Batelá esengo na yo na mosala ya Yehova
“Bósepelaka ntango nyonso kati na Nkolo. Nazali koloba lisusu ete, Bósepelaka!”—BAFILIPI 4:4.
1, 2. Ndenge nini ndeko moko na libota na ye bazalaki ntango nyonso na esengo atako babungisaki biloko na bango nyonso?
JAMES azali mobange moklisto moko ya mbula 70 oyo afandi na Sierra Leone; amipesaki na mosala bomoi na ye mobimba. Kanisá sikoyo esengo oyo azalaki na yango ntango akómaki na makoki ya kosomba ndako ya shambre minei na mbongo oyo azalaki kobomba mokemoke! James na libota na ye bakɔtaki na ndako na bango; kasi, mwa moke na nsima, bitumba ebandaki na ekólo na bango mpe ndako na bango mobimba ezikaki na mɔ́tɔ. Atako babungisaki ndako na bango, kasi babungisaki esengo na bango te. Mpo na nini?
2 James na libota na ye batyaki makanisi na bango te na biloko oyo babungisaki, kasi batyaki makanisi na bango na biloko oyo batikalaki na yango. James alobi boye: “Ata na ntango oyo makambo ezalaki nsɔmɔ mpenza, tozalaki kosala makita, tozalaki kotánga Biblia, tozalaki kobondela elongo, mpe tozalaki kokabola mwa biloko oyo tozalaki na yango na bato mosusu. Tobatelaki esengo na biso mpamba te totyaki makanisi na biso na boyokani na biso elongo na Yehova.” Lokola bazalaki kotalela mapamboli oyo bazalaki na yango—oyo eleki monene kati na yango ezali kozala baninga ya Yehova—baklisto yango ya sembo bazalaki ‘kosepela ntango nyonso.’ (2 Bakolinti 13:11, NW) Ya solo, ezalaki mpasi mpo na koyikela mokakatano na bango mpiko. Kasi batikaki te kosepela na Yehova.
3. Ndenge nini baklisto mosusu ya liboso babatelaki esengo na bango?
3 Baklisto ya liboso bakutanaki na mikakatano lokola oyo ya James na libota na ye. Kasi, ntoma Paulo akomelaki Baebele oyo bakómaki baklisto ete: “Bondimaki na esengo ete bato bábɔtɔla biloko na bino.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Na nsima, Paulo alimbolaki ntina ya esengo yango: “Mpo ete boyebaki ete bino mpenza bozali na biloko bileki malamu mpe bikoumela.” (Baebele 10:34) Ya solo, baklisto wana ya ekeke ya liboso bazalaki na elikya makasi. Bazalaki na elikya ya kozwa eloko oyo moto akoki kobɔtɔla te, “motole ya bomoi” oyo ekoki kobeba te na Bokonzi ya Nzambe na likoló. (Emoniseli 2:10) Lelo oyo, elikya na biso baklisto, ata soki ezali ya kozala na bomoi na likoló to awa na mabele, ekoki kosalisa biso tóbatela esengo na biso ntango tokutani na mikakatano.
“Bósepelaka na elikya”
4, 5. (a) Mpo na nini toli oyo Paulo apesaki Baloma ete ‘básepela na elikya’ ebongaki mpenza na ntango wana? (b) Nini ekoki kosala ete moklisto abosana elikya na ye?
4 Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye baklisto ya Loma ete ‘básepelaka na elikya’ ya bomoi ya seko. (Baloma 12:12, NW) Baloma basengelaki mpenza na toli yango na ntango wana. Mbula zomi ekokaki kutu te kobanda Paulo akomelaki baklisto wana, bakómaki konyokola bango makasi mpe bamosusu na kati na bango babomamaki na etinda ya Amperɛrɛ Néron. Na ntembe te, kondima na bango ete Nzambe akopesa bango motole ya bomoi, esungaki bango ntango bazalaki konyokwama. Ezali boni mpo na biso lelo oyo?
5 Lokola tozali baklisto, minyoko ekoki mpe koyela biso lelo to lobi. (2 Timote 3:12) Toyebi mpe ete biso nyonso tokutanaka na “ntango mpe makambo ekanami te.” (Mosakoli 9:11, NW) Moto moko oyo tolingaka akoki kokufa na likama. Ndeko na biso to moninga na biso moko ya motema akoki kozwa maladi mpe kokufa. Soki tobateli elikya na biso na Bokonzi te, tokoki kozala na likama na elimo soki mikakatano ya ndenge wana ekómeli biso. Yango wana, ebongi tómituna mituna oyo: ‘Nasepelaka na elikya?’ Mbala boni namanyolaka likoló na yango? Nandimaka mpenza ete Paladiso ekoya? Namimonaka na kati ya Paladiso? Nazalaka mpenza na mposa, lokola na ntango nabandaki koyekola solo, ete nsuka ya mokili oyo eya noki?’ Ebongi mpenza kokanisa motuna oyo ya nsuka malamumalamu; mpamba te, soki tozali nzoto kolɔngɔnɔ, tozali na bomoi ya malamu, tofandi na mboka oyo bitumba ezali te, nzala ezali te, makama ya biloko ya mokili ezali te, tokoki—na ntango wana—kobosana ete tozali mpenza na mposa ya mokili ya sika.
6. (a) Ntango Paulo na Sila banyokolaki bango, batyaki makanisi na bango na nini? (b) Ndenge nini ndakisa ya Paulo na Sila ekoki kolendisa biso lelo oyo?
6 Paulo alendisaki mpe Baloma ete: “Bóyikelaka minyoko mpiko.” (Baloma 12:12, NW) Ye moko Paulo anyokwamaki. Mokolo mosusu, amonaki na emonaneli moto moko oyo ayebisaki ye ete, “Yaká na Makedonia” mpo na kosalisa bato báyeba Yehova. (Misala 16:9) Na yango, Paulo, Luka, Sila na Timote, bazwaki masuwa mpe bakendaki na Mpoto. Bakutanaki na makambo nini kuna? Minyoko! Nsima ya koteya na engumba ya Filipi, na etúká ya Makedonia, babɛtaki Paulo na Sila fimbo mpe batyaki bango na bolɔkɔ. Tomoni polele ete bato mosusu na engumba Filipi basukaki kaka na koboya koyoka nsango ya Bokonzi te, kasi batɛmɛlaki yango makasi. Makambo oyo bamisionɛrɛ yango ya molende bamonaki esilisaki bango esengo? Te. Nsima ya kobɛta bango mpe kotya bango na bolɔkɔ, “na katikati ya butu Paulo na Sila bazalaki kobondela mpe koyembela Nzambe nzembo.” (Biso nde totɛngisi makomi; Misala 16:25, 26) Elingi koloba te ete mpasi ya kobɛtama epesaki Paulo na Sila esengo, kasi bamisionɛrɛ yango batyaki makanisi na bango na makambo wana te. Batyaki makanisi na bango epai ya Yehova mpe na ndenge oyo azalaki kopambola bango. Lokola ‘bayikelaki minyoko mpiko’ na esengo, Paulo na Sila bapesaki bandeko na bango ya Filipi mpe ya bamboka mosusu ndakisa ya malamu.
7. Mpo na nini tosengeli mpe kotɔnda Nzambe na mabondeli na biso?
7 Paulo akomaki ete: “Bótikaka kobondela te.” (Baloma 12:12, NW) Obondelaka ntango otungisami? Obondelaka mpo na makambo nini? Na ntembe te oyebisaka Yehova mikakatano na yo moko mpe osɛngaka ye asalisa yo. Kasi okoki mpe kopesa ye botɔndi mpo na mapamboli oyo azali kopesa yo. Na ntango ya mikakatano, soki tozali kokanisa malamu ya Yehova na makambo oyo azali kosalela biso, ekosalisa biso ‘tósepela kati na elikya.’ Davidi, akutanaki na mikakatano mingi na kati ya bomoi na ye, kasi akomaki boye: “Ɛ [Yehova], Nzambe na ngai, yo osali makambo mingi, misala na yo ya kokamwa mpe mikano na yo izali mpo na biso; mosusu lokola yo azali te. Soko nakoloba mpe nakoyebisa yango, ikoleka oyo ikoki kotángama.” (Nzembo 40:5) Soki tozali kosala lokola Davidi, elingi koloba tozali mbala na mbala kokanisa mapamboli oyo Yehova azali kopesa biso, tokozala na esengo.
Zaláká ntango nyonso na makanisi ya malamu
8. Nini esalisaka moklisto azala na esengo ntango azali konyokolama?
8 Yesu alendisi bayekoli na ye bábatelaka makanisi ya malamu ntango bazali kokutana na mikakatano ndenge na ndenge. Alobi boye: “Esengo na bino soki bafingaka bino mpe banyokolaka bino to bakoselaka bino makambo ya ndenge na ndenge mpo bozali bayekoli na ngai.” (Matai 5:11, Boyokani ya Sika) Makambo nini ekoki kopesa biso esengo na ntango wana? Lokola tozali koyikela botɛmɛli mpiko, ezali komonisa ete tozali na elimo ya Yehova. Ntoma Petelo ayebisaki baninga na ye baklisto na ntango na ye ete: “Esengo na bino soko bokotukama mpo na nkombo ya Klisto, mpo ete [elimo, NW] ya nkembo mpe ya Nzambe ezali koumela na bino.” (1 Petelo 4:13, 14) Na nzela ya elimo na ye, Yehova akosalisa biso tóyika mpiko, mpe na ndenge yango, tokobatela esengo na biso.
9. Nini esalisaki bandeko mosusu bámona makambo oyo ekoki kopesa bango esengo ntango bakɔtaki bolɔkɔ mpo na kondima na bango?
9 Ata soki tokutani na mikakatano ya makasi mpenza, tokoki kozala na makambo oyo ekopesa biso esengo. Moklisto moko nkombo na ye Adolf, amonaki mpenza ete ezali bongo. Ye afandi na ekólo moko oyo mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na boumeli ya bambula ebele. Bakangaki Adolf na baninga na ye mingi mpe bakatelaki bango etumbu ya bambula ebele na bolɔkɔ, mpamba te balingaki te kotika kotosa mitinda ya Biblia. Na bolɔkɔ bayokaki nsuka ya bwale, kasi lokola Paulo na Sila, Adolf na baninga na ye bazalaki na makambo oyo etindaki bango bápesa Nzambe matɔndi. Balobaki ete bambula oyo balekisaki na bolɔkɔ elendisaki kondima na bango mpe esalisaki bango bálona bizaleli ya ntina oyo esengeli ete moklisto azala na yango, bizaleli lokola kokaba, kozala na motema mawa, mpe kolinga bandeko. Na ndakisa, soki batindeli moko na bango mwa biloko, azalaki kokabela bandeko mosusu, mpe bazalaki kotalela mwa biloko yango lokola makabo oyo ezalaki kouta epai ya Yehova, Mopesi monene ya “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi.” Kosalela baninga boboto ndenge wana ezalaki kopesa esengo epai ya moto oyo akabi mpe epai ya baoyo bazalaki kokabela. Tomoni ete likambo oyo esalemaki mpo na kolɛmbisa kondima na bango, ebakiselaki bango kutu nde makasi na elimo!—Yakobo 1:17; Misala 20:35.
10, 11. Ndenge nini ndeko mwasi moko ayikaki mpiko ntango bazalaki kotuna ye mituna mbala na mbala mpe na nsima ntango bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ ya bambula ebele?
10 Ella afandi na mboka moko oyo mosala ya kosakola Bokonzi epekisamaki na boumeli ya bambula ebele; bakangaki ye mpe mpo azalaki kosakola. Na boumeli ya sanza mwambe mobimba, bazalaki mbala na mbala kotuna ye ebele ya mituna. Nsukansuka, basambisaki ye na tribinale, bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ mbula zomi mpe batyaki ye na bolɔkɔ epai azalaki kaka ye moko mosaleli ya Yehova. Na ntango wana Ella azalaki na mbula 24 mpamba.
11 Tobanzi te ete Ella azalaki na mposa ya kolekisa bolenge na ye na kati ya bolɔkɔ. Kasi, lokola azalaki na ndenge mosusu ya kosala te, amonaki malamu atalela makambo ndenge mosusu: akómaki kotalela bolɔkɔ lokola teritware na ye mpo na kosakola. Alobi ete: “Nazalaki kosakola mingi, yango wana namonaki ete bambula elekaki noki mpenza.” Nsima ya mbula mitano na mwa basanza, babengisaki ye lisusu mpo na kotuna ye mituna. Lokola basambisi bamonaki ete etumbu ya bolɔkɔ elɛmbisaki kondima na ye te, balobaki na ye ete: “Tokobimisa yo te mpo obongwani te.” Ella alobaki na mpiko ete: “Bomikosi, nabongwani mingi! elimo na ngai ekómi malamu koleka ntango nakɔtaki bolɔkɔ, mpe kondima na ngai ekómi makasi koleka!” Alobaki lisusu ete: “Soki bobimisi ngai na bolɔkɔ te, nakozela tii Yehova ye moko akomona malamu abimisa ngai.” Atako Ella alekisaki mbula mitano na ndambo na bolɔkɔ, abungisaki esengo na ye te! Amesanaki kozala na esengo ata soki akutani na makambo nini na bomoi ye. Ndakisa na ye ekoki koteya yo nini?—Baebele 13:5.
12. Ndenge nini moklisto oyo azali na mikakatano akoki kozwa kimya ya makanisi?
12 Kokanisa te ete Ella azali na nguya ya ndenge mosusu oyo esalaki ete ayikela mikakatano wana mpiko. Mpo na ntango bazalaki kotunatuna ye mituna liboso bátya ye na bolɔkɔ, Ella alobi boye: “Nazali koyeba lisusu ete mino ezalaki kolɛnga, nazalaki komiyoka lokola mwa ndɛkɛ ezali kobanga.” Atako bongo, Ella azalaki na kondima makasi epai ya Yehova. Ayekolaki kotyela ye motema. (Masese 3:5-7) Sikoyo, koleka ndenge ezalaki liboso, akóma komona ete Nzambe azali mpenza. Alobi ete: “Soki kaka nakɔti na esika oyo bazalaki kotuna ngai mituna, nazalaki koyoka kimya na motema na ngai. . . . Ntango makambo ezalaki koya ndongo, kimya na ngai mpe ezalaki kobakisama.” Yehova nde azalaki kopesa kimya yango. Ntoma Paulo alobi boye: “Bómitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tiká ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. Mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso, ekosɛnzɛla mitema na bino mpe [makanisi] na bino kati na Klisto Yesu.”—Bafilipi 4:6, 7.
13. Nini ezali kondimisa biso ete soki tokutani na monyoko, tokozala na makasi ya koyikela yango mpiko?
13 Lelo oyo Ella abimá na bolɔkɔ, kasi azali kaka na esengo na ye atako bampasi nyonso wana. Ayikaki mpiko na makasi na ye moko te kasi na makasi oyo Yehova apesaki ye. Ezalaki bongo mpe mpo na ntoma Paulo, ye akomaki boye: “Nakomikumisa na esengo kati na bolɛmbu ete nguya ya Klisto efanda likoló na ngai. . . . Mpo wana ezali ngai na bolɛmbu, bongo nazali na nguya.”—2 Bakolinti 12:9, 10.
14. Monisá ndenge oyo moklisto akoki kozwa makanisi ya malamu na likambo moko oyo ezali kotungisa ye mpe mbuma malamu oyo yango ekoki kobota.
14 Mbala mosusu makambo oyo touti kolobela ekeseni na makambo oyo ezali kotungisa yo lelo. Kasi, motungisi nyonso ezalaka kaka mpasi mpo na koyikela yango mpiko. Na ndakisa, ekoki kozala ete patron na yo alobaka kaka mabe mpo na mosala oyo osali, kasi misala ya basali mosusu oyo bazali Batatoli te alobelaka yango bongo te. Mbala mosusu mpe likoki ya kozwa mosala mosusu ezali te. Okosala nini mpo obungisa esengo na yo te? Kanisá lisusu Adolf na baninga na ye; bolɔkɔ esalisaki bango bákolisa bizaleli mosusu ya malamu. Soki ozali kosala molende ya solosolo mpo patron na yo asepela na mosala na yo, ata soki ‘azali matata,’ okolona bizaleli malamu ya moklisto lokola koyika mpiko mpe motema molai. (1 Petelo 2:18, Boyokani ya Sika) Lisusu, okoki kokóma mosali ya malamu koleka, yango ekoki kosalisa yo ete mokolo mosusu ozwa mosala oyo ekosepelisa yo. Sikoyo, tólobela naino ndenge mosusu oyo okoki kobatela esengo na yo na mosala ya Yehova.
Koyeisa makambo pɛpɛlɛ epesaka esengo
15-17. Makambo nini oyo mobali moko na mwasi na ye bayekolaki ete ekoki kokitisa mitungisi na bango, atako bakokaki te kobongola makambo oyo ezalaki komema yango?
15 Ekoki kozala mpasi mpo ozwa mosala mosusu to okende kosala esika mosusu, kasi ezali na makambo mosusu oyo okoki kobongola na bomoi na yo. Talelá ndakisa oyo elandi.
16 Mobali moko moklisto na mwasi na ye, babengisaki nkulutu moko akende kolya na ndako na bango. Ntango bazalaki kosolola na mpokwa wana, ndeko mobali na mwasi na ye bayebisaki nkulutu yango ete mpasi ya bomoi ekómi koleka bango motó. Bango mibale bazalaki na misala oyo ezalaki kozwa bango mokolo mobimba, kasi bazalaki na likoki ya koluka mosala mosusu te. Bazalaki komituna soki bakosuka wapi na bomoi ya ndenge wana.
17 Ntango basɛngaki nkulutu toli, ayebisaki bango ete: “Bókómisa makambo pɛpɛlɛ.” Ndenge nini? Mokolo na mokolo, bango mibale bazalaki kolekisa ngonga soki misato mpo na kokende na mosala mpe kozonga. Lokola nkulutu yango ayebaki bango malamu, apesaki bango likanisi ete báluka ndako pene na esika na bango ya mosala; na ndenge yango, bakozala na mposa ya ntango mingi te mpo na kokende mpe kozonga na mosala. Bakotikala na ntango oyo bakoki kosala na yango makambo mosusu to mpe kopema. Soki mikakatano ya bomoi ezali kozangisa yo esengo, kanisá ndenge oyo okoki koyeisa makambo mosusu pɛpɛlɛ.
18. Mpo na nini kokanisa malamumalamu liboso ya kozwa bikateli ezali na ntina mingi?
18 Ndenge mosusu ya kokitisa mikakatano ezali kokanisa malamumalamu liboso ya kozwa bikateli. Na ndakisa, moklisto moko azwaki mokano ya kotonga ndako. Atako atongá naino ndako te na bomoi na ye, aponaki plan moko ya mindɔndɔ. Na nsima, asosolaki ete akokaki kokima mikakatano mosusu soki ‘atalaki malamu nzela ekokenda ye’ liboso ete apona plan ya ndako na ye. (Masese 14:15) Moklisto mosusu mpe andimaki kopesa ndanga mpo na ndeko mosusu oyo alingaki kodefa mbongo. Mikanda oyo basalaki elobaki ete soki modefi akoki kofuta te, moto oyo atyaki sinyatire na ye ete andimi kopesa ndanga, ye akofuta yango. Na ebandeli, matata ezalaki te, kasi na nsima, ndeko oyo adefaki azalaki lisusu kofuta nyongo na ye te. Modefisi akómaki kotungisa mpe asɛngaki ete ndeko oyo andimaki kopesa ndanga, afuta nyongo wana nyonso. Likambo yango ekómaki motungisi mpo na ndeko oyo apesaki ndanga. Omoni ete akokaki kokima mindɔndɔ nyonso wana soki atalelaki malamumalamu makambo nyonso liboso andima kopesa ndanga mpo na nyongo!—Masese 17:18.
19. Wapi ndenge mosusu oyo tokoki kokitisa mitungisi na bomoi na biso.
19 Ntango tolɛmbi, tókanisa ata moke te ete tokoki kokitisa mitungisi na biso mpe kozala lisusu na esengo soki tozali koyekola Biblia mingi te, tolɛmbisi mwa moke na mosala ya kosakola mpe tokómi kozangisa makita mosusu. Tómikosa te, yango ezali nde makambo oyo na nzela na yango tokoki kozwa elimo santu ya Yehova, oyo moko ya mbuma na yango ezali esengo. (Bagalatia 5:22) Mbala mingi, misala ya boklisto epesaka makasi, kasi elɛmbisaka mingi te. (Matai 11:28-30) Mbala mingi ezali nde mosala na biso mpe makambo oyo tozali kosala mpo na konyolisa nzoto to kokende kozwa mopɛpɛ nde elɛmbisaka biso, kasi ezali makambo ya elimo te. Soki tozwi momeseno ya kolala na ngonga ya malamu, ekoki kosalisa biso tózwa lisusu makasi. Soki mpe tozwi mwa mikolo mpo na kopema, ekoki ntango mosusu kozala na litomba. Ndeko Nathan Knorr, oyo azalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi tii liwa na ye, mbala mingi azalaki koyebisa bamisionɛrɛ boye: “Ntango olɛmbi, osengeli libosoliboso koluka kopemisa nzoto. Okokamwa ete mokakatano ekómaka moke nsima ya kolala mpɔngi malamu na butu!”
20. (a) Tángá makambo mosusu oyo tokoki kosala mpo na kobatela esengo na biso. (b) Makambo nini okoki kokanisa mpo ozala na esengo? (Talá etanda na lokasa 17.)
20 Baklisto bazali na libaku malamu ya kosalela “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11, NW) Ndenge tomoni yango, tokoki kobatela esengo na biso ata ntango tozali na mikakatano makasi. Tótya ntango nyonso elikya ya Bokonzi na makanisi na biso, tóbongola ndenge na biso ya kotalela makambo soki esengeli mpe tózala na bomoi ya mindɔndɔ te. Na ndenge yango, ata soki tokutani na makambo nini na bomoi na biso, tokolanda toli ya ntoma Paulo oyo alobaki ete: “Bósepelaka ntango nyonso kati na Nkolo. Nazali koloba lisusu ete, Bósepelaka!”—Bafilipi 4:4.
Talelá mituna oyo malamu:
• Mpo na nini baklisto basengeli kobatela elikya ya Bokonzi na makanisi na bango?
• Nini ekoki kosalisa biso tózala na esengo na biso ata na ntango ya mpasi?
• Mpo na nini tosengeli koluka koyeisa bomoi na biso pɛpɛlɛ?
• Bato mosusu basali nini mpo báyeisa bomoi na bango pɛpɛlɛ?
[Etanda/Bililingi na lokasa 17]
Bantina mosusu ya kozala na esengo
Biso baklisto tozali na bantina mingi ya kozala na esengo. Na ndakisa:
1. Toyebi Yehova.
2. Toyekoli mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe.
3. Nzambe akoki kolimbisa masumu na biso na lisalisi ya mbeka ya Yesu.
4. Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela, etikali moke tókɔta na mokili ya sika!
5. Yehova atii biso na paladiso ya elimo.
6. Tozali na baninga ya malamu, bandeko na biso baklisto.
7. Tozali na libaku malamu ya kosakola.
8. Tozali na bomoi, mpe tozali na nzoto makasi.
Okoki lisusu kotánga bantina nini?
[Elilingi na lokasa 13]
Ata na kati ya bolɔkɔ, Paulo na Sila bazalaki na esengo
[Bililingi na lokasa 15]
Makanisi na yo ezali na elikya ya mokili ya sika?