Bateyi ya liloba ya Nzambe balendisami ete bákokisa mokumba na bango
NA BASANZA oyo euti koleka, bateyi ebele mpenza bayanganaki mpo na kozwa mateya. Kobanda na sanza ya Mai ya mbula oyo euti koleka, bayanganaki na bankama ya mayangani ya etúká oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bateyi ya Liloba ya Nzambe,” oyo Batatoli ya Yehova basalaki na mokili mobimba. Bato oyo bazalaki na mayangani yango balendisamaki na komiteya bango moko, na kokóma baoyo bakoki malamumalamu mpe na kokokisa mokumba na bango ya bateyi.
Ozalaki na moko ya mayangani yango? Soki bongo, na ntembe te ozali na botɔndi mpo na bilei kitoko ya elimo oyo epesamaki na mayangani wana oyo ezalaki mpo na losambo ya Nzambe ya solo, Yehova. Sikoyo, tiká tózongela mateya ya ntina oyo ezalaki na programɛ na mayangani yango.
Mokolo ya liboso—Makomami mapemami mazali na litomba mpo na koteya
Prezida ya liyangani asalaki lisukulu ya ebandeli oyo elobaki ete “Bino bateyi ya Liloba ya Nzambe, bóteyama,” mpe atombelaki bayangani boyei malamu na esengo mpenza. Soki Yesu Klisto akómaki Moteyi Monene, ezali mpo ete ayekolaki epai ya Yehova, “Molakisi Monene.” (Yisaya 30:20, NW; Matai 19:16) Biso mpe, soki tolingi kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe oyo bazali kokola, tosengeli koteyama na Yehova.
Lisolo oyo elandaki ezalaki na motó ya likambo ete “Mateya ya Bokonzi ebotaka mbuma ya malamu.” Mituna-lisolo elongo na bateyi ya Liloba ya Nzambe oyo bameseni na mosala yango ebendaki likebi likoló ya esengo mpe bolamu oyo eutaka na mosala ya kokómisa bato bayekoli.
Lisukulu ya kosimba motema, oyo ezalaki na motó ya likambo ete “ ‘Misala minene ya Nzambe’ ezali kotinda biso tósala mingi koleka,” elandaki. Na ekeke ya liboso, ‘misala minene’ oyo etali Bokonzi ya Nzambe etindaki bato básala mingi koleka. (Misala 2:11) Biso mpe tokoki kotinda bato básala mingi koleka soki tozali kosakola ‘misala minene,’ na ndakisa mateya ya Makomami oyo etali lisiko, lisekwa, mpe kondimana ya sika.
Lisolo oyo elandaki elendisaki bayangani nyonso na ‘Kosepela na boyengebene ya Yehova.’ (Nzembo 35:27, NW) Tomonaki ete mpo na kolanda boyengebene, tosengeli ntango nyonso koyekola kolinga makambo oyo ezali sembo mpe koyina makambo oyo ezali mabe, koyekola Biblia, kotɛmɛla makambo nyonso oyo ekoki kobebisa elimo na biso mpe kolona ezaleli ya komikitisa. Kosala bongo ekobatela biso ete tóluka te kosala boninga na bato mabe mpe tólanda te makanisi na yango ya koluka kokóma na bozwi mingi mpe tóbendama te na masano ya mbindo mpe ya mobulu.
Lisukulu-moboko, oyo ezalaki na motó ya likambo “Tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe,” ekundwelaki biso ete Yehova azali kosalela Liloba na ye, elimo santu na ye mpe ebongiseli na ye awa na mabele mpo na kokómisa biso baministre oyo bakoki. Mpo na oyo etali ndenge ya kosalela Liloba ya Nzambe, molobi alendisaki biso boye: “Salá nyonso mpo nsango ya Biblia elongwa na papye, ekomama na mitema ya bato oyo bazali koyoka yo.”
Masukulu-matongani ya liboso na liyangani yango ezalaki na motó ya likambo “Tómiteyaka biso moko ntango tozali koteya bato mosusu.” Eteni na yango ya liboso emonisaki ete tosengeli kozala na bizaleli malamu ya baklisto liboso ya koteya yango epai ya bato mosusu. Eteni oyo elandaki elendisaki biso na ‘kosembola liloba ya solo malamumalamu.’ (2 Timote 2:15, NW) Mpo na komiteya biso moko, tosengeli koyekola Biblia biso moko mbala na mbala mpe na molende, ata soki toumeli mbula boni na mosala ya Nzambe. Eteni ya nsuka ya masukulu-matongani yango emonisaki ete Zabolo azali kotala biso mpo na koluka kosalela bizaleli mabe oyo akomona epai na biso; bizaleli yango ekoki kozala: lolendo, elimo ya lipanda, komimona ete tozali na ntina mingi koleka bamosusu, zuwa, bilulela, likunya, kobomba nkanda na motema, mpe ezaleli ya koloba ntango nyonso mabe mpo na bamosusu. Kasi, soki tosali makasi mpo na kotɛmɛla Zabolo, akokima mosika na biso. Mpo na kotɛmɛla ye, tosengeli kopusana penepene na Nzambe.—Yakobo 4:7, 8.
Lisukulu “Tóyina—bafilme, bafɔtɔ mpe mikanda oyo elakisaka bato bazali bolumbu—maladi mabe oyo epalangani na mokili,” eyaki mpenza na ntango ebongi mpe emonisaki biso ndenge ya kotɛmɛla momeseno wana ya nsɔni oyo ekoki kozindisa biso na elimo. Mosakoli Habakuku alobaki mpo na Yehova ete: “Yo ozali na miso ya pɛto, okoki komona mabe te, [okoki kotala bolɔzi te, NW].” (Habakuku 1:13) Tosengeli ‘koyina oyo ezali mabe.’ (Baloma 12:9) Baboti balendisamaki na kolandela makambo oyo bana na bango batalaka na Internet mpe na televizyo. Ndeko oyo asalaki lisolo yango alobaki ete soki omoni ete bafilme, bafɔtɔ mpe mikanda oyo elakisaka bato bazali bolumbu ekómi kobenda yo, esengeli oluka lisalisi epai ya moninga moko oyo akɔmeli na elimo. Ekozala mpe malamu komanyola mpe kokanga na motó bavɛrsɛ lokola Nzembo 97:10; Matai 5:28; 1 Bakolinti 9:27; Baefese 5:3, 12; Bakolose 3:5; mpe 1 Batesaloniki 4:4, 5.
Lisukulu oyo elandaki, “Tiká ete kimya ya Nzambe esɛnzɛlaka bino,” ebɔndisaki biso na elikya oyo ete ntango mitungisi ekómeli biso makasi, tokoki kokitisa mokumba na biso epai ya Yehova. (Nzembo 55:22) Soki na nzela ya libondeli, toyebisi Yehova oyo nyonso tozali na yango na mitema na biso, akopesa biso “kimya ya Nzambe,” oyo elimboli motema mpiɔ oyo eutaka na boyokani ya malamu mpenza oyo tozali na yango elongo na ye.—Bafilipi 4:6, 7.
Lisukulu “Yehova azali kokómisa basaleli na ye kitoko na pole,” oyo elimbolaki kokokisama ya Yisaya mokapo 60, nde esukisaki mokolo ya liboso na esengo mpenza. Na kati ya molili oyo ezipi mokili lelo oyo, “bapaya,” elingi koloba ebele monene ya bampate oyo bakómi komonana polele,bazali kozwa pole ya Yehova elongo na baklisto bapakolami. Nsima ya kotánga vɛrsɛ 19 mpe vɛrsɛ 20, molobi alimbolaki ete: “Yehova ‘akolimwa’ te ndenge moi elimwaka mpe ‘akosilela’ te lokola sanza. Akotika te kokómisa basaleli na ye kitoko na pole oyo azali kosopela bango. Likambo yango ezali mpenza kokitisa biso motema, biso bato tozali na bomoi na mikolo ya nsuka ya mokili oyo etondi na molili!” Na nsuka ya lisukulu yango, molobi alakisaki buku La prophétie d’Isaïe, lumière pour tous les humains, Volume deux (Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi ya mibale). Osilisi kotánga buku wana ya sika?
Mokolo ya mibale—Tokoki malamumalamu mpo na koteya bato mosusu
Nsima ya kotalela mokapo ya mokolo mpo na mokolo wana ya mibale, tolandaki na likebi mpenza masukulu-matongani ya mibale na liyangani yango, “Baministre oyo bazali kokómisa bato mosusu bandimi.” Bandeko oyo basalaki masukulu yango ya biteni misato babendaki likebi likoló ya makambo misato oyo tosengeli kosala mpo na kosalisa bato bákóma bandimi: kopalanganisa nsango ya Bokonzi, kosalisa bato oyo basepelaki ete básepela lisusu mingi mpe koteya bato yango bátosa nyonso oyo Klisto atindaki. Na lisalisi ya mituna-lisolo mpe bilakiseli ya makambo ndenge elekaki, tomonaki ndenge oyo tokoki mpenza koteya bamosusu mpo bákóma bayekoli.
Lisolo oyo elandaki ezalaki na motó ya likambo “Bóbakisa ezaleli ya kokangama na Nzambe likoló ya mpiko na bino.” Molobi amonisaki ete eloko oyo eleki ntina ezali nde ‘koyika mpiko kino nsuka.’ (Matai 24:13) Tosengeli kosalela bibongiseli nyonso oyo Nzambe apesi biso—libondeli, boyekoli ya biso moko, makita mpe mosala ya kosakola—mpo tólona ezaleli ya kokangama na Nzambe. Tosengeli kosala nyonso mpo ete bamposa mpe misala ya mokili ekɔtela biso mokemoke te mpo ekoka kobebisa te ezaleli na biso ya kokangama na Nzambe.
Ndenge nini bato oyo bazali konyokwama mpe komema kilo bakoki kozwa kopema lelo? Lisukulu “Ndenge oyo tokoki kozwa kopema na kati ya ekanganeli ya Klisto” eyanolaki na motuna yango. Na boboto mpenza, Yesu abengaki bayekoli na ye bákamata ekanganeli na ye mpe báyekola epai na ye. (Matai 11:28-30) Tokoki kokamata ekanganeli ya Yesu soki tolandi malamumalamu ndakisa na ye ya kozala na bomoi ya pɛpɛlɛ, bomoi ya bokatikati. Makanisi ya ntina ya lisolo yango emonisamaki lisusu polelepolele na mituna-lisolo elongo na bandeko oyo bakómisi bomoi na bango pɛpɛlɛ.
Moko ya makambo ya ntina mingi na mayangani minene ya Batatoli ya Yehova ezali batisimo ya bato oyo bamipesi sika mpo na kosalela Nzambe. Na esengo mpenza, ndeko oyo asalaki lisukulu “Batisimo efungolaka nzela na mabaku minene ya koteya” atombelaki baoyo balingaki kozwa batisimo boyei malamu mpe asɛngaki bango bámipesa mpenza na mosala. Bateyi ya Liloba ya Nzambe oyo bautaki kozwa batisimo, oyo mpe bakokisi masɛngami ya Makomami, bakoki komonisa mposa ya kozwa mikumba ndenge na ndenge na kati ya lisangá.
“Tólanda ndakisa ya Moteyi Monene,” yango ezalaki motó ya likambo ya lisukulu ya liboso mokolo wana nsima ya midi. Na boumeli ya ntango moko ya molai mpenza kuna na likoló, Yesu azalaki kotala malamumalamu mpe kolanda na likebi mpenza ndakisa ya Tata na ye; yango wana akómaki Moteyi Monene. Na boumeli ya ntango oyo alekisaki awa na mabele, asalelaki mayele oyo ebongi mpo na koteya; na ndakisa azalaki kotuna mituna oyo ezalaki kosimba mitema ya bato mpe asalelaki bandakisa ya pɛtɛɛ mpe oyo ezalaki komonisa makambo polele. Yesu azalaki koteya kaka makambo oyo euti na Liloba ya Nzambe mpe azalaki na esengo, na nsai mpe na bokonzi ntango azali koloba. Tolendisamaki mpenza na kolanda ndakisa ya Moteyi Monene, boye te?
Lisukulu mosusu ya kafukafu elobaki ete, “Osepelaka kosalela bamosusu?”; yango elendisaki biso na kolanda ndakisa ya Yesu na oyo etali kosalela bamosusu. (Yoane 13:12-15) Molobi alendisaki na ndenge ya polele mibali oyo babongisami malamu bázala lokola Timote, báluka mabaku ya kosalela bamosusu. (Bafilipi 2:20, 21) Baboti balendisamaki na kolanda ndakisa ya Elekana mpe ya Ana, bálendisa bana na bango bákɔta na mosala ya ntango nyonso. Bilenge mpe balendisamaki na kolanda ndakisa ya Yesu Klisto mpe ya elenge Timote, bámipesa bango moko na kosalela bamosusu. (1 Petelo 2:21) Tolendisamaki mpe na maloba ya baoyo basalelaki malamu mabaku ya kosalela bamosusu.
Motó ya likambo ya masukulu-matongani ya misato ezalaki “Luká kozwa matomba mingi lisusu na mateya ya Teokrasi.” Molobi ya liboso anyataki mpenza likambo ya kokolisa makoki na biso ya kotya likebi ntango molai. Mpo na kokokisa mokano wana, tosengeli liboso kobanda koyekola mwa ntango moke mpe na nsima tokoki komeka koyeisa ntango yango molai. Alendisaki mpe bayangani na koluka mikapo oyo bazali kopesa na kati ya Biblia mpe kozwa banɔti ntango makita ezali kosalema. Molobi ya mibale amonisaki biso ntina ya kokangama na “mateya oyo epesaka litomba.” (2 Timote 1:13, 14, NW) Mpo tómibatela na baemisyo ya mabe oyo balekisaka na radio to na televizyo, na mateya ya filozofi, na makanisi ya bato ya mayele oyo batyolaka Biblia mpe na mateya ya bapɛngwi, tosengeli kosomba ntango mpo na koyekola biso moko mpe koyangana na makita. (Baefese 5:15, 16) Molobi ya nsuka ya masukulu-matongani yango amonisaki ete tosengeli kosalela makambo oyo toyekolaka soki tolingi kozwa matomba mingi na mateya ya Teokrasi.—Bafilipi 4:9.
Tozalaki mpenza na esengo ntango toyokaki lisukulu “Bibongiseli ya sika mpo na bokoli na biso na elimo”! Tosepelaki na koyoka ete etikali moke buku ya sika oyo ezali na motó ya likambo Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ebima. Mposa na biso ya kozwa buku yango ekómaki makasi ntango molobi azalaki koyebisa makambo oyo ezali na kati ya buku yango. Mpo na bisika oyo balobeli bizaleli oyo moto oyo azali kosala lisolo asengeli kotalela, alobaki boye: “Na kati ya mokanda wana ya sika mpo na eteyelo, ndenge balobeli bizaleli yango 53, oyo etali kotánga malamu, koloba malamu, mpe koteya malamu, ekeseni na ndenge oyo mikanda ya bakelasi ya mokili elobelaka yango. Na kati ya buku yango, balandi nde mateya oyo euti na masolo ya Makomami.” Buku yango ekolobela ndenge basakoli, Yesu mpe bayekoli na ye bamonisaki mayele oyo ebongi mpo na koteya. Ya solo, buku wana ya sika mpe programɛ ya sika mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalisa biso tóyeba koteya Liloba ya Nzambe malamu koleka.
Mokolo ya misato—Tózala bateyi na kotalela ntango
Nsima ya kotalela mokapo ya mokolo mpo na mokolo wana ya nsuka, bayangani nyonso batyaki likebi mingi na masukulu-matongani ya nsuka ya liyangani yango; motó ya likambo na yango ezalaki: “Esakweli ya Malaki ezali kobongisa biso mpo na mokolo ya Yehova.” Malaki asalaki mosala na ye ya mosakoli mbula soki nkama nsima ya ntango oyo Bayuda bautaki na boombo na Babilone. Bayuda yango bapɛngwaki lisusu mpe bazongelaki kosala mabe, babebisaki lokumu ya nkombo ya Yehova na ndenge baboyaki kotosa mibeko na ye ya sembo mpe na ndenge bazalaki kopesa bambeka ya banyama ekufá miso, ebukaná makolo mpe ya maladi. Longola wana, bazalaki koboma mabala na basi oyo babalaki ntango bazalaki bilenge, mbala mosusu mpo na kobala basi bapaya.
Mokapo ya liboso ya esakweli ya Malaki emonisi biso ete Yehova alingaka libota na ye. Emonisi ntina ya kobanga Nzambe na ndenge ya kokumisa ye mpe ya kosepela na biloko na ye mosantu. Yehova alingi ete tópesa ye biloko na biso oyo eleki malamu, tópesa ye losambo oyo euti na bolingo ya solosolo oyo ezali koluka te matomba na biso moko. Mosala na biso ya bosantu esengeli te kozala mosala moko oyo bazali kotindika biso nde kotindika, oyo tozali kosala kaka mpo tósala; lisusu, mokomoko na biso akosamba liboso ya Nzambe.
Ndeko oyo asalaki eteni ya mibale ya masukulu-matongani yango amonisaki ndenge oyo tokoki lelo oyo kosalela makambo oyo ezali na mokapo ya mibale ya mokanda ya Malaki, atunaki mpe motuna oyo: “Moko na moko kati na biso azali mpenza kokeba mpo ‘bokosi ezwama na bibɛbu na ye te’?” (Malaki 2:6) Bandeko oyo mokumba ya koteya lisangá epesami libosoliboso epai na bango basengeli komindimisa ete mateya na bango ezali kouta mpenzampenza na makambo oyo ekomami na kati ya Liloba ya Nzambe. Tosengeli koyina momeseno ya koboma libala na ndenge oyo ebongi te, mpo wana ezali ezaleli ya bokosi.—Malaki 2:14-16.
Na lisukulu na ye oyo ezalaki na motó ya likambo “Nani akobika na mokolo ya Yehova?” ndeko oyo asalaki eteni ya nsuka ya masukulu-matongani yango asalisaki biso na komibongisa mpo na mokolo ya Yehova. Alobaki na mongongo makasi ete: “Ya solo, basaleli ya Yehova bayoki mpenza ete motema ekiti na ndenge bayebi ete Malaki mokapo ya 3, vɛrsɛ ya 17, ezali kokokisama na monene nde epai na bango!” Vɛrsɛ yango elobi boye: “[Yehova] ya bibele alobi ete, Bakozala [bato] na ngai, ɛɛ eloko ya motuya na mokolo yango ekobongisa ngai. Nakobikisa bango lokola moto akobikisa mwana na ye oyo azali kosalela ye mosala.”
Eteni mosusu ya ntina ya liyangani ezalaki drame oyo basani na yango balataki lokola bato ya ntango ya kala. Drame yango, oyo ezalaki na motó ya likambo “Tómemya bokonzi ya Yehova,” elobelaki mingimingi bana ya Kola. Atako tata na bango atombokelaki Mose mpe Alona, bana yango batikalaki sembo epai ya Yehova mpe epai ya bato oyo ye aponaki. Kola na baoyo balandaki ye bakufaki, kasi bana na ye babikaki. Lisukulu oyo elandaki, “Tótosaka bokonzi ya Nzambe na bosembo mpenza,” emonisaki ndenge oyo mokomoko na biso akoki kosalela makanisi ya ntina oyo ezalaki na drame. Molobi asalisaki biso na koyeba makambo motoba oyo ekweisaki Kola na bato na ye: bazalaki kosimba bokonzi ya Yehova na bosembo te; bapesaki nzela ete lolendo, mposa ya lokumu mpe zuwa ezwa mpenza esika na mitema na bango; batyaki likebi mingi na mabunga ya bato oyo Yehova apesaki bokonzi; balonaki ezaleli ya komilelalela; babandaki kosepela lisusu te na mikumba na bango; mpe batikaki boninga to bondeko na bango eleka liboso ya bosembo epai ya Yehova.
Motó ya likambo ya lisukulu ya bato nyonso ezalaki “Banani bazali koteya solo epai ya bato ya bikólo nyonso?” Solo oyo lisukulu yango elobelaki ezali solo oyo etali makambo nyonso te, kasi ezali solo oyo etali makambo oyo Yehova akani kosala; ezali solo wana nde oyo Yesu Klisto apesaki litatoli mpo na yango. Ndeko oyo asalaki lisolo yango alobelaki solo na makambo etali bindimeli, solo na makambo etali losambo, mpe solo na makambo etali bizaleli. Bokokani oyo molobi asalaki kati na Batatoli ya Yehova lelo mpe baklisto ya ekeke ya liboso elendisaki mpenza kondima na biso na maloba oyo ete ‘Nzambe azali mpenza elongo na biso.’—1 Bakolinti 14:25.
Nsima ya lisolo mokuse ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya pɔsɔ wana, bateyi nyonso ya liloba ya Nzambe oyo bazalaki na liyangani yango batondaki na mposa ya kosala lisusu mingi koleka ntango balandaki lisukulu ya nsuka, “Tókokisa na lombangu mpenza mokumba na biso ya koteya.” Molobi azongelaki na mokuse programɛ nyonso ya liyangani; bozongeli yango emonisaki mpenza ntina ya kosalela Makomami ntango tozali koteya, ndenge oyo tokoki kokóma bateyi oyo bakoki, mpe ntina ya kotya elikya na biso na solo oyo tozali koteya bamosusu. Molobi alendisaki biso na ‘komonisa bokoli na biso polele’ mpe na ‘kokeba ntango nyonso mpo na biso moko mpe mpo na mateya na biso.’—1 Timote 4:15, 16, NW.
Liyangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe” ezalaki mpenza fɛti ya elimo! Tiká ete tólanda ndakisa ya Yehova, Molakisi Monene, mpe tólanda ndakisa ya Yesu Klisto, Moteyi Monene, ntango tozali koteya bamosusu liloba ya Nzambe.
[Etanda/Bililingi na lokasa 28]
Mikanda Ya Sika Mpo Na Kokokisa Bamposa Ya Sikisiki
Bato oyo bazalaki na liyangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe” bazalaki mpenza na esengo ya kozwa mikanda mibale oyo ekosalisa bango mingi mpo na koteya solo ya Makomami na bisika mosusu ya mokili. Trakte oyo ezali na motó ya likambo Avez-vous un esprit immortel? (Ozali na elimo oyo ekufaka te?) ekozala esaleli oyo ebongi mpenza mpo na kobanda masolo elongo na bato oyo bafandaka na mikili oyo minɔkɔ ya mboka ekesenisaka “molimo” na “elimo” te. Trakte yango ya sika emonisi polele ete elimo (nguya) ekeseni na ekelamu ya elimo mpe ete ntango bato bakufaka, bakómaka bikelamu ya elimo te.
Na nsuka ya mokolo ya mibale ya liyangani yango, balakisaki mwa buku Une vie pleinement satisfaisante: comment? (Bomoi oyo epesaka mpenza esengo—Ndenge nini okoki kozwa yango?) Mwa buku yango ebongisamaki mpo na kobanda koyekola Biblia na bato oyo bandimaka te ete Mozalisi azali mpenza moto ya solosolo mpe oyo bandimaka te buku oyo epemamaki na Nzambe. Osili kosalela mikanda wana mibale ya sika na mosala ya kosakola?
[Bililingi na lokasa 26]
Na Milan, na Italie mpe na mayangani mosusu na mokili mobimba, bankama ya bato bazwaki batisimo
[Elilingi na lokasa 29]
Drame “Tómemya bokonzi ya Yehova” esimbaki mpenza mitema ya bayangani