Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/3 lok. 30
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • “Tata na bino azali moto ya motema mawa”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • “Nzela na ye nyonso bosembo”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Bómekola Yehova —bómonisa bosembo mpe boyengebene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Tosalelaka Nzambe oyo “atondi mpenza na motema mawa”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/3 lok. 30

Mituna ya batángi

Koloba ete motema mawa ya Yehova elɛmbisaka bosembo na ye, elongobani to te?

Atako maloba yango esilá kolobama, ezali malamu tótika kosalela maloba yango mpamba te epesaka likanisi ete motema mawa ya Yehova ekitisaka to epekisaka bosembo na ye, lokola nde tozali koloba ete ezaleli na ye ya motema mawa ezalaka malamu koleka bosembo na ye ya makasimakasi. Ezali bongo te.

Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “bosembo” ekoki mpe kolimbola “kosambisa.” Bosembo na boyengebene ezalaka na boyokani. Atako bongo, mingimingi bosembo epesaka likanisi ya kosamba liboso ya zuzi. Kasi boyengebene epesaka likanisi yango te. Ya solo, ntango mosusu Yehova asalelaka bosembo na ye mpo na kopesa etumbu oyo moto asengeli kozwa, kasi liloba yango ekoki kolimbola mpe kobikisa bato oyo babongi kobika. (Genese 18:​20-32; Yisaya 56:1; Malaki 4:⁠2) Yango wana ezali malamu te kokanisa ete bosembo ya Yehova ezalaka makasimakasi to esengeli kolɛmbisa yango.

Liloba “motema mawa” na Liebele ekoki kolimbola komipekisa na ntango ya kosambisa. Ekoki mpe kolimbola kosala likambo moko mpo na komonisa motema mawa mpe kobɔndisa moto oyo azali na mpasi.​—⁠Deteronome 10:18; Luka 10:​29-37.

Yehova azali Nzambe ya bosembo mpe ya motema mawa. (Exode 34:​6, 7; Deteronome 32:4; Nzembo 145:⁠9) Bosembo na motema mawa na ye ezalaka nyonso mibale ya kokoka, mpe esalaka nzela moko. (Nzembo 116:5; Hosea 2:19) Bizaleli yango nyonso mibale ezali na boyokani mpe ezali kokokisana. Yango wana, soki tolobi ete motema mawa ya Yehova elɛmbisaka bosembo na ye, esengeli mpe tóloba ete bosembo na ye elɛmbisaka motema mawa na ye.

Yisaya asakolaki boye: “Boye [Yehova akokoba kozela, NW] ete amonisa bino boboto, bongo [akotɛlɛma, NW] ete ayokela bino mawa, mpo ete [Yehova] azali Nzambe ya kosambisa-sembo.” (Yisaya 30:18) Awa, Yisaya amonisi ete bosembo ya Yehova etindaka ye asala makambo na motema mawa, kasi alobi te ete motema mawa elɛmbisaka to epekisaka bosembo na ye. Yehova ayokaka mawa mpo ete azali sembo mpe lisusu azali bolingo.

Ya solo, Yakobo, moko ya bakomi ya Biblia alobaki boye: “Kasi mawa ekolonga kati na kosambisama.” (Yakobo 2:13b) Kasi awa, emonani ete Yakobo azali kolobela motema mawa ya Yehova te, kasi alobeli nde motema mawa oyo baklisto bamonisaka​—⁠na ndakisa epai ya bato oyo bazali konyokwama mpe babola. (Yakobo 1:27; 2:​1-9) Na ntango azali kosambisa bato oyo bamonisaka motema mawa bongo, Yehova atalelaka naino etamboli na bango mpe na mawa nyonso alimbisaka bango na nzela ya mbeka ya Mwana na ye. Na yango, mpo na etamboli na bango ya komonisa motema mawa, bakozwa te etumbu oyo esengelaki bázwa.​—⁠Masese 14:21; Matai 5:7; 6:12; 7:⁠2.

Yango wana, ebongi te koloba ete motema mawa ya Yehova elɛmbisaka bosembo na ye, kokanisáká ete bosembo na ye esengeli kokitisama na motema mawa. Bizaleli wana mibale ya Yehova ezalaka na bokatikati mpenza. Moko ekokisaka mosusu, ndenge kaka ekokisaka mpe bizaleli mosusu ya Yehova lokola bolingo mpe bwanya, mpe ezali kokokisana na yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto