Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/10 nk. 20-23
  • Kozala sembo elimboli nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozala sembo elimboli nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bosembo oyo Yehova amonisaki
  • Monisá bosembo na yo na misala ya malamu
  • “Yo moko kaka nde ozali sembo”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Tólónga ntembe ya kozala sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tótalela baoyo bazali sembo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Okozala sembo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/10 nk. 20-23

Kozala sembo elimboli nini?

BAHASIDIME, lingomba moko ya Bayuda oyo ebimaki na ekeke ya mibale L.T.B., bazalaki koloba ete bazali mpenza sembo. Nkombo hasidime euti na liloba hasidh, liloba ya Liebele oyo elimboli mpenzampenza “moto ya sembo.” Liloba yango ebimi na nkombo hèsèdh, oyo ebongolamaka mbala mingi na “boboto,” “bolingo ya sembo,” “malamu,” “ngɔlu.” Diksionɛrɛ moko (Theological Dictionary of the Old Testament) elobi ete moto oyo azali na hèsèdh “akangaka mabɔkɔ te, ayokanaka na bato, mpe amonisaka ezaleli yango mpo na mwa ntango te [mpe] ezali kaka ndenge ya moto te, kasi ezali mpe likambo oyo moto oyo azali na ezaleli yango asali. Ezali likambo oyo esalemaka mpo na kobatela to kobikisa bomoi. Ezali likambo oyo esalemaka mpo na kosunga moto oyo akwei to azali na mpasi. Emonisaka boninga.”

Tomoni mpenza ete na minɔkɔ mingi, ezali na liloba te oyo ekoki kopesa ndimbola mpenzampenza ya liloba wana ya Liebele na ndenge oyo Biblia esaleli yango. Atako bongo, na kati ya Biblia, bosembo esuki kaka te na kozanga te kokokisa makambo oyo olaki. Elimboli mpe kokangama na basusu, kolinga bango mpe kosalela bango malamu. Mpo tókanga ntina ya bosembo ya solosolo, tótalela ndenge oyo Yehova amonisaki yango epai ya Abalayama, Mose, Davidi, ekólo Yisalaele, mpe epai ya bato nyonso na mokili.

Bosembo oyo Yehova amonisaki

Yehova ayebisaki moninga na ye Abalayama ete: “Ngai nazali nguba na yo.” (Genese 15:1; Yisaya 41:8) Yehova asukaki kaka na koloba te, kasi amonisaki yango na misala. Yehova abatelaki mpe abikisaki Abalayama mpe libota na ye na mabɔkɔ ya Falo mpe na mabɔkɔ ya Abimeleke. Asalisaki Abalayama ntango akendaki kobikisa Lota na mabɔkɔ ya ebele ya basoda ya bakonzi minei mobimba oyo basanganaki. Ntango Abalayama akokisaki mbula 100 mpe mwasi na ye Sala mbula 90, Yehova azongiselaki bango makoki ya kobota mpo bábimisa Mombóto oyo alakaki. Yehova azalaki kosolola mbala na mbala na Abalayama na nzela ya bimonaneli, bandɔtɔ mpe na nzela ya baanzelu. Yehova azalaki sembo epai ya Abalayama ntango azalaki na bomoi mpe nsima ya liwa na ye. Na boumeli ya bankama ya bambula, Yehova azalaki kokokisa bilaka na ye epai ya bankɔkɔ ya Abalayama, elingi koloba ekólo Yisalaele, atako bazalaki matoi mangbongi. Boninga ya Yehova na Abalayama emonisaki nini oyo babengi bosembo ya solosolo: ezali bolingo oyo ezali komonana na misala.​—Genese, mokapo ya 12 tii ya 25.

Biblia elobi ete “[Yehova] asololaki na Mose boye na miso na ye, lokola moto akosolola na moninga na ye.” (Biso nde totɛngisi makomi; Exode 33:11) Ya solo, boyokani oyo Mose azalaki na yango na Yehova eleki oyo basakoli mosusu nyonso oyo bayaki nsima na ye bazalaki na yango na Yehova liboso ete Yesu Klisto aya. Ndenge nini Yehova amonisaki bosembo na ye epai ya Mose?

Ntango Mose azalaki na mbula 40, lokola azalaki na makasi mpe na mayele, alukaki kobikisa bandeko na ye na ndenge na ye moko. Kasi, ntango ekokaki naino te. Kutu, akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye. Alekisaki mbula 40 lokola mobateli ya bampate na mokili ya Midyani. (Misala 7:23-30) Atako bongo, Yehova asundolaki ye te. Wana ntango ekokaki, Nzambe azongisaki Mose mpo na kobimisa Yisalaele na Ezipito mpe kokamba libota yango.

Yehova amonisaki mpe bosembo na ye epai ya Davidi, mokonzi ya mibale ya Yisalaele. Ntango Davidi azalaki naino elenge, Yehova ayebisaki mosakoli Samwele ete: “Tɛlɛmá mpe pakolá ye mafuta mpo ete ye oyo!” Kobanda wana, Yehova azalaki ntango nyonso kobatela mpe kotambwisa Davidi ntango azalaki kokola mpe kozwa mayele mpo na kokóma mokonzi ya Yisalaele mobimba. Yehova abikisaki ye “na [manzaka] ya nkosi mpe na [manzaka] ya ngombolo” mpe liboso ya engambe Mofilistia Goliata. Mbala ebele Yehova asalisaki Davidi alonga banguna ya Yisalaele, mpe abikisaki Davidi mpo ete makɔnga ya Saulo, moto oyo azalaki koyokela ye zuwa mpe likunya, ezwa ye te.​—1 Samwele 16:12; 17:37; 18:11; 19:10.

Davidi azalaki moto ya kokoka te. Kutu, asalaki masumu ya minene. Kasi, Yehova alakisaki Davidi bolingo mpe bosembo na ye lokola azalaki mpenza kobongola motema. Asundolaki ye te. Na bomoi mobimba ya Davidi, Yehova azalaki mbala na mbala kosala makambo mpo na kobatela mpe kobikisa bomoi na ye. Asungaki moto oyo azalaki na mpasi. Ezalaki mpenza komonisa boboto!​—2 Samwele 11:1—12:25; 24:1-17.

Ekólo ya Yisalaele emipesaki mobimba epai ya Yehova ntango esalaki na ye kondimana ya Mibeko ya Mose na Ngomba Sinai. (Exode 19:3-8) Yango wana, Biblia ezali koloba ete ekólo Yisalaele ezali mwasi ya Yehova. Balobaki na Yisalaele ete: “[Yehova] abyangi yo lokola mwasi.” Lisusu, Yehova alobaki na ekólo yango ete: “Na bolingo ya seko nakoyokela yo mawa.” (Yisaya 54:6, 8) Ndenge nini Yehova amonisaki bosembo mpo na boyokani na ye na Yisalaele?

Yehova abongisaki makambo mpo na kokokisa bamposa ya Bayisalaele mpe kolendisa boyokani na bango na ye. Abimisaki bango na Ezipito, abongisaki ekólo na bango, mpe amemaki bango na “mokili moleki na mabɛlɛ mpe na mafuta ya nzoi.” (Exode 3:8) Mbala na mbala azalaki koteya bango na nzela ya banganga, Balevi mpe ebele ya basakoli mpe bamemi-nsango. (2 Ntango 17:7-9; Nehemia 8:7-9; Yilimia 7:25) Ntango bato ya ekólo yango bakómaki kosambela banzambe mosusu, Yehova azalaki kosembola bango. Soki babongoli motema, azalaki kolimbisa bango. Libota ya Yisalaele ezalaki mpenza “mwasi” ya matata. Kasi, Yehova aboyaki ye mbala moko te. Mpo na bilaka oyo apesaki Abalayama, atikalaki sembo epai ya Bayisalaele tii ntango mokano na ye mpo na bango ekokisamaki. (Deteronome 7:7-9) Ezali mpenza ndakisa malamu mpo na baoyo babalá!

Yehova azali mpe komonisa bosembo na ye epai ya bato nyonso na ndenge apesaka biloko ya ntina mpo na bomoi, ezala epai ya bayengebene to epai ya bato oyo bazangi boyengebene. (Matai 5:45; Misala 17:25) Longola yango, apesaki Mwana na ye lokola mbeka mpo ete bato nyonso bálongwa na masumu mpe na liwa mpe bázala na elikya ya bomoi ya kokoka mpe ya libela na Paladiso. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Lisiko ezalaki likambo eleki monene mpo na kobatela mpe kobikisa bomoi ya bato. Ezalaki mpenza “likambo mpo na kosunga moto oyo akwei to azali na mpasi.”

Monisá bosembo na yo na misala ya malamu

Lokola bosembo ezali ndeko ya boboto, ezalaka mpe na likanisi ya kosalisana. Soki basaleli yo boboto, yo mpe osengeli kozongisa boboto. Bosembo ya moto ezongelaka ye. Maloba ya Davidi emonisi mpenza ete ayebaki malamumalamu ndimbola ya liloba hèsèdh, alobaki boye: “Nakosambela wana ekotala ngai epai na Tempelo ya bulɛɛ na yo; nakosanzola nkombo na yo.” Mpo na nini? “Na ntina na boboto mpe sembo na yo.” (Nzembo 138:2) Lokola Yehova asalelaki ye boboto, Davidi ayokaki mposa ya kosambela mpe kokumisa ye. Yango wana, ntango tozali komona boboto ya Yehova epai na biso, mitema na biso ezali kopusa biso na kozongisela ye boboto? Na ndakisa, soki moto moko alobi mabe mpo na nkombo ya Yehova, mposa na yo ya komona lokumu ya Yehova ebeba te etindaka yo oloba na esika na ye?

Yango likambo ekómelaki moklisto moko oyo aumeli naino mpenza te na lisangá; ye na mwasi na ye ntango bakendaki na ebembe ya ndeko na bango moko oyo akufaki na likama ya tukutuku. Ezalaki na milulu ya lingomba te, mpe basɛngaki bato oyo bazalaki wana ete soki moto azali na likambo ya koloba mpo na mowei akoki koloba. Moto moko azwaki maloba mpe abandaki koloba ete soki elenge wana akufi liwa ya mobesu, nyonso wana ezali foti ya Nzambe. Alobaki ete, ‘Nzambe alingaki ete azala na ye na likoló, yango wana akamataki ye.’ Ndeko na biso wana akokaki kokanga motema te. Amataki na ebaelo, atako azalaki na Biblia to banɔti te. Atunaki bato nyonso ete: “Bokanisi mpenza ete Nzambe oyo atondi na ngɔlu, azali na motema mawa mpe azali na nguya nyonso asepelaka na makambo ya boye?” Na nsima, asalaki mwa lisukulu ya miniti zomi mpe azalaki kopesa bavɛrsɛ na motó, alimbolaki ntina oyo tokufaka, alobelaki makambo oyo Nzambe asali mpo na kobikisa biso na liwa, mpe elikya kitoko ya lisekwa mpo na kozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. Bato koleka 100 oyo bazalaki wana babɛtelaki ye mabɔkɔ makasi. Na nsima ndeko yango alobaki ete: “Nayokaki esengo moko na motema na ngai oyo nayoká naino te. Nazongisaki matɔndi epai ya Yehova na ndenge ateyaki ngai na mayele na ye mpe na ndenge apesaki ngai libaku ya koloba mpo na nkombo na ye mosantu.”

Kozala sembo epai ya Yehova elimboli mpe kozala sembo na Liloba na ye, Biblia. Mpo na nini tolobi bongo? Mpamba te na kati ya Biblia, Yehova ateyaka biso ndenge oyo tosengeli komitambwisa. Mibeko mpe mitinda na yango eleki malamu mpe epesaka litomba mpo na bomoi. (Yisaya 48:17) Kotika kotosa mibeko ya Yehova te mpo na maloba to bizaleli ya bato mosusu to mpo na bolɛmbu na yo moko. Zalá sembo na Liloba ya Nzambe.

Kozala sembo epai ya Nzambe elimboli mpe kozala sembo na ebongiseli na ye. Makambo mingi esengelaki kosembolama na ndenge na biso ya kososola maloba mosusu ya Biblia mpe esalemaki bongo mokemoke. Kasi, soki totali malamu, ezali na lingomba mosusu te epai bandimi balyaka malamu na elimo koleka biso. (Matai 24:45-47) Ntembe ezali te ete Yehova azali sembo na ebongiseli na ye na mikolo na biso. Biso mpe tokoki kosala ndenge yango? Alexander Macmillan asalaki yango. Mwa moke liboso akufa, alobaki boye: Nazwaki batisimo na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1900, nazalaki na mbula ntuku mibale na misato na ntango wana. Ebongiseli ya Yehova ezalaki moke mpenza; kasi banda wana, namoni ndenge ekoli mpe lelo oyo ekómi lisangá ya bato ya esengo oyo bauti na mikili mingi mpe oyo bazali kosakola mateya na ye ya solo na molende. . . . Sikoyo nazali mpenza na kondima makasi, ntango nazali komona ete nakómi na nsuka ya mosala na ngai mpo na Nzambe awa na mabele, ete Yehova atambwisaki basaleli na ye mpe apesaki bango oyo mpenza basengelaki na yango na ntango oyo ebongi.” Ndeko Macmillan asalelaki Nzambe na bosembo na boumeli ya mbula 66 tii liwa na ye, mokolo ya 26 Augusto 1966. Azalaki ndakisa malamu ya moto oyo azalaki sembo na ebongiseli ya Nzambe awa na mabele.

Longola kozala sembo na ebongiseli ya Nzambe, tokozala mpe sembo biso na biso? Soki tokutani na minyoko ya makasi, tokobatela bosembo na biso epai ya bandeko na biso? Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bandeko na biso na Pays-Bas bapesaki ndakisa malamu ya bosembo. Bato ya Gestapo, elingi koloba basirete ya Banazi, bakangaki nkulutu moko ya lisangá ya Groningen, nkombo na ye Klaas de Vries; banyokolaki ye na ebele ya mituna mpe batyaki ye na bolɔkɔ na esika ya ye moko na boumeli ya mikolo 12, bazalaki kopesa ye kaka limpa na mai ya mpamba mpe babimisaki ye lisusu mpo na kotuna ye mituna. Balakisaki ye mondoki mpe bakanelaki ye ete bakoboma ye, bapesaki ye miniti mibale mpo ayebisa bango bisika oyo bandeko oyo bazalaki kokamba mosala bazalaki kofanda mpe ayebisa bango makambo mosusu ya ntina. Ndeko Klaas alobaki kaka ete: “Nakoloba eloko mosusu te . . . Nakoki kotɛka moto te.” Mbala misato mobimba babangisaki ye na mondoki. Nsukansuka, basoda balɛmbaki mpe batindaki Klaas na bolɔkɔ mosusu. Atɛkaki bandeko na ye te.

Tokozala mpe sembo epai ya ndeko na biso ya libosoliboso, elingi koloba molongani na biso? Yehova akokisaki makambo oyo alobaki na kondimana oyo asalaki na libota ya Yisalaele; bongo biso, tozali sembo na ndai na biso ya libala? Tosengeli kaka te kokokisa ndai ya kofanda na molongani na biso, kasi tosengeli kosala nyonso mpo ete boyokani ya biso na ye ezala malamu ntango nyonso. Bósala nyonso mpo na kobatela libala na bino. Bólekisaka ntango elongo, bófungolanaka mitema na masolo mpe bózalaka polele moko epai ya moninga, bópesanaka mabɔkɔ mpe bólendisanaka, moto na moto ayokaka moninga, bósɛkaka elongo, bólela elongo, bósakanaka elongo, bósalaka mosala elongo mpe bókokisaka mikano elongo, bósepelisanaka mpe bózala baninga. Bókebaka mpenza ete bókóma kolula bato mosusu te. Atako koyebana to mpe kozala baninga na bato mosusu ezali malamu, kasi osengeli kozala na lolango kaka epai ya molongani na yo. Moto moko akabola bolingo na bino te.​—Masese 5:15-20.

Tikalá sembo epai ya bandeko na lisangá mpe na libota. Kobosana bango te ata nsima ya bambula mingi. Kanisáká bango, tunáká nsango na bango, komeláká bango mikanda, bengáká bango, kendáká kotala bango. Ata soki makambo ya bomoi ememi yo wapi, salá makasi obosana bango te. Pesá bango esengo ya koloba ete bayebi yo to bozali bandeko. Soki ozali sembo epai na bango, okozala ntango nyonso na makasi ya kosala oyo ezali sembo mpe okolendisama.​—Esetele 4:6-16.

Ɛɛ, bosembo ya solosolo ezali kosɛnga kokanga mabɔkɔ te mpo na kobatela boyokani ya malamu. Salá nyonso oyo okoki mpo na kozongisela Yehova boboto oyo azali komonisa. Landá ndakisa ya bosembo ya Yehova na ndenge na yo ya kozala na kati ya lisangá, na ndenge ya kofanda na molongani na yo, na libota mpe baninga na yo. Sakoláká na bosembo nyonso bizaleli malamu ya Yehova epai ya bazalani na yo. Mokomi ya nzembo alobaki yango malamu ntango akomaki ete: “Nakoyemba boboto ya [Yehova] ntango nyonso; monɔkɔ na ngai ekoyebisa sembo na yo na mabota nyonso makoya nsima.” (Nzembo 89:1) Nzambe oyo azali na bizaleli wana azali kobenda biso te? Ya solo, “boboto na ye ekosila te.”​—Nzembo 100:5.

[Elilingi na lokasa 23]

Alexander Macmillan

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto