Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/4 nk. 28-29
  • Bapastɛrɛ mibale oyo basepelaki na mikanda ya Russell

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bapastɛrɛ mibale oyo basepelaki na mikanda ya Russell
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Ezalaki lokola nde biloko lokola mposo ya mbisi elongwaki na miso na ngai”
  • “Yoká yango mbala na mbala”
  • Ba-Vaudois​—Babandaki na lipɛngwi mpo na kosuka na Lingomba ya Protesta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Bokonzi ebotami na likoló
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Nani abandisá lingomba ya Batatoli ya Yehova?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/4 nk. 28-29

Bapastɛrɛ mibale oyo basepelaki na mikanda ya Russell

CHARLES Taze Russell, moko na basaleli ya Yehova oyo asalaki mosala monene, akendaki na Mpoto mpo na mbala ya liboso na mobu 1891. Balapolo mosusu emonisi ete ntango Russell alekisaki mwa mikolo na Pinerolo, engumba moko ya Italie, akutanaki na Profɛsɛrɛ Daniele Rivoire, oyo azalaká pastɛrɛ na lingomba ya Ba-Vaudois.a Atako na nsima ya kotika mosala na ye ya pastɛrɛ azalaki kaka kokende na lingomba yango ya Ba-Vaudois, Rivoire azalaki moto oyo andimaka makanisi ya sika mpe atángaki mikanda mingi oyo Charles Russell akomaki.

Na 1903, Rivoire abongolaki buku ya Russell Le divin plan des âges na lokota ya Italien mpe abimisaki yango na mbongo na ye moko. Ezalaki liboso ete Batatoli ya Yehova bango moko bábimisa yango na lokota ya Italien. Na maloba ya ebandeli ya buku yango, Rivoire akomaki boye: “Totii libongoli oyo ya liboso na lokota ya Italien na libateli ya Nkolo. Tiká ete apambola yango mpo ete, atako ezali na mwa mabunga, esalisa mpo na lokumu ya nkombo na ye oyo eleki bosantu mpe elendisa bana na ye oyo balobaka lokota ya Italien ete bámipesa koleka na losambo. Tiká ete mitema ya bato nyonso oyo bakotánga buku yango bámona bozindo ya bozwi, ya bwanya, mpe ya boyebi ya mokano mpe bolingo ya Nzambe, bázala na botɔndi epai ya Nzambe ye moko, oyo ngɔlu na ye esali ete mokanda oyo ebima.”

Rivoire abandaki mpe kobongola Le Phare de la Tour de Sion et messager de la Présence de Christ na lokota ya Italien. Zulunalo wana, oyo na nsima ekómaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ezalaki kobima mbala minei na mbula na 1903. Atako Profɛsɛrɛ Rivoire akómaki Moyekoli ya Biblia te, ndenge Batatoli ya Yehova bazalaki kobengama na ntango wana, kasi azalaki kosepela mingi kopalanganisa nsango ya Biblia ndenge oyo mikanda ya Bayekoli ya Biblia ezalaki kolimbola yango.

“Ezalaki lokola nde biloko lokola mposo ya mbisi elongwaki na miso na ngai”

Pastɛrɛ mosusu ya lingomba ya Ba-Vaudois oyo azalaki kotalela mikanda ya Russell na motuya mingi ezalaki Giuseppe Banchetti. Tata ya Giuseppe azalaki Mokatolike oyo na nsima akómaki na lingomba ya Ba-Vaudois, ateyaki Giuseppe makambo ya Ba-Vaudois. Na mobu 1894, Giuseppe akómaki pastɛrɛ mpe azalaki koteya Ba-Vaudois mingi na Apulia mpe na Abruzzi mpe na bisanga ya Elbe mpe na Sicile.

Ntango mokanda ya Russell oyo ebengamaki Le divin plan des âges ebimaki na monɔkɔ ya Italien na 1905, Banchetti akomaki maloba oyo emonisaki ete asepelaki mpenza na buku yango. Maloba yango ebimaki na La Rivista Cristiana, zulunalo moko ya Baprotesta. Banchetti akómaki boye: Mokanda ya Russell ezali “mpo na biso” nzela oyo eleki kongɛnga mpe oyo moklisto nyonso akoki kolanda mpo na koyekola Makomami Mosantu oyo epesaka matomba mpe mapamboli . . . Ntango kaka natángaki yango, ezalaki lokola nde biloko lokola mposo ya mbisi elongwaki na miso na ngai, nzela ya Nzambe ezalaki semba mpe ezalaki mpasi te. Ata makambo oyo ezalaki komonana mbala mingi lokola ezalaki bongolabongola esilaki. Mateya oyo ezalaki mpasi mpo na kokanga ntina ekómaki pɛtɛɛ mpe nakakatanaki lisusu te mpo na kondima yango. Makambo oyo liboso ezalaki mpasi mpo na kokanga ntina na yango, ekómaki polele. Ebongiseli ya malamu oyo ezali mpo na lobiko ya mokili na nzela ya Yesu emonani liboso na ngai polele mpe yango etindi ngai naloba lokola Ntoma ete: Ɛɛ, bozwi mpe boyebi mpe bososoli ya Nzambe ezali na bozindo boni!”​—⁠Baloma 11:⁠33.

Ndenge Remigio Cuminetti alobaki yango na 1925, Banchetti “asepelaki mingi” na mosala ya Bayekoli ya Biblia mpe “andimaki na motema mobimba” ndenge balimbolaki mateya na bango. Banchetti mpe asalaki makasi na ndenge na ye mpo na kopalanganisa mateya yango.

Mikanda ya Banchetti ezali komonisa yango ete, lokola Batatoli ya Yehova, azalaki kondima ete bato bakosekwa awa na mabele, ndenge Makomami ezali komonisa yango. Azalaki mpe na likanisi moko na Bayekoli ya Biblia ntango alimbolaki ete Nzambe aponaki mpe ayebisaki mbula oyo Yesu akokufa na esakweli ya bapɔsɔ ya bambula 70 oyo ezali na mokanda ya Danyele. (Danyele 9:​24-27) Mbala mingi, aboyaki polele makanisi ya lingomba na ye, alimbolaki ete Ekaniseli ya liwa ya Yesu Klisto esengelaki kokumisama kaka mbala moko na mbula, “mokolo mpenza oyo likambo yango esalemaki.” (Luka 22:​19, 20) Aboyaki likambo oyo Darwin ateyaki ete biloko esalemaki yango moko (évolution), mpe andimaki ete baklisto ya solo basengeli kokɔta na bitumba te.​—⁠Yisaya 2:⁠4.

Mokolo mosusu, Banchetti azalaki kosolola na Campbell Wall likoló ya mikanda ya Russell. Lokola mobali yango alobaki mpo na mikanda ya Russell, Banchetti ayebisaki ye boye: “Nandimi ete soki otángi volimi motoba ya Russell, okozala na esengo mingi, mpe okopesa ngai botɔndi mpenza. Nazali kokumisa bindimeli yango te; kasi nasilá kotánga babuku yango esili koleka mbula zomi na moko, mpe natɔndaka Nzambe mikolo nyonso ndenge angɛngisi ngai mpe abɔndisi ngai na nzela ya mikanda oyo ezali koteya mpenza Makomami Mosantu.”

“Yoká yango mbala na mbala”

Ezali likambo ya ntina mingi na komona ete bapastɛrɛ mibale ya lingomba ya Ba-Vaudois wana​—⁠Daniele Rivoire mpe Giuseppe Banchetti​—⁠bamonisaki ete basepelaki mpe bazalaki na botɔndi na ndenge oyo Russell alimbolaki Biblia. Banchetti akomaki boye: “Nalobi ete moko te kati na biso Basakoli ya mangomba, ata kutu bapastɛrɛ na biso to mpe baprofɛsɛrɛ ya teoloji, moto moko te ayebi makambo nyonso. Ezali na makambo mingi mosusu oyo tosengeli koyekola. . . . [Tosengeli] . . . koyoka, tókanisa te ete toyebi makambo yango nyonso, mpe tóboya te makambo oyo bato mosusu bakómi mpo ete yango ekosalisa biso tómitalela malamumalamu. Kasi, yoká yango mbala mingi.”

Mbula na mbula, bankóto ya bato bazali koyoka nsango ya Bokonzi oyo Batatoli ya Yehova bazali komemela bango na bandako. Na bisika nyonso, bato oyo bandimaka makanisi ya sika mpe bazali na mposa ya mateya ya solo ya Biblia bazali kondima ntango Yesu azali kobenga ete: “Yaká landá ngai.”​—⁠Malako 10:​17-21, NW; Emoniseli 22:⁠17.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Nkombo ya Ba-Vaudois euti na Pierre Vaudès, moto ya mombongo ya ekeke ya 12 ya engumba Lyon, na France. Babenganaki Vaudès na Lingomba ya Katolike mpo azalaki kotyela mateya mosusu ntembe, mateya lokola epongelo, losambo ya Malia, sakramento ya mafuta ma bakɔni, mpe kobatisa bana mike. Mpo na koyeba makambo mosusu ya Ba-Vaudois, talá lisolo “Ba-Vaudois​—⁠Babandaki na Lipɛngwi mpo na kosuka na Lingomba ya Protesta” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 2002.

[Elilingi na lokasa 28]

Profɛsɛrɛ Daniele Rivoire

[Elilingi na lokasa 29]

Giuseppe Banchetti

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Banchetti: La Luce, 14 Aprili 1926

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto