, ndenge nini tokoki kozala baninga ya Kristo? Lolenge moko ezali ya kotosa malako ya moombo ya sembo mpe ya mayele, elingi koloba bandeko ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali naino na bomoi awa na mabele. Yesu alakaki ete na eleko ya “bosukisi ya makambo ya ntango oyo,” akotya moombo yango “abatela biloko na ye nyonso.” (Mat. 24:3, 45-47) Lelo oyo, bato mingi oyo balingi kozala baninga ya Kristo bazali na kati ya etuluku wana te. Ndenge oyo batalelaka malako ya moombo ya sembo ekoki kosala nini na boninga na bango na Kristo?
15. Nini emonisaka soki moto akozala mpate to ntaba?
15 Tángá Matai 25:31-40. Yesu abengaki baoyo bakozala na etuluku ya moombo ya sembo ete bandeko na ye. Na ndakisa ya kokabola bampate mpe bantaba, Yesu alobaki polele ete amonaka ete makambo oyo tosalelaka bandeko na ye, tosalelaka yango nde ye. Kutu, alobaki ete eloko oyo ekomonisa soki moto azali mpate to ntaba ezali makambo oyo azali kosalela “bato oyo baleki mike na kati ya bandeko na [ye].” Na yango, lolenge ya libosoliboso oyo bakristo oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele bamonisaka ete balingi kozala baninga ya Kristo ezali ya kolanda litambwisi ya moombo ya sembo.
16, 17. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali baninga ya bandeko ya Kristo?
16 Soki ozali na elikya ya bomoi na mabele ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, ndenge nini okoki komonisa ete ozali moninga ya bandeko ya Kristo? Tólobela kaka makambo misato. Ya liboso, osengeli komipesa na mosala ya kosakola. Kristo apesaki bandeko na ye etinda básakola nsango malamu na mokili mobimba. (Mat. 24:14) Nzokande, lelo oyo, ekozala mpasi mpo bandeko ya Kristo oyo bazali naino awa na mabele bákokisa mokumba yango soki baninga na bango bampate mosusu basalisi bango te. Ya solo, ntango nyonso oyo mokristo oyo azali na kati ya bampate mosusu abimi na mosala ya kosakola, azali kosalisa bandeko ya Kristo na kokokisa mokumba na bango mosantu. Kristo ná moombo ya sembo mpe ya mayele basepelaka ntango bampate mosusu bazali komonisa boninga na bango na ndenge wana.
17 Lolenge ya mibale oyo bampate mosusu bakoki kosalisa bandeko ya Kristo ezali ya kopesa makabo ya mbongo mpo na kosimba mosala ya kosakola. Yesu alendisaki bayekoli na ye bázwa baninga na nzela ya “bomɛngo oyo ezangi boyengebene.” (Luka 16:9) Yango elingi koloba te ete tokoki kosomba boninga ya Yesu to mpe ya Yehova. Kasi, ntango tozali kosalela biloko na biso ya mosuni mpo na matomba ya Bokonzi, tomonisaka ete tozali baninga mpe tolingaka, kaka na maloba te, kasi “na misala mpe na solo.” (1 Yoa. 3:16-18) Tosalaka yango ntango tobimi na mosala ya kosakola, ntango totye makabo mpo na mosala ya kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya mayangani, mpe ntango topesaka mbongo mpo na kosimba mosala ya kosakola na mokili mobimba. Ata soki topesi mbongo mingi to moke, na ntembe te Yehova mpe Yesu basepelaka ndenge topesaka yango na esengo.—2 Ko. 9:7.
18. Mpo na nini tosengeli kotosa toli euti na Biblia, oyo bankulutu bapesi biso?
18 Lolenge ya misato oyo biso nyonso tokoki komonisa ete tozali baninga ya Kristo ezali ya kolanda malako ya bankulutu na lisangá. Elimo santu nde etyaka mibali yango bankulutu, na litambwisi ya Kristo. (Ef. 5:23) Ntoma Paulo akomaki boye: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango.” (Ebr. 13:17) Ntango mosusu, tokoki komona ete ezali mpasi kotosa toli ya Biblia oyo bankulutu bapesi biso. Mbala mosusu toyebi mabunga na bango, mpe yango ekoki kosala ete tótalela toli na bango malamu te. Atako bongo, Kristo, Mokonzi ya lisangá, asepeli kosalela bato yango ya kozanga kokoka. Yango wana, ndenge oyo totalelaka litambwisi na bango emonisaka soki tozali mpenza baninga ya Kristo to te. Ntango tozali te kolandela mabunga ya bankulutu kasi tozali kolanda litambwisi na bango na esengo, tokomonisa ete tolingaka Kristo.
Esika oyo tokoki kozwa baninga ya malamu
19, 20. Tokoki kozwa nini na kati ya lisangá, mpe tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
19 Yesu azali kokoba kobatela biso kaka te na nzela ya bakɛngɛli ya bolingo, kasi mpe na ndenge azali kopesa biso bamama, bandeko mibali mpe bandeko basi na kati ya lisangá. (Tángá Marko 10:29, 30.) Ntango obandaki koyangana na Batatoli ya Yehova, bandeko na yo ya libota basalaki nini? Ntango mosusu balendisaki yo na milende oyo ozalaki kosala mpo na kopusana penepene na Nzambe mpe Kristo. Atako bongo, Yesu alobaki ete mbala mosusu “banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.” (Mat. 10:36) Koyeba ete na kati ya lisangá tokoki kokuta bandeko oyo bakokangama na biso makasi koleka ata bandeko na biso ya libota, ezali mpenza kolendisa!—Mas. 18:24.
20 Bambote oyo Paulo atindaki na nsuka ya mokanda oyo akomelaki lisangá ya Roma, emonisi ete akómaki na baninga mingi. (Rom. 16:8-16) Ntoma Yoane asukisaki mokanda na ye ya misato na maloba oyo: “Pesá baninga mbote moto na moto na nkombo na ye.” (3 Yoa. 14) Tomoni polele ete Yoane mpe akómaki na baninga mingi ya solosolo. Ndenge nini tokoki komekola ndakisa ya Yesu mpe ya bakristo ya liboso na oyo etali kokóma baninga ya bandeko na biso ya elimo mpe kobatela boninga yango? Lisolo oyo elandi ekoyanola na motuna yango.
Okopesa eyano nini?
• Ndakisa nini Yesu atikaki na oyo etali kozala moninga malamu?
• Ndenge nini bayekoli ya Yesu bamonisaki ete bazali baninga na ye?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali baninga ya Kristo?
[Elilingi na lokasa 14]
Yesu azalaki kotya likebi na makanisi mpe mayoki ya baninga na ye
[Elilingi na lokasa 16]
Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingi kozala baninga ya Kristo?