Lisolo ya bomoi
Kokende liboso na nzela ya Yehova epesaka biso makasi mpe esengo
YA LUIGGI D. VALENTINO
Yehova apesi toli oyo: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.” (Yisaya 30:21) Banda nazwá batisimo, esili koleka mbula 60, mokano na ngai ezalaka ya kolanda toli yango. Nazwaki mokano yango na bomwana na kolanda ndakisa ya baboti na ngai, oyo bautaki na Italie mpo na koya kofanda na engumba ya Cleveland, na etúká ya Ohio na États-Unis, na 1921. Ezali na engumba yango nde babɔkɔlaki bana na bango misato—ngai, yaya na ngai ya mobali Mike, mpe leki na ngai ya mwasi Lydia.
BABOTI na ngai bazalaki kotalela mangomba mingi mpo na koluka koyeba oyo ezali mpenza lingomba ya solo, kasi nsukansuka balɛmbaki nzoto mpamba te bazwaki yango te. Nsima na yango, mokolo moko na 1932, Tata azalaki kolanda emisyo moko ya radio na lokota ya Italien. Ezalaki emisyo ya Batatoli ya Yehova, mpe Tata asepelaki na makambo oyo ayokaki. Atindaki mokanda na Betele mpo na koyeba makambo mosusu, yango wana biro monene ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na Brooklyn (New York) etindelaki biso Motatoli moko oyo azalaki moto ya Italie. Nsima ya lisolo moko ya kitoko mpenza oyo eumelaki kino na ntɔngɔ, baboti na ngai bandimaki mpenza ete bamoni lingomba ya solo.
Tata na Mama bakómaki koyangana na makita ya boklisto mpe bazalaki kosepela koyamba bakɛngɛli-batamboli na ndako na bango. Atako nazalaki naino elenge, bato yango bazalaki kosepela ete nabimaka na bango na mosala ya kosakola, mpe bazalaki kolendisa ngai nakanisa kosalela Yehova mosala ya ntango nyonso. Moko ya bakɛngɛli yango ezalaki Carey Barber, oyo azali lelo na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Eumelaki te, na sanza ya Febwali 1941, nabatisamaki, wana nazalaki na mbula 14; mpe na 1944 nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na engumba ya Cleveland. Mike na Lydia mpe balandaki nzela ya mateya ya solo ya Biblia. Mike asalelaki Yehova tii na liwa na ye, mpe Lydia asalaki elongo na mobali na ye Harold Weidner mbula 28 na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Lelo oyo, bazali babongisi-nzela minene, oyo ezali mpe mosala ya ntango nyonso.
Bolɔkɔ ekolisi mokano na ngai ya kokende liboso
Na ebandeli ya 1945, bakɔtisaki ngai na bolɔkɔ ya etúká ya Ohio mpo ete lisosoli na ngai oyo eteyami na Biblia etindaki ngai ete natosa maloba ya Yisaya 2:4, oyo elobeli kotula mipanga ete ezala bitimweli. Ekómaki ntango moko, bakonzi ya bolɔkɔ bapesaki Batatoli oyo bazalaki na bolɔkɔ ndingisa ya kozala kaka na mwa ndambo ya mikanda oyo Batatoli ya Yehova babimisaka mpo na kolimbola Biblia. Kasi Batatoli ya lisangá moko oyo ezalaki pene na bolɔkɔ bazalaki kosunga biso. Ntango mosusu, bazalaki koya kotika mwa mikanda na bilanga oyo ezalaki pene na bolɔkɔ. Na ntɔngɔ oyo ezalaki kolanda, ntango bazalaki kokende kotika bato ya bolɔkɔ na bisika na bango ya mosala, bazalaki kozwa mikanda yango mpe kosala nyonso mpo na kokɔtisa yango na kati ya bolɔkɔ. Na ntango oyo nakɔtaki bolɔkɔ yango, tozwaki ndingisa ya kozala na mikanda mingi. Atako bongo, nazwaki mpenza liteya mpo na oyo etali kozwa na motuya mingi bilei ya elimo oyo Yehova apesaka biso—nakanisaka liteya yango ntango nyonso oyo nazwaka nimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká!
Atako bapesaki biso nzela ya kosala makita ya lisangá na kati ya bolɔkɔ, baboyaki ete baoyo bazalaki Batatoli te bázalaka wana. Atako bongo, bakonzi mosusu ya bolɔkɔ mpe bakangami mosusu bazalaki kokɔta na ndenge ya kobombana, mpe bamosusu na kati na bango bandimaki solo. (Misala 16:30-34) Tozalaki kobɔndisama mingi ntango Ndeko Alexandre Macmillan azalaki koya kotala biso. Azalaki ntango nyonso kolendisa biso ete ntango oyo tozali kolekisa na bolɔkɔ ezali ntango ya mpamba te; ezali nde kobɔngisa biso mpo na mikumba oyo tokozwa na mikolo ekoya. Ndeko molingami wana mobange asimbaki mpenza motema na ngai mpe akómisaki lisusu mokano na ngai ya kokende liboso na nzela ya Yehova makasi.
Nazwi molongani
Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki, bikuke ya bolɔkɔ efungwamaki, mpe nazongelaki mosala ya mobongisi-nzela, oyo ezali mosala ya ntango nyonso. Kasi na 1947, tata na ngai akufaki. Mpo na kosunga libota, nazwaki mosala mpe nayekolaki kosala massage médical—mayele oyo esalisaki ngai na ntango ya mpasi oyo ngai na mwasi na ngai tokutanaki na yango mbula soki 30 na nsima. Kasi, nazali kobɛta lisolo na ngai kozanga kolobela ndenge oyo makambo elandanaki mpenza. Liboso, tiká nabɛtela bino lisolo ya mwasi na ngai.
Na 1949, mokolo moko nsima ya midi, ntango nazalaki na kati ya Ndako ya Bokonzi, telefone elelaki. Nazwaki yango mpe nayokaki mongongo moko ya kitoko ezali koloba ete: “Nkombo na ngai Christine Genchur. Nazali Motatoli ya Yehova. Nayaki na Cleveland mpo na koluka mosala, mpe nalingi kosangana elongo na lisangá moko.” Ndako na biso ya Bokonzi ezalaki mosika na esika oyo ye azalaki kofanda, kasi nasepelaki na mongongo na ye; na bongo nalakisaki ye ndenge nini akoki kosala mpo na kokóma na Ndako na biso ya Bokonzi, mpe nalendisaki ye ete aya na mokolo ya lomingo—mokolo oyo nasengelaki kosala lisukulu ya bato nyonso. Na mokolo ya lomingo, nazalaki moto ya liboso ya kokóma na Ndako ya Bokonzi, kasi namonaki te ndeko mwasi moko ya sika. Ntango nazalaki kosala lisukulu, nazalaki ntango nyonso kotala na monɔkɔ ya ndako, kasi moto moko ya sika akɔtaki te. Mokolo oyo elandaki, nabengaki ye na telefone, mpe ayebisaki ngai ete ayebaki naino malamumalamu te banzela oyo babisi elekaka. Na bongo, nayebisaki ye ete ngai moko nakoluka ndenge ya kokutana na ye mpo na kolimbolela ye makambo malamumalamu.
Ayebisaki ngai ete baboti na ye, oyo bautaki na Tchécoslovaquie mpo na kofanda na États-Unis, babandaki kosangana na Bayekoli ya Biblia nsima ya kotánga mwa buku Bakufi bazali wapi? Baboti na ye bazwaki batisimo na 1935. Na 1938, tata ya Christine akómaki mosaleli ya etuluku (lelo mokɛngɛli-mokambi) ya lisangá moko ya Batatoli ya Yehova na engumba ya Clymer, na Pennsylvanie (États-Unis); mpe na 1947, Christine azwaki batisimo wana azalaki na mbula 16. Naumelaki te mpo na kolinga ye, mpo ete azalaki ndeko mwasi moko kitoko mpe ya elimo. Tobalanaki na mokolo ya 24 Yuni 1950, mpe kobanda wana, Christine azali molongani na ngai ya sembo, oyo atyaka ntango nyonso matomba ya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso. Nazali na botɔndi mingi epai ya Yehova mpo ete molongani oyo ya makoki andimaki kosangisa bomoi na ye na oyo ya ngai.—Masese 31:10.
Likambo moko ya kokamwa
Na mokolo ya 1 Novɛmbɛ 1951, tobandaki elongo mosala ya mobongisi-nzela. Mbula mibale na nsima, na liyangani moko oyo esalemaki na engumba ya Toledo, na etúká ya Ohio, Ndeko Hugo Riemer na Ndeko Albert Schroeder basololaki na etuluku ya babongisi-nzela oyo bazalaki kosepela na mosala ya misionɛrɛ. Biso mpe tozalaki na kati na bango. Balendisaki biso tókoba na mosala ya mobongisi-nzela na Cleveland, kasi na sanza oyo elandaki, likambo moko ya kokamwa ekómelaki biso: babengaki biso ete tókɔta na kelasi ya mbala ya 23 ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, oyo esengelaki kobanda na sanza ya Febwali 1954!
Ntango tozalaki kokende na eteyelo ya Gileadi na motuka, na ntango wana eteyelo yango ezalaki na engumba ya South Lansing, na New York, Christine azalaki kobanga; yango wana azalaki ntango nyonso koyebisa ngai ete “Kúmba malɛmbɛ!” Nalobaki na ye ete: “Christine, sikoyo nazali kokumba malɛmbɛ, soki nakitisi lisusu mbangu motuka ekotɛlɛma.” Ntango tokómaki na eteyelo, toumelaki te mpo na komiyoka mpenza malamu. Ndeko Nathan Knorr atombelaki bayekoli nyonso boyei malamu mpe atambwisaki biso mpo na kolakisa biso Gileadi. Alimbolelaki biso mpe ndenge ya kobatela mai na kura, komonisáká ete koyeba kobomba ezali moko ya bizaleli malamu oyo tosengeli kozala na yango mpo na kobatela matomba ya Bokonzi. Toli wana etikalá libela na makanisi na biso. Tosalelaka yango tii lelo.
Tokei na Rio
Eumelaki te tozwaki badiplome, mpe na mokolo ya 10 Desɛmbɛ 1954, wana ezalaki naino eleko ya malili na New York, tomataki na mpɛpɔ mpe totondaki na mposa ya kokóma na esika oyo batindaki biso: Rio de Janeiro (Brésil), epai moi engalaka makasi. Peter Carrbello na mwasi na ye Billie, baninga na biso bamisionɛrɛ, basalaki mobembo elongo na biso. Mobembo wana na mpɛpɔ esengelaki koumela ngonga 24 mpo esengelaki kokita naino na Porto Rico, na Venezuela mpe na engumba ya Belém oyo ezali na nɔrdi ya Brésil. Nzokande, mpo na mikakatano ya motɛrɛ, tosalaki ngonga 36 liboso ya komona Rio de Janeiro. Kasi, oyo nde engumba kitoko! Engumba yango ezalaki kongɛnga lokola diama oyo ezali kongala likoló ya tapi ya moindo, mpe pole ya sanza ezalaki kongɛnga likoló ya mai ya Guanabara Bay lokola palata.
Bandeko mingi ya Betele bayaki kozela biso na libándá ya mpɛpɔ. Nsima ya kotombela biso boyei malamu na esengo mpenza, bamemaki biso na biro ya filiale, mpe tokendeki kolala soki na ngonga ya misato ya ntɔngɔ. Eumelaki te, ngonga ebɛtaki mpo biso nyonso tólamuka; yango emonisaki biso ete mokolo na biso ya liboso lokola bamisionɛrɛ ebandi!
Liteya ya liboso
Nokinoki, toyekolaki liteya moko ya ntina mingi. Tolekisaki mpokwa moko na ndako ya libota moko ya Batatoli. Ntango tolingaki kozonga na Betele, mokóló-ndako alobaki ete: “Te, bokoki kokende te; mbula ezali kobɛta,” mpe asalaki nyonso mpo ete tólala epai na ye. Mpo ete atika biso tókende, nayebisaki ye lokola lisɛki ete: “Epai touti, mbula mpe ebɛtaka.” Mpe mbala moko tokendeki.
Lokola bangomba ebele ezali zingazinga ya Rio, mai ya mbula esanganaka mbala moko mpe ekómaka kotyola na kati ya engumba; yango esalaka ete mbala mingi bandako na bisika mosusu etonda na mai. Mosika te, na nzela oyo tozalaki kotambola, mai ekómelaki biso tii na mabɔlɔngɔ. Pene na Betele, babalabala ebongwanaki bibale, mai ezalaki kotyola makasi mpe ekómelaki biso tii na ntolo. Nsukansuka, ntango tokómaki na Betele, topɔlaki mpenza. Mokolo oyo elandaki, Christine azalaki komiyoka malamu te; azwaki fièvre typhoïde, abɛlaki ntango molai. Na ntembe te, lokola tozalaki bamisionɛrɛ ya sika, esengelaki nde tólanda toli ya Batatoli ya mboka wana oyo bayebaki makambo mingi ya mboka na bango.
Ebandeli ya mosala ya misionɛrɛ mpe ya mokɛngɛli-motamboli
Nsima ya mokakatano wana, tobandaki mosala na biso ya kosakola. Moto nyonso oyo tozalaki kokutana na ye, tozalaki kotángela ye maloba ya kobanda lisolo oyo tokomaki na Portugais; emonanaki ete biso nyonso mibale tozalaki koyeba lokota yango ndenge moko. Ntango mosusu, moto oyo tokuti na ndako moko azalaki koloba na Christine ete: “Nayoki yo malamu, kasi nayoki oyo ye alobi te,” wana alakisi ngai na mosapi. Na ndako mosusu, bakoyebisa ngai ete: “Nayoki yo malamu, kasi mwasi na yo te.” Atako bongo, kaka na mwa bapɔsɔ ya ebandeli oyo tolekisaki na mosala, tozwaki abonema koleka 100 mpo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli; yango epesaki biso esengo makasi. Kutu, bayekoli mingi ya Biblia oyo totambwisaki babatisamaki na boumeli ya mbula na biso ya liboso na Brésil, yango ezalaki lokola tomeki mwa ndambo ya mbuma ya liboso na ebele ya mbuma oyo elingaki kobima na nsima na esika oyo batindaki biso na mosala ya misionɛrɛ.
Na katikati ya bambula ya 1950, lokola bandeko oyo bazalaki na makoki ya kotala masangá mbala na mbala bazalaki mpenza mingi te na Brésil, bakɛngɛli ya zongazonga bazalaki kotala masangá mingi mbala na mbala te. Yango wana, atako nazalaki naino koyekola lokota mpe nasalaki naino lisukulu ya bato nyonso na lokota ya Portugais te, na 1956, natindamaki na mosala ya zongazonga na etúká ya São Paulo.
Lokola lisangá ya liboso oyo totalaki esalaki mbula mibale kozanga ete mokɛngɛli ya zongazonga atala yango, moto nyonso azalaki kozela lisukulu ya bato nyonso na mposa makasi. Mpo na kobongisa lisukulu yango, nakataki baparagrafe ya masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lokota ya Portugais mpe nakangisaki yango na bapapye. Mokolo wana ya lomingo, Ndako ya Bokonzi etondaki mpenza na bato. Bato mosusu kutu bafandaki tii na ebaelo; bango nyonso bazalaki se kozela koyoka lisolo yango. Lisukulu, to naloba kaka botángi, ebandaki. Bantango mosusu nazalaki kotala bayangani mpe nakamwaki na komona ete moto moko te azalaki koningana, ezala ata bana mike. Bango nyonso bafungolaki miso mpe bazalaki se kotala ngai. Nazalaki koloba na kati ya motema na ngai boye: ‘Valentino, okómi mpenza koloba Portugais malamu! Talá ndenge bato oyo bazali kolanda yo na likebi.’ Nsima ya bambula, ntango natalaki lisusu lisangá yango, ndeko moko oyo azalaki wana ntango natalaki lisangá wana mpo na mbala ya liboso alobaki boye: “Ozali koyeba lisusu lisukulu ya bato nyonso oyo osalaki? Tosimbaki ata eloko moko te.” Nayebisaki ye polele ete ata ngai moko mpe nasimbaki lisukulu yango malamumalamu te.
Na boumeli ya mbula wana ya liboso na mosala ya zongazonga, nazalaki mbala mingi kotánga Zekalia 4:6. Maloba oyo emonosi ete, ‘Na nzela na nguya mpe te nde na [elimo, NW] na ngai,’ ezalaki kosalisa ngai nabosana te ete elimo ya Yehova nde ezalaki mpenza kosala ete mosala ya Bokonzi ekola. Mpe bokóli yango esalemaki ya solo, atako makambo oyo biso tokokaki kosala te ezalaki komona polele.
Tozwaki mikakatano mpe mapamboli na nzela ya Yehova
Na mosala ya zongazonga esengelaki kosala mibembo mpe kokumba masini ya kokoma mikanda, bakartɔ ya mikanda, bavalizi, mpe basakosi. Christine ayebaki biloko na biso nyonso, na bongo tokokaki kobosana eloko moko te na ntango ya kokita na bisi moko mpo na kokɔta na bisi mosusu. Mbala na mbala soki totiki lisangá moko, mpo na kokóma na lisangá oyo elandi, tozalaki kosala mobembo ya ngonga 15 na bisi, na banzela ya bosɔtɔ. Ntango mosusu, tozalaki mpenza kobanga makasi, mingimingi soki bisi na biso ekutani na bisi mosusu likoló ya gbagba moko ya makasi te mpe nyonso mibale esengeli koleka kaka na ntango wana; okomona lokola nde elingi kotutana. Tosalaki mpe mibembo na engbunduka, na masuwa, mpe na mpunda.
Na 1961, tobandaki mosala ya mokɛngɛli ya etúká, kolongwa na zongazonga moko mpo na kokende na zongazonga mosusu, na esika ya kolongwa na lisangá moko mpo na kokende na lisangá mosusu. Na bampokwa mingi ya pɔsɔ, tozalaki kolakisa bafilme oyo ebimisamaki na ebongiseli ya Yehova—mbala nyonso, tozalaki kosala yango na bisika ndenge na ndenge. Mbala mingi esengelaki kolakisa yango nokinoki mpo na kolonga mayele mabe ya bakonzi ya mangomba, oyo bazalaki koluka kopekisa biso kolakisa bafilme yango. Na engumba moko, sango andimisaki na makasi nkóló ya ndako moko monene, oyo tosalaki na ye kɔntra ya kosalela ndako na ye, ete akata kɔntra yango. Nsima ya mikolo, tolukaki mpe tozwaki esika mosusu, kasi toyebisaki moto moko te mpe tolandaki kobenga bato nyonso báya na esika oyo toyebisaki bango liboso. Liboso ya kobanda programe na biso, Christine akendeki na ndako wana mpe, na kimya mpenza, alakisaki baoyo balingaki kotala filme ete bákende na esika ya sika oyo tozwaki. Na mpokwa wana, bato 150 batalaki filme oyo ezalaki na motó ya likambo ete La Société du Monde Nouveau en action; tokoki koloba ete motó ya likambo yango ebongaki mpenza!
Atako mosala ya mokɛngɛli-motamboli na bamboka ya mosika ezalaki ntango mosusu kolɛmbisa mpenza, bandeko ya komikitisa oyo bazalaki kofanda na bamboka yango bazalaki kosepela mingi na ndenge tozalaki kokende kotala bango; bazalaki koyamba biso mpe kofandisa biso na mwa bandako na bango, yango wana tozalaki ntango nyonso kozongisa matɔndi epai ya Yehova na ndenge tozalaki elongo na bango. Kosala boninga na bango ememelaki biso mapamboli ya solosolo. (Masese 19:17; Hagai 2:7) Yango wana, nsima ya kosala mbula koleka 21 na Brésil, tozalaki mpenza na mawa ya kotika mosala na biso ya misionɛrɛ!
Yehova alakisi biso nzela na ntango ya kwɔkɔsɔ
Na 1975, basalaki Christine lipaso. Tozongelaki mosala ya mokɛngɛli-motamboli, kasi Christine akómaki lisusu kobɛla makasi. Namonaki malamu tózonga na États-Unis mpo ete básalisa ye. Na sanza ya Aprili 1976, tokómaki na engumba ya Long Beach, na etúká ya Californie, mpe tofandaki na mama na ngai. Nsima ya kofanda mbula koleka ntuku mibale na mboka mopaya, toyebaki lisusu te ndenge ya kosilisa mokakatano wana. Nakómaki kosala mosala ya konyolisa bato nzoto(massages), mpe mbongo oyo tozwaki na mosala yango esungaki biso. Bakonzi ya Leta ya Californie bazwelaki Christine esika na lopitalo moko, kasi kuna azalaki se kolɛmba mokolo na mokolo mpo ete minganga baboyaki kosalisa ye kozanga kozongisa ye makila. Tozangaki elikya, yango wana tosɛngaki litambwisi ya Yehova.
Na mpokwa moko, ntango nazalaki na mosala ya kosakola, namonaki biro ya monganga moko; mbala moko nazwaki ekateli ya kokɔta na biro yango. Atako monganga yango azalaki pene ya kozonga ndako, akɔtisaki ngai na biro na ye, mpe tosololaki na boumeli ya ngonga mibale. Na nsuka alobaki ete: “Nasepelaka mingi na mosala na bino bamisionɛrɛ, mpe nakosalisa mwasi na yo kozanga kosɛnga mbongo mpe kozanga kozongisa ye makila.” Nakanisaki ete ezalaki lisɛki.
Monganga yango ya boboto, oyo ayebanaki lokola moto oyo ayebi malamu mosala na ye, atindaki Christine na lopitalo oyo azalaki kosala. Mpe lokola ye moko moto azalaki mpenza kosalisa Christine, eumelaki te mpo ete ayoka malamu. Tozalaki mpenza na botɔndi ete Yehova amonisaki biso nzela na ntango wana ya mpasi!
Mikumba ya sika
Lokola Christine azongaki lisusu makasi, tosalaki lokola babongisi-nzela mpe tozalaki na esengo ya kosalisa bato mingi na Long Beach mpo ete bákóma basambeli ya Yehova. Na 1982, basɛngaki biso ete tósala mosala ya zongazonga na États-Unis. Mokolo na mokolo, tozalaki kotɔnda Yehova na ndenge asalelaki biso lisusu na mosala ya mokɛngɛli-motamboli, mosala oyo tozalaki kolinga mingi. Tosalaki na etúká ya Californie mpe na nsima na etúká ya Nouvelle Angleterre, esika oyo zongazonga ezalaki mpe mwa masangá oyo esalelaka lokota ya Portugais. Na nsima, ekómaki mpe na bisangá ya Bermudes.
Nsima ya mbula minei ya mosala malamu, tozwaki mokumba mosusu. Basɛngaki biso ete tósala lokola babongisi-nzela minene na esika nyonso oyo biso moko tokolinga. Atako tozalaki na mawa ya kotika mosala ya mokɛngɛli-motamboli, tozalaki kaka na mokano ya kokende liboso na teritware na biso ya sika. Kasi wapi? Na mosala ya mokɛngɛli-motamboli, namonaki ete lisangá moko oyo ezalaki kosalela lokota ya Portugais na engumba ya New Bedford, oyo ezali na etúká Massachusetts, ezalaki na mposa ya lisungi—na bongo, toponaki kokende na New Bedford.
Ntango tokómaki, lisangá esalelaki biso fɛti moko monene mpo na koyamba biso. Emonisaki biso ete bandeko bazalaki mpenza na mposa na biso. Tolelaki. Ndeko mobali moko elenge na mwasi na ye na bana na bango mibale bafandisaki biso na boboto mpenza na ndako na bango, tii ntango biso mpe tozwaki ndako ya kofutela. Ya solo, Yehova apambolaki mosala na biso ya mobongisi-nzela monene, koleka kutu ndenge tozalaki kokanisa. Banda 1986, tosalisaki soki bato 40 na engumba yango mpo bákóma Batatoli. Bazali libota na biso ya elimo. Lisusu, nazwaki esengo ya komona bandeko mitano ya engumba yango kokola mpe kokóma babateli ya bampate. Mosala na biso ekokanaki mpenza na mosala ya misionɛrɛ oyo azali kosala na teritware oyo ezali kobota mbuma mingi.
Ntango tozali kozongisa miso na nsima, tozali kosepela mpo ete tosaleli Yehova banda bolenge na biso mpe solo ekómaki bomoi na biso. Ezali solo ete tokómi mibange mpe bolɛmbu ya nzoto ezali kotungisa biso sikoyo; kasi kokende liboso na nzela ya Yehova nde ezali kaka kopesa biso makasi mpe esengo.
[Elilingi na lokasa 26]
Ntango tokómaki sika na Rio de Janeiro
[Elilingi na lokasa 28]
Libota na biso ya elimo na New Bedford, na Massachusetts