Eteyelo mpo na kobongisa basungi—Ekuke monene oyo ezali komema na mosala
1 Yehova alobaki na monɔkɔ ya mosakoli Yilimia boye: “Nakotya babateli likoló na bango baoyo bakoleisa bango; bakobanga lisusu te, bakoyoka nsɔmɔ te, moko na bango akozanga mpe te.” (Yil. 23:4) Lelo oyo, mosala yango ya kobatela bampate ezali kosalema kati na bato ya bikólo nyonso. Bankóto ya bandeko oyo bazali bankulutu na masangá nde bazali kokokisa mosala yango. Lisusu, ebele ya bilenge mibali oyo bazali mingi lokola mamwɛ bazali komipesa na bolingo mpenza na mosala ya Yehova. (Nz. 110:3) Bandeko mibali wana ya komikitisa bazali mpenza lipamboli mpo na masangá ya basaleli ya Nzambe! Mosala ya elimo ya koyanganisa bato ezali se kokoba, yango wana tozali na mposa makasi ya bandeko mibali oyo bazali kokokisa masɛngami mpe bandimi komipesa mpo na kosalela bandeko na bango.
2 Eteyelo mpo na kobongisa basungi ezali ebongiseli ya malamu mpenza mpo na kosalisa bankulutu mpe basaleli na misala na kokokisa mikumba mingi. Bandá mobu 1987, mbula oyo eteyelo yango ebandaki, bana-kelasi koleka 22 000 na bikólo koleka 140 bazwaki mateya na bakelasi 999 oyo esalemi tii sikoyo. Mpo na bandeko mibali yango, eteyelo wana ezali mpenza “ekuke monene oyo ezali komema na mosala.”—1 Kol. 16:9.
3 Ntina ya eteyelo yango: Ntina mpenza ya Eteyelo mpo na kobongisa basungi ezali ya kopesa bandeko mibali formasyo mpe mayele oyo esengeli mpo na kokokisa mikumba oyo bakoki kopesa bango na ebongiseli ya Yehova epai nyonso oyo mposa ezali. Eteyelo esalisaka bango bákolisa mayele na bango na makambo etali kotambwisa mosala ya kosakola, kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobatela bampate, mpe koteya lisangá. Soki kelasi esili, bandeko mosusu batindamaka lokola babongisi-nzela minene to bakɛngɛli-batamboli na ekólo na bango to na bikólo mosusu. Basusu bazongaka na masangá oyo bautaki to na teritware ya filiale na bango epai mposa ezali makasi.
4 Na boumeli ya pɔsɔ 8 oyo eteyelo yango eumelaka, bana-kelasi bayekolaka Biblia na mozindo. Bayekolaka na likebi mpenza mateya ndenge na ndenge ya Biblia, mikumba ya mobateli ya bampate, mpe mitinda oyo etali ndenge ya kosilisa mikakatano kati na baklisto. Bayekolaka mpe oyo Makomami ezali koteya mpo na ndenge ya kokokisa mikumba na lisangá, ndenge ya kokata makambo, mpe ndenge ya kotambwisa lisangá. Bazwaka formasyo ya solosolo mpo na koyeba koloba liboso ya bato mpe mokomoko na bango azwaka lisalisi oyo esengeli mpo na kokola na elimo.
5 Masɛngami: Yango wana, esɛngaka kokokisa makambo mingi mpo na kokɔta na eteyelo yango. Bandeko oyo balingi kokɔta na eteyelo yango basengeli kozala bankulutu to basaleli ya misala oyo bakokisi mbula mibale na mikumba na bango kozanga kokatakata. Bango nyonso basengeli kozala minzemba mpe na mbula banda 23 tii 50. Bandeko yango basengli koyeba kotánga, kokoma mpe koloba malamu monɔkɔ oyo esalelamaka na eteyelo, basengeli mpe kozala nzoto kolɔngɔnɔ, mpe basengeli te kozala bato oyo bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango ezali kosɛnga makambo mingi to baoyo kolya na bango ezalaka mindɔndɔ. Baponaka libosoliboso bandeko oyo bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza.
6 Bandeko oyo balingi kokɔta na eteyelo yango basengeli kondima mpe kokoka kosala na esika nyonso oyo bakotinda bango. Yango ezali kosɛnga kozala na elimo lokola mosakoli Yisaya, oyo amipesaki mpenza mpo na kosala mosala ya ntina mingi, mpe alobaki ete: “Ngai oyo! Tinda ngai!” (Yis. 6:8) Amonisaki mpe ezaleli ya komikitisa na bomoi na ye mobimba. Bandeko oyo bandimi kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, basengeli kosala yango mpo balingi bandeko na bango mpe balingi kosalela bango, kasi te mpo na kozwa lokumu to kozala moto monene. Nsima ya kozwa formasyo ya malamu ndenge wana, ebongi mpenza ete bandeko yango básalela makambo oyo bayekoli mpo na bolamu ya basusu.—Luka 12:48.
7 Matomba: Na boumeli ya pɔsɔ 8 oyo bandeko yango bazwaka formasyo ya malamu mpenza, ‘baleisamaka na maloba ya kondima mpe na mateya ya malamu mingi.’ (1 Tim. 4:6) Yango ebongisaka bango mpo báyeba kosalisa mpe kolendisa basusu na masangá mpe na bazongazonga epai bakotinda bango. Na bisika mingi oyo batindaki bandeko oyo babimaki na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, mosala ya kosakola ekómi kosalema mingi mpenza; mingimingi bilenge bakómi kosepela mpenza na mosala ya mobongisi-nzela; mpe bandeko bakómi kotya likebi mingi na bato ya sika oyo bazali koya kosangana na basaleli ya Nzambe.
8 Ozali nkulutu to mosaleli na misala oyo azali naino mozemba mpe na mbula banda 23 tii 50? Mpo na nini te kokanisa oyo okoki kosala mpo na kotondisa formilɛrɛ ya kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi? Ozali elenge mobali oyo ozali kotalela mikano oyo okomityela na bomoi mpo na kosalela Yehova? Mpo na nini te koluka kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ mpe koboya kotya makanisi na makambo ezangá ntina mpo okoka kokɔta na “ekuke monene oyo ezali komema na mosala”? Yango ekoki kopesa yo esengo mpenza mpe bolamu ya solosolo. Ya solo, Eteyelo mpo na kobongisa basungi ezali lipamboli mpenza, kaka te mpo na baoyo bazali kokɔta na eteyelo yango, kasi mpe mpo na masangá ya basaleli ya Nzambe na mokili mobimba.
[Etanda na lokasa 3]
Ndenge oyo bazwaki matomba na formasyo yango
“Formasyo yango esalisi ngai mpenza na kosala lisusu malamu mingi na mosala ya kosakola mpe esalisi ngai nakóma lisusu na mayele mingi ya Makomami mpo na kokokisa mokumba ya kobatela bampate na bwanya mpenza.”
“Eteyelo yango esalisi ngai mpenza mpo nabanga te ntango nazali kokokisa mikumba ndenge na ndenge na lisangá.”
“Eteyelo ebongoli makambo mingi na bomoi na ngai, ebongoli mpe ndenge na ngai ya kotalela Teokrasi mpe ebongiseli ya Nzambe.”
“Formasyo oyo nazwaki esalisi ngai na komona ete nasengeli komipesa mpo na kosala na bisika oyo mposa ezali.”