Mituna ya batángi
Nyoka oyo elobaki na Eva ezalaki na makolo?
Mokapo ya Genese 3:14 emonisi ete Yehova alobaki na nyoka oyo ekosaki Eva na elanga ya Edene. Nzambe alobaki na nyoka yango boye: “Mpo ete yo osali likambo oyo, olakami mabe na koleka bibwɛlɛ nyonso mpe nyama ya lisobe nyonso; okotambola na libumu na yo, mpe okolya mabelé mikolo nyonso ya bomoi na yo.” Biblia elobi te ete nyama oyo Satana asalelaki mpo na kokosa Eva ezalaki liboso na makolo, bongo na nsima makolo yango elimwaki. Atako elobeli ya Genese 3:14 ekoki kotinda bato mosusu bákanisa bongo, eloko moko te ezali kotinda biso tókanisa mbala moko ete nyoka ezalaki na makolo liboso Nzambe aloba maloba wana ya kolakela mabe. Mpo na nini?
Mpo ete Nzambe asambisaki mpenzampenza nde Satana, ekelamu ya elimo oyo asalelaki nyoka. Biblia elobi ete Satana azali “tata ya lokuta” mpe ‘nyoka ya ebandeli.’ Bankombo yango mibale ezali komonisa Satana na ndenge asalelaki nyoka, nyama oyo Eva azalaki komona, mpo akosa ye abuka mobeko ya Nzambe.—Yoane 8:44; Emoniseli 20:2.
Nzambe akelaki banyoka ebele, mpe emonani ete Adama apesaki yango nkombo liboso Satana akosa Eva. Nyoka, nyama oyo ekanisaka te, oyo elobaki na Eva, esalaki mabe moko te. Nyama yango eyebaki te ete Satana azalaki kosalela yango, mpe ekokaki koyeba te bitumbu oyo Nzambe akatelaki batomboki.
Kasi, mpo na nini Nzambe alobaki ete nyoka ekotambola na libumu? Ndenge nyoka emibendaka na libumu mpe ndenge ebimisaka lolemo lokola nde ezali kolɛmbola putulu, ebongi mpenza mpo na komonisa kokitisama ya Satana. Ye azalaki liboso na esika ya lokumu lokola anzelu ya Nzambe, kasi akitisamaki; atyamaki na ezalela ya molili ya elimo oyo Biblia ebengi Tartare.—2 Petelo 2:4.
Lisusu, lokola nyoka ekoki koswa moto na litindi, na kokitisama na ye, Satana akokaki koswa “momboto” ya Nzambe “na litindi.” (Genese 3:15, NW) Yesu Klisto, eteni ya liboso ya momboto yango anyokwamaki mpo na mwa ntango na mabɔkɔ ya basaleli ya Satana. Nzokande, nsukansuka Klisto ná bapakolami bakonyata motó ya nyoka ya elilingi. (Baloma 16:20) Na yango, maloba ya kolakela mabe oyo Nzambe alobaki na nyoka ezali komonisa kokitisama mpe nsukansuka, kobomama ya Satana Zabolo, ‘nyoka ya ebandeli.’