Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/2 nk. 17-22
  • Luká Yehova liboso ete mokolo ya nkanda na ye eya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Luká Yehova liboso ete mokolo ya nkanda na ye eya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Masɛngami mpo na kobikisama
  • Mpo na nini “soko nde” bakobombama?
  • Banguna ya Nzambe, bósimba likambo oyo!
  • Mawa mpo na bato mabe oyo bazangi limemya!
  • Tókoba koluka Yehova
  • Mokanda ya Biblia nimero 36—Sefania
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • “Zelá ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Tiká ete mabɔkɔ na yo malɛmba te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Landá ndakisa ya basakoli—Sefania
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/2 nk. 17-22

Luká Yehova liboso ete mokolo ya nkanda na ye eya

“Bóluka [Yehova], . . . bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ, soko nde bokobombama na mokolo ya nkanda ya [Yehova].”​—SEFANIA 2:⁠3.

1. Elimo ya bato ya Yuda ezalaki ndenge nini ntango Sefania abandaki mosala na ye ya kosakola?

SEFANIA abandaki mosala na ye ya kosakola na eleko moko ya mpasi mpo na ekólo ya Yuda. Bato ya ekólo yango balɛmbaki mpenza na elimo. Na esika bato bátya elikya na Yehova, bazalaki koluka toli epai ya banganga-nzambe ya mangomba ya bapakano mpe epai ya banganga-minzoto. Na mokili yango, bato ebele bakómaki kosambela Baala mpe kosala milulu na yango ya makambo ya kobota. Bakonzi ya mboka, elingi koloba bana ya bakonzi, bankumu mpe basambisi, bazalaki konyokola bato oyo esengelaki bábatelaka. (Sefania 1:9; 3:3) Yango wana mpenza Yehova azwaki ekateli ya ‘kosembola lobɔkɔ na ye’ mpo na kobebisa Yuda na Yelusaleme!​—Sefania 1:4.

2. Elikya nini ezalaki mpo na basaleli ya sembo ya Nzambe na Yuda?

2 Nzokande, atako makambo ezalaki malamu te, mwa elikya ezalaki. Yosiya, mwana ya Amona, akómaki mokonzi. Atako azalaki naino elenge, Yosiya alingaki mpenza Yehova. Soki mokonzi yango ya sika azongisi losambo ya pɛto na Yuda, bato moke oyo bazalaki kosalela Nzambe ya solo na bosembo bakolendisama mpenza! Mbala mosusu bato mosusu bakolanda bango, mpe balingaki kobika na mokolo ya nkanda ya Yehova.

Masɛngami mpo na kobikisama

3, 4. Tángá masɛngami misato oyo moto asengeli kokokisa mpo na kobatelama na “mokolo ya nkanda ya Yehova.”

3 Bato mosusu bakokaki mpenza kobika na mokolo ya nkanda ya Yehova? Ɛɛ, kasi basengelaki kokokisa masɛngami misato oyo ezali na Sefania 2:2, 3. Ntango tozali kotánga bavɛrsɛ yango, tótya mpenza likebi na masɛngami yango. Sefania akomaki boye: “Naino mobeko ebimi te, mokolo elongwi lokola mpumbulu; naino nkanda monene ya [Yehova] eyeli bino te, naino mokolo ya nkanda ya [Yehova] eyeli bino te. Bóluka [Yehova], bino basɔkɛmi nyonso ya mokili, baoyo bakosalaka malako na ye; bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ, soko nde bokobombama na mokolo ya nkanda ya [Yehova].”

4 Mpo na kobikisama, moto asengelaki (1) koluka Yehova, (2) koluka boyengebene mpe (3) koluka bopɔlɔ. Masɛngami yango ezali mpe na ntina mingi mpo na biso lelo oyo. Mpo na nini? Mpamba te, lokola mokolo ya kokata likambo ekómelaki Yuda na Yelusaleme na ekeke ya nsambo L.T.B., ndenge moko mpe Yehova Nzambe akosukisa makambo na bikólo ya boklisto, to tóloba bato nyonso ya mabe na “bolɔzi monene” oyo ezali koya. (Matai 24:21) Moto nyonso oyo alingi kobatelama na ntango wana asengeli kokanga mabɔkɔ te sikoyo. Asengeli kosala nini? Asengeli koluka Yehova, koluka boyengebene mpe koluka bopɔlɔ lokola ntango eleki naino te!

5. ‘Koluka Yehova’ lelo oyo esɛngi kosala makambo nini?

5 Mbala mosusu okoki koloba ete: ‘Nazali Motatoli ya Yehova, namipesá na Nzambe mpe nazwá batisimo. Nakokisá masɛngami yango, boye te?’ Kasi, nyonso esuki kaka na komipesa na Yehova te. Ekólo ya Yisalaele emipesaki na Yehova, kasi na mikolo ya Sefania, bomoi ya bato ya Yuda ezalaki komonisa te ete bamipesaki na Nzambe. Yango wana, nsukansuka Nzambe aboyaki ekólo yango. Lelo oyo, ‘koluka Yehova’ elimboli mpe kokolisa mpe kobatela boyokani malamu na ye na kati ya ebongiseli na ye awa na mabele. Elimboli koluka koyeba ndenge oyo Nzambe amonaka makambo mpe kotyela makanisi na ye likebi. Mpo na koluka Yehova tosengeli koyekola Liloba na ye malamumalamu, komanyola likoló na yango mpe kosalela yango na bomoi na biso. Tolukaka lisusu toli ya Yehova ntango tomipesi na mabondeli mpe tozali kolanda litambwisi ya elimo santu na ye; na ndenge yango boyokani na biso na Yehova ekolaka mpe tokómaka na mposa ya kosalela ye ‘na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, mpe na nguya na biso mobimba.’​—Deteronome 6:5; Bagalatia 5:22-25; Bafilipi 4:6, 7; Emoniseli 4:11.

6. Ndenge nini ‘tolukaka boyengebene,’ mpe mpo na nini yango ekoki kosalema ata na mokili oyo?

6 Lisɛngami ya mibale oyo Sefania 2:3 elobeli ezali ‘koluka boyengebene.’ Mingi kati na biso tobongwanaki mpenza liboso ya kozwa batisimo lokola baklisto; kasi, na bomoi na biso mobimba, tosengeli ntango nyonso kobatela bizaleli malamu oyo Yehova azali koteya biso. Bato mosusu oyo babandaki malamu, batikaki ete makambo ya mokili oyo ebebisa bango. Koluka boyengebene ezali likambo ya pɛtɛɛ te, mpamba te tozali esika moko na bato oyo bazali komona ete kosala pite, kokosa, mpe kosala masumu mosusu ezali mabe te. Kasi, soki tozali mpenza na mposa ya kosepelisa Yehova, tokoki kolonga mposa nyonso ya koluka kosangana na mokili mpo bato na yango bándima biso. Nzambe aboyaki bato ya Yuda mpo balandaki makambo ya bikólo ya bapakano oyo ezalaki zingazinga na bango. Na esika ya kolanda ndakisa ya bato ya mokili, tózala nde ‘bato oyo bazali kolanda ndakisa ya Nzambe,’ tókolisa ntango nyonso ‘bomoto ya sika oyo esalemi na kolanda mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solo.’​—Baefese 4:24, NW; 5:1, NW.

7. Ndenge nini ‘tolukaka bopɔlɔ’?

7 Likambo ya misato oyo Sefania 2:3 elobeli ezali ete soki tolingi kobombama na mokolo ya nkanda ya Yehova, tosengeli ‘koluka bopɔlɔ.’ Mokolo na mokolo, tokutanaka na mibali, basi mpe bana oyo bazali na bopɔlɔ te. Mpo na bango, kozala moto ya bopɔlɔ ezali mabe. Mpo na bango kozala na botosi emonisi ete ozali na bolɛmbu mpenza. Bazali na makambo makasi, balukaka se bolamu na bango moko mpe bazali na motó makasi; basepelaka ete oyo bamonaka ete ezali “lotomo” na bango mpe makambo oyo balingaka nde esengeli kaka kosalema. Ekozala mpenza mawa mingi soki tolandi bizaleli wana! Oyo ezali ntango ya ‘koluka bopɔlɔ.’ Tokoluka yango ndenge nini? Soki tozali kotosa Nzambe, soki tozali kondima disipilini na ye na komikitisa mpenza mpe soki tozali kosala mokano na ye.

Mpo na nini “soko nde” bakobombama?

8. Maloba “soko nde” na Sefania 2:3, elimboli nini?

8 Tomoni ete Sefania 2:3 elobi ete: “Soko nde bokobombama na mokolo ya nkanda ya [Yehova].” Mpo na nini basaleli maloba “soko nde” ntango bazali koloba na “basɔkɛmi nyonso ya mokili”? Basɔkɛmi yango basalaki makambo ya malamu, kasi esengelaki te bámityela motema koleka. Bakómaki naino na nsuka te. Bamosusu kati na bango bakokaki mpe kokwea na lisumu. Ezali mpe bongo mpo na biso. Yesu alobaki ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” (Matai 24:13) Mpo na kobika na mokolo ya nkanda ya Yehova, tosengeli ntango nyonso kosalaka malamu. Yango nde mokano na yo?

9. Makambo nini ya malamu elenge Mokonzi Yosiya asalaki?

9 Emonani ete maloba ya mosakoli Sefania esimbaki motema ya Mokonzi Yosiya, yango wana akómaki na mposa ya “koluka Yehova.” Makomami elobi ete: “Na [mbula] ya mwambe ya bokonzi na ye, naino [Yosiya] azalaki elenge [azalaki na mbula soki 16], abandaki koluka Nzambe ya Davidi, tata na ye.” (2 Ntango 34:3) Yosiya azalaki mpe ntango nyonso ‘koluka boyengebene,’ mpamba te Biblia elobi ete: “Na [mbula] ya zomi na mibale [ntango Yosiya azalaki na mbula soki 20] abandaki kopɛtola Yuda mpe Yelusaleme, kolongola bisika ya likoló mpe bikeko ya Asela mpe bikeko bikatami mpe bikeko binangolami. Babukaki mpe bitumbelo ya Babaala liboso na ye.” (2 Ntango 34:3, 4) Mpe lisusu, Yosiya ‘alukaki bopɔlɔ,’ amikitisaki mpe asilisaki losambo ya bikeko mpe makambo mosusu ya losambo ya lokuta na mboka. Basɔkɛmi mosusu basepelaki mpenza na makambo oyo asalaki!

10. Nini esalemaki na Yuda na mobu 607 L.T.B., kasi banani babikaki?

10 Na ntango oyo Yosiya azalaki mokonzi, Bayuda mingi bazongaki epai ya Yehova. Kasi, ntango mokonzi yango akufaki, Bayuda mingi bazongelaki banzela na bango ya kala, na misala oyo Nzambe aboyaki mpenza. Lokola Yehova alobaki yango, bato ya Babilone bakweisaki bokonzi ya Yuda mpe babebisaki Yelusaleme, mboka-mokonzi na yango na mobu 607 L.T.B. Atako bongo, elikya esilaki te. Mosakoli Yilimia, Ebede-Meleke Moetiopia, bakitani ya Yonadaba mpe bato mosusu oyo bazalaki sembo epai ya Nzambe babombamaki na ‘mokolo wana ya nkanda ya Yehova.’​—Yilimia 35:18, 19; 39:11, 12, 15-18.

Banguna ya Nzambe, bósimba likambo oyo!

11. Mpo na nini lelo oyo ezali likambo moke te kotikala sembo epai ya Nzambe, kasi likambo nini banguna ya basaleli ya Yehova basengeli kotalela?

11 Wana tozali kozela mokolo ya nkanda ya Yehova, mokolo oyo akoboma mokili oyo mabe, tozali “na komekama ya mitindo na mitindo.” (Yakobo 1:2) Na mikili mingi oyo balobaka ete bato bazali na bonsomi ya losambo, bakonzi ya mangomba bazali kosala nyonso mpo bakonzi ya Leta bányokola basaleli ya Nzambe. Bato ya mitema mabe bazali kokosela Batatoli ya Yehova makambo, bazali koloba ete bazali “mwa lingomba oyo ezali likama mpo na bomoi ya bato.” Nzambe azali komona makambo nyonso oyo bazali kosala mpe akozanga te kopesa bango etumbu. Ebongi ete banguna ya Nzambe bátalela makambo oyo ekómelaki banguna ya basaleli ya Nzambe na ntango ya kala, na ndakisa Bafilistia. Esakweli elobi boye: “Zambi Gaza akotikama mpe Asekelone akozala mpamba; bato na Asedode bakobengana na midi mpe Ekelone akobikolama.” Gaza, Asekelone, Asedode mpe Ekelone ezalaki bamboka minene ya Bafilistia. Bamboka wana nyonso esengelaki kobebisama.​—Sefania 2:4-7.

12. Nini ekómelaki Filistia, Moaba na Amona?

12 Esakweli elobi lisusu boye: “Nayoki kotuka ya Moaba mpe maloba mabe ya bana ya Amona; oyo batukaki bato na ngai na yango mpe balobaki na lolendo mpo na [ndelo] na bango.” (Sefania 2:8) Toyebi ete basoda ya Babilone banyokolaki Ezipito na Etiopia. Kasi, etumbu nini Nzambe apesaki Moaba na Amona, bikólo oyo eutaki na Lota, mwana ya ndeko ya Abalayama? Yehova asakolaki boye: “Moaba akozala lokola Sodomo mpe bana na Amona lokola Gomola.” Bankɔkɔ na bango, Lota na bana na ye mibale ya basi babikaki ntango Nzambe abebisaki Sodomo na Gomola, kasi Moaba na Amona bakokaki kobika na nkanda ya Nzambe te. (Sefania 2:9-12; Genese 19:16, 23-26, 36-38) Lelo oyo, libota ya Bafilistia mpe bamboka na bango ezali wapi? Bongo Moaba na Amona oyo ezalaki na lolendo? Luká ndenge olingi, okomona yango te.

13. Bato ya arkeoloji bamonaki nini na esika oyo Ninive ezalaká?

13 Na mikolo ya Sefania, Bokonzi ya Asulia ekómaki na nguya mingi. Austen Layard, ye azali moto ya arkeoloji, akundolaki eteni moko ya ndako ya mokonzi ya Asulia na mboka-mokonzi Ninive, mpe akomaki boye: “Baplafɔ na yango . . . ekabolamaki na bitenibiteni ya kare, ezalaki na mayemi ya bafololo to ya banyama. Biteni mosusu ezalaki na mpɛmbɛ ya nzoku mpe pembenipembeni na yango ebongisamaki kitoko mpenza. Ekoki kozala ete bapakolaki to bazipaki wolo mpe palata likoló ya makonzi mpe bifelo ya bashambre; lisusu, mpo na misala ya mabaya, basalelaki mabaya oyo emonanaka mingi te, mingimingi mabaya ya ɛlɛzɛ.” Kasi, lokola Sefania asakolaki yango, Asulia esengelaki kobomama mpe Ninive, mboka-mokonzi na yango, esengelaki kokóma “esika ya mpamba.”​—Sefania 2:13.

14. Ndenge nini makambo oyo Sefania asakolaki mpo na Ninive ekokisamaki?

14 Mbula 15 mpamba elekaki kobanda Sefania asakolaki likambo yango, Ninive, mboka ya nguya, ebebisamaki nyonso, na ndako ya mokonzi. Engumba yango ya lofundo ebebisamaki nyɛɛ. Ndenge oyo mboka ebebisamaki esakolamaki polele na maloba oyo: “Ndɛkɛ monene mpe [bamboke] bakofanda na mitó ya makonzi na ye; mingongo na bango ekoyembayemba na maninisa, libebi ekozala na bikɔtelo.” (Sefania 2:14, 15) Bandako minene ya Ninive esengelaki kokóma bisika oyo ebongi mpo na bamboke (porc-épic) mpe bandɛkɛ ya minene. Makɛlɛlɛ ya bato ya mombongo, makɛlɛlɛ ya bato ya bitumba mpe nzembo ya banganga esengelaki koyokana lisusu na babalabala ya mboka yango te. Na babalabala yango oyo liboso ezalaki na makɛlɛlɛ, bakoyoka kaka mongongo ya loyembo ya mawa na lininisa, ntango mosusu ekozala nzembo ya mawa ya ndɛkɛ to makɛlɛlɛ ya mopɛpɛ. Banguna ya Nzambe nyonso bakosuka mpe ndenge yango!

15. Makambo oyo ekómelaki Filistia, Moaba, Amona na Asulia ezali koteya biso nini?

15 Makambo oyo ekómelaki Moaba, Amona, Filistia na Asulia, ezali koteya biso nini? Ezali koteya biso ete lokola tozali basaleli ya Yehova, tosengeli kobangaka banguna na biso te. Nzambe azali komona makambo oyo banguna ya basaleli na ye bazali kosala. Na ntango ya kala, Yehova asukisaki banguna na ye, mpe lelo oyo akopesa mabele mobimba etumbu. Kasi, ezali na bato oyo bakobika: ‘ebele monene oyo bauti na bikólo nyonso.’ (Emoniseli 7:9) Okoki kozala kati na bango se soki ozali ntango nyonso koluka Yehova, koluka boyengebene mpe koluka bopɔlɔ.

Mawa mpo na bato mabe oyo bazangi limemya!

16. Sefania asakolaki nini mpo na bana ya bakonzi mpe bakonzi ya mangomba ya Yuda, mpe mpo na nini maloba yango ebongi mpenza mpo na mangomba ya boklisto?

16 Sikoyo, esakweli ya Sefania elobeli lisusu Yuda mpe Yelusaleme. Sefania 3:1, 2 elobi ete: “Mawa epai na ye oyo atomboki mpe abebi na mbindo, ye mboka na minyoko. Ayokaki mongongo te, ayambaki mpamela te, atalelaki [Yehova] te, abɛlɛmaki na Nzambe na ye te.” Ezali mpenza mawa ete milende nyonso oyo Yehova asalaki mpo na kopesa bato na ye disipilini ekendaki na mai! Motema makasi ya bana ya bakonzi, bankumu, mpe bazuzi ezalaki mpenza mabe. Sefania alobelaki bakonzi yango ya mangomba oyo basilá nsɔni na maloba oyo: “Basakoli na ye bazali bato ya nko, bato bazangi kondima; banganga na ye bakobebisa makambo ya bulɛɛ, babebisi Mobeko.” (Sefania 3:3, 4) Maloba yango ezali komonisa mpenza ezaleli ya basakoli na banganga-nzambe ya mangomba ya boklisto lelo oyo! Bazali ata na limemya te, balongoli nkombo ya Nzambe na Babiblia oyo babongoli mpe bateyi mateya oyo ezali kobebisa lokumu ya Ye oyo bazali koloba ete basambelaka ye.

17. Bato báyoka to báyoka te, mpo na nini tosengeli kotika te kosakola nsango malamu?

17 Yehova azalaki koyebisa libota na ye ya kala na boboto mpenza mpo na likambo oyo alingaki kosala. Atindaki basaleli na ye basakoli, kati na bango tokoki kotánga Sefania na Yilimia, mpo na kolendisa bato na ye bábongola mitema. Ya solo, “[Yehova] . . . asali mabe te. Ntɔngɔ na ntɔngɔ amonisi kosambisa-sembo na ye, na ebandeli ya mokolo na mokolo akozanga te.” Kasi bango basalaki nini? “Kasi moto mabe ayebi koyoka nsɔni te.” (Sefania 3:5) Likebisi motindo moko ezali kopesama lelo oyo. Soki ozali mosakoli ya nsango malamu, ozali kosangana na mosala yango ya kokebisa. Kolɛmba te na kosakola nsango malamu! Bato báyoka to báyoka te, Nzambe azali komona ete ozali kosala mosala ya malamu lokola ozali kosala yango na bosembo nyonso; osengeli koyoka nsɔni te na kosala mosala ya Nzambe na molende.

18. Ndenge nini maloba ya Sefania 3:6 ekokokisama?

18 Etumbu ya Nzambe ekosuka kaka te na kobebisa mangomba ya boklisto. Yehova azali kotɔndɔla bikólo nyonso ya mokili: “[Nalongoli] mabota, mapango na bango ya makasi mabwakami na nse; nabebisi nzela na bango kino moto akotambola na yango te; mboka na bango eyeisami mpamba.” (Sefania 3:6) Maloba ya Yehova ekokokisama mpenza, yango wana alobeli libebi wana lokola nde esi esalemi. Nini ekómelaki bamboka ya Moaba, Amona na Filistia? Mpe nini ekómelaki Ninive, mboka-mokonzi ya Asulia? Ndenge bamboka yango ebebisamaki ezali komonisa ndenge oyo bikólo ya lelo oyo ekobebisama. Basakanaka na Nzambe te.

Tókoba koluka Yehova

19. Mituna nini tosengeli komituna mpenza?

19 Na mikolo ya Sefania, Nzambe alakisaki nkanda na ye na baoyo bazalaki “koyeisa misala na bango nyonso mabe.” (Sefania 3:7) Akosala mpe ndenge moko na ntango na biso. Ozali komona makambo oyo ezali kolakisa ete mokolo ya nkanda ya Yehova ekómi pene? Ozali kokoba ‘koluka Yehova,’ elingi koloba ozali kotánga Liloba na ye mokolo na mokolo? Ozali ‘koluka boyengebene,’ elingi koloba komonisa bizaleli ya pɛto oyo eyokani na mibeko ya Nzambe? Mpe ozali ‘koluka bopɔlɔ,’ elingi koloba ozali komonisa elimo ya komikitisa, ya kotosa Nzambe mpe kotosa bibongiseli oyo azwi mpo na kobikisa bato?

20. Tokotalela mituna nini na lisolo ya nsuka oyo elobeli esakweli ya Sefania?

20 Soki, na bosembo mpenza, tozali kokoba koluka Yehova, koluka boyengebene mpe koluka bopɔlɔ, tokoki kolikya kozwa mapamboli mingi sikoyo, atako na “mikolo ya nsuka” oyo kondima na biso ezali komekama mingi. (2 Timote 3:1-5; Masese 10:22) Kasi, tokoki komituna boye, ‘Ndenge nini biso basaleli ya Nzambe tozali kozwa mapamboli lelo oyo, mpe mapamboli nini ekoya oyo esakweli ya Sefania elaki mpo na baoyo bakobombama na mokolo ya nkanda ya Yehova oyo ezali koya noki?’

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini bato ‘balukaka Yehova’?

• ‘Koluka boyengebene’ elimboli nini?

• Ndenge nini tokoki ‘koluka bopɔlɔ’?

• Mpo na nini tosengeli kokoba koluka Yehova, koluka boyengebene mpe koluka bopɔlɔ?

[Elilingi na lokasa 18]

Ozali koluka Yehova na boyekoli ya Biblia mpe na mabondeli?

[Elilingi na lokasa 21]

Lokola bazali kokoba koluka Yehova, ebele monene bakobika na mokolo ya nkanda na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto