Yesu oyo ya solo
NTANGO bantoma na ye bapesaki eyano ya makanisi ndenge na ndenge oyo bato bazalaki na yango mpo na ye, Yesu atunaki bango boye: “Kasi, bino bozali koloba ete ngai nazali nani?” Evanzile ya Matai eyebisi eyano ya ntoma Petelo: “Ozali Klisto, Mwana ya Nzambe ya bomoi.” (Matai 16:15, 16, NW) Bantoma mosusu mpe bazalaki se na likanisi yango. Natanaele, oyo na nsima ayaki kokóma moko ya bantoma, ayebisaki Yesu ete: “Labi, ozali Mwana ya Nzambe, ozali Mokonzi ya Yisalaele.” (Yoane 1:49, NW) Yesu ye moko amonisaki ntina ya mosala na ye na maloba oyo: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto akokóma epai ya Tata te soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Yesu azalaki mbala na mbala komibenga “Mwana ya Nzambe.” (Yoane 5:24, 25; 11:4) Mpe lokola azalaki kosala makamwisi, ezala ndenge asekwisaki bato oyo bakufaki, amonisaki ete azali mpenza Mwana ya Nzambe.
Bazali mpenza na bantina ya solosolo ya kotya ntembe?
Kasi tosengeli nde kondima makambo oyo Baevanzile elobi mpo na Yesu? Yesu oyo Baevanzile elobelaka azali mpenza oyo ya solo? Frederick Bruce, oyo asilá kokufa, ye azalaki profɛsɛrɛ ya makambo etali koyekola mpe kolimbola mikanda ya Biblia, na Iniversite ya Manchester, na ekólo Angleterre; alobaki boye: “Bilembeteli ya masolo ya kala emonisaka ntango nyonso te likambo mokomoko oyo ezali na mikanda ya kala, ezala mikanda ya Biblia to mikanda mosusu, ete esalemaki solo. Likambo ya ntina ezali nde ya koyeba soki mokomi azali moto moko oyo akomaka makambo na bosembo mpenza na boye ete bato bakoki kotyela ye motema. Soki mokomi azali moto ya ndenge wana, tokoki kokakatana te mpo na kondima ete makambo nyonso ya mikemike oyo akomi ezali solo. . . . Ezali kaka te mpo baklisto batalelaka mikanda ya Boyokani ya Sika lokola mikanda ‘mosantu’ nde bato mosusu basengeli te kotalela mikanda yango ete ezali mpenza na makambo ya solo.”
Nsima ya kotalela ntembe oyo bato mosusu batyaki mpo na Yesu, na ndenge Baevanzile elobelaka ye, James Edwards, profɛsɛrɛ ya makambo ya mangomba na Iniversite ya Jamestown, na etúká ya Dakota ya Nɔrdi, na États-Unis, akomaki boye: “Tokoki koloba kozanga kokakatana ete na kati ya Baevanzile ezali na bilembeteli mingi oyo ezali komonisa makambo ya solo na ntina na Yesu. . . . Na motuna ya koyeba mpo na nini Baevanzile elobelaka Yesu na ndenge oyo wana, eyano ya malamu ezali ete Yesu azalaki mpenza ndenge wana. Baevanzile ebateli na bosembo mpenza makanisi oyo Yesu atikaki na mitó ya bayekoli na ye, ete Nzambe nde atindaki ye mpe apesaki ye nguya mpo ete azala Mwana na ye mpe Mosaleli na ye.”a
Bazali koluka Yesu
Longola Biblia, ezali mpe na mikanda mosusu oyo elobelaka Yesu Klisto? Ndenge nini mikanda yango esengeli kotalelama? Mikanda ya Tacite, Suétone, Josèphe, Pline le Jeune, mpe mwa mikanda ya bakomi mosusu elobeli Yesu mbala ebele. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica, 1995) elobi boye mpo na masolo oyo ezali na kati ya mikanda ya bakomi yango: “Masolo yango oyo ekomamaki na bato oyo bazalaki baklisto te emonisi ete na ntango ya kala, ata bato oyo bazalaki kotɛmɛla lisangá ya boklisto batyaki ntembe soki moke te ete Yesu azalaki mpenza moto ya solo; mpo na mbala ya liboso, atako bazalaki na bantina ya malonga te, bato bakómaki kotya ntembe ete Yesu azalaki moto ya solo te na nsuka ya ekeke ya 18, na boumeli ya ekeke ya 19, mpe na ebandeli ya ekeke ya 20.”
Likambo ya mawa ezali ete na ntango oyo bato ya mayele na mikolo na biso bazali kolukaluka Yesu oyo “ya solo,” emonani ete makanisi oyo bazali kobimisa, oyo ezali kutu na bilembeteli ya solosolo te, mpe ntembe na bango oyo ezangá ntina, nyonso wana ezali kosala ete Yesu ayebana mpenza malamu te. Na kosaláká bongo, tokoki koloba ete likambo oyo bazali kokosela bakomi ya Baevanzile ete bakomaki masapo, bango nde bazali kosala yango: makanisi na bango nde ezali masapo. Bamosusu balingaka ete bákenda nsango mpe bankombo na bango eyebana lokola bato oyo babimisaki likanisi moko ya sika, yango wana balingi te kotalela na bosembo mpenza bilembeteli oyo etali Yesu. Mpo na yango, malɛmbɛmalɛmbɛ bazali kolobela “Yesu” moko boye, oyo auti bobele na makanisi na bango moko.
Mpo na baoyo bazali koluka mpenza Yesu oyo ya solo, bakokuta ye na kati ya Biblia. Luke Johnson, profɛsɛrɛ ya makambo ya Boyokani ya Sika mpe makambo ya boklisto ya kala, na departema ya teoloji na Iniversite ya Emory, amonisi ete lokola bato bamipesi na koluka koyeba Yesu oyo ya solo, bazali koyeba mpenza te nini Biblia elingaka komonisa biso na ntina ya Yesu. Alobi ete koluka koyeba ndenge bato bazalaki na mikolo ya Yesu, makambo ya politiki mpe mimeseno ya ntango wana, ekoki kozala likambo ya malamu mpenza. Kasi, abakisi ete koluka koyeba oyo bato ya mayele babengaka Yesu oyo ya solo, “yango ezali mpenza te likanisi oyo Makomami elingaka komonisa”; Makomami “elobelaka mingimingi bizaleli ya Yesu,” nsango oyo azalaki koyebisa, mpe mosala na ye ya Mosikoli. Na bongo, Yesu azalaki na bizaleli nini mpe nsango nini azalaki mpenza koyebisa?
Yesu oyo ya solo
Baevanzile, elingi koloba masolo minei ya Biblia oyo elobeli bomoi ya Yesu, emonisi ye lokola moto moko oyo ayebaki mpenza komitya na esika ya bato mosusu. Lokola Yesu azalaki koyokela bato mawa, yango etindaki ye asalisa bato oyo bazalaki kobɛla, oyo bakufá miso, mpe oyo bazalaki na bampasi mosusu. (Matai 9:36; 14:14; 20:34) Liwa ya moninga na ye Lasalo mpe mpasi oyo yango ebimiselaki bandeko na ye ya basi, etindaki Yesu ‘ayoka mawa mpe atangisa mpisoli.’ (Yoane 11:32-36) Baevanzile emonisi ete Yesu azalaki koyoka mawa, esengo, mpe bongo na bongo—amityaki na esika ya moto moko ya maba, azalaki na esengo soki bayekoli na ye bakokisi likambo oyo atindaki bango, azalaki koyoka nkanda mpo na bato ya mitema makasi oyo balingaki kolandela makambo mikemike oyo ezalaki na kati ya Mibeko mpe ayokelaki Yelusaleme mawa ndenge eboyaki Masiya.
Mbala mingi, soki Yesu asali likamwisi, azalaki komonisa likambo ya malamu oyo moto oyo asaleli likamwisi yango asalaki, azalaki koloba ete: “Kondima na yo esali ete oyoka malamu.” (Matai 9:22, NW) Akumisaki Natanaele ete azali “Moyisalaele ya solo,” mpe ete “bokosi ezali kati na ye te.” (Yoane 1:47) Ntango bamosusu bakanisaki ete likabo oyo mwasi moko apesaki mpo na komonisa botɔndi ezalaki na ntalo mingi koleka, Yesu akɔtelaki mwasi yango mpe alobaki ete bato bakotikala kokanisa lisolo ya bokabi ya mwasi yango ntango molai na nsima. (Matai 26:6-13) Amonisaki bayekoli na ye ete azalaki mpenza moninga na bango ya motema, “alingaki bango kino nsuka.”—Yoane 13:1; 15:11-15.
Baevanzile emonisi lisusu ete Yesu azalaki mbala moko koyeba bamposa ya bato nyonso oyo azalaki kokutana na bango. Ezala na ntango azalaki kosolola na mwasi moko na pembeni ya libulu moko ya mai, to na moteyi moko ya lingomba na kati ya elanga, to mpe na mobomi-mbisi moko pembeni ya laki moko, Yesu asimbaki mbala moko mitema na bango. Na ntango kaka azalaki kobanda lisolo, mingi kati na bato yango bazalaki koyebisa ye makanisi oyo bazalaki na yango na mitema na bango. Asimbaki mpenza mitema na bango. Atako na ntango wana bato bazalaki kopusana pembeni ya bakonzi te, kasi bato ebele bazalaki kozinga Yesu. Bazalaki kosepela kofanda na Yesu, bazalaki komiyoka malamu kozala pembeni na ye. Bana mike bazalaki kosepela mingi kozala elongo na ye, mpe ntango asalelaki mwana moko ya moke lokola ndakisa, asukaki kaka te na kotɛlɛmisa mwana yango liboso ya bayekoli na ye, kasi ‘akamataki ye kati na mabɔkɔ na ye.’ (Malako 9:36; 10:13-16) Ya solo, Baevanzile emonisi Yesu lokola moto moko oyo ayebaki kobenda bato epai na ye na boye ete mbala mosusu bato bafandaki pembeni na ye na boumeli ya mikolo misato, kaka mpo na koyoka maloba na ye ya kitoko.—Matai 15:32.
Atako ye azalaki moto ya kokoka, Yesu azalaki ntango nyonso te kolobela mabe ya bato ya kozanga kokoka mpe ya masumu oyo azalaki kofanda na bango mpe oyo azalaki koteya bango; azalaki na lolendo te mpe azalaki kosalisa bango makambo na makasi te. (Matai 9:10-13; 21:31, 32; Luka 7:36-48; 15:1-32; 18:9-14) Yesu azalaki na makambo makasi ata moke te. Alukaki te kobakisela bato kilo. Kasi, alobaki nde ete: “Bóya epai na ngai, bino nyonso bozali konyokwama . . . nakolendisa bino.” Bayekoli na ye bamonaki ete azalaki mpenza “na boboto mpe na motema ya komikitisa na motema”; ekanganeli na ye ezalaki mpenza pɛtɛpɛtɛ, mpe mokumba na ye ezalaki ya pɛpɛlɛ.—Matai 11:28-30, NW.
Masolo ya Baevanzile ezali komonisa na bosolo mpenza bizaleli oyo Yesu azalaki na yango. Elingaki kozala likambo ya pɛtɛɛ te ete bato minei báyokana mpo na kolobela moto moko ya lisapo na ndenge ya kokamwa mpe, na masolo minei oyo bakomaki, bango nyonso bálobela ndenge moko bomoto ya moto yango. Ekokaki kosalema ata moke te ete bato minei bákoma makambo ndenge moko mpo na kolobela moto moko soki moto yango azalaki na bomoi te.
Michael Grant, oyo ayekolaka makambo ya kala, atuni motuna moko oyo ezali kotinda na kokanisa: “Ndenge nini ekoki kosalema ete Baevanzile nyonso elobela na ndenge ya polele mpenza elenge mobali moko oyo azalaki kitoko, oyo azalaki na mokakatano ata moko te mpo na koyokana na basi ya lolenge nyonso, ezala mpe basi oyo bayebanaki ete bazali na bizaleli ya mbindo, mpe asalaki nyonso wana kozanga ete alula bango, to amiyoka malamu te pembeni na bango, to mpe azala nsɔninsɔni pembeni na bango?” Eyano ya malamu ezali ete moto yango azalaki mpenza na bomoi mpe asalaki mpenza makambo oyo Biblia elobi.
Avenire na yo etaleli Yesu oyo ya solo
Biblia emonisi biso Yesu ndenge azalaki mpenza ntango azalaki awa na mabele; longola wana, emonisi ete liboso ete Yesu abotama moto, azalaká na bomoi lokola Mwana mobotami-bobele-moko ya Nzambe, “mobotami ya liboso na biloko nyonso bizalisami.” (Bakolose 1:15) Eleki sikoyo mbula nkóto mibale, Nzambe atyaki bomoi ya Mwana na ye ya likoló na kati ya libumu ya moseka moko Moyuda mpo ete mwana yango abotama lokola moto. (Matai 1:18) Na boumeli ya mosala na ye awa na mabele, Yesu asakolaki ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya bobele moko mpo na bato oyo bazali konyokwama, mpe apesaki bayekoli na ye formasyo mpo bákoba na mosala yango ya kosakola.—Matai 4:17; 10:5-7; 28:19, 20.
Na mokolo ya 14 Nisana (soki 1 Aprili) ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), bakangaki Yesu, basambisaki ye, bakatelaki ye etumbu ya liwa, mpe babomaki ye mpo na efundeli ya lokuta ete azalaki motomboki. (Matai 26:18-20, Mt 26:48–27:50) Liwa ya Yesu ezalaki lisiko, elongolaki bato ya kondima na ezalela ya lisumu mpe efungolaki nzela ya bomoi ya seko mpo na baoyo nyonso bakomonisa kondima epai na ye. (Baloma 3:23, 24; 1 Yoane 2:2) Na mokolo ya 16 Nisana, Yesu asekwisamaki, mpe mwa moke na nsima azongaki na likoló. (Malako 16:1-8; Luka 24:50-53; Misala 1:6-9) Lokola azali Mokonzi oyo Yehova aponi, Yesu oyo asekwaki azali na bokonzi nyonso mpo na kokokisa mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli mpo na bato. (Yisaya 9:6, 7; Luka 1:32, 33) Ɛɛ, Biblia emonisi ete Yesu azali mpenza moto oyo akokokisa mikano nyonso ya Nzambe.
Na ekeke ya liboso, ebele ya bato bandimaki Yesu na kotalela ndenge azalaki mpenza, elingi koloba Masiya oyo alakamaki, to Klisto, oyo atindamaki awa na mabele mpo na kolongisa bokonzi ya Yehova mpe kokufa mpo na kosikola bato. (Matai 20:28; Luka 2:25-32; Yoane 17:25, 26; 18:37) Soki bato báyebaka malamumalamu te ete Yesu azali nani, balingaki soki moke te kondima kokóma bayekoli na ye na ntango oyo bazalaki konyokola bango makasi. Bandimaki etinda oyo apesaki bango ya ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso’ mpe bazalaki kosala yango na mpiko mpe na molende.—Matai 28:19.
Lelo oyo, baklisto ebele ya motema sembo mpe oyo bazali na boyebi, bayebi ete Yesu azali moto moko ya masapo te. Bandimi ye lokola Mokonzi oyo Nzambe asili kotya na motó ya Bokonzi na ye oyo esili kobanda kosala na likoló; mosika te, mokonzi yango akozwa makambo ya mabele mobimba na mabɔkɔ. Guvɛrnɛma yango oyo Nzambe asili kotya ezali mpenza nsango ya esengo mpamba te epesi elaka ete mikakatano nyonso ya mokili ekosila. Baklisto ya solo bapesaka mabɔkɔ na bosembo mpenza na Mokonzi oyo Yehova aponi na nzela ya kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi” epai ya bato mosusu.—Matai 24:14.
Baoyo bapesaka mabɔkɔ na ebongiseli oyo ya Bokonzi na nzela ya Klisto, Mwana ya Nzambe ya bomoi, bakozwa mapamboli ya seko. Yo mpe okoki kozwa mapamboli yango! Bato oyo babimisaka zulunalo oyo bakozala na esengo ya kosalisa yo oyeba Yesu oyo ya solo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba malamumalamu makambo mosusu na ntina na masolo ya Baevanzile, talá mokapo 5,6 na mokapo 7 ya buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Makambo oyo bato mosusu balobá
“Natalelaka Yesu ya Nazarete lokola moko ya balakisi minene oyo bateyaki na mokili. . . . Nakoloba na bato ya Lingomba ya Hindu ete: eloko moko ekozanga na bomoi na bino soki boyekoli na limemya te mateya ya Yesu.”—Mohandas K. Gandhi, The Message of Jesus Christ.
“Moto ya ndenge wana, akeseneki mpenza na bato mosusu, akokaki na makambo nyonso, oyo azalaki na makambo ya bongolabongola te, oyo atako azalaki na nzoto ya bato kasi alekaki bato na makambo nyonso mosika mpenza, akoki soki moke te kozala moto ya lisapo mpamba, to koloba ete azalaki te, auti se na makanisi mpamba ya bato. . . . Mpo moto asala Yesu ya lisapo, esengeli ye moko azala moto monene mpenza koleka Yesu ye moko.”—Philip Schaff, History of the Christian Church.
“Soki mpenza ezali ete mwa bato moke, oyo mpe bazalaki bato mpamba, nde babimisaki na makanisi na bango moko, mpe na boumeli ya mwa bambula, moto moko monene mpe ya bizaleli malamu, oyo ateyaki mitinda ya malamu mpenza mpo na bizaleli mpe mpo na lolenge malamu ya komona ete bato nyonso bazali bandeko, yango elingaki kozala likamwisi oyo eleki kutu makamwisi oyo Baevanzile elobelaka.”—Will Durant, Caesar and Christ.
“Soki totali motángo monene ya bato oyo bameká kosala mangomba kasi basuká na nzela, tokoki kondima te ete mobandisi ya lingomba oyo epalangani na mokili mobimba boye azala moto ya solo te, azala kaka moto oyo bato ya kala bango moko babimisaki na makanisi na bango mpo na kotinda bato bálanda lingomba na ye.”—Gregg Easterbrook, Beside Still Waters.
“Lokola nayekolaka mikanda ya kalakala, nandimi mpenza ete Baevanzile ezali masapo mpamba te. Ekokani te na makambo oyo ezalaka na kati ya masapo. . . . Toyebi makambo mingi te ya bomoi ya Yesu, nzokande makambo ya ndenge wana nde oyo bato oyo basalaka masapo bazangaka te kolobela.”—C. S. Lewis, God in the Dock.
[Bililingi na lokasa 7]
Baevanzile emonisi ete Yesu azalaki koyoka mawa, esengo mpe bongo na bongo