Masolo ya Basakoli ya Bokonzi
Bazali “koyoka” nsango ya Bokonzi na Brésil
MPO na kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya bato oyo bakufá matoi, ebele ya Batatoli ya Yehova na Brésil bandimi koyekola Elobeli ya Bikela ya Brésil, atako yango ezali likambo moke te. Milende na bango ezali kobota mbuma malamu mpenza, ndenge mwa masolo oyo elandi emonisi yango.
Eva,a mwasi moko oyo akufá matoi, afandaka na São Paulo, akómaki koyekola elobeli ya bikela ntango akendaki elongo na bana na ye misato kokɔta libala ya makango epai ya mobali moko oyo mpe akufá matoi. Mokolo moko, Eva na makango na ye bakutanaki na Batatoli oyo bakufá mpe matoi bazalaki koteya na kartye moko oyo ezali na bamagazini; Batatoli yango babengisaki bango na makita na Ndako ya Bokonzi. Bandimaki kokende mpamba te bakanisaki ete ekozala mwa fɛti.
Lokola ayebaki malamu mpenza te elobeli ya bikela, Eva akangaki ntina te ya makambo mingi oyo balobaki na makita. Batatoli mingi babengaki ye na bandako na bango mpo na kolya. Basalelaki bililingi ya mwa buku Sepela na bomoi ya seko na Mabele! mpo na kolimbolela ye elaka ya Nzambe ya kotya paladiso awa na mabele na mikolo ezali koya. Eva asepelaki mingi na makambo oyo ayekolaki mpe akómaki koyangana mbala na mbala na makita.
Mwa moke na nsima, Eva akabwanaki na makango na ye mpo na kotosa mibeko ya Biblia. Atako bandeko na ye basepelaki te mpe bazalaki kopekisa ye, Eva alandaki kokola na elimo mpe na 1995, azwaki batisimo. Nsima ya nsanza motoba, Eva akómaki mobongisi-nzela to mosakoli ya ntango nyonso. Asili kosalisa bato minei oyo bakufá matoi, bamipesá na Nzambe mpe bazwá batisimo.
Carlos akufá matoi banda kobotama na ye. Banda bomwana, azalaki komɛla bangi, kosala pite mpe koyiba. Lokola etuluku mosusu ya babandí oyo bazalaki koyokana te na etuluku na bango bazalaki kokanela ye, akimaki na São Paulo mpe afandaki ye ná João mpo na mwa ntango moke. João mpe akufá matoi mpe azalaki moto ya mobulu.
Na nsima ya mwa bambula, Carlos ayokaki nsango ya Bokonzi, yango esalaki ete atika makambo nyonso ya mabe mpe akomisaki libala na ye na mikanda ya Leta. Nsima ya kokokisa makambo oyo Makomami esɛngi, Carlos azwaki batisimo mpo na komonisa ete amipesi na Yehova. Na ntango yango, Carlos azalaki koyeba te, nzokande João mpe andimaki nsango malamu, bongo ye mpe abongwanaki mpenza. Ntango ayekolaki ete Yehova aboyi losambo ya bikeko, João abwakaki bililingi nyonso ya “basantu” oyo azalaki na yango. Nsima ya kotika makambo mabe oyo azalaki kosala, João mpe azwaki batisimo.
Carlos na João bazalaki na nsuka ya esengo ntango bakutanaki na Ndako ya Bokonzi mpe moto na moto amonaki ndenge oyo moninga na ye abongwanaki! Bango nyonso mibale bazali sikoyo batata malamu na mabota na bango mpe bazali basakoli ya Bokonzi ya molende.
Na Brésil, ezali sikoyo na masangá 30 mpe bituluku 154 ya elobeli ya bikela oyo ezali na basakoli koleka 2 500, kati na bango basakoli 1500 bakufá matoi. Na 2001, na liyangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe” oyo esalemaki mpo na bato oyo bakufá matoi na Brésil, bato koleka 3 000 bayanganaki, mpe bato 36 bazwaki batisimo. Tozali kolikya ete Yehova akosalisa ete ebele ya bato mosusu oyo bakufá matoi bándima nsango ya Bokonzi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.