Komiyoka ete ozali na bomoi ya malamu sikoyo mpe kozala na bomoi ya malamu libela
MPO na nini mbala mingi bato bamonaka ete bazali na bomoi ya malamu te, mpe soki bakómi na bomoi ya malamu, ezalaka se mpo na mwa ntango moke? Ekoki nde kozala ete ndenge oyo totalelaka bomoi ya malamu ezali ndenge oyo tomonaka makambo na makanisi na biso, kasi ezali te oyo tokoki mpenza kozwa? Soki totalelaka yango bongo, tozali na libunga; tozali lokola bato bazali kolɔta ndɔtɔ.
Moto akoki kobosana bampasi na ye, mpe makanisi na ye ekoki komema ye na bomoi moko ya malamu mpenza; akoki kobanda kokanisa ete na bomoi wana, mpasi moko te ekoki koyela ye. Kasi, mbala mingi mikakatano ya bomoi ya solo eyaka mbala moko kokata ndɔtɔ yango mpe esukisaka bolamu oyo azalaki komona na makanisi mpamba mpe moto amonaka ete mikakatano na ye ezali kaka.
Sikoyo, tótalela naino moko na makambo oyo bato balukaka mpo na kozala na bomoi ya malamu: esika ya kofanda. Na ndakisa, vile ekoki komonana lokola esika oyo bato bakoki kozwa biloko nyonso oyo balingaka, ekoki komonana ete kuna bato bazalaka kaka na bisengo, bafutaka bango mbongo mingi, mpe bafandaka na bandako ya kitoko. Ya solo, ekoki komonana lokola nde bomoi ya malamu oyo moto alukaka ezali kuna. Kasi, makambo ezali mpenza ndenge yango?
Bomoi ya malamu ezalaka nde na vile to bato nde bamikosaka bongo?
Na mikili ya bobola, bapiblisite elakisaka makambo kitoko ya vile oyo ekoki kopesa bato mposa makasi ya kokende komona yango. Bato oyo babongisaka bapiblisite yango bakanisaka yo te ete ozala na bomoi ya malamu, balukaka nde kotɛkisa biloko na bango. Piblisite ebombaka mikakatano ya solosolo ya bomoi mpe elakisaka bililingi ya bato oyo bakómá na bomɛngo mpe bazali na bomoi ya malamu. Na bongo, emonanaka lokola nde mpo moto azala na bomoi ya malamu, asengeli kozala na biloko oyo balakisaka na piblisite mpe asengeli kofanda na vile.
Tótalela ndakisa oyo. Bakonzi ya engumba moko na Afrika ya Wɛsti basalaki kampanye moko mpo na kokebisa bato na makama ya komɛla likaya. Mpo na yango, na bitanda minene oyo ezalaka na babalabala, babambaki bililingi oyo ezalaki komonisa ete moto oyo azali komɛla likaya azali nde kotumba na mɔ́tɔ mbongo oyo azwi na motɔki na ye. Mpo na kolongola makanisi wana na mitó ya bato, bakompanyi oyo esalaka makaya na batɛkisi ya makaya, bango mpe babambaki na bitanda minene na balabala, bafɔtɔ kitoko ya bato oyo bazali komɛla makaya mpe bazali na bisengo mpe bazali malamu. Lisusu, na kompanyi moko oyo esalaka makaya balatisaki bato mosusu ya mosala bilamba mpe bikɔti ya kitoko mpe ya ndenge moko mpe batindaki bango bátambola na babalabala mpo na kokabola makaya epai ya bilenge mpe kolendisa mokomoko na bango “ameka yango.” Mingi na bilenge yango bautá mboka mpe, lokola bafungoli naino miso te, bakweaki na mayele mabe ya piblisite yango. Bakómaki baombo ya likaya. Bilenge yango batikaki mboka mpo na koluka bomoi ya malamu na vile mpo básalisaka bandeko na bango to mpe mpo bákóma na mbongo. Nzokande, bakómaki nde kobebisa mbongo na bango oyo bakokaki kosala na yango makambo ya ntina.
Ezali kaka te piblisite ya biloko ya kotɛkisa nde emonisaka lokola ete na vile bomoi ezalaka mpenza malamu. Ntango mosusu bato oyo bakendá na vile mpe bayokaka nsɔni mpo na kozonga mboka nde babɛtaka masolo oyo emonisaka lokola nde kuna bomoi ezalaka mpenza malamu. Mpo emonana te ete bakoki makambo te, balingaka komikumisa lokola nde bakómi na bozwi mpe basali makambo minene na vile. Kasi, soki moto atali malamumalamu akomona ete bomoi oyo bazali na yango eleki te oyo bazalaki na yango na mboka; mpo na kozwa mbongo, bazali konyokwama lokola ebele ya bato mosusu oyo bafandi na vile.
Ezali mingimingi na bavile ya minene nde bautá oyo bakómi sika mpo na koluka bomoi ya malamu bakweaka na mitambo ya bato ya mayele mabe. Mpo na nini? Mingimingi, lokola bazwaka naino te baninga ya motema nsima ya kotika bandeko na bango mosika, bazalaka na bato te oyo bakoki kopesa bango toli mpe kokebisa bango na makama oyo ezali na vile ya kolanda bomoi ya kolukaluka biloko ya mokili.
Josué akweaki na motambo ya komɛla likaya te. Lisusu, na nsuka akangaki ntina ete akokoka bomoi ya vile te. Soki ezali na likambo moko ya malamu oyo vile ekokaki kopesa ye, tokoloba ete ezali kaka bandɔtɔ mpamba ya bomoi ya malamu. Amonaki ete bomoi ya malamu oyo akendaki koluka na vile azwaki yango te; vile ezalaki esika na ye te. Akómaki koyoka ete azali kozanga eloko moko, azali na ntina te, mpe azali kosala eloko te, mpe nsukansuka, abwakaki lolendo mpe azongaki na mboka.
Azalaki kobanga ete bakosɛka ye. Nzokande, bandeko na ye na baninga na ye bayambaki ye na esengo. Esengo ya kozala na bandeko na ye, komona lisusu makambo oyo amesanaki na yango na mboka, mpe bolingo ya baninga na ye na kati ya lisangá, nyonso wana esalaki ete amiyoka malamu koleka ndenge azalaki na vile, epai oyo bato mingi, na esika bázwa makambo oyo bakanisaki, bakómaka nde na mitungisi likoló ya mitungisi. Josué akamwaki na komona ete kosala makasi mosala ya bilanga na tata na ye epesaki ye na bandeko na ye mbongo mingi koleka oyo bazalaki kofuta ye na vile.
Likambo ya mbongo: mokakatano ezali mpenzampenza nini?
Mbongo ekoki kopesa yo bomoi ya malamu? Liz azali moto ya Canada; ye alobi boye: “Ntango nazalaki elenge, nazalaki kokanisa ete soki moto akómi na mbongo akotungisama lisusu te.” Mobali moko ya mbongo alingaki ye mpe mwa moke na nsima, babalanaki. Amonaki ete akómi na bomoi ya malamu? Liz abakisi ete: “Ntango tobalanaki, tozalaki na ndako ya kitoko mpe vuatire mibale, mpe tozalaki na mbongo oyo tokokaki kosomba na yango eloko nyonso oyo esepelisi biso, kokende mibembo, mpe kobima mpo na kosakana mpe kozwa mopɛpɛ. Kasi, likambo ya kokamwa, nazalaki kaka komitungisa mpo na mbongo.” Ayebisi biso ntina: “Tozalaki kobebisa mbongo mingi. Ezali lokola nde ntango moto azali kokóma na mbongo mingi, akobanda se komiyoka ete azali lisusu na bomoi ya malamu te. Mbongo esilisaki mitungisi na biso te.”
Soki ozali komona ete ozali na bomoi ya malamu te mpo ozali na mbongo mingi te, osengeli komituna boye: ‘Mokakatano ezali mpenzampenza nini? Ezali mpenza kozanga mbongo, to ezali nde kozanga mayele ya kosalela mbongo na ndenge ya malamu?’ Ntango akanisaki bomoi oyo azalaki na yango liboso, Liz alobaki boye: “Sikoyo nayebi ete ntango nazalaki mwana, mikakatano oyo tozalaki na yango na libota ezalaki nde mpo tozalaki kosalela mbongo na ndenge ya mabe. Tozalaki kokɔta nyongo mpo na kosomba biloko, yango wana tozalaki ntango nyonso na kilo na motó. Yango nde ezalaki komemela biso mitungisi.”
Kasi, lelo oyo Liz na mobali na ye bazali na bomoi ya malamu koleka, atako bazali lisusu na mbongo mingi te. Ntango bayekolaki Liloba ya Nzambe, batikaki kolanda makanisi oyo bato bazalaka na yango ete soki ozali na mbongo, ozali na nyonso; bakómaki kolanda bwanya ya Nzambe, oyo ezali na maloba lokola oyo: “Nde ye oyo akoyokamela ngai akofanda na kimya, mpe akobanga mabe te.” (Masese 1:33) Balingaki kozala na bomoi oyo ezali na ntina koleka bomoi ya moto oyo azali na mbongo mingi na banki. Lelo oyo, Liz na mobali na ye bazali bamisionɛrɛ na mboka moko ya mosika; bazali koteya bazwi mpe babola ete etikali moke Yehova Nzambe apesa bato bomoi ya malamu na mokili mobimba. Moto oyo asalaka mosala yango azwaka esengo ya solosolo mpe kimya, mpo azali na mokano ya malamu koleka mpe azali kolanda makambo oyo ezali na motuya koleka, kasi akoki kozwa yango na mbongo te.
Kobosana te likambo oyo ya ntina mingi: Kozala mozwi epai ya Nzambe ezali na ntina koleka kozala na biloko mingi ya mokili. Na kati ya Makomami Mosantu mobimba bazali kolobela te likambo ya kozala na bozwi mingi, kasi kozala na lokumu malamu na miso ya Yehova, mpe tokoki kobatela lokumu yango soki tozali ntango nyonso kosala mokano ya Nzambe na kondima. Klisto Yesu alendisaki biso tózala ‘bazwi epai ya Nzambe’ mpe tóbomba “eloko ya motuya na likoló.”—Luka 12:21, 33, NW.
Esika ya lokumu ekomema yo wapi?
Soki ozali kokanisa ete kokóma moto monene nde epesaka bomoi ya malamu, osengeli komituna mituna oyo: ‘Moto nini ya lokumu azali mpenza na bomoi ya malamu? Nasengeli komata tii wapi mpo nakóma na bomoi ya malamu?’ Soki ozali na mosala ya lokumu okoki kokanisa ete okómi na bomoi ya malamu, kasi nsukansuka, okoya komona ete ememeli yo mpenza eloko moko te, to mpe ekoki kosala ete osuka mabe mpenza.
Makambo oyo ezali kosalema ezali komonisa ete kozala na lokumu malamu na miso ya Nzambe epesaka bomoi ya malamu koleka kozala na lokumu na miso ya bato. Kaka Yehova nde akoki kopesa bato bomoi ya seko. Yango ezali kosɛnga ete nkombo na biso ekomama na buku ya bomoi, kasi ezali kosɛnga te ete nkombo na biso ekende nsango.—Exode 32:32; Emoniseli 3:5.
Soki otiki kotalela bomoi ya malamu na ndenge oyo okoki komona yango na ndɔtɔ, ndenge nini ozali kotalela bomoi oyo ozali na yango sikoyo, mpe okoki mpenza kolikya nini na mikolo ezali koya? Moto moko te azali na nyonso. Moklisto moko ya mayele amonisaki mpe likambo yango ntango alobaki ete: “Liteya nazwi ezali ete moto akoki kozwa biloko nyonso te na bomoi, asengeli nde kopona.” Tɛlɛmá naino awa na lisolo oyo mpe tángá etanda oyo ezali na motó ya likambo “Lisapo moko ya bato ya Bénin.”
Sikoyo, pesá biyano na mituna oyo: Na bomoi na ngai, nazali mpenza koluka kokóma wapi to mokano na ngai ezali mpenza nini? Wapi nzela oyo eleki mpenza mokuse mpo na kokóma na esika yango? Ekoki nde kozala ete nazali kolanda nzela ya molai mpe oyo etondi na makama, nzokande ezali na nzela mosusu, ya mindɔndɔ te oyo nakoki kolanda mpo nazwa oyo nasengeli na yango mpenza mpe oyo nakoki mpenza kozwa?
Yesu apesaki toli oyo ezali komonisa ete biloko ya mokili ezali na valɛrɛ moke soki tokokanisi yango na makambo ya elimo, na nsima alobaki ete tózala na liso “ya mindɔndɔ te,” to “oyo ezali komona polele.” (Matai 6:22, NW; maloba na nse ya lokasa) Amonisaki polele ete makambo oyo eleki ntina na bomoi ezali nde makambo ya elimo mpe mikano ya elimo, oyo ezali kotya nkombo mpe Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso. (Matai 6:9, 10) Makambo mosusu ezali na ntina mingi te to mpe, ezali ya kotyela likebi mingi te.
Lelo oyo, bamasini ya fɔtɔ mingi emonisaka polele biloko, ezala mosika to pembeni. Yo mpe ozali ndenge yango? Biloko nyonso emonanaka “polele” na miso na yo, elingi koloba ete biloko nyonso ezalaka na ntina mpo na yo, ezali malamu mpo na yo mpe okanisaka ete soki motema na yo eluli yango, okoki kozwa yango? Soki ezalaka ata mwa moke bongo mpo na yo, eloko oyo eleki ntina mpo na baklisto, elingi koloba Bokonzi, ekoki komonana lisusu malamu te na kati ya biloko ndenge na ndenge oyo ezali kobenda likebi na yo. Yesu apesaki toli ya makasi ete: “Bólukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso ikobakisama na bino.”—Matai 6:33.
Bomoi ya malamu lelo oyo mpe mpo na libela
Biso nyonso tokoki kokanisa biloko ya malamu oyo biso mpe bato oyo tolingaka tokoki kozala na yango. Kasi, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, lisusu tozali na mokili ezangi kokoka mpe bomoi na biso ezali na nsuka, nyonso wana ezali kosɛnga ete tópona biloko nini oyo tozali mpenza na makoki ya kozwa yango. Eleki sikoyo bankóto ya bambula, mokomi moko ya Biblia alobaki ete: “Nabalukaki mpo na kotala na nse ya moi ete momekano ezali kaka mpo na bato ya mbangu te, etumba ezali kaka mpo na bato ya makasi te, mpe bilei mpo na bato ya bwanya te, ata mpe bozwi mpo na bato ya mayele, ata mpe lokumu mpo na bato bayebi makambo mingi, mpamba te ntango mpe likambo ekanami te ekómelaka bango nyonso.”—Mosakoli 9:11, NW.
Ntango mosusu, lokola tomipesaka mingi na makambo oyo tomeseni kosala mokolo na mokolo, tobosanaka komitalela mpenza malamu mpe koluka koyeba soki tozali mpenza na mposa ya nini mpo tómiyoka ete tozali na bomoi ya malamu. Tókanisa na maloba ya bwanya oyo ekomamá kalakala ete: “Moto oyo alingaka mbongo, atondaka yango té; pe oyo alingaka bomengo, azwaka na yango litomba té. Yango pe ezali kaka pamba. Mongamba ália mingi to moke, alalaka na ye malamu. Kasi moto ya bomengo mingi alalaka malamu té likolo ya bomengo na ye.” (Mosakoli 5:9, 11, Bible na Lingala ya lelo oyo) Motuna ezongi lisusu, epai wapi okoki kozwa bomoi ya malamu?
Soki ozali kolɔta ndɔtɔ ndenge Josué azalaki kolɔta, okoki nde kobongola mikano na yo? Bato oyo balingaka yo mpenza bakosunga yo, ndenge oyo bandeko mpe baninga na kati ya lisangá basungaki Josué. Okoki kozala na bomoi ya malamu mingi na esika oyo bozwi ezali mingi te kasi epai ozali kofanda na bato oyo balingaka yo koleka na vile elongo na bato oyo bakozwa yo mpo osalelaka nde bango.
Soki ozali na bomɛngo, ndenge Liz na mobali na ye bazalaki, okoki kobongola bomoi na yo mpo na kosalela ntango mpe makasi na yo mingi mpo na kosalisa bato, bázala bazwi to babola, na koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe, nzela oyo ekomema bato na bomoi ya malamu koleka?
Soki ozali komata mpɛtɛ to ozali kokóma moto monene, okoki kozwa ntango ya komituna na bosembo mpenza soki mposa nini ezali kotindika yo. Toboyi te, biloko mosusu ya malamu oyo okoki kozala na yango ekoki kobakisela yo esengo. Kasi, okolonga na kosala ete makanisi na yo ezala kaka na Bokonzi ya Nzambe, nzela ya solosolo mpo na kozwa bomoi ya malamu mpenza? Kobosana te maloba oyo ya Yesu: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” (Misala 20:35) Soki omipesi na misala ya boklisto na kati ya lisangá, okozala na bomoi ya malamu.
Baoyo bazali kotya motema na bango epai ya Yehova mpe na Bokonzi na ye bazali na bomoi ya malamu mpe bazali na elikya ya kozwa bomoi ya malamu koleka na mikolo ezali koya. Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Natii [Yehova] liboso na ngai libela; azali lobɔkɔ na ngai ya mobali, bongo nakokwea te. Boye motema na ngai eyoki esengo mpe molimo na ngai esepelisami; nzoto na ngai mpe ekofanda na kimya.”—Nzembo 16:8, 9.
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Lisapo moko ya bato ya Bénin
Lisapo oyo ebɛtamaka mingi, kasi moto na moto abɛtaka yango na mwa kokesana moke. Eleki mwa mikolo, mobange moko oyo afandaka na mboka, na ekólo Bénin, na Afrika ya Wɛsti, abɛtelaki yango etuluku moko ya bilenge.
Ezalaki mokolo moko, mobomi-mbisi moko azalaki kozonga na mboka na bwato na ye; akutanaki na mopaya moko oyo asalaka mombongo na ye na Bénin. Moto yango atunaki mobomi-mbisi mpo na nini aumeli te mpe azali kozonga na mboka. Mobomi-mbisi apesaki ye eyano ete akokaki koumela kasi azongi mpo mbisi oyo abomi ekoki mpo na libota na ye.
Moto ya mombongo atunaki ye ete: “Ndenge nini olekisaka ntango na yo?”
Mobomi-mbisi azongisaki ete: “Nakendaka koboma mbisi mwa moke. Nafandaka na bana na ngai. Soki molunge ekómi makasi, biso nyonso tolalaka mwa moke. Na mpokwa, biso nyonso tolyaka esika moko. Na nsima, ngai na baninga na ngai tokutanaka mpo na kobɛta miziki, mpe bongo na bongo.”
Moto ya mombongo akataki ye maloba: “Yoká nayebisa yo, ngai nazali na diplome ya iniversite mpe nayekolá makambo oyo. Nalingi kosalisa yo. Osengeli koumelaka ntango okei koboma mbisi. Na bongo, okozwa mbongo mingi mpe okosomba bwato ya monene koleka mwa bwato oyo. Soki okómi na bwato ya monene, okozwa mbongo mingi lisusu mpe mosika te okokóma na bamasuwa ya koboma mbisi.”
Mobomi-mbisi atunaki ye ete, “Bongo nsima na yango?”
“Na nsima, na esika otɛkisaka mbisi na yo na komelesa, okotɛka yango mbala moko na izini to mpe okosala kompanyi na yo ya mbisi. Okolongwa na mboka mpe okokende kofanda na Cotonou, to na Paris, to mpe na New York mpe okobanda kotambwisa misala na yo banda kuna. Okokóma na mbongo mingi mpenza.”
Mobomi-mbisi atunaki ye ete: “Mpo nakóma ndenge wana ekoki kozwa ngai ntango boni?”
Moto yango ya mayele alobaki ete: “Mbala mosusu mbula 15 to 20.”
Mobomi-mbisi atunaki lisusu: “Bongo nsima na yango?”
Moto yango alobaki ete: “Na ntango wana nde okokóma na bomoi ya malamu. Na nsima, okokende kopemisa nzoto soki osepeli. Na ntango wana okoki kotika bomoi wana ya yikiyiki mpe kokende kofanda na mwa mboka moko mosika.”
Mobomi-mbisi atunaki lisusu: “Bongo nsuka na yango?”
“Okozala na ntango ya kokende koboma mbisi mwa moke, kolekisa ntango na bana na yo, kolala mwa moke soki molunge ekómi makasi, kolya esika moko na libota na yo na mpokwa, mpe kokutana na baninga mpo na kobɛta mwa miziki.”
[Bililingi na lokasa 7]
Komata mpɛtɛ na mosala nde epesaka bomoi ya malamu?
[Bililingi na lokasa 8]
Bandeko na yo baklisto bazali mpenza na mposa ete yo ozala na bomoi ya malamu