Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/12 nk. 24-29
  • Kondima mikumba oyo Yehova apesi yo ememaka mbano mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima mikumba oyo Yehova apesi yo ememaka mbano mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nandimi mosala ya liboso
  • Babuku ya motane, ya bule mpe ya langi ya mosaka
  • Mikumba mpe mikakatano mosusu ebakisami
  • João Maria na Maria João
  • “Toyebi te nini Yehova akotika nzela ete esalema”
  • Ntango ya komekama
  • Kotya Motema Epai Na Yehova Esungaki Ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bazali “koyoka” nsango ya Bokonzi na Brésil
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Jehovah apambolaki ekateli na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tomonaki boboto monene ya Nzambe na ndenge mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/12 nk. 24-29

Lisolo ya bomoi

Kondima mikumba oyo Yehova apesi yo ememaka mbano mingi

YA MARIA DO CÉU ZANARDI

“Yehova ayebi nini azali kosala. Soki apesi yo mokumba, osengeli kondima kosala yango na komikitisa mpenza.” Tata na ngai moto alobaki maloba yango, eleki sikoyo mbula 45. Maloba yango esalisaki ngai mpo ete nandima kosala lokola mosaleli ya ntango nyonso ntango babengaki ngai mbala ya liboso na ebongiseli ya Yehova. Tii lelo, nazalaka na botɔndi mpo na maloba wana ya tata mpamba te ememelá ngai makambo mingi ya malamu.

TATA asalaki abonema ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na mobu 1928 mpe akómaki kosepela na mateya ya Biblia. Lokola Tata azalaki kofanda na ntei ya ekólo Portugal, ayebaki lisangá ya Nzambe kaka na nzela ya mikanda oyo azalaki kozwa na posita mpe na Biblia oyo ezalaká ya baboti na ye. Na 1949, ntango nazalaki na mbula 13, libota na biso mobimba tokendeki kofanda na ekólo Brésil, mboka ya Mama na ngai, mpe tofandaki na kartye ya pembeni na engumba Rio de Janeiro.

Bato oyo bazalaki kofanda pene na biso bazalaki kobenga biso tókende na lingomba na bango; mpe na bantango mosusu tozalaki kokende kuna. Tata azalaki kosepela kotuna bango mituna mpo na koyeba makanisi na bango na ntina ya lifelo, molimo, mpe mabele soki ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya, kasi bazalaki na biyano te. Tata azalaki se koloba ete: “Tosengeli kaka kozela bayekoli ya solosolo ya Biblia.”

Mokolo moko, moto moko oyo akufá miso ayaki kotala biso na ndako azalaki kokabola bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tata atunaki ye kaka makambo oyo azalaki kotuna bato mosusu, mpe moto yango apesaki biyano ya malamu oyo euti na Biblia. Na pɔsɔ oyo elandaki, Motatoli ya Yehova mosusu ya mwasi ayaki kotala biso. Ntango asilisaki koyanola na mituna ebele, ayebisaki biso ete esengeli akende na “elanga.” Ntango amonaki ete Tata akangaki ntina ya maloba na ye te, atángelaki ye Matai 13:38: “Elanga ezali mokili.” Tata atunaki boye: “Ngai mpe nakoki kokende?” Ayanolaki ete: “Mpo na nini te.” Toyokaki nsuka na esengo mpo tomonaki solo ya Biblia lisusu! Tata azwaki batisimo na liyangani oyo elandaki, mpe ngai nazwaki batisimo mwa moke na nsima na Novɛmbɛ 1955.

Nandimi mosala ya liboso

Nsima ya mbula moko na ndambo, nazwaki envelopi monene ya langi ya kaki oyo eutaki na biro ya Batatoli ya Yehova na Rio de Janeiro, mpe na kati nakutaki lokasa ya kotondisa mpo nabanda mosala ya kosakola ya ntango nyonso. Na ntango wana, Mama azalaki nzoto kolɔngɔnɔ te, yango wana nasɛngaki Tata toli na likambo yango. Apesaki ngai eyano ya mpiko ete: “Yehova ayebi nini azali kosala. Soki apesi yo mokumba, osengeli kondima kosala yango na komikitisa mpenza.” Nalendisamaki mingi na maloba yango mpe etindaki ngai nandima mokumba yango. Yango wana nabandaki mosala ya ntango nyonso na mokolo ya 1 Yuli 1957. Esika ya liboso batindaki ngai ezalaki engumba Três Rios, na etúká ya Rio de Janeiro.

Na ebandeli, bato ya Três Rios bazalaki na mposa mpenza te ya koyoka nsango tozalaki komemela bango, mpamba te tozalaki kosalela Biblia ya Katolike te. Kasi ntango tobandaki koyekola Biblia na Geraldo Ramalho, tozwaki lisalisi mpo ete ye azalaki moto ya Katolike oyo amipesá. Asalisaki ngai nazwa Biblia moko oyo ezalaki na sinyatili ya sango ya mboka wana na kati. Kobanda na ntango wana, nakómaki kolakisa sinyatili ya sango soki moto atii ntembe, mpe ezalaki kosukisa ntembe nyɛɛ. Geraldo abatisamaki na nsima.

Natondaki mpenza na esengo ntango liyangani ya zongazonga esalemaki mpenza na kati ya Três Rios na 1959. Mokonzi ya bapolisi oyo azalaki koyekola Biblia na ntango wana, asalaki kutu ebongiseli moko mpo bákoma manaka ya liyangani na biteni ya bilamba mpe etyama bipai na bipai na engumba mobimba. Nsima ya kosakola mbula misato na Três Rios, bapesaki ngai mokumba nakende na esika mosusu, na Itu, na kilomɛtrɛ 110 na wɛsti ya engumba São Paulo.

Babuku ya motane, ya bule mpe ya langi ya mosaka

Ngai na moninga na ngai tolukaki esika ya kofanda mpe tozwaki ndako ya malamu na katikati ya engumba epai ya Maria, mwasi moko ya motema boboto oyo akufela-mobali. Maria azwaki biso mpenza lokola bana na ye ya basi. Kasi eumelaki te, episkɔpɔ ya Lingomba ya Katolike na engumba Itu ayaki kotala Maria mpe ayebisaki ye ete abengana biso na ndako na ye, kasi mwasi yango aboyaki. Ayebisaki episkɔpɔ boye: “Ntango mobali na ngai akufaki, bosalaki eloko moko te mpo na kobɔndisa ngai. Kasi Batatoli ya Yehova oyo basalisi ngai atako nazali moto ya lingomba na bango te.”

Ezalaki na ntango wana nde mwasi moko ayebisaki biso ete basango ya Katolike na Itu bapekisaki bandimi na bango kozwa “babuku ya motane oyo ezali kolobela Zabolo.” Bazalaki kolobela buku “Que Dieu soit reconnu pour vrai!” oyo tozalaki kokabola epai na bato na pɔsɔ wana. Lokola basango bapekisaki buku ya motane, tobongisamaki mpo na kolakisa buku ya bule (“De nouveaux cieux et une nouvelle terre”). Na nsima, ntango bakonzi ya lingomba bayokaki nsango ya mbongwana yango, tosalelaki buku ya langi ya mosaka (La religion a-t-elle servi l’humanité?), mpe bongo na bongo. Ezalaki likambo ya malamu mpenza ete tozalaki na babuku ya ndenge na ndenge, oyo bizipeli na yango ekesaná balangi!

Nsima ya kolekisa mbula moko na Itu nazwaki telegrame ete nakende kosala na Betele, biro ya Batatoli ya Yehova na Rio de Janeiro, mpo na kobongisa liyangani ya ekólo mobimba. Nandimaki na esengo mpenza.

Mikumba mpe mikakatano mosusu ebakisami

Na Betele mosala ezalaki beboo mpe nazalaki koyoka esengo ya kopesa mabɔkɔ na misala nyonso oyo bazalaki kopesa ngai. Oyo nde matomba ebele nazwaki na kotaleláká mokapo ya mokolo ntɔngɔ nyonso mpe lisusu na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na libota oyo esalemaka mokolo ya mosala moko na mpokwa! Libondeli oyo euti mpenza na motema oyo Otto Estelmann mpe oyo bandeko mosusu ya libota ya Betele oyo bakɔmelí na elimo bazalaki kosala ezalaki na bopusi mingi epai na ngai.

Nakangaki bisaka nsima ya liyangani ya ekólo mobimba mpo na kozonga na Itu; kasi nakamwaki mingi ntango Grant Miller oyo azalaki mokɛngɛli ya filiale apesaki ngai mokanda mpo na kobenga ngai nakɔta libela na Betele. Kuna, tozalaki kolala shambre moko na ndeko mwasi Hosa Yazedjian oyo tii lelo asalaka kaka na Betele ya Brésil. Na mikolo yango libota ya Betele ezalaki na bato moke; tozalaki kaka 28 mpe tozalaki biso nyonso baninga ya motema.

Na mobu 1964, João Zanardi, elenge mobali moko oyo azalaki kosala mosala ya ntango nyonso, ayaki na Betele mpo na kolanda mateya. Na ntango yango akómaki mokɛngɛli ya zongazonga na masangá oyo ezalaki na engumba oyo filiale ezali. Tozalaká kokutana mbala mosusu soki ayei kotika balapolo na ye. Tokómaki na likoki ya kolekisa ntango mingi elongo ntango mokɛngɛli ya filiale apesaki João ndingisa ya koyangana na boyekoli ya libota mpokwa nyonso ya mokolo ya mosala moko. Ngai na João tobalanaki na Augusto 1965. Nandimaki na esengo mokumba ya kolanda mobali na ngai na mosala na ye ya zongazonga.

Na mikolo wana, mosala ya zongazonga na bamboka mosikamosika ya Brésil ezalaki na mwa makama mosusu. Nakobosana te bantango tozalaki kokende kotala etuluku ya basakoli na engumba Aranha, na etúká ya Minas Gerais. Tosengelaki komata engbunduka mpe na nsima kotambola ndambo mosusu ya mobembo na makolo; ntango nyonso wana tozalaki komema bavalisi, masini ya kobɛta mikanda, masini ya diapozitive, basakosi ya mikanda. Tozalaki mpenza na esengo mingi ntango tozalaki kokuta Lourival Chantal, ndeko mobali moko mobange, azalaki kozela biso ntango nyonso na esika bazelaka engbunduka mpo na kosalisa biso na komema biloko mosusu.

Na Aranha, makita ezalaki kosalema na ndako moko ya kofutela. Tozalaki kolala na eteni ya ndako moko ya moke na nsima ya ndako yango. Na mopanzi moko ya eteni ya ndako yango, ezalaki na lituka ya koni oyo tozalaki kolambela mpe kotokisa mai oyo bandeko bazalaki komemela biso na bakatini. Twalɛti na biso ezalaki libulu moko na katikati ya babambu mwa pembeni wana. Tozalaki kotika mwinda ya gaze epelaka butu mobimba mpo na kobengana nyama-kɛkɛ oyo epesaka bokɔnɔ oyo babengi maladie de Chagas. Ntɔngɔ nyonso madusu ya zolo na biso ezalaki kokóma moindo mpo na milinga. Oyo nde likambo!

Tozwaki envelopi mosusu ya monene ya kaki, eutaki na biro ya filiale, ntango tozalaki na mosala ya zongazonga na etúká ya Paraná. Ebongiseli ya Yehova epesaki biso mokumba mosusu, mbala oyo ya kokende kosala na Portugal! Mokanda yango epesaki biso toli ete tótalela toli ezali na Luka 14:28 mpe tótánga motuya ya mokumba yango liboso ete tóndima, mpamba te mosala na biso ya kosakola epekisamaki kuna mpe guvɛrnɛma ya Portugal ekangaki bandeko mingi.

Tosengeli kokende na ekólo oyo tokokutana na minyoko? João alobaki boye: “Soki bandeko na biso ya Portugal bakoki kofanda kuna mpe bazali kosalela Yehova na bosembo mpenza, mpo na nini biso te?” Ntango nakanisaki lisusu maloba ya kolendisa oyo Tata alobaki, nalobaki ete: “Soki Yehova apesi biso mokumba, tosengeli kondima kosala yango mpe kotyela ye motema.” Mwa moke na nsima, tokómaki na Betele na São Paulo epai balakisaki biso makambo mosusu oyo tosengelaki kosala mpe bazalaki kobongisa mikanda na biso ya mobembo.

João Maria na Maria João

Tomataki masuwa moko nkombo na yango Eugênio C oyo elongwaki na libongo ya Santos na etúká ya São Paulo mokolo ya 6 Sɛtɛmbɛ 1969. Tokómaki na Portugal nsima ya mikolo libwa ya mobembo na kati ya mai monene. Liboso, tolekisaki basanza mwa mingi na kosala elongo na bandeko oyo bamesani na mosala ya kosakola na babalabala ya mikemike ya Alfama mpe ya Mouraria, oyo ezalaka bakartyé ya Lisbonne ya kala. Balakisaki biso ndenge ya kozala na ekɛngɛ ya kotalaka epai na epai mpo ete bapolisi bákoka kokanga biso te.

Tozalaki kosala makita ya lisangá na bandako ya Batatoli. Tozalaki kosala boye, soki tomoni ete bato ya kartye bakómi kotya biso miso, tozalaki kokende nokinoki kosala makita esika mosusu mpo ete bapolisi báya te kosala mobulu na ndako yango, to kokanga bandeko. Mayangani na biso, oyo tozalaki kobenga pikiniki, ezalaki kosalema na Parke moko nkombo na yango Monsanto oyo ezalaka mosika te na engumba ya Lisbonne, mpe ezalaki kosalema lisusu na Costa da Caparica, esika moko ya zambazamba na bokula ya mai monene. Na bantango yango tozalaki kolata bilamba lokola ya kofandela na ndako, mpe etuluku moko ya basaleli ya miso gaa ezalaki kosɛnzɛla. Soki kaka moto moko oyo toyebi ye te apusani pene, mbala moko tozalaki kobanda lisano, kotanda biloko ya pikiniki, to mpe koyemba loyembo moko ya mboka wana.

Tozalaki kobengana na bankombo na biso te mpo ete Basirɛtɛ bákoka te koyeba biso. Bandeko bazalaki kobenga ngai na mobali na ngai João Maria na Maria João. Ezala na mikanda oyo tozalaki kotinda to na balapolo, tozalaki kosalela bankombo na biso ya solo te. Kasi, moto na moto ayebanaki nde na nimero oyo azwaki. Nazwaki ekateli makasi mpo na kokanga na móto te baadresi ya bandeko. Boye ata soki bakangi ngai nakokaki te kokaba bango.

Atako bipekiseli ezalaki, biso na João tozwaki ekateli ya kosakola na libaku nyonso oyo ezalaki komonana, mpamba te toyebaki ete bakokaki kokanga biso ata ntango nini. Toyekolaki kotalela Tata na biso ya likoló Yehova. Lokola ye nde azalaki Mobateli na biso, asalelaki baanzelu na ye na lolenge moko oyo etindaki biso tóyoka mpenza lokola ete tozalaki “komona ye oyo akomonanaka te.”​—Baebele 11:27.

Mokolo moko, ntango tozalaki kosakola ndako na ndako na Porto, tokutanaki na mobali moko oyo abondelaki biso mingi ete tókɔta epai na ye. Ndeko mwasi oyo tozalaki kosala na ye andimaki mbala moko; ngai mpe nakokaki kosala ndenge mosusu te, esengelaki kaka tókende biso nyonso. Ntango namonaki na kulware fɔtɔ ya moto alata bilamba ya soda, ebangisaki ngai. Nakosala nini sikoyo? Mobali yango asɛngaki biso tófanda mpe atunaki ngai boye: “Okoki kopesa mwana na yo nzela akende mosala ya soda soki basɛngi ye asala yango?” Wana ezalaki nde likambo oyo ekokaki kobimisa mikakatano. Na nsima ya kobondela na motema, nayanolaki ye na kimya ete: “Ngai nazali na bana te, kasi soki ozalaka na esika na ngai mpe soki ngai nde natunaki yo motuna wana, na ntembe te olingaki oyanola bobele ndenge ngai nayanoli.” Afandaki nyɛɛ. Nakobaki boye: “Kasi soki otunaka ngai ete moto ayokaka ndenge nini ntango akufeli ndeko to tata, wana nazali mpenza na likoki ya koyanola motuna yango, mpamba te leki na ngai ya mobali na tata na biso bango nyonso bakufá.” Mpisoli etondaki ngai na miso ntango nazalaki koloba, mpe namonaki ete mobali wana mpe alingaki kolela. Ayebisaki biso ete mwasi na ye autaki kokufa. Ntango nalimbolelaki ye elikya ya lisekwa, asembolaki litoi. Nsima topesanaki mbote na limemya mpe tokendeki malamu; totikaki makambo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova.

Bato ya mitema sembo bazalaki kozwa lisalisi mpo na kokóma na boyebi ya solo, atako epekiseli ezalaki. Na Porto nde mobali na ngai abandaki koyekola na Horácio, moto moko ya mobongo mpe akolaki nokinoki na elimo. Na nsima, mwana na ye Emílio, monganga moko ya mayele mingi, ye mpe ayaki kokangama na Yehova mpe azwaki batisimo. Ezali solo ete eloko moko te ekoki kopekisa elimo santu ya Yehova.

“Toyebi te nini Yehova akotika nzela ete esalema”

Na 1973, babengaki ngai na João na liyangani ya mikili mingi oyo ezalaki na motó ya likambo “Bolongi ya Nzambe” oyo esalemaki na Bruxelles, na ekólo Belgique. Bankóto ya bandeko bautaki Espagne mpe Belgique, mpe basusu bautaki Mozambique, Angola, Cap-Vert, Madère na Açores. Ndeko Knorr, banda kuna na biro monene ya New York, asukisaki liyangani na maloba oyo, mpo na kolendisa bayangani: “Bókoba kosalela Yehova na bosembo. Toyebi te nini Yehova akotika nzela ete esalema. Nani ayebi soki ntango mosusu bokoyangana mpo na liyangani mosusu ya mikili mingi na Portugal!”

Na mbula oyo elandaki, mosala ya kosakola endimamaki na mibeko ya Leta na Portugal. Mpe maloba ya Ndeko Knorr ekokisamaki ntango mokolo ya 25 Aprili 1978, tosalaki liyangani ya mikili mingi na Lisbonne mpo na mbala ya yambo. Oyo nde libaku malamu tozwaki ya kotambola na babalabala ya Lisbonne mpo na kopesa litatoli wana tomemi mabaya oyo tokómi mwa masolo, kokabola bazulunalo, mpe lisusu kopesá bato nkasa ya libyangi na lisukulu ya bato nyonso! Ezalaki lokola ndɔtɔ moko boye oyo ekokisami.

Tokómaki kolinga bandeko na biso ya Portugal mingi. Na kati na bango mingi banyokwamaki na babolɔkɔ mpe mingi babɛtamaki mpo bazalaki koboya kokɔta na makambo ya politiki. Tozalaki na mposa ya kokoba na mosala na biso na Portugal. Nzokande makambo malekaki na ndenge yango te. Na 1982, João abɛlaki maladi ya motema makasi, na yango biro ya filiale epesaki biso likanisi ete tózonga na Brésil.

Ntango ya komekama

Bandeko na biro ya filiale na Brésil basungaki biso mingi mpenza, mpe bapesaki biso mokumba ya kosala na lisangá ya Quiririm na kati ya engumba Taubaté, na etúká ya São Paulo. Bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya João ebebaki nokinoki, mpe eumelaki te akómaki kofanda kaka na ndako. Bibongiseli mibale oyo esalisaki biso tóbatela elimo na biso ezalaki ete bato oyo bazalaki kosepela na solo bazalaki koya koyekola Biblia epai na biso, mpe lisusu likita mpo na mosala ya kosakola mpe boyekoli ya mokanda ezalaki kosalema na ndako na biso.

João akobaki kosalela Yehova na makoki na ye nyonso tii na liwa na ye na mokolo ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1985. Atako nazalaki mawamawa mpe natungisamaki na makanisi, nazwaki ekateli ya kokoba na mokumba na ngai. Na Aprili 1986, mokakatano mosusu ekwelaki ngai ntango bayibi bakɔtelaki ngai na ndako mpe bayibaki biloko nyonso. Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nayokaki lokola nazalaki ngai moko mpe nakómaki kobangabanga. Ndeko moko na mwasi na ye babengisaki ngai nafanda na bango mpo na mwa ntango, mpe nazalaki solo na botɔndi mingi mpo na yango.

Liwa ya João mpe ndenge bayibaki biloko na ngai elembisaki mwa moke mosala na ngai mpo na Yehova. Nazalaki lisusu komiyoka na kimya te na mosala ya kosakola. Nakomelaki biro ya filiale mikakatano yango, mpe babengaki ngai nakende kofanda ntango moke na Betelengai tii nakomiyoka lisusu malamu. Wana ezalaki eleko moko ya kolendisama makasi mpenza!

Ntango kaka namiyokaki malamu moke, nandimaki mokumba ya kosala na Ipuã, engumba moko na etúká ya São Paulo. Atako namipesaki na mosala ya kosakola, bantango mosusu nazalaki kaka kolɛmba nzoto. Soki nayoki bongo, nazalaki kobenga bandeko ya lisangá ya Quiririm na telefone; mpe libota moko ezalaki koya kofandisa ngai mpo na mwa mikolo. Ezalaki mpenza elendiseli ya solo! Bandeko basi mpe mibali 38 basalaki mobembo ya molai wana mpo na koya kotala ngai, na mbula ya liboso oyo nalekisaki na Ipuã.

Na 1992 ebongiseli ya Yehova epesaki ngai mokumba mosusu, mbula motoba nsima ya liwa ya João; mbala oyo ezalaki mpo na kokende na engumba Franca, na etúká ya São Paulo esika nazali naino kosala lokola mosaleli ya ntango nyonso. Teritware yango ebotaka mbuma ebele. Na 1994 nabandaki koyekola Biblia na guvɛrnɛrɛ ya engumba yango. Na ntango wana, azalaki kosala propagande mpo akóma depite na Brésil, kasi tozalaki koyekola mokolo ya mosala moko nyonso nsima ya midi, atako azalaki na makambo mingi ya kosala. Azalaki kokanga telefone na ye mpo ete boyekoli ekatana te. Epesaki ngai esengo komona ete malɛmbɛmalɛmbɛ atikaki makambo ya politiki mpe abongisaki libala na ye! Ye na mwasi na ye bazwaki batisimo na 1998.

Soki nazongisi makanisi nsima, nakoloba ete bomoi na ngai lokola mosaleli ya ntango nyonso ezali bomoi moko oyo etondi na mapamboli mpe mabaku malamu ya kosalela Yehova. Lokola nazalaki kondima mokumba nyonso ebongiseli ya Yehova ezalaki kopesa ngai, yango ememelaki ngai makambo mingi ya malamu. Mpe ezala mosala nini bakobenga ngai lisusu mpo na kosala na mikolo mizali koya, mposa na ngai ya kondima yango ezali kaka makasi.

[Bililingi na lokasa 25]

Na 1957, ntango nabandi mosala ya ntango nyonso, mpe lelo oyo

[Elilingi na lokasa 26]

Elongo na libota ya Betele ya Brésil na 1963

[Elilingi na lokasa 27]

Mokolo ya libala na biso na Augusto 1965

[Elilingi na lokasa 27]

Liyangani na Portugal na ntango ya epekiseli

[Elilingi na lokasa 28]

Tozali kopesa litatoli na Lisbonne na ntango ya liyangani ya mikili mingi “Kondima oyo elongaka” na 1978

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto