Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/11 lok. 27
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mpo na nini Satana asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nzambe akoki koyoka mpasi na motema—Ndenge oyo tokoki kosepelisa ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Bato oyo baleki biso
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/11 lok. 27

Mituna ya batángi

Na elanga ya Edene, ndenge nini nyoka eyebisaki Eva abuka mobeko ya Nzambe oyo etali nzete ya koyeba malamu na mabe?

Genese 3:1 elobi ete: “Nyoka alekaki nyama nyonso ya mokili na mayele mabe, oyo [Yehova] Nzambe asilaki kozalisa. Alobaki na mwasi ete, Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga te?” Bato bapesi makanisi ndenge na ndenge mpo na kolimbola lolenge oyo nyoka eyebisaki Eva makambo yango. Moko ya makanisi yango ezali ete nyoka eyebisaki ye yango na koningisa nzoto to na bajɛstɛ. Na ndakisa, moto moko ya Angleterre oyo azali mokonzi ya lingomba, nkombo na ye Joseph Benson, alobaki ete: “Emonani mpenza lokola ete [nyoka] esalelaki bajɛstɛ. Bato mosusu balobaka ete na ntango wana banyoka bazalaki na makoki ya kokanisa mpe ya koloba,. . . kasi elembeteli moko te emonisi ete ezalaki bongo.”

Soki ezali ya solo ete ezalaki kaka na nzela ya koningisa nzoto, kasi ndenge nini nyoka ekokaki koyebisa Eva ete soki alei mbuma oyo epekisami akokóma lokola Nzambe, ete akozala na likoki ya koyeba kokata nini ezali malamu mpe nini ezali mabe? Lisusu, Eva mpe akɔtaki na lisolo, ayanolaki motuna oyo nyoka atunaki. (Genese 3:2-5) Soki tolobi ete nyoka eyebisaki Eva makambo na nzela kaka ya bajɛstɛ to eningisaki kaka nzoto, esengeli mpe tóloba ete Eva mpe ayanolaki ye na nzela ya bajɛstɛ; nzokande Biblia elobi ete Eva alobaki.

Ntoma Paulo azalaki na lisolo wana na motó, ntango akebisaki baninga na ye baklisto ete: ‘Lokola nyoka ezimbisaki Eva na mayele na ye, nabangi ete makanisi na bino makopɛngwa.’ Likama oyo Paulo alobelaki eutaki na “bantoma ya lokuta, basali na kozimbisa.” “Bantoma yango mineneminene” bazalaki mpenzampenza likama kaka mpo na ndenge bazalaki koningisa nzoto na bango to kosala bajɛstɛ te. Masolo na bango, elingi koloba maloba ya mayele mabe oyo bazalaki kobimisa mpo na kozimbisa bato mosusu, nde ezalaki mpenza likama.​—2 Bakolinti 11:3-5, 13.

Atako, na elanga ya Edene, ezalaki maloba nde esalelamaki mpo na kokosa Eva, eloko moke te emonisi ete nyoka mpenza ezalaki na binama oyo ebimisaka mongongo. Kutu, ezalaki mpenza na mposa ya binama yango te. Ntango anzelu ya Nzambe asololaki na Balama na nzela ya mpunda, esengelaki kaka te ete nyama yango ezala na binama lokola oyo ya moto mpo ebimisa mongongo. (Mituya 22:26-31) Emonani polele ete ntango ‘mpunda yango oyo elobaka te elobaki na mongongo ya moto,’ likambo yango esalemaki nde na nguya oyo eutaki na likoló, esika bilimo bazalaka.​—2 Petelo 2:16.

Ekelamu ya elimo oyo atindaki nyoka oyo elobaki na Eva, Biblia ebengi ye “nyoka ya kalakala, oyo abyangami [Zabolo, NW] mpe Satana.” (Emoniseli 12:9) Maloba Eva ayokaki, oyo esalaki ete azongisa eyano, eutaki nde epai ya Satana, oyo “azali kokoba komimonisa lokola anzelu moko ya pole.”​—2 Bakolinti 11:14, NW.

[Elilingi na lokasa 27]

‘Bokozala lokola Nzambe, koyeba malamu na mabe’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto