Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/9 nk. 21-25
  • “Tata na bino azali moto ya motema mawa”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tata na bino azali moto ya motema mawa”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Motema mawa epai ya bato oyo bazali na mpasi
  • Motema mawa epai ya basumuki
  • Nzambe ya motema mawa mpe ya bosembo
  • Mpo na nini tosengeli komonisaka motema mawa?
  • “Esengo na bato ya motema mawa”
  • Tosalelaka Nzambe oyo “atondi mpenza na motema mawa”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ndenge nini komonisa motema mawa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Esengo na bato ya motema mawa!
    Tóyembela Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/9 nk. 21-25

“Tata na bino azali moto ya motema mawa”

“Bókoba kokóma bato ya motema mawa, ndenge Tata na bino azali moto ya motema mawa.”​—LUKA 6:36.

1, 2. Ndenge nini makambo oyo Yesu alobaki na bakomeli ná Bafalisai mpe na bayekoli na ye emonisi ete motema mawa ezali ezaleli ya ntina mingi?

MIBEKO ya Moize ezalaki na mibeko mikemike soki 600. Atako Bayisalaele basengelaki kotosa mibeko yango, ezalaki mpe na ntina mingi bámonisaka motema mawa. Tókanisa ndenge Yesu alobaki na Bafalisai, bato oyo bazangaki motema mawa. Mbala mibale mobimba apamelaki bango mpo na ezaleli yango mpe amonisaki ete Nzambe alobaki boye: “Nalingi motema mawa, kasi mbeka te.” (Matai 9:10-13; 12:1-7; Hosea 6:6) Ntango akómaki na nsuka ya mosala na ye, Yesu alobaki boye: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! mpamba te bopesaka moko ya zomi ya manti mpe ya aneti, mpe ya kumini, kasi bosili kotyola makambo ya Mibeko oyo ezali na ntina mingi, elingi koloba, bosembo mpe motema mawa mpe kondima.”​—Matai 23:23.

2 Tomoni mpenza ete Yesu apesaki motuya mingi na motema mawa. Alobaki na bayekoli na ye boye: “Bókoba kokóma bato ya motema mawa, ndenge Tata na bino azali moto ya motema mawa.” (Luka 6:36) Kasi, mpo ‘tókóma bamekoli ya Nzambe’ na likambo yango, tosengeli koyeba soki motema mawa ya solosolo elimboli nini. (Baefese 5:1) Longola yango, soki toyebi matomba ya motema mawa, yango ekosalisa biso tómonisa ezaleli yango mingi lisusu na bomoi na biso.

Motema mawa epai ya bato oyo bazali na mpasi

3. Mpo na nini tosengeli kotalela Yehova mpo na koyekola motema mawa ya solosolo?

3 Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “[Yehova] azali na ngɔlu mpe na mawa, azali na motema molai mpe na boboto monene monene. [Yehova] azali malamu epai ya bato nyonso mpe ngɔlu na ye ezali likoló ya misala na ye nyonso.” (Nzembo 145:8, 9) Yehova azali “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” (2 Bakolinti 1:3) Moto amonisaka motema mawa ntango azali kosalela mozalani na ye makambo na boboto. Motema mawa ezali na esika monene na kati ya bizaleli ya Nzambe. Ndakisa na ye mpe malako na ye ekoki koteya biso motema mawa ya solosolo.

4. Yisaya 49:15 ezali koteya biso nini na ntina na motema mawa?

4 Na Yisaya 49:15, Yehova alobi boye: “Mwasi akoki nde kobosana mwana oyo anungi ye naino? Ayoka mawa lisusu te mpo na mwana mobali ya libumu na ye?” Maloba mosusu ya Liebele oyo eyokani na liloba oyo ebongolami na “mawa” na vɛrsɛ oyo esalelamaka mpe mpo na kolobela motema mawa ndenge elobelami na Nzembo 145:8, 9. Mayoki oyo etindaka Yehova amonisa motema mawa ekokani na ndenge oyo mama ayokaka mpo na mwana oyo azali komɛlisa. Mwana akoki koyoka nzala to kozala na mposa ya eloko moko. Mawa oyo mama ayokaka etindaka ye akokisa mposa ya mwana na ye. Yehova mpe ayokaka ndenge wana mpo na bato oyo amoniselaka motema mawa.

5. Ndenge nini Yehova amonisaki ete ‘atondaki mpenza na motema mawa’ mpo na Bayisalaele?

5 Koyokela moto mawa mpo azali na mpasi mpe kosala likambo moko mpo na kosalisa ye ezali makambo mibale ekeseni. Tótala likambo oyo Yehova asalaki ntango basambeli na ye bazalaki na boombo na Ezipito, eleki sikoyo mbula soki 3 500. Alobaki na Moize boye: “Ngai nasili komona monyoko ya bato na ngai na Ezipito mpe nayoki kolela na bango na ntina na bakapita na bango. Nayebi bolɔzi na bango, mpe nakiti mpo na kobikisa bango na mabɔkɔ ya Baezipito mpe mpo na kolongola bango na mokili yango mpe kobutisa bango na mokili malamu mpe monene, mokili moleki na mabɛlɛ mpe na mafuta ya nzoi.” (Exode 3:7, 8) Mbula soki 500 nsima ya kolongola Bayisalaele na boombo, Yehova alobaki na bango boye: “Ngai nabimisaki Yisalaele na Ezipito; nabikisaki bino na mabɔkɔ ya Baezipito mpe na mabɔkɔ ya mabota nyonso mazalaki konyokola bino.” (1 Samwele 10:18) Bayisalaele bazalaki mbala na mbala kokutana na mpasi makasi mpo bazalaki kobosana mibeko ya Nzambe. Atako bongo, Yehova azalaki koyokela bango mawa mpe mbala na mbala azalaki kobikisa bango. (Basambisi 2:11-16; 2 Ntango 36:15) Ndakisa yango ezali komonisa ndenge oyo Nzambe oyo atondi na bolingo asalisaka baoyo bazali na bosɛnga, bakutani na likama, to bazali na mikakatano. Yehova “atondi mpenza na motema mawa.”​—Baefese 2:4.

6. Ndenge nini Yesu Klisto amekolaki motema mawa ya Tata na ye?

6 Ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabelé, amekolaki mpenza motema mawa ya Tata na ye. Yesu asalaki nini ntango bato mibale oyo bakufá miso babondelaki ye ete: “Nkolo, yokelá biso mawa, Mwana ya Davidi”? Bato yango babondelaki Yesu ete asala likamwisi mpo miso na bango efungwama. Yesu asalisaki bango, kasi asalaki yango te kaka tiká asala. Biblia elobi ete “lokola mawa ekangaki ye, Yesu asimbaki miso na bango, mpe na mbala moko bakómaki komona.” (Matai 20:30-34) Lokola Yesu azalaki na motema mawa, asalaki makamwisi mingi mpo na kosalisa bato oyo bakufá miso, bato oyo bazalaki na bademo, bato ya maba, mpe baboti oyo basɛngaki ye asalisa bana na bango oyo bazalaki na maladi makasi.​—Matai 9:27; 15:22; 17:15; Malako 5:18, 19; Luka 17:12, 13.

7. Ndakisa ya Yehova Nzambe mpe ya Mwana na ye ezali koteya biso nini na ntina na motema mawa?

7 Ndakisa ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto emonisi ete motema mawa esangisi makambo mibale; ya liboso, koyokela moto oyo azali na mpasi mawa to komitya na esika na ye, mpe ya mibale, kosalisa ye. Kozala na motema mawa esɛngi kosala makambo yango mibale. Na Biblia, mbala mingi motema mawa emonanaka na likambo ya boboto oyo basaleli bato oyo bazali na bosɛnga. Kasi, ndenge nini komonisa motema mawa na makambo etali kosambisa? Yango esɛngi nde kosala eloko te, na ndakisa koboya kopesa etumbu?

Motema mawa epai ya basumuki

8, 9. Ndenge nini Nzambe amoniselaki Davidi motema mawa nsima ya lisumu na ye na Bata-seba?

8 Tótalela likambo oyo esalemaki ntango mosakoli Natana akendaki kosolola na Mokonzi Davidi mpo na ekobo oyo asalaki na Bata-seba. Davidi abongolaki motema mpe abondelaki boye: “Ee Nzambe, yokelá ngai mawa, lokola ezali boboto na yo; kati na ngɔlu na yo monene, bomá bipɛngweli na ngai. Sukolá ngai malamu kolongola mabe na ngai, pɛtolá ngai na masumu na ngai. Mpo ete nayebi epɛngweli na ngai mpe lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso. Nasali mabe na miso na yo, ɛɛ bobele epai na yo moko, nasali mabe na miso na yo.”​—Nzembo 51:1-4.

9 Davidi ayokaki mpenza mpasi na motema. Yehova alimbisaki lisumu na ye mpe alɛmbisaki etumbu oyo asengelaki kopesa Davidi ná Bata-seba. Na kolanda Mibeko ya Moize, Davidi ná Bata-seba basengelaki kobomama. (Deteronome 22:22) Atako bazangaki te kobuka mbuma mabe ya lisumu na bango, bazwaki etumbu ya liwa te. (2 Samwele 12:13) Motema mawa ya Nzambe elimbolaka mpe kolimbisa mabunga. Nzokande, azangaka te kopesa etumbu oyo ekoki.

10. Atako Yehova amonisaka motema mawa ntango azali kosambisa biso, mpo na nini tosengeli te kozwa motema mawa na ye na lisɛki?

10 Lokola “lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama]” mpe ete “lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa,” bato nyonso babongi na etumbu ya liwa. (Baloma 5:12; 6:23) Tokoki mpenza kozala na botɔndi epai ya Yehova na ndenge amonisaka motema mawa ntango azali kosambisa biso! Kasi, tosengeli kokeba ete tózwa motema mawa ya Nzambe na lisɛki te. Deteronome 32:4 elobi boye: “Nzela [ya Yehova] nyonso boyengebene.” Ntango Nzambe azali komonisa motema mawa, abosanaka bosembo na ye te.

11. Ndenge nini Yehova amonisaki ete abosanaki bosembo te na ndenge oyo asambisaki lisumu ya Davidi ná Bata-seba?

11 Mpo na kolongola etumbu ya liwa oyo Davidi ná Bata-seba basengelaki kozwa, esengelaki naino kolimbisa lisumu na bango. Bazuzi ya Yisalaele bazalaki na ndingisa ya kosala yango te. Soki bazuzi basambisaki likambo yango, balingaki kokatela bango kaka etumbu ya liwa. Ezali yango nde oyo Mibeko esɛngaki. Nzokande, lokola Yehova asalaki kondimana na Davidi, atalelaki likoki ya kolimbisa lisumu na ye. (2 Samwele 7:12-16) Yango wana, Yehova Nzambe, “Mosambisi ya mokili mobimba,” oyo ‘amekaka motema,’ aponaki kokata likambo yango ye moko. (Genese 18:25; 1 Ntango 29:17) Nzambe atángaki na motema ya Davidi, amonaki ete abongoli mpenza motema, mpe alimbisaki ye.

12. Bato ya masumu bakoki kosala nini mpo Nzambe ayokela bango mawa?

12 Motema mawa oyo Yehova amoniseli biso na ndenge apesi biso likoki ya kokima etumbu ya liwa oyo Adama ná Eva batikelá biso eyokani na bosembo na ye. Mpo Yehova alimbisa masumu na biso kozanga ete abosana bosembo na ye, apesaki Mwana na ye Yesu Klisto lokola mbeka ya lisiko; likambo oyo emonisi motema mawa oyo eleki mosusu nyonso. (Matai 20:28; Baloma 6:22, 23) Mpo Nzambe amonisela biso motema mawa, mpe na bongo tólongwa na etumbu ya liwa mpo na lisumu oyo bankɔkɔ na biso batikelá biso, tosengeli “komonisa kondima na kati ya Mwana.”​—Yoane 3:16, 36.

Nzambe ya motema mawa mpe ya bosembo

13, 14. Tokoki nde koloba ete motema mawa ya Nzambe elɛmbisaka mwa moke bosembo na ye? Limbolá.

13 Atako Yehova abosanaka bosembo na ye te na ndenge oyo amonisaka motema mawa, tokoki nde koloba ete motema mawa ebongolaka bosembo na ye? Motema mawa ya Yehova elɛmbisaka nde mwa moke bosembo na ye? Te.

14 Na nzela ya mosakoli Hosea, Yehova ayebisaki Bayisalaele boye: “Nakobalanisa yo ete obalana na ngai libela; nakobalanisa yo ete obala ngai na sembo mpe na boyengebene mpe na boboto mpe na ngɔlu.” (Hosea 2:19) Maloba yango ezali komonisa polele ete ntango Yehova azali komonisa motema mawa, abosanaka te bizaleli na ye mosusu, na ndakisa bosembo. Yehova azali “Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu, . . . akolimbisa mabe mpe nkanza mpe lisumu, kasi akolongisa mokiti soki moke te.” (Exode 34:6, 7) Yehova azali Nzambe ya motema mawa mpe ya bosembo. Biblia elobi na ntina na ye ete: “Ye libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene.” (Deteronome 32:4) Bosembo ya Nzambe ezali ya kokoka, ndenge moko mpe na motema mawa na ye. Na kati ya bizaleli yango mibale, moko te eleki mosusu, moko mpe te ezali na mposa ya mosusu mpo na kolɛmbisa yango mwa moke. Kasi, Yehova amonisaka bizaleli yango mibale kozanga ete moko ebebisa mosusu.

15, 16. (a) Nini ezali komonisa ete bosembo ya Nzambe ezalaka makasimakasi te? (b) Elikya nini basambeli ya solo bazalaka na yango mpo na ntango oyo Yehova akoboma mokili oyo?

15 Bosembo ya Yehova ezalaka makasimakasi te. Mbala mingi, bosembo emonisamaka na ndenge ya kokata makambo; mpe mbala mingi, kokata likambo esɛngaka kopesa moto oyo asali mabe etumbu oyo ebongi. Nzokande, bosembo ya Nzambe esɛngaka mpe kobikisa baoyo babongi kozwa lobiko. Na ndakisa, ntango Nzambe abomaki bato mabe na Sodomo mpe Gomola, abikisaki Lota ná bana na ye mibale ya basi.​—Genese 19:12-26.

16 Tokoki kozala na elikya ete ntango Yehova akoboma mokili oyo, “ebele ya bato,” elingi koloba basambeli na ye ya solo oyo “basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na kati ya makila ya Mwana-Mpate” bakobika. Biblia elobi ete ‘bakouta na bolɔzi monene.’​—Emoniseli 7:9-14.

Mpo na nini tosengeli komonisaka motema mawa?

17. Wapi ntina mpenza oyo tosengeli kozala bato ya motema mawa?

17 Ndakisa ya Yehova mpe ya Yesu Klisto eteyi biso motema mawa ya solosolo. Masese 19:17 eyebisi biso ntina mpenza ya komonisa motema mawa; elobi boye: “Ye oyo akoyokela babola mawa azali kodefisela [Yehova]; akozongisela ye lisungi malamu na ye lisusu.” Yehova asepelaka ntango tozali komekola motema mawa na ye mpe ya Mwana na ye na makambo oyo tosalelaka bato mosusu. (1 Bakolinti 11:1) Motema mawa na biso elendisaka mpe bato mosusu na kolona ezaleli yango, mpamba te moto oyo azali na motema mawa bayokelaka ye mpe mawa.—​Luka 6:38.

18. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tómonisaka motema mawa?

18 Motema mawa esangisi bizaleli mingi ya malamu. Esangisi ngɔlu, bolingo, boboto, mpe motema malamu. Koyeba komitya na esika ya basusu nde etindaka moto amonisa motema mawa. Ya solo, motema mawa ya Yehova elɛmbisaka bosembo na ye te; kasi, asilikaka noki te mpe azalaka na motema molai epai ya bato ya mabe, atikelaka bango ntango oyo ekoki mpo bábongola motema. (2 Petelo 3:9, 10) Yango emonisi ete koyokela basusu mawa esɛngaka mpe kozala na motema molai. Lokola motema mawa esangisi bizaleli mingi​—kati na yango bizaleli mosusu ya mbuma ya elimo—​motema mawa ekoki mpenza kosalisa moto alona bizaleli wana. (Bagalatia 5:22, 23) Tomoni mpenza ete ezali na ntina mingi tómonisaka motema mawa!

“Esengo na bato ya motema mawa”

19, 20. Na ndenge nini motema mawa esepelaka na bolongi mpenza likoló ya lisambisi?

19 Moyekoli Yakobo ayebisi biso ntina oyo tosengeli mpenza komonisaka motema mawa na bomoi na biso. Akomaki boye: “Motema mawa esepelaka na bolongi mpenza likoló ya lisambisi.” (Yakobo 2:13b) Yakobo alobelaki motema mawa oyo mosaleli ya Yehova asengeli komoniselaka basusu. Motema mawa wana esepelaka na bolongi mpenza likoló ya lisambisi na boye ete ntango moto yango ‘akozongisa monɔkɔ mpo na ye moko epai ya Nzambe,’ Yehova akotalela ndenge oyo amoniselaki basusu motema mawa mpe akolimbisa ye na nzela ya mbeka ya lisiko oyo Mwana na Ye apesaki. (Baloma 14:12) Na ntembe te, ntina moko oyo Nzambe ayokelaki Davidi mawa ntango asalaki lisumu ná Bata-seba ezali ete Davidi ye moko mpe azalaki koyokela basusu mawa. (1 Samwele 24:4-7) Nzokande, “moto oyo azali na momeseno ya komonisa motema mawa te akozwa lisambisi oyo ezangi motema mawa.” (Yakobo 2:13a) Yango wana, tokoki kokamwa te ete bato “bazangá motema mawa” batángami na kati ya bato oyo Nzambe alobi ete “babongi na liwa”!​—Baloma 1:31, 32.

20 Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Esengo na bato ya motema mawa, mpo bakomonisamela motema mawa.” (Matai 5:7) Maloba yango ezali komonisa polele ete soki moto alingi Nzambe ayokela ye mawa, ye moko mpe asengeli koyokelaka basusu mawa! Na lisolo oyo elandi tokolobela ndenge oyo tokoki komonisaka motema mawa na bomoi ya mokolo na mokolo.

Oyekoli makambo nini?

• Motema mawa elimboli nini?

• Motema mawa emonanaka na makambo nini?

• Na ndenge nini Yehova azali Nzambe ya motema mawa mpe ya bosembo?

• Mpo na nini tosengeli kozala bato ya motema mawa?

[Elilingi na lokasa 21]

Ndenge Yehova ayokaka mpo na bato oyo bazali na mpasi ekokani na ndenge oyo mama ayokaka mpo na mwana na ye

[Elilingi na lokasa 23]

Makamwisi ya Yesu ezali koteya biso nini na ntina na motema mawa?

[Elilingi na lokasa 24]

Yehova abosanaki nde bosembo na ye lokola alimbisaki Davidi?

[Elilingi na lokasa 25]

Motema mawa ya Nzambe epai ya bato ya masumu ezali na boyokani na bosembo na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto