Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/5 nk. 5-9
  • Baevanzile ezali makambo ya solo to masapo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baevanzile ezali makambo ya solo to masapo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MITUNA YA KOTALELA
  • OKOLOBA NINI?
  • Baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te—elobaka nde makambo ya solo oyo ebombamá mpo na Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Baevanzile—Ntembe esili naino te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tokoki mpenza kondima Baevanzile?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu oyo ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/5 nk. 5-9

Baevanzile ezali makambo ya solo to masapo?

LISOLO ya Yesu, elenge mobali moko ya Nasalete, oyo abongolá mpenza bomoi ya bato na mokili, eyebani na mokili mobimba. Bato bayekolaka masolo na ye na kelasi to bayokaka yango epai ya mikóló. Bato mingi batalelaka Baevanzile lokola makambo ya solo mpe maloba ya bwanya oyo esilaka ngala te lokola oyo: “Tiká ete liloba na bino lizala Ɛɛ! Ɛɛ!, mpe Te! Te!” (Biso nde totɛngisi makomi; Matai 5:37) Mbala mosusu kutu mateya mingi oyo baboti na yo bateyaki yo, ezala bazali baklisto to te, eutaki na Baevanzile.

Mpo na bamilio ya bayekoli ya solosolo ya Klisto, Baevanzile elobelaka moto oyo bango bandimaka konyokwama to kokufa mpo na ye. Mpe lisusu, Baevanzile epesá bato makasi, epesá bato ezaleli ya koyika mpiko, kondima mpe elikya. Boye, omoni te ete Baevanzile esengeli mpenza kozala na makambo ya solosolo mpo moto atalela masolo yango lokola masapo mpamba te, boye te? Soki tokanisi ndenge oyo masolo ya Baevanzile ebongolá makanisi mpe bizaleli ya bato, omoni te ete esengeli kozala na bilembeteli ya solosolo mpo ondimela moto ya ntembe oyo azali koloba ete ezali makambo ya solo te?

Tosɛngi yo otalela mwa mituna oyo ezali kotinda moto akanisa malamu likambo ya Baevanzile. Talá yo moko makanisi ya bato mosusu oyo bayekolaka Baevanzile, atako bamosusu kati na bango bazali baklisto te. Na nsima nde okozwa makanisi na yo moko.

MITUNA YA KOTALELA

◆ Ekoki mpenza kozala ete masolo ya Baevanzile eutaki kaka na makanisi ya bato?

Robert Funk, moto oyo abimisaki likanisi ya Seminɛrɛ mpo na Yesu, alobaki boye: “Matai, Malako, Luka na Yoane ‘bamonisaki Masiya’ oyo ayokani na mateya ya boklisto oyo ebimaki nsima ya liwa ya Yesu.” Kasi, ntango bazalaki kokoma Baevanzile, bato mingi oyo bayokaki Yesu na matoi na bango mpe bamonaki na miso na bango moko makambo oyo asalaki, mpe bamonaki ye nsima ya lisekwa na ye, bazalaki naino na bomoi. Moto moko te alobaki ete bato oyo bakomaki Baevanzile bakosaki.

Tótalela naino liwa mpe lisekwa ya Klisto. Masolo oyo moto akoki kondima mpo na liwa mpe lisekwa ya Yesu ezali kaka na Baevanzile te, ezali mpe na mokanda ya liboso oyo ntoma Paulo atindelaki baklisto ya Kolinti ya kala. Akomaki boye: “Na liboso napesaki bino yango ezwaki ngai ete Klisto akufi mpo na masumu na biso [lokola] elobaki [Makomami, NW], mpe ete akundami mpe ete asekwi na mokolo ya misato, [lokola] elobaki [Makomami, NW], mpe ete amonani na Kefa mpe na nsima na Bazomi na mibale. Na nsima amonani epai na bandeko nkama mitano ntango moko, mingi na bango bazali na bomoi nde bamosusu basili kolala mpɔngi. Na nsima amonani epai na Yakobo na nsima epai na bantoma nyonso. Na nsima na nyonso amonani epai na ngai mpe, lokola na oyo abotami na elaka mabe.” (1 Bakolinti 15:3-8) Bato oyo bamonaki makambo wana bayebaki makambo oyo esalemaki mpenza na bomoi ya Yesu.

Na kati ya Makomami ya Greke ya boklisto, eloko moko te ezali komonisa ete bakomi bakɔtisaki makambo oyo eutaki na makanisi na bango moko, lokola bato ya ntembe na mikolo na biso bazali koloba yango. Nzokande, makambo ya ndenge wana ezali na mikanda oyo ekomamaki na ekeke ya mibale T.B. Na bongo, masolo mosusu oyo elobeli Klisto kasi ezali na Biblia te, ekomamaki ntango lipɛngwi ekɔtaki na boklisto ya solo mpe ezalaki kokola epai ya bato oyo bakabwanaki na lisangá ya bantoma.—Misala 20:28-30.

◆ Baevanzile ekokaki kozala masapo?

Clive Lewis, ye azali mokomi mpe moyekoli ya mikanda, andimaka te ete Baevanzile ezali masapo mpamba. Akomaki boye: “Nayekolaka istware na mikanda ya kala mpe tómata tókita, nandimi mpenza ete Baevanzile ezali masapo mpamba te. Ezali na makambo oyo ezalaka na masapo te. . . . Toyebi makambo mingi te ya bomoi ya Yesu, mpe moto moko te oyo akanisi kosala lisapo na ye akolinga kosala yango na ndenge wana.” Likambo mosusu oyo ezali kobenda likebi na biso ezali ete Herbert Wells, moto moko ya mayele na istware mpe ayebanaki mingi, ye azalaki moklisto te, kasi alobaki boye: “[Bakomi ya Baevanzile] bango nyonso minei . . . balobi ndenge moko; balobeli mpenza moto moko boye; bazali mpenza . . . kondimisa ete bakomaki makambo ya solo.”

Tótalela ndenge balobeli Yesu ntango abimelaki bayekoli na ye nsima ya lisekwa na ye. Na ntembe te, moto oyo ayebi mpenza kosala masapo mbɛlɛ alobelaki kozonga ya Yesu na makambo minene, ete asalaki lisolo moko ya kafukafu, mpe ete azalaki na kongɛnga mpe na nkembo mingi. Kasi, bato oyo bakomaki Baevanzile balobi kaka ete atɛlɛmaki liboso ya bayekoli na ye. Na nsima atunaki ete: “Bana, bozali na eloko ya kolya te?” (Yoane 21:5) Gregg Easterbrook, moto moko ya mayele, alobi boye: “Yango ezali makambo oyo elakisaka ete ezali lisolo ya solo, kasi lisapo te.”

Bato oyo balobaka ete Baevanzile ezali masapo mpamba bazalaka mpe na mokakatano mosusu etali ndenge oyo Balabi bazalaki koteya na ntango oyo bazalaki kokoma Baevanzile. Ndenge na bango ya koteya ezalaki kosɛnga ete moyekoli azongelaka makambo tii akokanga yango na motó. Yango ezali kotinda mpenza na kokanisa ete basalaki nyonso ete bákoma mpenza maloba oyo Yesu alobaki, kasi ezala na makambo oyo babakisi te.

◆ Soki Baevanzile ezalaki masapo, mbɛlɛ balongaki mpenza kokoma yango na mwa ntango moke boye nsima ya liwa ya Yesu?

Lelo oyo tozali na makambo oyo ezali komonisa ete Baevanzile ekomamaki banda na mobu 41 tii na 98 T.B. Yesu akufaki na mobu 33 T.B. Yango emonisi ete elekaki ntango mingi te mpo bákoma masolo ya bomoi na ye banda na ntango oyo asukisaki mosala na ye. Likambo yango epesaka mokakatano monene epai ya bato oyo balobaka ete masolo ya Baevanzile ezali kaka masapo mpamba. Mpo lisapo epalangana, esɛngaka ntango mingi. Tózwa na ndakisa Iliade na Odyssée, masapo ya Homère, moto moko ya Grèce mpe mokomi ya maloba ya ntɔki. Bato mosusu balobaka ete esɛngaki bankama ya bambula mpo masapo yango oyo ekomami na maloba ya ntɔki epalangana mpe bato báyeba yango malamu. Kasi, tokoki koloba nini mpo na Baevanzile?

Na mokanda na ye oyo ezali na motó ya likambo ete Kaisala na Klisto (na Lingelesi), Will Durant, moto ya mayele na istware, akomaki boye: “Soki mpenza mwa bato moke yango oyo bazalaki bato mpamba babimisaki na makanisi na bango moko . . . moto oyo azalaki na bomoto ya kokamwa, na bizaleli malamu, moto ya lokumu malamu mpe amonaka ete bato nyonso bazali mpenza bandeko, elingaki kozala likamwisi oyo eleki kutu makamwisi oyo Baevanzile elobelaka. Ntembe ya bato ya mayele esili koumela mbula nkama mibale, kasi lisolo oyo elobeli makambo oyo Klisto asalaki, bomoto na ye mpe mateya na ye ezali na yango polele, mpe ezali lisolo oyo bato basepelaka na yango mingi na mikili ya Mpoto.”

◆ Baevanzile ekomamaki nsima mpo na kokokisa bamposa ya baklisto ya liboso?

Bato mosusu balobaka ete mayele mabe ya baklisto ya liboso etindaki baoyo bakomaki Baevanzile básala lisolo ya Yesu to bábakisa makambo mosusu na lisolo na ye. Kasi, soki totaleli Baevanzile malamumalamu, tokomona ete basalelaki ata moke te mayele mabe motindo wana. Soki baklisto ya ekeke ya liboso basalelaki mayele mabe mpe babakisaki makambo mosusu oyo Yesu asalaki te na kati ya Baevanzile, mpo na nini na bisika oyo balobaki mabe ya Bayuda na ya bato ya bikólo mosusu ezali naino tii lelo na Baevanzile?

Ndakisa moko ezali na Matai 6:5-7, epai batángi maloba ya Yesu ete: “Ekobondela bino, bózala lokola bakosi te, baoyo balingi kotɛlɛma mpe kobondela na biyanganelo mpe na bizwanelo na nzela ete bámonana na bato. Nazali koloba na bino na solo ete bazali na libonza na bango.” Tomoni mpenza ete azalaki komonisa mabe ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda. Yesu alobaki lisusu boye: “Ezali bino kobondela, bólobaloba lokola ekosalaka bapakano te, zambi bazali kokanisa ete Nzambe akoyoka bango mpo na kolobaloba na bango.” Lokola bazongelaki maloba ya Yesu ndenge yango, bato oyo bakomaki Baevanzile bazalaki koluka kobenda bato na lingomba na bango te. Bakomaki se makambo oyo Yesu Klisto alobaki.

Tótalela lisusu masolo ya Baevanzile oyo elobeli basi oyo bakendaki na lilita ya Yesu mpe bakutaki yango etikali mpamba. (Malako 16:1-8) Gregg Easterbrook alobi ete “na mimeseno ya bato ya Moyen-Orient na ntango ya kala, bazalaki kotyela maloba ya basi motema te: na ndakisa, soki mibali mibale balobi ete mwasi Songolo asali ekobo, bazalaki kondima yango mbala moko, kasi soki mwasi nde alobi ete mobali Mpakala asali ekobo, bakokaki kokweisa mobali yango te.” Kutu, bayekoli ya Yesu mpe bandimelaki basi wana te! (Luka 24:11) Yango wana ezali mpasi na kokanisa ete lisolo yango eutaki kaka na makanisi ya moto.

Lokola mikanda mosusu oyo batindelaki bato to masangá mpe mokanda ya Misala ezali na masese te, yango ezali mpenza kolakisa ete ezali baklisto ya liboso te bato babakisaki masese oyo ezali na Baevanzile kasi Yesu ye moko mpenza nde moto alobaki yango. Lisusu, soki tokokanisi malamumalamu Baevanzile na mikanda oyo batindelaki bato mpe masangá, tokomona ete, ezala Paulo to bato mosusu oyo bakomaki Makomami ya Greke, moko te amekaki kobongola maloba na mayele na ye mpe koloba ete Yesu nde alobaki yango. Soki baklisto ya liboso basalaki likambo ya ndenge wana, mbɛlɛ tomonaka ata mwa makambo mosusu oyo ezali na mikanda oyo batindelaki bato mpe masangá na kati ya Baevanzile. Lokola tomonaka makambo yango te, tokoki mpenza koloba ete masolo ya Baevanzile ezali masolo ya solo mpe Yesu nde alobaki yango.

◆ Tokoloba boni mpo na oyo ezali lokola bongolabongola na kati ya Baevanzile?

Banda kala bato ya ntembe balobaka ete Baevanzile etondi na bongolabongola. Will Durant, moto ya mayele na istware, alukaki koyekola masolo ya Baevanzile na kozanga makanisi nyonso ya mabe, atalelaki yango kaka lokola mikanda ya istware. Atako alobaki ete ezali na makambo oyo ezali komonana lokola bongolabongola, kasi na nsuka alobaki boye: “Bongolabongola ezali na makambo mikemike, kasi na nsango nyonso te; na mobimba, Baevanzile elobi ndenge moko mpe elobeli Yesu na bongolabongola te.”

Ezali mpasi te mpo na kolimbola ntina oyo makambo mosusu ezali komonana lokola bongolabongola na kati ya Baevanzile. Tópesa ndakisa: Matai 8:5 elobi ete “kapitɛnɛ ya basoda mokama ayei liboso ya [Yesu], kolɔmba ye” abikisa mosaleli na ye. Na Luka 7:3, balobi ete mokonzi ya basoda “atindelaki [Yesu] mikóló ya Bayuda kolɔmba ye ete aya kobikisa moombo na ye.” Mokonzi ya basoda atindaki mikóló na esika na ye. Matai alobi ete mokonzi ya basoda ye moko nde abondelaki Yesu mpamba te mikóló bayebisaki Yesu mposa ya mokonzi wana, bango bazalaki lokola balobeli na ye. Oyo ezali kaka ndakisa moko oyo ezali komonisa ete tokoki kolimbola makambo oyo balobaka ete ezali lokola bongolabongola na kati ya Baevanzile.

Tokoloba nini mpo na bato ya ntembe oyo balobaka ete Baevanzile ezali na makambo oyo esengeli te mpo tóbenga yango lokola masolo ya solo? Durant alobi lisusu boye: “Lokola bato ya ntembe bakómaki mitema lukuluku likoló ya makambo oyo bamonaki, mpo na kondima ete Testama ya Sika ezali masolo ya solo, batyaki masɛngami ya makasimakasi, nzokande soki basaleli masɛngami yango mpo na bato minene ya kala, bato oyo bandimaka ete bazalaki na bomoi lokola Hammourabi, Davidi, Socrate, bango nyonso bakoloba ete ezali solo te ete bazalaki mpenza na bomoi. Ata soki bato oyo bakomaki Baevanzile bazalaki na bindimeli nini, balobeli makambo mingi oyo bato oyo basalaka masapo bakokaki kolobela te. Na ndakisa, ndenge bantoma bazalaki kowelana mpo na bisika ya lokumu na kati ya Bokonzi, ndenge bakimaki ntango bakangaki Yesu, ndenge Petelo awanganaki Yesu . . . Moto oyo atángi makambo wana akoki kotya ntembe te ete esalemaki na moto oyo azalaki mpenza na bomoi.”

◆ Mangomba ya boklisto lelo oyo ezali mpenza koteya Yesu ndenge balobeli ye na kati ya Baevanzile?

Bato ya Seminɛrɛ mpo na Yesu balobaki ete mpo na koyekola Baevanzile “balandaka makanisi ya makita minene ya mangomba te.” Kasi, Wells, moto ya mayele na istware amonaki ete bokeseni ezali monene mpenza na kati ya mateya ya Yesu ndenge ezali na Baevanzile mpe mateya ya mangomba ya boklisto. Akomaki boye: “Likambo moko te, ata na lolenge nini, ezali komonisa ete bantoma ya Yesu bayokaki liteya ya Trinite na Yesu. . . . Mpe [Yesu] alobaki eloko moko te oyo emonisi ete basengeli kosambela mama na ye Malia, na motindo ya Isis, Mokonzi-mwasi ya likoló. Ayebaki ata likambo moko te na makambo oyo ezali komonana na mangomba ya boklisto, ezala na losambo to na mimeseno.” Yango wana, moto akoki kolanda mateya ya mangomba ya boklisto te mpo na koluka koyeba soki Baevanzile ezali solo to te.

OKOLOBA NINI?

Nsima ya kotalela makambo nyonso oyo tolobeli, yo okanisi nini? Ezali mpenza na makambo ya solo, makambo oyo ekoki kondimisa moto ete Baevanzile ezali masapo? Bato mingi bamonaka ete mituna mpe ntembe oyo bato babimisaka likoló ya Baevanzile ezali mpenza na ntina te mpe ezali ya kondima te. Mpo na kozwa likanisi ya malamu yo moko, osengeli kotánga Baevanzile na makanisi ya bosembo. (Misala 17:11) Soki otaleli boyokani, bosembo, mpe bosolo oyo Baevanzile ezali kolobela Yesu, okomona ete masolo yango ezali masapo te.a

Soki oyekoli Biblia malamumalamu mpe olandi toli na yango, okomona ndenge oyo yango ekoki kobongisa bomoi na yo. (Yoane 6:68) Mingimingi soki otángi maloba ya Yesu na kati ya Baevanzile. Lisusu, kati na yango okoyeba makambo kitoko oyo bato ya botosi bakozwa na mikolo ezali koya.​—Yoane 3:16; 17:3, 17.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá mokanda La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? na mokapo 5, 6, na 7 mpe lisusu na mwa buku Un livre pour tous. Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda na lokasa 7]

Makambo oyo emonisaka lisolo ya solo

ELEKI mwa bambula, mopanzi-nsango moko, moto ya Australie, ye mpe azalaká kotyela makambo ya Biblia ntembe, alobaki boye: “Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai nakokisi oyo ezali mpenza mosala ya liboso ya mopanzi-nsango: koluka koyeba soki makambo oyo nazali koloba ezali solo. . . . Mpe nayokaki mawa, mpamba te makambo oyo nazalaki kotánga [na kati ya Baevanzile] ezalaki masapo te mpe ezalaki makambo oyo euti na makanisi ya moto te. Ezalaki mpenza lisolo. Makambo ya kokamwa oyo elobamaki na bato oyo bamonaki yango na miso to bayokaki yango epai na baoyo bamonaki yango na miso . . . Ezali na makambo oyo emonisaka ete oyo ezali lisolo, mpe Baevanzile ezali na makambo yango.”

Ndenge moko mpe, Edward Blaiklock, profesɛrɛ ya masolo ya Bagreke na Baloma oyo ezali na mikanda ya kala na iniversite moko (Auckland University), alobaki boye: “Nazali moto ya mayele na istware. Nayekolaka mikanda ya kala na liso ya moto ya istware. Mpe nalobi na bino ete bilembeteli oyo emonisi ete Klisto azalaki na bomoi, akufaki, mpe asekwaki, ezali polele koleka makambo mingi oyo tondimaka ete esalemaká na ntango ya kala.”

[Karte/Bililingi na lokasa 8, 9]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

FOENIKI

GALILAI

Ebale Yaladene

YUDEA

[Bililingi]

“Bilembeteli oyo emonisi ete Klisto azalaki na bomoi, akufaki, mpe asekwaki, ezali polele koleka makambo mingi oyo tondimaka ete esalemaká na ntango ya kala.”​—PROFESƐRƐ EDWARD BLAIKLOCK

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Bakalati na nsima ya makomi: Euti na kalati moko ya Pictorial Archive (Near Eastern History) Est. and Survey of Israel.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto