Sepelá na boyebi ya Yehova
“Esengo eleki na bango bayoki Liloba ya Nzambe mpe batosi yango.”—LUKA 11:28.
1. Ntango nini Yehova ayebisaki bato makambo mpo na mbala ya liboso?
YEHOVA alingaka bato, mpe azali mpenza na mposa makasi ete bato bázala malamu. Yango wana, tokoki kokamwa te soki toyoki balobi ete Yehova ayebisaka bato makambo. Mbala ya liboso oyo Yehova ayebisaki bato makambo ezalaki na elanga ya Edene. Genese 3:8 elobi ete ezalaki mokolo moko na “mpokwa,” Adama na Eva “bayokaki mongongo . . . ya [Yehova] Nzambe.” Bato mosusu balobaka ete likambo wana elakisi ete—ekoki kozala—mikolo nyonso Yehova azalaki koyebisa na Adama na Eva makambo, mingimingi na ngonga wana. Ata soki ebandaki kozala na ngonga wana to te, Biblia elobi polele ete Nzambe azalaki kozwa mwa ntango mpo na kopesa mobali ya liboso mitinda. Kasi azalaki kosuka kaka wana te, azalaki mpe kolakisa ye makambo oyo asengelaki koyeba mpo akokisa mikumba na ye.—Genese 1:28-30.
2. Na ndenge nini mobali na mwasi ya liboso bamilongolaki na nzela oyo Yehova azalaki kolakisa bango, mpe yango ememaki likambo nini?
2 Yehova apesaki Adama na Eva bomoi, alobaki na bango bázala na bokonzi likoló na banyama mpe mabele mobimba. Apekisaki bango kaka eloko moko, alobaki na bango bálya te mbuma ya nzete ya koyeba malamu na mabe. Kasi Satana atindaki bango na nzela ya mabe, bongo babukaki motinda ya Yehova. (Genese 2:16, 17; 3:1-6) Bamonaki malamu básala makambo ndenge bango moko balingi, mpe báponaka bango moko nini oyo ezali malamu mpe nini oyo ezali mabe. Kasi ezalaki nde bozoba, mpamba te lokola basalaki bongo, bamilongolaki na nzela oyo Mozalisi na bango ya bolingo azalaki kolakisa bango. Yango wana mpasi eyelaki bango na bana na bango oyo babotamaki nsima. Adama na Eva bakómaki mibange mpe nsukansuka bakufaki; bakufaki na elikya te ete bakosekwa mokolo mosusu. Bana na bango bazwaki lisumu na bango mpe mpasi oyo yango ememaki ezali liwa.—Baloma 5:12.
3. Mpo na nini Yehova ayebisaki Kaina makambo, mpe Kaina asalaki nini?
3 Yehova atikaki te koyebisa bato makambo atako baboti na bango ya liboso batombokelaki Ye na Edene. Ntango Kaina, mwana ya liboso ya Adama na Eva, akómaki pene na kosala lisumu, Yehova akebisaki ye ete azali kotya lokolo na nzela ya mabe. Apesaki ye toli ete ‘asala malamu.’ Kaina aboyaki toli wana ya bolingo mpe abomaki ndeko na ye. (Genese 4:3-8) Bongo, bato misato ya liboso na mokili baboyaki na nko mpenza kolanda nzela oyo moto oyo apesaki bango bomoi alakisaki bango. Moto yango ezali nde Nzambe oyo apesaka basaleli na ye malako mpo bázwela yango litomba. (Yisaya 48:17) Boye likambo oyo bato wana ya liboso basalaki epesaki mpenza Yehova mawa na motema!
Yehova amimonisi epai ya bato ya kala
4. Yehova andimaki likambo nini na motema na ye mpo na bakitani ya Adama, mpe mpo na yango ayebisaki nsango nini oyo epesaki elikya?
4 Yehova akokaki koloba ete: ‘Esili, nakoyebisa lisusu bato makambo te.’ Kasi, asalaki bongo te. Andimaki mpenza na kati ya motema na ye ete bamosusu na kati ya bakitani ya Adama bakozala na mayele mpe bakolanda malako na ye. Na ndakisa, ntango Yehova ayebisaki etumbu oyo akatelaki Adama na Eva, asakolaki koya ya “momboto” oyo asengelaki kobundisa Nyoka, elingi koloba Satana Zabolo. Mpe na nsuka, akosasa Satana na motó mpe akoboma ye. (Genese 3:15, NW) Esakweli wana ezalaki nsango ya esengo oyo epesaki ‘baoyo bayokaka Liloba ya Nzambe mpe batosaka yango’ elikya.—Luka 11:28.
5, 6. Liboso tókóma na ekeke ya liboso ya ntango na biso, na banzela nini Yehova ayebisaki basaleli na ye makambo, mpe yango epesaki bango matomba nini?
5 Yehova ayebisaki mokano na ye epai ya batata ya mabota ya ntango ya kala, lokola Noa, Abalayama, Yisaka, Yakobo, mpe Yobo. (Genese 6:13; Exode 33:1; Yobo 38:1-3) Na nsima, na nzela ya Mose, abimisaki mibeko mpo na libota ya Yisalaele. Mibeko ya Mose esalisaki bango na makambo mingi. Na kotosáká mibeko yango, Yisalaele ekabwanaki na mabota mosusu mpe emonanaki mpenza ete ezali libota ya Nzambe. Nzambe ayebisaki Bayisalaele ete soki batosi Mibeko yango, akopambola bango ezala na mosuni to mpe na elimo. Bongo akokómisa bango bokonzi ya banganga, libota moko mosantu. Mibeko yango etyaki mpe bikila na makambo etali kolya mpe bopɛto, yango esalaki ete bázala nzoto kolɔngɔnɔ. Kasi, Yehova akebisaki mpe bango mpo na mpasi oyo ekoyela bango soki baboyi kotosa mibeko wana.—Exode 19:5, 6; Deteronome 28:1-68.
6 Na nsima, mikanda mosusu oyo epemami eyaki kobakisama na molɔngɔ ya mikanda ya Biblia oyo endimami. Mikanda oyo ezali na masolo ya makambo esalemaki kala eyebisaki makambo oyo ye asalaki epai ya mabota mpe bikólo. Mikanda oyo ezali na maloba ya ntɔki elobelaki bizaleli na ye na ndenge ya kitoko mpenza. Mikanda ya bisakweli esakolaki ndenge mokano ya Yehova ekokokisama na mobimba na yango na mikolo oyo ezali koya. Bato ya sembo na ntango ya kala bayekolaki malamumalamu makomi yango oyo epemami mpe basalelaki yango. Moko na bango akomaki ete: “Liloba na yo ezali mwinda na makaka na ngai mpe pole na nzela na ngai.” (Nzembo 119:105) Yehova ateyaki mpe apesaki mayele na bato oyo bandimaki koyoka ye.
Pole ebakisami
7. Atako Yesu asalaki makamwisi, bato bayebaki ye mingimingi mpo na likambo nini, mpe mpo na nini?
7 Na ekeke ya liboso, mangomba ya Bayuda ekɔtisaki mibeko ya bato na kati ya Mibeko ya Nzambe. Mibeko ekómaki kosalelama na ndenge ya mabe; na esika ezala eloko oyo esengeli kopesa bato mayele, ekómaki kilo mpo na mibeko oyo bato bakɔtisaki. (Matai 23:2-4) Nzokande, na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.), Yesu abimaki lokola Masiya. Mokumba na ye ezalaki kaka te ya kopesa bomoi na ye mpo na bato, kasi mpe ya ‘kotatola mpo na solo.’ Atako asalaki makamwisi, bato bayebaki ye mingimingi lokola “Moteyi.” Mateya na ye ezalaki lokola pole oyo ezali kongɛnga na esika oyo molili ya elimo ezali, mpe ezipi mayele ya bato. Yesu ye moko alobaki boye: “Ngai nazali pole ya mokili.”—Yoane 8:12, NW; 11:28; 18:37.
8. Mikanda nini epemami ekomamaki na ekeke ya liboso ya ntango na biso, mpe epesaki baklisto ya liboso matomba nini?
8 Na nsima, Baevanzile minei eyaki kobakisama, elobelaki bomoi ya Yesu; mpe mokanda ya Misala, lisolo yango ezali kolobela ndenge lingomba ya boklisto epalanganaki na nsima ya liwa ya Yesu. Ezalaki mpe na mikanda epemami oyo bayekoli ya Yesu bakomaki, bakisa mpe Emoniseli, oyo ezali mokanda ya bisakweli. Mikanda wana nyonso, bakisa mpe Makomami ya Liebele, ekokisaki mikanda nyonso ya Biblia oyo endimamaka ete epemamaki. Na nzela ya bibliotɛkɛ wana oyo epemami, baklisto bakokaki “kososola na kati ya makanisi elongo na basantu nyonso, bonene, mpe bolai mpe bosanda mpe bozindo” ya solo. (Baefese 3:14-18, NW) Bakokaki kozala na “makanisi ya Klisto.” (1 Bakolinti 2:16) Atako bongo, baklisto wana ya liboso bayebaki malamu mpenza te makambo nyonso oyo etali mikano ya Yehova. Ntoma Paulo akomelaki baninga na ye bandimi boye: “[Sikoyo] tozali naino kotala lokola kati na talatala mpe tokokakatanaka.” (1 Bakolinti 13:12) Talatala wana ekokaki komonisa eloko kaka na libanda na yango, kasi na kati na yango te. Bongo, mpo na koyeba Liloba ya Nzambe na mobimba na yango esengelaki kozela mikolo ya nsima.
9. Makambo nini oyo emonisami polelepolele na “mikolo ya nsuka”?
9 Mikolo oyo tozali, Biblia ebengi yango “mikolo ya nsuka”; ezali mikolo oyo “mpasi” ezali makasi. (2 Timote 3:1) Mosakoli Danyele asakolaki ete na ntango oyo “boyebi ekobakisama mingi.” (Danyele 12:4, NW) Yango wana, Yehova, Moto oyo ayebi mpenza koyebisa makambo koleka bato nyonso, asalisi bato ya motema sembo básosola Liloba na ye malamumalamu. Lelo oyo bato ebele bayebi ete, na 1914, Klisto Yesu akómaki mokonzi na likoló oyo emonanaka na miso ya bato te. Bayebi mpe ete etikali moke asilisa mabe nyonso mpe akómisa mabele mobimba paladiso. Likambo wana ya ntina mingi na kati ya nsango malamu ya Bokonzi ezali lelo kosakolama na mabele mobimba.—Matai 24:14.
10. Banda ntango ya kala tii lelo, ndenge nini bato bayambaka toli ya Nzambe?
10 Tomoni ya solo ete, banda kalakala Yehova ayebisaka bato oyo bazali na mabele mokano na ye. Biblia eyebisi biso bato ebele oyo bayokaki Nzambe mpe basalelaki mayele oyo ye apesaki bango, mpe bazwelaki yango mapamboli. Elobeli mpe bato oyo baboyaki kolanda toli oyo Nzambe apesaki bango na bolingo nyonso, bongo balandaki nzela mabe ya Adama na Eva. Yesu apesaki ndakisa ya nzela mibale mpo na kolobela likambo yango. Nzela moko ezali komema na liwa; nzela yango ezali monene mpe ebele ya bato oyo baboyaka Liloba ya Nzambe bazali kolanda yango. Nzela mosusu ememaka na bomoi ya seko. Atako nzela yango ezali moke, ezali nzela ya bato moke oyo bandimaka Biblia lokola Liloba ya Nzambe mpenza, mpe bazali kosala ndenge yango ezali kosɛnga.—Matai 7:13, 14.
Tósepela na oyo tozali na yango
11. Ndenge toyebi Biblia mpe tondimelaka yango ezali elembo oyo emonisi nini?
11 Yo mpe ozali na kati ya bato oyo baponi nzela ya bomoi? Soki ezali bongo, ya solo, okolinga kotikala na nzela yango. Ndenge nini okoki kotikala na nzela yango? Na kokanisáká mbala na mbala mapamboli oyo ozwi na kati ya bomoi na yo mpo na ndenge oyebi Biblia mpe kotɔnda Nzambe mpo na yango. Kondima oyo yo ondimaki nsango malamu ezali elembo oyo emonisi ete Nzambe apamboli yo. Yesu amonisaki ete ezali mpenza bongo ntango alobaki boye na kati ya libondeli oyo asalaki epai ya Tata na ye: “Natɔndi yo, Tata, Nkolo na likoló mpe na nse mpo ete obombi makambo oyo liboso na bato ya mayele mpe na basosoli mpe omonisi yango epai ya bana mike.” (Matai 11:25) Babomi-mbisi mpe bakɔngɔli-mpako basimbaki mateya ya Yesu malamu, kasi bakonzi ya mangomba oyo batángaki kelasi mingi basimbaki yango te. Yesu alobaki lisusu ete: “Moto akoki koya epai na ngai te bobele soki Tata, Motindi na ngai, akobenda ye.” (Yoane 6:44) Soki osili kokóma na boyebi ya Biblia mpe ondimelaka mateya na yango mpe olandaka yango, ezali elembo oyo emonisi ete Yehova abendi yo. Tosengeli kosepela mpo na yango.
12. Ndenge nini Biblia ezali kolongola bato na molili?
12 Na kati ya Liloba ya Nzambe, ezali na mateya ya solo oyo ezali kolongola bato na boombo mpe mpe na molili. Baoyo basalelaka boyebi oyo ezali na kati ya Biblia, balongwe na boombo ya biyambayamba, ya mateya ya lokuta, mpe ya kozanga koyeba oyo bamilio ya bato bakangami na yango. Na ndakisa, koyeba solosolo soki molimo ezali nini elongoli biso na boombo ya kobanga ete bato oyo bakufá bakoki kosala biso mabe to na boombo ya kokanisa ete bato na biso oyo tozalaki kolinga mingi oyo bakufá bazali konyokwama. (Ezekiele 18:4) Makambo oyo toyebi na ntina ya baanzelu mabe ezali kosalisa biso ete tókima makama oyo ekómelaka bato soki bazali koyokana na bilimo mabe. Liteya ya lisekwa ebɔndisaka baoyo bakufeli bato oyo bango balingaki mingi. (Yoane 11:25) Bisakweli ya Biblia ezali komonisa biso ntango nini tokómi sikoyo mpe ezali kosalisa biso tóndimela ya solo bilaka ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya. Ezali mpe kosala ete elikya na biso ya bomoi ya seko ekóma makasi.
13. Ndenge nini kotosa Liloba ya Nzambe epesaka biso matomba na nzoto?
13 Mitinda ya Nzambe oyo ezali na kati ya Biblia ezali koteya biso ete tómitambwisa na ndenge oyo ekoki kopesa biso matomba na nzoto. Na ndakisa, tozali koyekola koboya misala oyo ebebisaka nzoto, lokola komɛla likaya to bangi. Tozali koboya komipesa na komɛla masanga mingi. (2 Bakolinti 7:1) Kotosa mibeko ya Nzambe na oyo etali bizaleli malamu ezali kobatela biso liboso na bamaladi oyo ezwamaka na nzela ya kosangisa nzoto. (1 Bakolinti 6:18) Ntango tozali kotosa toli oyo Nzambe azali kopesa biso ete tóboya kolinga mbongo, tozali te kobebisa kimya na biso ya makanisi ndenge ekómelaka bato mosusu ntango bazali komipesa mobimba na koluka bomɛngo. Matomba nini osili kozwa na nzoto na yo mpo na ndenge ozali kosalela Liloba ya Nzambe na bomoi na yo?
14. Elimo santu ezali kosala mosala nini na kati ya bomoi na yo?
14 Soki tomitambwisi ndenge Liloba ya Nzambe esɛngaka, tokozwa elimo santu ya Yehova. Na bongo, tokokolisa bomoto lokola oyo ya Klisto, oyo ezalaki mingimingi na bizaleli ya kosepelisa, lokola ezaleli ya motema mawa. (Baefese 4:24, 32) Elimo ya Nzambe ekobota mpe mbuma na yango na kati na biso: bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, komikitisa, mpe komipekisa. (Bagalatia 5:22, 23, NW) Bizaleli wana epesaka esengo mpe esalisaka biso tóyokanaka malamu na bato ya libota na biso mpe na bato mosusu. Na kati ya motema na biso, tozwaka nguya oyo esalisaka biso tóyikela mikakatano mpiko. Ozali kososola ndenge nini elimo santu ekómisi bomoi na yo malamu koleka?
15. Matomba nini tozali kozwa na ntango oyo tozali komitambwisa ndenge mokano ya Nzambe ezali kosɛnga?
15 Ntango tozali komitambwisa ndenge mokano ya Yehova ezali kosɛnga, tozali kokómisa boyokani na biso na ye makasi. Tokondima lisusu makasi mpenza ete ye amityaka na esika na biso mpe alingaka biso. Makambo oyo tosili komona eteyi biso ete abatelaka biso na ntango ya mpasi. (Nzembo 18:18) Tozali kososola ete ayokaka mpenza mabondeli na biso. (Nzembo 65:2) Tokómi kondima toli na ye mpo tondimi ya solo ete ekopesa biso matomba. Mpe tozali na elikya ya malamu ete na ntango oyo esengeli mpenza, Nzambe akokómisa basaleli na ye ya sembo bato ya kokoka mpe akopesa bango bomoi ya seko lokola likabo. (Baloma 6:23) Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bóbɛlɛma epai ya Nzambe mpe ye akobɛlɛma epai na bino.” (Yakobo 4:8) Oyoki ete boyokani na yo na Nzambe ekómi makasi na ntango oyo ozali kobɛlɛma na ye?
Eloko ya motuya oyo ekokani na mosusu te
16. Mbongwana nini baklisto mosusu ya ekeke ya liboso basalaki na bomoi na bango?
16 Paulo akundwelaki baklisto bapakolami ya ekeke ya liboso ete bamosusu na kati na bango bazalaki liboso basali na pite, basali na ekobo, bato oyo basangisaka nzoto mibali na mibali, basi na basi, miyibi, bato ya lokoso, balangwi masanga, mpe babɔtɔli. (1 Bakolinti 6:9-11) Solo ya Biblia ebongolaki bango makasi mpenza; ‘basukwamaki.’ Kanisá naino: bomoi na yo elingaki kozala ndenge nini soki oyekolaki te solo ya Biblia oyo elongolaka bato na boombo? Ya solo mpenza, solo ezali eloko ya motuya oyo ekokani na mosusu te. Tozali na esengo mpenza mpo ete Yehova ayebisaka biso makambo!
17. Ndenge nini Batatoli ya Yehova baleisamaki na elimo na makita ya lisangá?
17 Lisusu, kanisá naino lipamboli oyo tozali na yango na kati ya bondeko na biso oyo esangisi bato ya mposo ndenge na ndenge! “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa bilei ya elimo na ntango oyo esengeli mpenza: Babiblia, bazulunalo, mpe mikanda mosusu na minɔkɔ ndenge na ndenge. (Matai 24:45-47) Na makita ya lisangá, na mobu 2000, Batatoli ya Yehova na bamboka mingi batalelaki makanisi ya ntina ya mikanda minene mwambe ya Makomami ya Liebele. Batalelaki bomoi ya bato 40 oyo masolo na bango ezali na kati ya Biblia mpe elimbolami na kati ya buku Étude perspicace des Écritures. Batalelaki moko ya biteni minei ya mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo mpe etikalaki moke básilisa mokanda Tyá likebi na esakweli ya Danyele! Longola masolo 52 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebongisamaki mpo ete eyekolama na kati ya masangá, batalelaki masolo mosusu oyo mpe ebimaka na kati ya zulunalo yango; motango ya masalo yango ezalaki ntuku misato na motoba. Lisusu, basaleli ya Yehova baleisamaki na nzela ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo ebimaka mbala 12, mpe na masukulu ya bato nyonso oyo elobelaki makambo ndenge na ndenge. Oyo nde bozwi ya elimo bapesaki biso!
18. Ndenge nini tozali kozwa lisalisi na kati ya lisangá ya boklisto?
18 Na mokili mobimba, masangá koleka 91 000 ezali kosalisa mpe kolendisa na nzela ya makita mpe ya kolekisa ntango elongo na baninga baklisto. Tosepelaka mpe na ndenge baninga na biso baklisto oyo bakɔmeli basalisaka biso na bolingo mpenza. (Baefese 4:11-13) Ya solo, tozwi matomba mingi na nzela ya boyebi ya mateya ya solo ya Biblia oyo tozwi. Koyeba Yehova mpe kosalela ye ezali esengo. Maloba oyo ya mokomi ya nzembo ezali mpenza solo: “Esengo ezali na bato oyo [Yehova] azali Nzambe na bango.”—Nzembo 144:15.
Ozali koyeba lisusu?
• Liboso ya eleko ya boklisto, Yehova ayebisaki banani makambo?
• Ndenge nini pole ya elimo engɛngaki lisusu makasi na ekeke ya liboso? na ntango na biso?
• Mapamboli nini tozali kozwa na komitambwisáká na ndenge boyebi ya Yehova ezali kosɛnga?
• Mpo na nini tosepelaka na boyebi na biso ya Nzambe?
[Bililingi na lokasa 8]
Yehova ayebisaki mokano na ye epai ya Mose, Noa, mpe Abalayama
[Elilingi na lokasa 9]
Na mikolo oyo tozali, Yehova azali kopesa biso bososoli ya Liloba na ye
[Bililingi na lokasa 10]
Kanisá naino mapamboli oyo tozali na yango na bondeko oyo tozali na yango elongo na bato ya mposo ndenge na ndenge!