Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/1 nk. 29-31
  • Bankulutu—Bópesa bandeko mosusu formasyo mpo bázwa mikumba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bankulutu—Bópesa bandeko mosusu formasyo mpo bázwa mikumba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bólanda ndakisa ya Yehova
  • Bóbanga te kotikela basusu mikumba mosusu
  • Bankulutu, bópesa bandeko mosusu formasyo!
  • Basaleli na misala basalaka mosala ya motuya
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Bankulutu mpe basaleli na misala bazali kobatela boyokani kati na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mokumba ya basaleli na misala ezali nini?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Eteyelo mpo na kobongisa basungi​—Ekuke monene oyo ezali komema na mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/1 nk. 29-31

Bankulutu—Bópesa bandeko mosusu formasyo mpo bázwa mikumba

NA MOKILI mobimba, ebele ya masangá ya Batatoli ya Yehova ezali na mposa makasi ya mibali oyo basengeli kozala bakɛngɛli. Mposa yango eyei mpo na makambo misato ya minene.

Ya liboso, Yehova alakaki ete ‘akokómisa oyo eleki moke libota ya makasi’; lelo oyo azali kokokisa likambo yango. (Yisaya 60:22) Soki tozwi kaka mbula misato oyo euti koleka, na ngɔlu ya Yehova, bayekoli ya sika pene na milio moko bazwaki batisimo, elingi koloba ete bakómi Batatoli ya Yehova. Esengeli kozala na mibali oyo bakoki kozwa mikumba mpo na kosalisa bato yango ya sika bákola na elimo mpe bákóma baklisto oyo bakɔmeli.​—⁠Baebele 6:⁠1.

Ya mibale, bandeko mosusu oyo bazalaki bankulutu banda bambula ebele batiki mikumba mosusu mpo bakómi mibange mpenza to mpo na mikakatano ya nzoto.

Ya misato, bankulutu mingi ya molende bakómi kosala na Bakomite mpo na boyokani na minganga, na Bakomite ya botongi, to na Bakomite ya Bandako ya mayangani. Bamosusu kati na bango bamonaki ete basengeli kotika mikumba mosusu na kati ya masangá na bango mpo bákokisa malamu mikumba oyo batikali na yango.

Ndenge nini kokokisa mposa makasi yango ya mibali oyo bakoki kozwa mikumba? Sɛkɛlɛ ezali kaka formasyo. Biblia ezali kolendisa bakɛngɛli baklisto ete bápesa formasyo na “bato ya sembo oyo, na nsima, bakozala bato oyo bakoki mpenza mpo na koteya bamosusu.” (2 Timote 2:​2, NW) Kopesa formasyo elimboli koteya moto mpo abonga, akoka, to ayeba malamu mosala moko. Sikoyo, tólobela naino ndenge oyo bankulutu bakoki kopesa formasyo epai ya bandeko mosusu oyo babongi.

Bólanda ndakisa ya Yehova

Yesu Klisto azalaki moto oyo abongi, akoki mpe ayebi mosala na ye malamu. Ezali likambo ya kokamwa te mpamba te Yehova Nzambe ye moko nde apesaki ye formasyo. Makambo nini esalaki ete formasyo yango esalema malamu mpenza? Yesu atángaki makambo misato na maloba na ye oyo ekomami na Yoane 5:20 (NW) ete: “Tata [1] alingaka Mwana mingi mpe [2] alakisaka ye makambo nyonso oyo ye moko asalaka, mpe akolakisa ye [3] makambo ya minene koleka oyo.” Soki totaleli mokomoko na makambo yango, ekosalisa biso tóyeba malamu likambo etali kopesa formasyo.

Tomoni ete Yesu abandaki na maloba oyo: “Tata alingaka Mwana.” Banda na ebandeli, ntango azalaki kokela mokili mpe biloko nyonso, Yehova azalaki na boyokani malamu mpenza na Mwana na ye. Masese 8:30 (NW) elimboli malamu boyokani yango na maloba oyo: “[Ngai Yesu] nakómaki pembeni na ye [Yehova Nzambe] lokola moto oyo ayebi mosala malamu, nakómaki oyo ye azalaki kolinga mingi, mokolo na mokolo, wana nazalaki kosepela liboso na ye ntango nyonso.” Yesu azalaki na ntembe ata moke te ete Yehova azalaki ‘kolinga ye mingi.’ Yesu mpe azalaki kobomba te esengo oyo azalaki koyoka ntango azalaki kosala elongo na Tata na ye. Ezalaka esengo mpenza soki bankulutu baklisto mpe bandeko oyo bango bazali kopesa formasyo bazali na boyokani malamu, mpe bazali kolobana makambo polele!

Ya mibale, Yesu alobaki ete Tata “alakisaka ye makambo nyonso oyo ye moko asalaka.” Maloba yango endimisi maloba ya Masese 8:30 ete Yesu ‘azalaki pembeni’ ya Yehova ntango azalaki kokela molɔ́ngɔ́. (Genese 1:26) Bankulutu bakoki kolanda ndakisa malamu wana; basengeli kosala na bomoko na basaleli na misala, kolakisa bango ndenge oyo basengeli kokokisa malamu mikumba na bango. Formasyo ezali kaka te mpo na basaleli na misala oyo baponami sika. Kasi, tokoloba boni mpo na bandeko oyo, banda bambula mingi, bazalaka na mposa ya kosala lokola bakɛngɛli, kasi bazali kopona bango te? (1 Timote 3:⁠1) Bankulutu basengeli kopesa bandeko yango toli na ndenge ya polele mpo báyeba makambo oyo basengeli kosala na yango molende.

Tókamata ndakisa moko: mosaleli na misala moko akoki kozala moto oyo batyelaka ye motema, atosaka ngonga, mpe akokisaka malamu mikumba na ye. Mbala mosusu mpe azali moteyi malamu. Ekoki kozala ete asalaka misala mingi ya malamu na kati ya lisangá. Kasi, ntango mosusu ayebaka te ete azalaka na makambo makasi epai ya bandeko baklisto mosusu. Nzokande, bankulutu basengeli kozala bato oyo bamonisaka “boboto oyo euti na bwanya.” (Yakobo 3:​13, NW) Soki nkulutu moko asololi na mosaleli na misala yango, amonisi ye polele mokakatano na ye, apesi ye bandakisa ya makambo oyo asalaka, mpe apesi ye makanisi oyo ebongi mpo akoka kobongisa, ekozala mpenza malamu! Soki toli ya nkulutu ezali mpenza “na elɛngi ya mungwa,” na ntembe te ndeko wana akoyamba yango na esengo. (Bakolose 4:⁠6) Mosaleli na misala ya ndenge wana mpe asengeli koyeisa mokumba ya nkulutu pɛpɛlɛ, elingi koloba ete asengeli kozala pene ya koyoka mpe kondima toli oyo bazali kopesa ye.​—⁠Nzembo 141:⁠5.

Na masangá mosusu, bankulutu bapesaka mokemoke basaleli na misala formasyo oyo ebongi mpenza. Na ndakisa, bamemaka basaleli na misala oyo bazali na makoki ntango bakei kotala bato ya maladi to mibange. Na ndenge yango, basaleli na misala bayebaka malamu mosala ya kobatela bampate. Kasi, mpo mosaleli na misala alanda kokola na elimo, ezali mpe na makambo mingi mosusu oyo akoki kosala ye moko.​—⁠Talá etanda oyo ezali na nse; na motó na likambo “Oyo basaleli na misala bakoki kosala.”

Likambo ya misato oyo esalaki ete Yesu azwa formasyo malamu ezali ete ntango Yehova azalaki kopesa ye formasyo, azalaki kotalela makambo oyo ekoya. Yesu alobaki ete Tata akomonisa Mwana “makambo ya minene koleka oyo.” Makambo oyo Yesu ayekolaki ntango azalaki awa na mabele esalisaki ye akóma na makoki oyo asengelaki na yango mpo na kokokisa mikumba mosusu oyo asengelaki kozwa na nsima. (Baebele 4:15; 5:​8, 9) Na ndakisa, etikali moke Yesu azwa mokumba monene ya kosekwisa bamiliare ya bato oyo bazali lelo oyo na liwa mpe kosambisa bango!​—⁠Yoane 5:​21, 22.

Ntango bankulutu bazali kopesa basaleli na misala formasyo, basengeli kokanisaka bamposa oyo ekozala na mikolo ekoya. Ekoki komonana ete lelo oyo bankulutu mpe basaleli na misala bazali mingi mpe bazali kokokisa mikumba nyonso na lisangá, kasi makambo ekokóma ndenge nini soki lisangá ya sika esalemi? Bongo soki masangá mingi esalemi? Na boumeli ya mbula misato oyo euti koleka, na mokili mobimba, masangá ya sika koleka 6 000 efungwamaki. Kanisá ebele ya bankulutu na basaleli na misala oyo basengelaki mpo na kotambwisa masangá ya sika nyonso wana!

Bankulutu, bozali kolanda ndakisa ya Yehova, elingi koloba bozalaka na boyokani malamu na bandeko oyo bozali kopesa formasyo? Bolakisaka bango ndenge ya kosala misala na bango? Bokanisaka bamposa oyo ekobima na mikolo ezali koya? Soki bolandi ndakisa ya Yehova na ndenge oyo apesaki Yesu formasyo, bato mingi bakozwela yango matomba.

Bóbanga te kotikela basusu mikumba mosusu

Bankulutu ya makoki oyo bameseni kokokisa mikumba mingi bakoki ntango mosusu kobanga kotikela bandeko mosusu mikumba mosusu. Ekoki kozala ete basilá komeka kosala yango kasi ebotaki mbuma ya malamu te. Yango wana bakoki kobanda kokanisa ete, ‘Soki olingi mosala moko esalema malamu, salá yango yo moko.’ Kasi, makanisi yango eyokani mpenza na mokano ya Yehova, ndenge emonisami na kati ya Makomami, ete baoyo bayebi makambo mingi te bázwa formasyo epai ya baoyo bayebi makambo mingi?​—⁠2 Timote 2:​2, NW.

Ntoma Paulo asepelaki te ntango Yoane Malako, moko ya baninga na ye oyo bazalaki kosala na ye mibembo, atikaki mosala na ye na Pamfulia mpe azongaki na mboka na ye. (Misala 15:​38, 39) Nzokande, Paulo atikaki te ete likambo wana elɛmbisa ye mpo na kopesa basusu formasyo. Aponaki ndeko mosusu oyo azalaki elenge, nkombo na ye Timote, mpe apesaki ye formasyo na mosala ya misionɛrɛ.a (Misala 16:​1-3) Na Beloya, bato batɛmɛlaki bamisionɛrɛ makasi; yango wana ekómaki mpasi mingi mpo Paulo atikala kuna. Atako lisangá oyo ezalaki wana esalemaki sika, Paulo atikaki yango na mabɔkɔ ya Sila, ndeko moko ya makoki oyo azalaki mpe mokóló, mpe na mabɔkɔ ya Timote. (Misala 17:​13-15) Na ntembe te Sila ateyaki Timote makambo mingi. Na nsima, ntango Timote akómaki na makoki ya kozwa mikumba mosusu, Paulo atindaki ye na Tesaloniki mpo na kolendisa lisangá oyo ezalaki kuna.​—⁠1 Batesaloniki 3:​1-3.

Paulo na Timote bazalaki koyokana malamu mpenza. Bazalaki mpenza baninga ya motema. Ntango Paulo atindelaki lisangá ya Kolinti mokanda, alobaki mpo na Timote, oyo ye akanaki kotinda kuna, ete azali “mwana na ngai ya bolingo mpe ya sembo na kati ya Nkolo.” Abakisaki ete: “[Timote] akozongela lisusu kolakisa bino ndenge na ngai ya kosala na kati ya Klisto Yesu.” (1 Bakolinti 4:​17, NW) Timote alandaki malamu formasyo oyo Paulo apesaki ye, akómaki na makoki mpo na kokokisa mikumba na ye. Bandeko mingi oyo bazali bilenge bakómi basaleli na misala, bankulutu, to mpe bakɛngɛli-batamboli ya makoki mpamba te bazwaki formasyo epai ya bandeko oyo bazali mikóló na bango, baoyo batyelaki bango likebi, ndenge oyo Paulo asalaki mpo na Timote.

Bankulutu, bópesa bandeko mosusu formasyo!

Esakweli ya Yisaya 60:22 ezali mpenza kokokisama lelo oyo. Yehova azali ‘kokómisa oyo eleki moke libota ya makasi.’ Mpo ete libota yango etikala ‘makasi,’ esengeli ete makambo na yango nyonso ebongisama malamu. Bino bankulutu, bóluka koyeba na makambo nini lisusu bokoki kopesa formasyo na bandeko mibali oyo babongi kozwa mikumba. Bótalela likambo ya mosaleli na misala mokomoko soki ayebi malamu makambo nini asengeli kobongisa mpo akoka kokende liboso. Bino mpe bandeko mibali oyo bosili kozwa batisimo, bósalela malamu toli nyonso oyo bazali kopesa bino. Bósalela mabaku nyonso oyo bozali kozwa mpo na kobakisa makoki na bino, kobakisa boyebi na bino mpe kobakisa mayele na bino. Yehova akozanga te kopambola ebongiseli wana ya kosunga bino na bolingo mpenza.​—⁠Yisaya 61:⁠5.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na nsima, Paulo asalaki lisusu elongo na Yoane Malako.​—⁠Bakolose 4:⁠10.

[Etanda na lokasa 30]

Oyo Basaleli na misala bakoki kosala

Ya solo, bankulutu basengeli kopesa basaleli na misala formasyo; kasi ezali mpe na makambo mingi oyo basaleli na misala bakoki kosala bango moko mpo bákende ntango nyonso liboso na elimo.

—Basaleli na misala basengeli kozala bato oyo balingi mosala mpe bato ya kotyela motema na ndenge oyo bazali kokokisa mikumba na bango. Basengeli mpe kozala na programɛ ya malamu ya koyekola bango moko. Mingimingi, kokola ya moto etalelaka koyekola na ye mpe kosalela makambo oyo azali koyekola.

—Ntango mosaleli na misala moko azali kobongisa lisukulu oyo akosala na lisangá, asengeli kokakatana te mpo na kotuna toli epai ya nkulutu moko oyo asalaka masukulu malamu mpo na koyeba ndenge oyo akoki kosala lisukulu na ye malamu.

—Mosaleli na misala akoki mpe kosɛnga nkulutu moko alanda ye ntango azali kosala lisukulu mpe apesa ye toli mpo na kobongisa esika esɛngi kobongisa.

Basaleli na misala basengeli kotuna bankulutu toli, kondima yango mpe kosalela yango. Na ndenge yango, ‘bato nyonso bakomona polele’ ete bazali kokende liboso.​—⁠1 Timote 4:⁠15.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto