“Basakoli ya Bokonzi ya molende” bayanganaki na esengo
MIKAKATANO ya nkita, makambo ya politiki ezali kobonga kaka te mpe bizaleli malamu ezali se kolimwa, nyonso wana ezali makambo oyo ezali koningisa mokili. Kasi, atako makambo nyonso wana ezali, Batatoli ya Yehova balekisaki mikolo misato ya kimya na mayangani na bango ya etúká oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Basakoli ya Bokonzi ya molende.” Mayangani yango esalemaki na bisika ndenge na ndenge na mokili mobimba kobanda na sanza ya Mai 2002.
Ebele ya makambo ya esengo elekaki na boumeli ya mayangani yango. Tiká tózongela naino na mokuse makanisi ya ntina ya ebongiseli kitoko yango ya mateya ya Biblia.
Mokolo ya liboso balobelaki mingi molende ya Yesu
Motó ya likambo ya mokolo ya liboso ezalaki “Zalá na molende lokola nkolo na biso Yesu.” (Yoane 2:17) Molobi oyo asalaki lisukulu “Sepelá ndenge toyangani lokola basakoli ya Bokonzi” asɛngaki bayangani bázala na esengo oyo emonanaka na ntango basaleli ya Nzambe bayangani. (Deteronome 16:15) Na lisukulu oyo elandaki, batunaki mwa ndambo ya basakoli ya nsango malamu ya molende mituna.
Lisukulu “Sepeláká mpenza na Yehova” elobelaki vɛrsɛ mokomoko ya Nzembo 37:1-11. Balendisaki biso ‘tómitungisaka’ te ntango tozali komona lokola nde bato mabe bazali kolonga. Atako bato mabe bakoki kokosela biso makambo, na ntango oyo ebongi, Yehova akomonisa polele banani bazali mpenza basaleli na ye ya sembo. Lisukulu “Bózalaka na botɔndi” elobelaki ndenge oyo tokoki komonisela Nzambe botɔndi. Baklisto nyonso basengeli kopesaka Yehova “mbeka ya lisanzoli.” (Baebele 13:15) Ya solo, ntango oyo tolekisaka na mosala ya Yehova etalelaka botɔndi na biso mpe bomoi na biso.
Lisukulu-moboko ezalaki na motó ya likambo ete “Basakoli ya Bokonzi batondi na molende.” Na lisukulu yango bamonisaki ete Yesu Klisto apesaki ndakisa ya molende oyo eleki malamu. Ntango Bokonzi ebandaki koyangela na likoló na 1914, baklisto ya solo basengelaki kosakola nsango malamu wana na molende. Molobi alobelaki lisusu liyangani oyo esalemaká na 1922 na Cedar Point, na États-Unis, mpe amonisaki ete na ntango wana, molobi moko asalaká lisukulu ya kafukafu mpe alobaká na bayangani ete: “Bósakola Mokonzi mpe Bokonzi na ye”! Molende oyo basaleli ya sembo ya Nzambe bamonisaki etindaki bango básakola solo ya Bokonzi mpe nsukansuka, mosala na bango epalanganaki na bikólo nyonso.
Lisukulu “Tóbanga te mpo toyebi ete Yehova azali na biso,” oyo esalemaki na nsima ya midi na mokolo ya liboso, emonisaki ete Satana azali mpenzampenza kokanela basaleli ya Nzambe. Kasi, atako bazali kotɛmɛla biso, ntango tozali kokanisa ebele ya bato ya kondima oyo Biblia elobeli mpe bato oyo bazali komonisa kondima na mikolo na biso, ndakisa na bango ezali kopesa biso mpiko ya kolonga komekama mpe masɛnginya.—Yisaya 41:10.
Na nsima, ezalaki na masukulu-matongani na motó ya likambo ete “Esakweli ya Mika ezali kopesa biso makasi ya kotambola na nkombo ya Yehova.” Molobi ya liboso akokanisaki bizaleli mabe oyo bato bazalaki na yango na mikolo ya Mika, ndenge oyo batikaki losambo ya solo mpe bamipesaki na koluka biloko ya mokili na bizaleli ya bato na mikolo na biso. Alobaki boye: “Elikya na biso mpo na mikolo ezali koya ekokokisama mpenza soki toyekoli botosi mpe tosali makasi mpo na kozala na etamboli ya bosantu mpe soki bomoi na biso etondi na misala oyo ezali komonisa ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe soki tozali kobosana ata moke te ete mokolo ya Yehova ekozanga te koya.”—2 Petelo 3:11, 12.
Na eteni ya mibale ya masukulu-matongani, molobi alobelaki ndenge oyo Mika amonisaki mabe ya bakonzi ya Yuda. Bazalaki konyokola babola na bato oyo bazangaki moto oyo akolobela bango. Kasi, Mika asakolaki mpe ete losambo ya solo ekolonga. (Mika 4:1-5) Na lisalisi ya elimo santu ya Yehova, tozali na ekateli makasi ya kosakola nsango yango ya elikya. Kasi, ezali boni soki bokolɔngɔnɔ ya nzoto to mikakatano mosusu ezali kokanga biso nzela? Molobi ya misato alobaki boye: “Yehova azali kosɛnga biso makambo ya makasimakasi te, makambo oyo azali kosɛnga biso tokoki mpenza kokokisa yango.” Alobelaki mpe likambo mokomoko oyo ezali na Mika 6:8 oyo elobi ete: “[Yehova] alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.”
Lokola baklisto bakoki mpe kobendama na bizaleli ya bato na mokili oyo ezali se kobeba, lisukulu “Bateláká motema na yo mpo ozala ntango nyonso na bizaleli ya pɛto” ezalaki na litomba mpo na biso nyonso. Na ndakisa, soki tozali na bizaleli na biso ya pɛto, yango ekosalisa biso tózala na libala ya esengo. Lokola tozali baklisto, tosengeli kotikaka ata moke te ete makanisi ya kosala pite to ekobo efandaka na bɔɔngɔ na biso.—1 Bakolinti 6:18.
Lisukulu “Kebá na bokosi” emonisaki ete ezali malamu lokola tomonaka mabe mpenza ndenge oyo bapɛngwi babalolaka solo, babombaka makambo mosusu, to mpe balobaka mpenza makambo ya lokuta. (Bakolose 2:8) Ndenge moko mpe, tosengeli komikosa te na kokanisa ete tokoki kokokisa bamposa ya mabe kozanga ete ememela biso mpasi.
Lisukulu ya nsuka na mokolo ya liboso ezalaki na motó ya likambo ete: “Tósambela Nzambe kaka moko ya solo.” Lokola makambo ya mokili ezali se kobeba, tozali mpenza kolendisama na koyeba ete etikali moke Yehova atya mokili ya sika ya boyengebene! Banani bakokɔta na mokili yango? Kaka bato oyo bazali kosambela Yehova. Mpo na yango, molobi alakisaki buku moko ya sika mpo na boyekoli oyo ezali na motó ya likambo ete Tósambela Nzambe kaka moko ya solo, buku yango ekosalisa biso moko, bana na biso, mpe bato oyo tozali koyekola na bango Biblia na kokokisa likambo yango. Tosepelaki mingi kozwa buku yango!
Mokolo ya mibale elobelaki molende mpo na oyo ezali malamu
Motó ya likambo ya mokolo ya mibale ya liyangani ezalaki “Zalá na molende mpo na oyo ezali malamu.” (1 Petelo 3:13) Molobi ya liboso atángaki mokapo ya mokolo. Amonisaki ete momeseno ya kotánga mokapo ya mokolo na likebi mpenza ebakisaka molende na biso.
Nsima na ye, ezalaki na masukulu-matongani na motó ya likambo ete “Basakoli ya Bokonzi oyo bazali kokumisa mosala na bango ya baministre.” Eteni ya liboso emonisaki ntina ya kosembola Liloba ya Nzambe malamumalamu. (2 Timote 2:15) Ntango tozali kosalela Biblia malamu epesaka yango nzela ya kozala na ‘nguya’ na bomoi ya bato. (Baebele 4:12) Tosengeli kotángelaka bato Biblia mpe kokanisa na bango likoló na maloba na yango na ndenge oyo ezali kondimisa. Eteni ya mibale ya masukulu-matongani elendisaki biso tózongelaka bato oyo basepelaki. (1 Bakolinti 3:6) Komibongisa mpe kozala na kobanga te ezali na ntina mpo na kozongela nokinoki bato nyonso oyo basepelaki. Eteni ya misato elendisaki biso na kotalela moto nyonso oyo tokutani na ye ete akoki kokóma moyekoli mpe emonisaki ete ntango kaka tokutani na moto mpo na mbala ya liboso, kosɛnga ye ete tóyekolaka na ye ekoki kopesa biso libaku ya koyoka esengo ya kosalisa moto akóma moyekoli.
Motó ya likambo ya lisukulu oyo elandaki ezalaki “Mpo na nini tosengeli ‘kobondelaka ntango nyonso’?” Biblia ezali kolendisa baklisto ete bátika Nzambe atambwisa bango na makambo nyonso ya bomoi na bango. Tosengeli kozwaka ntango mpo na kobondela biso moko. Tosengeli mpe kolendendela na mabondeli, mpamba te Yehova akoki kotika ete tóbondela mpo na mwa ntango moko boye liboso amonisa ete ayanoli na mabondeli na biso.—Yakobo 4:8.
Lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo “Masolo ya elimo elendisaka” elendisaki biso na kosalela monɔkɔ na biso mpo na bolamu na biso moko mpe ya basusu. (Bafilipi 4:8) Mobali na mwasi na ye mpe bana na bango basengeli kosololaka mokolo na mokolo masolo ya makambo ya elimo. Yango wana, mabota basengeli kosala makasi ete na mokolo mobimba, bázalaka ata na mbala moko oyo balyaka esika moko mpo bázwaka libaku ya kosolola masolo oyo etongaka na elimo.
Programɛ ya ntɔngɔ esukaki na lisukulu moko ya esengo mingi oyo motó ya likambo na yango ezalaki “Ndenge oyo komipesa mpe batisimo ememaka na lobiko.” Bandeko oyo bamibongisaki mpo na kozwa batisimo basilaki kozwa boyebi, bamonisaki kondima, babongolaki motema, babongwanaki mpe batikaki misala ya mabe, mpe bamipesaki na Nzambe. Molobi amonisaki ete nsima ya kozwa batisimo, basengeli kolanda kokola na elimo mpe kobatela molende mpe bizaleli malamu na bango.—Bafilipi 2:15, 16.
Na nsima ya midi, lisukulu “Kozala na mindɔndɔ te, batelá liso na yo malamu” elobelaki makambo mibale ya ntina. Kozala na mindɔndɔ te to kozala moto ya bopɔlɔ elimboli kotalela makoki mpe bolɛmbu na biso mpe esika na biso na miso ya Nzambe na ndenge ya malamu. Kozala na mindɔndɔ te esalisaka biso tóbatela liso na biso ‘malamu’ mpo etalaka kaka Bokonzi ya Nzambe, kasi etalaka biloko ya mokili te. Soki tozali kosala ndenge yango, tosengeli komitungisa te, mpamba te Yehova akokokisa bamposa na biso.—Matai 6:22-24, 33, 34.
Molobi oyo alandaki asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Tyelá Yehova motema na yo mobimba na ntango ya mpasi” mpe amonisaki ntina oyo tosengeli kosala yango. Ndenge nini tokoki kobunda na makambo lokola bolɛmbu ya nzoto mpe mikakatano ya mbongo to mpe maladi? Tósɛngaka Yehova apesa biso bwanya mpe tótunaka bato mosusu toli. Na esika ya kobangabanga to kobungisa elikya, tosengeli kotángaka Liloba ya Nzambe mpo elikya na biso ezala ntango nyonso makasi.—Baloma 8:35-39.
Masukulu-matongani ya nsuka ya liyangani ezalaki na motó ya likambo ete: “Komekama ndenge na ndenge emonisaka motindo ya kondima na biso.” Eteni ya liboso emonisaki biso ete baklisto nyonso ya solo bazali konyokolama. Minyoko na biso epesaka bato mosusu litatoli, elendisaka kondima na biso mpe epesaka biso libaku ya komonisa bosembo na biso epai ya Nzambe. Atako tolukaka kotya bomoi na biso na likama te, kasi tokoki te kosala makambo oyo Makomami epesi nzela te kaka mpo na kokima minyoko.—1 Petelo 3:16.
Lokola tokɔtaka na makambo ya mokili te, molobi oyo asalaki eteni ya mibale ya masukulu-matongani yango alobelaki mituna oyo likambo yango ekoki kobimisa. Baklisto ya liboso bazalaki te bato oyo bapekisaka bitumba (pacifiste), kasi bazalaki koyeba ete basengeli libosoliboso kozala sembo epai ya Nzambe. Lelo mpe, Batatoli ya Yehova balandaka mpenza etinda oyo elobi ete: “Bozali bato ya mokili te.” (Yoane 15:19) Lokola tozali bato ya mokili te mpe ete tokoki, na mbalakaka, komekama mpo na likambo yango, ebongi ete mabota bámibongisa liboso, elingi koloba, bázwa ntango ya kotalela makanisi ya Biblia na likambo yango. Ndenge oyo eteni ya nsuka ya masukulu-matongani emonisaki yango, Satana azali kokana koboma biso kaka te, azali mpe koluka kotya biso mpanzi likoló mpo tótikala sembo te. Soki toyiki mpiko na bosembo mpenza ntango bazali kotyola biso, kotinda biso tósala pite to ekobo to ntango tozali na mpasi na motema to mpe tozali na maladi, tokokumisa Yehova.
Motó ya likambo ya lisukulu ya nsuka na mokolo ya mibale ezalaki “Tópusana penepene na Yehova.” Soki tozali kokanga ntina ya bizaleli minene ya Yehova tokobendama epai na ye. Na lisalisi ya nguya na ye oyo ezangi nsuka, abatelaka basaleli na ye, mingimingi na elimo. Asalaka makambo na makasi te mpo na komonisa boyengebene na ye, kasi ezaleli yango etindaka ye na kobongisa makambo mpo na kopesa moto nyonso oyo azali kosala na boyengebene bomoi ya seko. Bwanya ya Nzambe emonanaka na ndenge oyo atindaki bato ya kozanga kokoka bákoma Biblia. Ezaleli oyo eleki kosepelisa ezali bolingo na ye, oyo etindaki ye na kozwa bibongiseli mpo na kobikisa bato na nzela ya Yesu Klisto. (Yoane 3:16) Na nsuka, molobi alakisaki mokanda moko kitoko oyo eutaki kobima, motó ya likambo na yango ezali Tópusana penepene na Yehova.
Mokolo ya misato elobelaki mingi molende mpo na misala ya malamu
Motó ya likambo ya mokolo ya misato ya liyangani ezalaki “Bato oyo bazali na molende mpo na misala ya malamu.” (Tito 2:14) Programɛ ya ntɔngɔ ebandaki na lisolo ya libota moko oyo bazalaki kotalela mokapo ya mokolo. Na nsima, lisukulu moko elandaki; motó ya likambo na yango ezalaki “Otyelaka Yehova motema?” Bato ya mokili batii mitema na bango na bwanya mpe na makasi na bango moko. Nzokande, na mpiko mpe na esengo nyonso, basaleli ya Yehova bazali kotyela ye motema, ata na kati ya bampasi.—Nzembo 46:1-3, 7-11.
Lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bilenge—Bóbongisa avenire na bino elongo na ebongiseli ya Yehova” eyanolaki na motuna oyo: Ndenge nini elenge akoki mpenza kozala na bomoi ya malamu? Ezali te na nzela ya koluka mbongo, bozwi mpe lokumu. Na bolingo mpenza, Mozalisi na biso azali kolendisa bilenge bákanisa ye na bolenge na bango. Molobi atunaki mituna na mwa ndambo ya bilenge oyo babandaki mosala ya Nzambe na bolenge na bango, mpe tomonaki na miso ete bazali na esengo. Lisusu, tozalaki na esengo ya kozwa trakte ya sika Bilenge—Bokosala nini na bomoi na bino?, oyo ebongisami mpo na kosalisa bilenge Batatoli na kobongisa avenire na bango ya seko na ebongiseli ya Yehova!
Na nsima, bato nyonso bafungolaki miso na matoi mpo na kolanda drame ya Biblia; motó ya likambo na yango ezalaki “Kangamá makasi na Yehova na ntango ya mpasi.” Drame yango elobelaki mosala oyo Yilimia asalaki banda bolenge na ye tii ntango Yelusaleme ebomamaki—likambo oyo azalaki kosakola yango na molende. Yilimia akanisaki ete azali na makoki te ya kosala mosala oyo Nzambe apesaki ye, kasi akokisaki yango atako bazalaki kotɛmɛla ye, mpe Yehova abikisaki ye.—Yilimia 1:8, 18, 19.
Nsima ya drame, tolandaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Zalá lokola Yilimia—Sakolá Liloba ya Nzambe kozanga kobanga.” Na mikolo na biso, bato mosusu bazali kokosela basakoli ya Bokonzi makambo mpe kopanza bango nsango ya lokuta. (Nzembo 109:1-3) Kasi, na ndakisa ya Yilimia, tokoki kolonga kolɛmba nzoto soki tozali kosepela na Liloba ya Yehova. Lisusu, tozali na elikya ete bato oyo bazali kobundisa biso bakolonga te.
Motó ya likambo ya lisukulu ya bato banso ezalaki “Makambo ya mokili oyo ezali kobongwana”; esalemaki mpenza na ntango oyo ebongi. Na mikolo na biso, makambo mingi ebongwani mpenza. Biblia esakolaki ete makambo yango, bakisa mpe kobelela oyo bato bakobelela ete “kimya mpe kobatelama,” ekomema na mokolo ya nsɔmɔ mingi oyo Yehova akopesa bato etumbu. (1 Batesaloniki 5:3) Nsima na yango, makambo ya malamu ekoya—bitumba, mobulu, kobomana mpe maladi nyonso ekosila. Yango wana, na ntango oyo tozali, na esika tótya motema na ebongiseli ya makambo ya lelo, tosengeli nde kolanda ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe kobatela etamboli ya pɛto.
Nsima ya lisolo mokuse ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, tolandaki lisukulu ya nsuka ya liyangani, motó na likambo na yango ezalaki: “Bino basakoli ya Bokonzi ya molende, bótonda na misala malamu.” Molobi amonisaki ndenge oyo liyangani yango esalisaki biso na elimo mpe elendisaki biso na kotyela Yehova motema. Na nsuka, alendisaki biso na kozala basakoli ya Bokonzi ya molende oyo bazali pɛto mpe bazali na bolingo.—1 Petelo 2:12.
Na makanisi lokola oyo ya basaleli ya Yehova na ntango ya Nehemia, tozongaki na bandako na esengo mingi mpo na mapamboli ya elimo oyo tozwaki na liyangani ya etúká “Basakoli ya Bokonzi ya molende.” (Nehemia 8:12) Liyangani yango esepelisaki yo mingi mpe epesaki yo ekateli ya kokende liboso lokola mosakoli ya Bokonzi ya molende, boye te?
[Etanda/Elilingi na lokasa 23]
Buku ya sika mpo na boyekoli!
Na mokolo ya liboso ya liyangani ya etúká, bayangani basepelaki mingi ntango molobi ya nsuka alakisaki buku moko ya sika, motó ya likambo na yango ezali Tósambela Nzambe kaka moko ya solo. Ebongisami mpo na koyekola yango na bato oyo basilisi koyekola buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko; tokanisi ete buku yango ekolendisa kondima ya bato oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.”—Misala 13:48.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Elilingi na ezipeli ya buku: Fɔtɔ ya U.S. Navy
[Etanda/Bililingi na lokasa 24]
Ekosalisa biso tópusana penepene na Nzambe
Molobi ya nsuka na mokolo ya mibale ya liyangani ya etúká ayebisaki bayangani ete buku mosusu ya sika ebimi, motó ya likambo na yango ezali Tópusana penepene na Yehova (na Lifalanse). Buku yango ezali na biteni minene minei, mokomoko na yango elobeli moko na bizaleli minene ya Yehova: nguya, boyengebene, bwanya, mpe bolingo. Eteni mokomoko ezali na mokapo moko oyo ezali komonisa ndenge oyo Yesu Klisto amonisaki mpenza na misala bizaleli ya Nzambe. Ntina ya libosoliboso ya buku yango ya sika ezali ya kosalisa biso mpe bato oyo tozali koyekola na bango Biblia ete tókóma mpenza baninga ya Yehova Nzambe.
[Etanda/Bililingi na lokasa 26]
Toli na makambo ya elimo mpo na bilenge
Na mokolo ya misato ya liyangani ya etúká balakisaki bayangani trakte ya sika oyo ezali na motó ya likambo ete Bilenge—Bokosala nini na bomoi na bino? Trakte yango ebongisami mpo na kosalisa bilenge Batatoli na kozwa bikateli ya malamu mpo na avenire na bango; ezali kopesa bango toli oyo euti na Makomami mpo na kosala mosala ya Yehova na bomoi na bango mobimba.