Koyeba komitya na esika ya basusu—Ezali sɛkɛlɛ ya kozala na boboto mpe na motema mawa
WASI moko na nkombo Helen Keller akomaki boye: “Bomoi ezalaka mpenza na ntina soki moto azali kokitisa mpasi ya moto mosusu.” Ntembe ezali te ete Keller ayebaki malamu ndenge oyo mpasi ya makanisi etungisaka. Ntango azalaki na sanza 19, abɛlaki maladi moko oyo ebomaki ye miso na matoi. Kasi molakisi moko ya motema mawa ayekolisaki Helen kotánga mpe kokoma na ekomeli ya bato bakufá miso (braille), mpe na nsima alakisaki ye koloba.
Ann Sullivan, molakisi yango ya Keller, ayebaki malamu mpenza mawa oyo ezalaka epai ya moto oyo azali kobundana na mbeba ya nzoto. Ye moko mpe azalaki komona malamu te. Kasi na mokemoke, Ann abimisaki lolenge moko ya kosolola na Helen: azalaki “kokoma” balɛtrɛ ya alfabɛ na mabɔkɔ ya Helen. Boboto ya molakisi na ye etindaki Helen azwa ekateli ya komipesa mpo na kosalisa bato oyo bakufá miso mpe oyo bakufá matoi. Lokola asalaki molende mpenza mpo na kozala na bomoi ya malamu atako mbeba ezalaki na nzoto, azalaki komitya na esika ya bato mosusu oyo bazalaki mpe na mikakatano ya ndenge wana. Azalaki na mposa ya kosalisa bango.
Mbala mosusu omonaka ete na mokili oyo bato batondi na moimi, ezali mpasi te mpo na ‘kokangela moto motema’ mpe kotalela te bamposa ya bato mosusu. (1 Yoane 3:17) Nzokande, baklisto basɛngisami na kolingana makasi mpe kolinga bazalani na bango. (Matai 22:39; 1 Petelo 4:8) Kasi ntango mosusu omonaka likambo oyo: Atako tozalaka na mposa tólingana, mbala mingi tolekisaka mabaku ya kosalisa basusu ntango bazali na mpasi. Ntango mosusu ezalaka bongo mpo toyebaka bamposa na bango te. Komitya na esika ya basusu nde ezali sɛkɛlɛ ya kozala na boboto mpe na motema mawa.
Komitya na esika ya basusu elimboli nini?
Diksionɛrɛ moko elobi ete komitya na esika ya basusu elimboli “komiyoka lokola moto oyo azali na likambo mpe koyeba malamu mpenza likambo oyo moto yango azali na yango, ndenge azali komiyoka mpe oyo azali kokana kosala.” Na yango, mpo na komitya na esika ya moto mosusu esɛngaka naino tóyeba kokanga ntina ya makambo oyo azali na yango mpe tóyoka ndenge moto yango azali komiyoka na makambo yango. Ɛɛ, komitya na esika ya moto mosusu etaleli mpenza koyoka mpasi na ye na kati ya motema na biso.
Makomami elobeli ezaleli yango na bisika mwa mingi. Ntoma Petelo apesaki baklisto toli ete ‘bámityaka na esika ya basusu, bázalaka na bolingo lokola bandeko mpe na motema mawa.’ (1 Petelo 3:8, NW) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘komitya na esika ya basusu’ elimboli mpenza “koyoka mpasi ya moto mosusu” to “kozala na motema mawa.” Ntoma Paulo azalaki kolobela bizaleli ya ndenge yango ntango alendisaki baninga na ye baklisto ‘básepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela; bálelaka elongo na bato oyo bazali kolela.’ Abakisaki ete: “Bózala na makanisi ndenge moko bamoko mpo na bamosusu.” (Baloma 12:15, 16, NW) Omonaka ete soki omitii te na esika ya moto mosusu, ekozala mpasi mpo olinga ye ndenge omilingaka.
Moto nyonso abotamá na mwa mposa wana ya komitya na esika ya moto mosusu. Nani ayokaka motema mpasi te ntango amonaka bililingi ya bana oyo bazali kokufa nzala to ya bilongi ya mawa ya bato bakimi mboka na bango? Mama nini ya bolingo alukaka te koyeba mposa ya mwana na ye oyo azali kolela? Kasi, mpasi mosusu oyo moto azali na yango, bato mosusu bayebaka yango noki te. Ezali mpenza mpasi mpo oyeba ndenge oyo moto amiyokaka ntango azali konyokwama na makanisi, to azali na mbeba ya nzoto oyo ebombamá, to azali kobɛla maladi ya makanisi oyo etindaka moto na bilyabilya mpe komiboma nzala, soki yo moko okutaná naino na mokakatano ya ndenge yango te. Atako bongo, Makomami emonisi ete tokoki mpe tosengeli kolona ezaleli ya komitya na esika ya bato oyo bazali na mikakatano oyo biso tozali na yango te.
Bandakisa euti na Makomami ya bato oyo bamityaki na esika ya basusu
Yehova azali ndakisa ya liboso mpo na komitya na esika ya basusu. Ata azali moto ya kokoka, asɛngaka biso te ete tózala bato ya kokoka “mpo ayebi tosalami na nini; abosani te ete touti na mabele.” (Nzembo 103:14, NW; Baloma 5:12) Lisusu, mpo ete ayebi malamu bolɛmbu na biso, ‘akotika biso te ete tómekama na koleka nguya na biso.’ (1 Bakolinti 10:13) Na nzela ya basaleli na ye mpe ya elimo na ye, asalisaka biso tóyeba kosilisa mikakatano na biso.—Yilimia 25:4, 5; Misala 5:32.
Yehova ayokaka mpenza mpasi ya basaleli na ye. Ayebisaki Bayuda oyo bautaki na Babilone ete: “Mpo ete ye oyo asimbi bino asimbi kati na liso na ngai.” (Zekalia 2:8, NW) Davidi, moko na bakomi ya Biblia, ayebaki malamu ezaleli yango ya Nzambe ntango ayebisaki ye ete: ‘Tyá mpisoli na ngai kati na molangi na yo; yango ekomami na mokanda na yo te?’ (Nzembo 56:8) Koyeba ete Yehova abosanaka te—lokola nde ekomami na kati ya buku—mpisoli oyo basaleli na ye ya sembo batangisaka ntango bazali kobundana mpo na kotikala sembo epai na ye ezali mpenza kobɔndisa!
Ndenge moko na Tata na ye, Yesu Klisto atyaka likebi na lolenge oyo bato mosusu bazali komiyoka. Ntango abikisaki mobali moko oyo akufá miso, akendaki na ye pembeni, ntango mosusu mpo ete ayoka nsɔni te to abanga te ntango azali kobikisa ye. (Malako 7:32-35) Mokolo mosusu, Yesu amonaki bato bazali kokende kokunda ebembe ya mwana kaka moko ya mwasi moko oyo akufelá mobali. Mbala moko asosolaki mpasi ya mwasi yango, apusanaki pene na bato oyo bamemaki ebembe mpe asekwisaki elenge mobali yango.—Luka 7:11-16.
Nsima ya lisekwa na ye, ntango Yesu abimelaki Saulo na nzela ya Damaseke, ayebisaki Saulo ete lolenge azalaki konyokola bayekoli na ye makasi ezalaki kosala ye mpasi. Ayebisaki ye ete: “Ngai Yesu oyo yo ozali konyokola.” (Misala 9:3-5) Ndenge oyo mama ayokaka mpasi ya mwana na ye oyo azali kobɛla, Yesu mpe ayokaki mpasi oyo bayekoli na ye bazalaki komona. Yango wana Yesu, Nganga-Monene na biso kuna na likoló ‘ayokaka mpasi esika moko na biso kati na bolɛmbu na biso’; to lolenge libongoli ya Biblia ya Rotherham elobeli yango, “amityaka na esika na biso na bolɛmbu na biso.”—Baebele 4:15.
Ntoma Paulo ayekolaki kotalela mpasi mpe mayoki ya bato mosusu. Atunaki boye: “Nani azali na kolɛmba mpe ngai nazwi bolɛmbu te? Nani [abɛti] libaku mpe ngai nasiliki te?” (2 Bakolinti 11:29) Ntango anzelu moko alongolaki Paulo na Sila na minyɔlɔlɔ na kati ya bolɔkɔ na engumba Filipi, likanisi ya liboso eyelaki Paulo ezalaki ya koyebisa mokɛngɛli ya bolɔkɔ ete moto ata moko te akimaki. Lokola ayebaki komitya na esika ya basusu, asosolaki ete mokɛngɛli ya bolɔkɔ akokaki komiboma. Paulo ayebaki ete epai ya Baloma, soki mokangami akimi na bolɔkɔ, mokɛngɛli akozwa etumbu ya makasi; mingimingi soki bapesaki ye mitindo ete akɛngɛla mpenza moto yango malamu. (Misala 16:24-28) Likambo ya boboto oyo Paulo asalaki ebikisaki bomoi ya mokɛngɛli yango mpe esimbaki motema na ye, mpe ye na libota na ye mobimba bakómaki baklisto.—Misala 16:30-34.
Ndenge ya kolona ezaleli ya komitya na esika ya basusu
Makomami elendisaka biso mbala na mbala ete tómekola Tata na biso ya likoló mpe Mwana na ye Yesu Klisto; na yango, tosengeli kolona ezali ya komitya na esika ya basusu. Ndenge nini tokoki kosala yango? Ezali na makambo misato ya ntina oyo tokoki kosala mpo na kolona ezaleli ya koyeba bamposa ya basusu mpe komitya na esika na bango: koyoka, kotala malamumalamu, mpe kokanisa.
Koyoka. Soki tozali koyoka malamumalamu tokoyeba mikakatano oyo basusu bazali na yango. Mpe soki tozali koyoka bato malamu mpenza, bakobanda koyebisa biso makanisi oyo ezali na mitema na bango mpe koyebisa biso ndenge bazali komiyoka. Miriam alobi boye: “Nakoki kosolola na nkulutu moko soki nayebi ete akoyoka ngai. Nalingaka komona ete azali mpenza kokanga ntina ya mokakatano na ngai. Nakotyela ye motema koleka soki azali kotuna mituna ya mozindo oyo emonisi ete atyaki mpenza likebi na makambo nayebisaki ye.”
Kotala malamumalamu. Moto nyonso te akoyebisa biso polele ndenge oyo azali koyoka to makambo azali kokutana na yango. Nzokande moto oyo ayebi mpenza kotala malamumalamu akomona ntango moklisto moko azali kotungisama na makanisi, soki elenge moko alingi lisusu kosolola na bato te, to soki ministre moko ya molende azali lisusu na esengo te. Ezali na ntina mingi ete baboti bázala na likoki ya kososola mokakatano ya mwana na bango na ebandeli mpenza. Marie alobi ete: “Mama ayebaka lolenge oyo nazali komiyoka liboso kutu nayebisa ye, yango esalisaka ngai nayebisaka ye mikakatano na ngai polele.”
Salelá makanisi na yo. Okoyeba mpenza komitya na esika ya moto mosusu soki ozali komituna boye: ‘Soki nazalaka na esika na ye, nalingaki komiyoka ndenge nini? Nalingaki kosala nini? Nalingaki kozala na mposa ya nini?’ Babɔndisi ya lokuta ya Yobo bayebaki ata moke te komitya na esika na ye. Yango wana bazwelaki ye makanisi ete asalaki masumu mpe bakweisaki ye.
Lokola bato bazali na ezaleli ya kozanga kokoka, ezalaka mpasi básosola lolenge nini moto mosusu azali komiyoka, kasi bazalaka mbangu mpo na kosambisa mabunga ya basusu. Atako bongo, soki tomeki kokanisa mpasi nini oyo moto azali na yango, ekosalisa biso tóyokela ye mawa na esika ya kosambisa ye. Juan, nkulutu moko oyo aumeli, alobi boye: “Napesaka toli ya malamu koleka soki nayoki naino na likebi mpenza likambo yango nyonso liboso ete nabanda kopesa toli.”
Mikanda ya Batatoli ya Yehova esalisá bato ebele na likambo yango. Bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! elobelaka mikakatano ya minene lokola kotungisama na makanisi mpe konyokola bana. Masolo yango oyo eyaka na ntango oyo ebongi mpenza, esalisaka batángi báyeba mpasi ya bato oyo bazali konyokwama na mikakatano ya ndenge wana. Lisusu, buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi esalisá baboti ebele na kososola mikakatano ya bana na bango.
Komitya na esika ya basusu esalisaka na misala ya baklisto
Mingi kati na biso soki tozali na bilei tokoboya te kopesa mwana oyo azali na nzala. Ndenge moko mpe, soki toyebi komitya na esika ya moto mosusu, tokososola elimo na ye. Biblia elobi boye mpo na Yesu: “Ntango amonaki bibele wana ya bato ayokelaki bango mawa, mpo batikamaki mpamba mpe bapalanganisamaki lokola bampate ezangá mobateli.” (Matai 9:36, NW) Bamilio ya bato lelo oyo bazali ndenge wana na elimo, mpe bazali na mposa ya lisalisi.
Lokola na mikolo ya Yesu, ntango mosusu esɛngaka ete biso mpe tóbwaka ezaleli ya koponapona to mimeseno ya bato mosusu mpo tósimba mitema na bango. Ministre ya boboto alukaka makambo oyo ekopesa ye nzela ayokana na bato mosusu to alukaka kolobela makambo oyo bato oyo bazali koyoka ye bakanisaka mingi mpo ete básepela koyoka likambo alingi koyebisa bango. (Misala 17:22, 23; 1 Bakolinti 9:20-23) Boboto oyo tokosalela bato oyo bazali koyoka nsango ya Bokonzi mpo tozali komitya na esika na bango, ekoki mpe kotinda bango bándima yango, ndenge kaka ezalaki mpo na mokɛngɛli ya bolɔkɔ ya Filipi.
Komitya na esika ya moto mosusu ekosalisa biso tólandaka te mabunga ya basusu na lisangá. Soki tosali makasi tóyeba nini etindi moto mosusu asalela biso libunga, na ntembe te ekozala pɛtɛɛ tólimbisa ye. Soki tózalaka na esika na ye, biso mpe tolingaki kosala libunga yango. Yehova amityaka na esika na biso mpo “abosani te ete touti na mabelé.” Yango wana, soki tozali komitya na esika ya bato mosusu, tosengeli kokanga motema na makambo oyo kozanga kokoka etindaka bango básala mpe tosengeli ‘kolimbisa bango na motema moko.’—Nzembo 103:14, NW; Bakolose 3:13, NW.
Soki esengeli tópesa moto oyo asali libunga toli, tokopesa yango na boboto mingi koleka soki tososoli naino bamposa na ye mpe ndenge nini azali komiyoka. Nkulutu ya boboto akanisaka boye: ‘Ngai mpe nakoki kosala libunga yango. Nakoki mpe kozala na esika oyo ye azali.’ Yango wana, Paulo apesaki toli oyo: “Bómeka kosembola moto yango na elimo ya boboto, wana yo moko mpe ozali komitala, noki te yo moko mpe omekama.”—Bagalatia 6:1, NW.
Komitya na esika ya moto mosusu ekoki mpe kotinda biso na kopesa lisalisi oyo esengeli soki tozali na likoki ya kosala yango, ata soki moto yango alingi mpenza te kosɛnga lisalisi. Ntoma Yoane akomaki boye: “Kasi moto nyonso oyo azali na biloko ya kobikela ya mokili oyo mpe amoni ndeko na ye azali kokelela mpe atako bongo akangeli ye mpenza motema, na ndenge nini bolingo ya Nzambe ezali kofanda na kati na ye? . . . Tólingaka, na maloba te mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.”—1 Yoane 3:17, 18, NW.
Mpo ete tólingana “na misala mpe na solo” tosengeli libosoliboso komona bamposa nini ndeko yango azali na yango. Totalaka malamumalamu mpo na koluka koyeba bamposa ya bandeko mosusu mpo na kosunga bango? Na ndenge wana nde tokomitya na esika ya bato mosusu mpenza.
Tólona ezaleli ya komitya na esika ya basusu
Ekoki kozala ete tomityaka mpenza te na esika ya basusu, kasi tokoki kolona ezaleli yango. Soki tozali kofungola mpenza matoi mpo na koyoka, tozali kotala malamumalamu, mpe soki na makanisi na biso, tozali komitya na esika ya basusu, ezaleli yango ekokola. Ekotinda biso tózala na mposa ya komonisa bolingo, boboto, mpe motema mawa epai ya bana na biso, ya bandeko na biso baklisto, mpe epai ya bazalani na biso.
Kotika te ete ezaleli ya moimi ebebisa ezaleli na yo komitya na esika ya basusu. Paulo akomaki boye: “Moto na moto atala bobele makambo na ye moko te, kasi makambo na bamosusu lokola.” (Bafilipi 2:4) Soki Yehova mpe Nganga-Monene na ye Yesu, bamityaki na esika na biso te, mbɛlɛ tokoki kozala na elikya ya bomoi ya seko te. Yango wana, tozali na mokumba ya kolona ezaleli yango. Ekokómisa biso baministre mpe baboti ya malamu koleka. Kasi oyo eleki ntina, komitya na esika ya moto mosusu ekosalisa biso tómona ete “esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.”—Misala 20:35.
[Elilingi na lokasa 25]
Komitya na esika ya basusu esɛngaka kotalela malamu bamposa bazali na yango mpo na kosalisa bango
[Elilingi na lokasa 26]
Tokoki kolona ezaleli ya komitya na esika ya basusu se ndenge oyo mama ya bolingo amiyokaka mpo na mwana na ye