Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/6 nk. 17-22
  • Tozali kokende liboso tii na bolongi ya nsuka!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali kokende liboso tii na bolongi ya nsuka!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokili ya sika ezali kosalema
  • Makanisi ya mabe ezali kolongwa
  • Totii elikya na biso na nani?
  • Batatoli ya Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Bato oyo bazali kobundisa Nzambe bakolonga te!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/6 nk. 17-22

Tozali kokende liboso tii na bolongi ya nsuka!

“Namɔni mbalata mpɛmbɛ, mpe mofandi na yango azalaki na litimbo. Motole epɛsami na ye, mpe abimi kolonga mpe kolonga [tii na nsuka, NW].”​—EMONISELI 6:2.

1. Makambo nini Yoane amonaki oyo esengelaki kosalema na nsima?

NTOMA Yoane apemamaki na elimo ya Nzambe, yango wana amonaki makambo oyo esengelaki kosalema mbula 1 800 na nsima mpe alobaki ndenge oyo amonaki Klisto afandi na kiti lokola Mokonzi. Yoane asengelaki kozala na kondima mpo na kotya motema ete makambo oyo amonaki ekokokisama. Lelo oyo, ezali na makambo oyo ezali komonisa biso polele ete likambo oyo esakolamaki, ete Yesu akofanda na kiti ya bokonzi, ekokisamaki na 1914. Na miso ya kondima, tozali komona Yesu Klisto azali “kobima mpo na kolonga mpe kolonga tii na nsuka.”

2. Ntango Bokonzi etyamaki, Satana asalaki nini mpe likambo nini ezali komonisa yango?

2 Ntango Bokonzi etyamaki, mwa moke na nsima, babenganaki Satana na likoló, yango wana azali kobunda makasi mpe azali na nkanda mingi; atako bongo, akolonga te. (Emoniseli 12:7-12) Na nkanda na ye, azali kobebisa mpenza makambo na mokili. Bato bazali se kobeba. Mpo na Batatoli ya Yehova, makambo yango ezali komonisa polele ete Mokonzi na bango azali kokende liboso mpo na “kolonga tii na nsuka.”

Mokili ya sika ezali kosalema

3, 4. (a) Banda ntango Bokonzi etyamaki, mbongwana nini oyo etali ndenge ya kotambwisa makambo ekɔtaki na lisangá ya boklisto, mpe mpo na nini ezalaki na ntina? (b) Ndenge Yisaya asakolaki yango, mbongwana yango ememaki bolamu nini?

3 Nsima ya kotyama ya Bokonzi, ntango ekokaki mpo lisangá ya boklisto, oyo ezongisami mpe ezali sikoyo na mikumba mingi ya Bokonzi, etambola mpenza ndenge oyo lisangá ya ekeke ya liboso ezalaki kotambola. Yango wana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni mpe 15 Yuni 1938 (ebimeli ya Lingelesi) emonisaki ndenge oyo ebongiseli ya boklisto esengeli kotambola. Na nsima, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 1972 (ebimeli ya Lifalanse) elimbolaki malamumalamu, na lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekeseni na lisangá oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta, ndenge oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi esengeli kozala na mikolo na biso.” Na 1972, babandaki kopona masangani ya bankulutu mpo na kosalisa mpe kokamba masangá.

4 Lokola mosala ya bakɛngɛli ebongisamaki lisusu malamu, lisangá ya boklisto elendisamaki mpenza. Likambo mosusu oyo elendisaki lisangá ezali bibongiseli oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaki, bibongiseli etali koteya bankulutu ndenge ya kokokisa mikumba na bango, mpe ndenge ya kosambisa makambo. Yisaya 60:17 esakolaki mbongwana oyo ezalaki kosalema mokemoke na kati ya lisangá ya Nzambe awa na mabele mpe mbuma malamu oyo yango ezalaki kobota, vɛrsɛ yango elobi boye: “Na esika ya motako nakoyeisa wolo mpe na esika ya ebende nakoyeisa palata; na esika ya mabaya, motako, na esika ya mabanga, ebende. [Nakotya kimya lokola bakɛngɛli na yo mpe boyengebene lokola bakapita ya mosala na yo, NW].” Mbongwana yango ya malamu emonisaki ete Nzambe azali kopambola mpe emonisaki ete Nzambe andimaki baoyo bakakatanaka te mpo na kokumisa Bokonzi na ye na molende mpenza.

5. (a) Satana asalaki nini ntango amonaki ndenge oyo Yehova apambolaki bato na ye? (b) Na boyokani na Bafilipi 1:7, basaleli ya Yehova basalaki nini liboso ya nkanda ya Satana?

5 Satana amonaki ndenge oyo Nzambe atyelaki bato na ye likebi mpe ndenge oyo azalaki kotambwisa bango nsima ya kotyama ya Bokonzi. Tótalela bandakisa oyo elandi. Na 1931, mwa etuluku yango ya baklisto eyebisaki na mokili mobimba ete bazalaki kaka Bayekoli ya Biblia te. Na kotalela Yisaya 43:10, bazalaki mpe Batatoli ya Yehova! Soki mpe ezalaki kaka likambo ya mbalakaka to ndenge nini, na mokili mobimba, Zabolo abandaki konyokola bango na ndenge ya nsɔmɔ. Ata na mikili oyo eyebani ete Leta apesi bonsomi ete moto na moto asambela na lingomba oyo ye alingi, mikili lokola États-Unis, Canada na Allemagne, Batatoli babundaki bitumba liboso ya batribinale mpo bápesa bango bonsomi ya losambo. Tii na 1988, cour suprême ya États-Unis etalelaki makambo 71 ya Batatoli ya Yehova oyo batribinale mosusu esambisaki mpe kati na yango, balongaki na makambo mingi (koleka 60 %) Lelo oyo, na mokili mobimba, Batatoli bazali kokoba kosamba liboso ya batribinale mpo ete “bálongisa mpe bándimisa nsango malamu na nzela ya mibeko,” ndenge mpe esalemaki na ekeke ya liboso.​—Bafilipi 1:7, NW.

6. Bipekiseli mpe makambo mosusu ya kolɛmbisa ekangaki basaleli ya Yehova nzela ya kokende liboso? Pesá ndakisa.

6 Na bambula ya 1930, liboso Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebanda, baguvɛrnɛma oyo ezalaki na bakonzi ya makambo makasi (dictature), na ndakisa: Allemagne, Espagne, Japon, epekisaki Batatoli ya Yehova to etyaki bango mpanzi likoló mpo básala mosala na bango malamu te. Nzokande na mobu 2000, soki tosangisi basakoli ya Bokonzi ya bikólo wana misato kaka, tomoni ete bakómi pene ya 500 000. Motuya yango eleki pene ya mbala zomi motuya ya Batatoli na mokili mobimba na 1936! Tomoni polele ete bipekiseli mpe makambo mosusu mpo na kolɛmbisa basaleli ya Yehova Nzambe ekoki te kokanga bango nzela ya kokende liboso na litambwisi ya Yesu Klisto, Mokonzi na bango oyo azali kolonga.

7. Likambo nini ya monene esalemaki na 1958, mpe mbongwana nini esalemi banda ntango wana?

7 Na 1958, emonanaki mpenza ete Batatoli bazali kokende liboso ntango basalaki liyangani moko oyo eleki monene mpe esangisaki bato 253 922 oyo bautaki mikili mingi, motó ya likambo na yango ezalaki “Mokano ya Nzambe.” Kobanda na 1970, batikelaki bango lisusu nzela ya kosala mosala na bango na bikólo misato oyo touti kotánga, longola se na Allemagne ya Ɛsti. Kasi, na Union soviétique mpe na bikólo oyo esanganaki na yango na boyokani babengi Pacte de Varsovie, mosala ya Batatoli epekisamaki kaka. Lelo oyo, na bikólo yango oyo bakoministe bazalaki koyangela, Batatoli bazali koleka 500 000.

8. Mapamboli ya Yehova likoló ya bato na ye ememi makambo nini, mpe na 1950, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki nini mpo na yango?

8 Batatoli ya Yehova bapambolami mpe bakómi ebele mpamba te bakobaki ‘koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na [Nzambe].’ (Matai 6:33) Esakweli ya Yisaya ekokisami mpenza ete: “Oyo moke akokóma nkóto mpenza, oyo eleki moke akokóma libota ya makasi. Ngai nazali [Yehova]; na ntango na yango, nakoyeisa yango mbango.” (Yisaya 60:22) Kasi, esili naino te. Na boumeli ya mbula zomi mpamba oyo euti koleka, basakoli ya Bakonzi 1 750 000 babakisamaki. Bato yango bandimi bango moko kosangana na etuluku oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko ya 1950 (na Lingelesi) elobaki mpo na bango ete: “Nzambe azali kobongisa bato ya mokili ya sika. . . . Bato yango bakobika na Armagedon, . . . bango nde bato ya liboso oyo bakofanda na ‘mabele ya sika’ . . , oyo ekobongisama na ndenge ya Teokrasi, bayebi ndenge oyo makambo etambolaka na Teokrasi.” Na nsuka, lisolo yango elobaki boye: “Yango wana, biso nyonso bato ya mokili ya sika tókende se liboso!”

9. Ndenge nini makambo oyo Batatoli ya Yehova bayekoli na boumeli ya bambula esalisi bango?

9 Liboso mokili yango ya sika eya, bato oyo bakofanda kuna, baoyo bazali se kokóma ebele, bayekoli ndenge malamu ya kosala makambo oyo ezali kosalisa mpenza lelo oyo mpe ekoki kozala ete ekosalisa nsima ya Armagedon, na ntango bakosala mosala ya kobongisa makambo. Na ndakisa, Batatoli bayekoli ndenge ya kobongisa mayangani minene, ndenge ya kopesa lisungi ya nokinoki, mpe ndenge ya kotonga bandako nokinoki. Bato mingi bazali kokumisa mpe kopesa Batatoli ya Yehova limemya mpo na mosala yango.

Makanisi ya mabe ezali kolongwa

10, 11. Monisá ndenge oyo makanisi mosusu ya mabe oyo bato bazalaki na yango mpo na Batatoli elongwaki.

10 Atako makambo nyonso wana, bato mosusu bazali koloba ete Batatoli ya Yehova basalaka makambo oyo ezali kaka ya bango moko. Bazali koloba bongo mingimingi mpo Batatoli bazali kolanda makanisi oyo bayekoli na kati ya Biblia na makambo lokola kozongisa makila, kokɔta na makambo ya politiki, komela likaya mpe kolanda mitinda ya malamu. Kasi, mokemoke, bato mingi bakómi komona ete makanisi ya Batatoli ezali malamu. Na ndakisa, na ekólo Pologne, monganga moko abengaki na telefone bandeko ya filiale ya Batatoli ya Yehova mpe alobaki ete ye na baninga na ye ya mosala balekisaki ngonga mingi mpo na kolobela likambo ya kozongisa makila. Ntembe yango ebandaki nsima ya kotánga lisolo ya zulunalo moko oyo ebimaka na Pologne (Dziennik Zachodni). Monganga yango alobaki ete: “Ezali kosala ngai mpasi na komona ete minganga bazali kosalela makila mpambampamba. Likambo yango esengeli kosila; nasepeli lokola moto moko abandi kolobela likambo yango. Nalingi koyeba makambo mosusu na likambo yango.”

11 Na mbula eleki, minganga oyo bayebani mingi oyo bautaki na Canada, na Mpoto, na Israël, mpe na États-Unis basalaki likita moko mpe kuna balobelaki bisaleli mpe mayele oyo ekoki kosalisa minganga na kosalisa bato ya maladi kozanga ete bázongisa bango makila. Na likita yango oyo esalemaki na Suisse, balobaki ete makambo ezali te ndenge oyo bato mingi bakanisaka: bato oyo bazongisaki bango makila bakufaki mingi koleka baoyo bazongisaki bango makila te. Mbala mingi, Batatoli oyo bakɔtaki lopitalo, babimaki liboso ya bato oyo bazongisaki bango makila; mpe mbala mingi, yango ekitisaka ntalo ya mbongo oyo basengeli kobimisa mpo na kosalisa bango.

12. Pesá ndakisa mpo na komonisa ndenge oyo bato mosusu oyo bayebani mingi bakumisi likambo oyo Batatoli ya Yehova basalaki ya koboya kokɔta na makambo ya politiki.

12 Bato mingi mpe balobaki malamu mpo na ezaleli ya Batatoli ya Yehova ndenge baboyaki kokɔta na makambo ya politiki liboso ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe na boumeli na yango ntango Banazi bakómaki konyokola bango. Bato mingi balobaki malamu mpo na kasɛti-video La fermeté des Témoins de Jéhovah face à la persécution nazie (Batatoli ya Yehova batikalaki ngwi liboso ya minyoko ya nazi), oyo Batatoli ya Yehova babimisaki mpe balakisaki yango mpo na mbala ya liboso na esika oyo ebongi mpenza, elingi koloba na kaa ya bakangami ya Ravensbrück na Allemagne, mokolo ya 6 Novɛmbɛ 1996. Mokolo ya 18 Aprili 1998, liboso bálakisa yango mpe na Bergen-Belsen, kaa mosusu ya bakangami oyo eyebani mingi, Doktɛrɛ Wolfgang Scheel, mokambi ya Centre d’enseignement politique na etúká ya Basse-Saxe, alobaki boye: “Moko ya makambo ya mpasi oyo esalemaki mpenza ezali ete Batatoli ya Yehova baboyaki na mpiko nyonso boyangeli ya Banazi koleka mangomba ya boklisto. . . . Ata soki totalelaka mateya mpe losambo ya Batatoli ya Yehova ndenge nini, mpiko na bango na ntango ya boyangeli ya Banazi ezali kotinda biso na kopesa bango limemya.”

13, 14. (a) Moto moko na ekeke ya liboso, alobaki maloba nini ya malamu mpo na baklisto ya ekeke ya liboso oyo bakanisaki te ete akoki kolobela bango? (b) Pesá ndakisa ya maloba malamu oyo bato balobi mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo.

13 Ntango bato mosusu oyo bayebani mingi bazali koloba malamu mpo na Batatoli ya Yehova to batribinale ezali kolongisa bango, ekoki kolongola makanisi mabe mpe kobongola makanisi ya bato na ndenge oyo batalelaka bango. Mbala mingi, yango epesaka bango nzela ya kosolola na bato oyo, liboso bazalaki kolinga koyoka te. Makambo ya ndenge yango ezali malamu mpe Batatoli ya Yehova basepelaka na yango mpenza. Makambo yango ezali kozongisa makanisi na biso na likambo oyo esalemaki na Yelusaleme na ekeke ya liboso. Ntango Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda, elingaki koboma baklisto mpo bazalaki kosakola na molende, Gamaliele, “molakisi ya mibeko, moto ya lokumu na miso ya bato nyonso,” akebisaki bango na maloba oyo: “Mibali ya Yisalaele, kebá na bino soko bolingi kosala nini na bato oyo. . . . Bólongwa na bato oyo mpe bótika bango, mpo ete soko mayele oyo to mosala oyo euti na bato, ekobeba. Soko nde euti na Nzambe, bokokoka kobuka bango te. Kebá ete bózwama babundani na Nzambe te.”​—Misala 5:33-39.

14 Na mikolo euti koleka, bato mosusu oyo bayebani basalaki lokola Gamaliele, elingi koloba bakɔtelaki Batatoli ya Yehova mpo bázwa bonsomi ya losambo. Na ndakisa, moto moko oyo azalaká mokambi ya ebongiseli moko (International Academy for Freedom of Religion and Belief) alobaki boye: “Tosengeli te koboya ete lingomba moko ezala na lotomo ya kolanda bindimeli na yango kaka mpo bato balingaka bindimeli na yango te to eyokani te na oyo ya bato nyonso.” Lisusu, molakisi moko ya makambo ya mangomba na iniversite ya Leipzig, atunaki motuna ya malamu mpenza mpo na ebongiseli moko oyo guvernema ya Allemagne etyaki mpo na koluka koyeba malamu oyo bango babengaka mangomba ya mike, alobaki boye: “Mpo na nini kotya miso kaka na mangomba ya mike kasi te na mangomba mibale ya minene [Lingomba ya Katolike na Lingomba ya Luther (Baprotesta)]? Eyano ezali na maloba ya mokonzi moko ya kala na Allemagne, ye akomaki boye: “Ntembe ezali te ete na nse-nse, bato ya mangomba minene oyo bazali na molende mabe bazali koyebisa ebongiseli wana ya guvernema ndenge oyo esengeli kosala mosala na yango.”

Totii elikya na biso na nani?

15, 16. (a) Mpo na nini likambo oyo Gamaliele asalaki ezalaki na ndelo na yango? (b) Ndenge nini bato mosusu misato oyo bayebanaki mingi bakokaki kosala likambo monene te mpo na Yesu?

15 Makambo oyo Gamaliele alobaki ezali komonisa ete mosala oyo Nzambe andimi ekoki kobebisama te. Maloba na ye liboso ya Sanedrina esalisaki baklisto ya liboso, kasi babosanaki te ete maloba ya Yesu mpe esengelaki kokokisama, ete bayekoli na ye bakonyokolama. Likambo oyo Gamaliele asalaki epekisaki mokano ya bakonzi ya mangomba ya koboma bango nyonso, kasi yango esilisaki minyoko nyonso te, mpamba te tozali kotánga boye: “Bandimi ye, mpe esilaki bango kobyanga bantoma, babɛtisi bango, mpe balaki bango ete báloba na nkombo na Yesu te, mpe [batiki] bango.”​—Misala 5:40.

16 Ntango bazalaki kosambisa Yesu, lokola Ponto Pilata azwaki ye na mabe moko te, alukaki kotika Yesu. Kasi, alongaki te. (Yoane 18:38, 39; 19:4, 6, 12-16) Ata kutu Nikodeme na Yosefe moto ya Alimataya, bato mibale ya Sanedrina oyo bazalaki kosepela na Yesu, bakokaki kosala eloko moko te mpo tribinale ekatela Yesu etumbu te. (Luka 23:50-52; Yoane 7:45-52; 19:38-40) Makambo oyo bato basalaka mpo na kokɔtela basaleli ya Yehova, ata mpo na ntina nini, ezali na ndelo na yango. Bato ya mokili bakotika koyina bayekoli ya solo ya Klisto te, se ndenge oyo bayinaki ye moko. Lisungi ya solosolo ekouta bobele na Yehova ye moko.​—Misala 2:24.

17. Likambo nini Batatoli ya Yehova bayebaka yango malamu, mpe mpo na nini bazali kolɛmba te na ekateli na bango ya kokoba kosakola nsango malalmu?

17 Batatoli ya Yehova bayebaka malamu ete minyoko ekosila te. Botɛmɛli ekosila se ntango mokili ya Satana ekobomama. Kasi, minyoko oyo, atako ezali likambo ya esengo te, epekisaka Batatoli te na kokokisa mokumba na bango ya kosakola Bokonzi. Ekoki mpe kopekisa mosala yango te mpamba te Nzambe moto asimbi yango. Balandaka ndakisa ya Yesu Klisto, Mokonzi na bango ya mpiko.​—Misala 5:17-21, 27-32.

18. Likama nini ekokomela basaleli ya Yehova, kasi bandimi ete ekosuka ndenge nini?

18 Banda na ebandeli na yango, bato batɛmɛlaki lingomba ya solo makasi. Etikali moke, Gog, elingi koloba Satana banda abwakamaki na nse, akobimisela bango etumba monene mpenza. Kasi, losambo ya solo ekolimwa te. (Ezekiele 38:14-16) Satana akokamba “bakonzi ya mikili nyonso” mpo na “etumba na Mwana ya Mpate, mpe Mwana ya Mpate akoleka bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi.” (Emoniseli 16:14; 17:14) Mokonzi na biso azali kokende liboso mpo na bolongi ya nsuka mpe etikali moke “alonga tii na nsuka.” Ezali mpenza libaku malamu ya kotambola na ye elongo mpe ya koyeba ete etikali moke moto moko te akotɛmɛla basambeli ya Yehova na ntango oyo bakoloba ete: “Nzambe azali na biso”!​—Baloma 8:31; Bafilipi 1:27, 28.

Okoki kolimbola?

• Yehova asali makambo nini mpo na kolendisa lisangá ya boklisto banda Bokonzi etyamaki?

• Satana asali makambo nini mpo na koluka kopekisa Klisto ete alonga tii na nsuka, kasi asuki wapi?

• Makanisi nini ya malamu tosengeli kozala na yango mpo na makambo bato oyo bazali Batatoli te bakoki kosala mpo na biso?

• Etikali moke Satana akosala nini, mpe ekosuka ndenge nini?

[Elilingi na lokasa 18]

Mayangani emonisaka ete basaleli ya Yehova bazali kokende liboso

[Bililingi na lokasa 20]

Tii lelo oyo bato bazali kokumisa Yehova mpamba te Batatoli baboyaki kokɔta na makambo ya polikiti na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto