Ba-Vaudois—Babandaki na lipɛngwi mpo na kosuka na Lingomba ya Protesta
NA mobu 1545, basoda bakendaki na Lubéron, mboka moko kitoko na etúká ya Provence, na sudi ya France, mpo na koboma bato ya lingomba moko oyo bakonzi balingaki yango te. Babomaki bato na boumeli ya pɔsɔ mobimba.
BABEBISAKI bamboka mpe batyaki bato mosusu na bolɔkɔ mpe babomaki bamosusu. Basoda basalaki makambo oyo epesaki bato nsɔmɔ na Mpoto. Bato 2 700 bakufaki, mpe bato 600 batindamaki mpo na kosala lokola baombo na bamasuwa; banyokolaki mpe basi na bana. Mokonzi ya France na pápa bakumisaki mokonzi ya basoda oyo abomaki bato na lolenge wana ya nsɔmɔ.
Ekólo Allemagne ekabwanaki na mibale ntango Lingomba ya Protesta esalemaki; yango wana, Francis I mokonzi ya France oyo azalaki Mokatolike akómaki kotungisama na komona ndenge oyo Lingomba ya Protesta ezalaki kopalangana. Na yango, alukaki koyeba soki bato oyo bazalaki kobengama ete bapɛngwi bazalaki mpe na mboka na ye. Na esika bákuta kaka mwa bapɛngwi moke, bakonzi ya etúká ya Provence bamonaki bamboka mingi oyo bato nyonso balongwaki na Lingomba ya Katolike. Mokonzi abimisaki mobeko ya kosilisa bapɛngwi wana, mpe yango nde ememaki na koboma ebele ya bato na mobu 1545.
Bapɛngwi yango bazalaki banani? Mpe mpo na nini banyokolaki bango mpo na lingomba na bango?
Moto ya bomɛngo akómi mobola
Bato oyo babomamaki bazalaki na lingomba oyo ebandá na ekeke ya 12 mpe ezalaki na bamboka ebele na Mpoto. Lolenge lingomba yango epalanganaki mpe eumelaki bikeke mingi ekeseni mpenza na ndenge oyo mangomba mosusu ya bapɛngwi ezalaki kosalema mpe koumela. Bato mingi ya mayele na makambo ya kala bakanisaka ete lingomba yango ebandaki soki na mobu 1170. Na engumba Lyon, na France, Pierre Vaudès, moto moko ya mombongo oyo azalaki na bozwi mingi, akómaki koluka mpenza ndenge ya kosepelisa Nzambe. Ekoki mpenza kozala ete toli oyo Yesu apesaki mozwi moko ete atɛkisa biloko na ye nyonso mpe akabela babola esimbaki motema ya Vaudès. Yango wana, abombaki mbongo mpo na libota na ye mpe na nsima atikaki bozwi na ye mpo na kosakola nsango malamu. (Matai 19:16-22) Mosika te akómaki na bato mingi, oyo na nsima bakómaki kobengama Ba-Vaudois.a
Bobola, kosakola, mpe Biblia ezalaki makambo oyo esimbaki mpenza motema ya Vaudès. Liboso na ye, bato mosusu bazalaki koloba ete ezali mabe ndenge oyo bakonzi ya lingomba bazalaki na bomɛngo. Banda mwa bambula liboso, bakonzi mosusu ya lingomba bakómaki mpe koloba mpo na kotɔndɔla misala mabe oyo ezalaki kosalema na kati ya lingomba. Kasi, Vaudès azalaki mokonzi ya lingomba te; ebele ya bato oyo balandaki ye bazalaki mpe bakonzi na lingomba te. Na ntembe te, yango wana amonaki malamu kozala na Biblia na monɔkɔ oyo bato nyonso balobaka. Lokola bobele bakonzi ya lingomba nde bazalaki na lotomo ya kozala na Biblia na Latin, Vaudès atindaki ete bábongola Baevanzile mpe mikanda mosusu ya Biblia na Provençal, monɔkɔ oyo bato ya ntei ya France na epai ya ɛsti bazalaki koloba.b Mpo na kotosa etinda ya Yesu ya koteya, Babola ya Lyon bazalaki kosakola nsango malamu epai ya bato nyonso. (Matai 28:19, 20) Gabriel Audisio, moto ya mayele na makambo ya kala alobi ete lokola balingaki kotika te kosakola epai ya bato nyonso, yango ekómaki likambo monene oyo esalaki ete lingomba eyina Ba-Vaudois.
Bazalaki na Lingomba ya Katolike, bakomi bapɛngwi
Na ntango wana, kaka bakonzi ya lingomba nde bazalaki na lotomo ya kosakola, mpe lingomba kaka nde ezalaki kopesa lotomo yango. Bakonzi ya mangomba bazalaki kotalela Ba-Vaudois lokola bato bayebi eloko te mpe bakɔtá kelasi te. Kasi na mobu 1179, Vaudès asɛngaki Pápa Alexandre III ete apesa ye nzela mpo na kosakola. Pápa apesaki ye ndingisa kasi alobaki ete basango ya mboka basengeli naino kondima likambo yango. Malcolm Lambert, moto ya mayele na makambo ya kala alobi ete yango ezalaki “koboya mpenza, kasi na mayele, kopesa ye ndingisa ya kosakola.” Kardinale Jean Bellesmains ya Lyon apekisaki mpenza moto nyonso oyo azali mokonzi na lingomba te kosakola. Vaudès azongiselaki ye maloba ya Misala 5:29 ete: “Ekoki ete tótosa Nzambe lokola mokonzi liboso ya kotosa bato.” Lokola Vaudès atosaki epekiseli wana te, na mobu 1184 balongolaki ye na lingomba.
Atako balongolaki Ba-Vaudois na diosɛzɛ ya Lyon mpe babenganaki bango na engumba, emonani ete ezalaki bobele etumbu ya maloba mpamba. Bato mingi bazalaki kosepela na Ba-Vaudois mpo bazalaki sembo mpe mpo na lolenge ya bomoi na bango, ata mpe baepiskɔpɔ batikaki te kosolola na bango.
Euan Cameron, moto moko ya mayele na makambo ya kala, alobaki ete Ba-Vaudois bazalaki mpenza “kotɛmɛla Lingomba ya Katolike te.” Bazalaki kaka na “mposa ya kosakola mpe ya koteya.” Bato ya mayele na makambo ya kala balobaka ete na ntembe te, ebele ya mibeko oyo bazalaki kobimisela bango nde esalaki ete bámibenda mokemoke kino na lipɛngwi. Liboso, lingomba ezalaki kokweisa Ba-Vaudois; kasi na mobu 1215, na Likita Monene ya minei ya bakonzi ya lingomba, oyo esalemaki na Latran, nde bapekisaki mpenza Ba-Vaudois. Nsima na yango, mosala na bango ya kosakola ekómaki ndenge nini?
Bakómi kobombama
Vaudès akufaki na mobu 1217, mpe bato oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki na bangomba ya Alpes na France, na Allemagne, na nɔrdi ya Italie, na Mpoto ya Ntei mpe na Mpoto ya Ɛsti mpo na kokima minyoko. Ba-Vaudois mosusu mpe, kaka lokola bazalaki kokima minyoko, bakómaki kofanda na bamboka mikemike, mpe yango esalaki ete na bisika mingi básakola lisusu te.
Etumba oyo Lingomba ya Katolike ezalaki kosala na mokano ya kosilisa Ba-Cathare to Ba-Albigeois na sudi ya ekólo France esilaki na mobu 1229.c Na ntango yango, babalukelaki sikoyo Ba-Vaudois. Banguna nyonso ya lingomba banyokwamaki na ndenge ya nsɔmɔ na ntango ya Inquisition. Ba-Vaudois bakómaki kobombana mpo na kobanga. Na mobu 1230, bazalaki lisusu kosakola polele te. Audisio alobi ete: “Na esika ya koluka bandimi ya sika . . . , bamipesaki na kotala bandimi, bazalaki kolendisa kondima na bango mpo bákweya te na masɛnginya ya mokili mpe minyoko.” Abakisi ete: “Kosakola ezalaki kaka na ntina mingi kasi babongolaki ndenge ya kosala yango.”
Bindimeli na bango mpe misala na bango
Na esika ete basi na mibali nyonso básakolaka, na ekeke ya 14, Ba-Vaudois bakómaki kokesenisa basakoli mpe bandimi. Bobele bato oyo bateyami malamu nde bazalaki kosala mosala ya kobatela bampate. Na nsima, basakoli-batamboli wana bakómaki kobengama barbes (banɔkɔ).
Ba-barbes bazalaki kokende kotala mabota ya Ba-Vaudois na bandako na bango, basalaki nyonso mpo na kobatela lingomba, na esika ya kopalanganisa mateya na yango. Ba-barbe nyonso bayebaki kotánga mpe kokoma mpe lokola bazalaki kozwa formasyo na boumela ya mbula motoba, bazalaki mingi kolakisa bango Biblia. Kosalela Biblia na monɔkɔ ya mboka esalisaki Ba-Vaudois na kolimbola yango epai ya bandimi na bango. Ata banguna bazalaki kondima ete Ba-Vaudois mpe bana na bango bayebaki makambo ya Biblia malamu mpe bakokaki koloba na motó biteni milai ya Makomami.
Ba-Vaudois ya kala baboyaki makambo mingi, na ndakisa, kokosa, liteya ya epongelo, misa ya milimo mawa, lotomo ya pápa ya kolimbisa masumu, kosambela Malia mpe kosambela basantu. Bazalaki mpe kokanisa Elambo ya Mpokwa ya Nkolo mbala moko na mbula. Lambert alobaki ete losambo na bango “ezalaki mpenza lingomba ya bandimi mpamba.”
“Bokosi”
Ba-Vaudois bazalaki kolingana makasi. Bazalaki kobalana kaka na kati ya lingomba na bango, mpe na nsima ya bambula ebele esalaki ete bankombo mosusu ebima oyo bobele Ba-Vaudois bazalaki na yango. Kasi, lokola bazalaki kokimakima mpo na komibatela, Ba-Vaudois bakomaki bindimeli na bango. Lokola bazalaki kobomba bindimeli mpe misala ya lingomba na bango, banguna na bango bakómaki kokosela bango makambo; na ndakisa, balobaki ete Ba-Vaudois bazalaki kosambela Zabolo.d
Lokola bazalaki kofunda bango ndenge wana, Ba-Vaudois bazongaki nsima mpe bakómaki kosala makambo oyo Cameron, moto ya mayele na makambo ya kala abengi “botosi moke mpenza” na losambo ya Katolike. Ba-Vaudois mingi bakómaki kotubela epai ya basango ya Lingomba ya Katolike, bazalaki kokɔta misa, bazalaki kosalela mai mosantu, mpe bazalaki ata kosala mibembo na bisika mosantu. Lambert alobi ete: “Basalaki makambo mingi lokola kaka Bakatolike oyo bazalaki kofanda na bango esika moko.” Audisio amonisi polele ete na nsima Ba-Vaudois “bakómaki na bokosi.” Abakisi lisusu ete: “Na ngámbo mosusu, bazalaki komonisa na miso ya bato ete bazali Bakatolike mpo bátika bango na kimya; nzokande bazalaki kosala mwa milulu mpe mimeseno kati na bango oyo ezalaki komonisa ete Lingomba na bango esukaki naino te.”
Bapɛngwi bakómi Baprotesta
Ntango Lingomba ya Protesta esalemaki na ekeke ya 16, makambo ya losambo ebongwanaki mpenza na Mpoto. Bato oyo bazalaki konyokwama mpo na lingomba na bango bakokaki kopona to bakoluka ete lingomba endimama na mibeko ya Leta ya mboka na bango to kokende kofanda na mokili mosusu mpo na koluka kozala na bomoi ya malamu. LipɛngwI ezalaki lisusu kotalelama lokola libunga ya monene te, mpamba te bato mingi babandaki kotɛmɛla bindimeli ya mangomba.
Na mobu 1523, Martin Luther, moto oyo ayebani malamu ete abandisaki Lingomba ya Protesta, alobelaki Ba-Vaudois. Na mobu1526, moto moko ya ba-barbes azongaki na mboka ya bangomba ya Alpes mpe amemaki nsango ya makambo ya lingomba ndenge ezalaki kobongwana na Mpoto. Nsima na yango, Baprotesta na Ba-Vaudois bazalaki kopesana makanisi mingi. Baprotesta balendisaki Ba-Vaudois ete bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kobongola Biblia ya liboso na Lifalanse longwa na Liebele mpe Grɛki. Biblia yango ebimaki na mobu 1535; na nsima bakómaki kobenga yango ‘Bible d’Olivétan.’ Kasi, Ba-Vaudois mingi bayebaki Lifalanse te.
Lokola Lingomba ya Katolike ezalaki kaka konyokola Ba-Vaudois, mingi kati na bango bakendaki kofanda na Provence, etúká moko ya sudi ya ekólo France epai minyoko ezalaki te. Baprotesta mingi bazalaki kouta na bikólo mosusu mpe bazalaki kokende kofanda kuna. Mosika te, likambo yango ekómaki na matoi ya bakonzi. Atako bato bazalaki kokumisa etamboli mpe bizaleli ya Ba-Vaudois, bato mosusu bazalaki koloba ete bazali sembo te mpe bazalaki koloba ete bazali kotya kimya ya mboka na likama. Bakonzi babimisaki mobeko moko oyo ebéngamaki édit de Mérindol, oyo esalaki ete báboma bato na ndenge ya nsɔmɔ oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo.
Boyokani kati na Lingomba ya Katolike mpe Ba-Vaudois ezalaki se kobeba. Lokola bazalaki konyokola bango makasi, Ba-Vaudois basimbaki mindoki mpo na komibatela. Matata yango etindaki bango bámikɔtisa na Lingomba ya Protesta. Yango wana, Ba-Vaudois bakómaki na ngámbo ya Baprotesta.
Lingomba ya Ba-Vaudois ekómaki tii na mikili oyo ezalaki mosika na France, lokola na Uruguay mpe na États-Unis. Kasi, bato mingi ya mayele na makambo ya kala bandimaka likanisi ya Audisio oyo alobaki ete: “Lingomba ya Ba-Vaudois esukaki na ntango Lingomba ya Protesta esalemaki,” ntango “ekɔtaki na kati” ya Lingomba ya Protesta. Kutu, bankama ya bambula liboso, Lingomba ya Ba-Vaudois ezalaki lisusu na molende na yango ya liboso te. Yango esalemaki ntango bandimi ya lingomba yango, lokola bazalaki kobanga, batikaki kosakola mpe koteya makambo ya Biblia.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mikanda mosusu ebengaka Vaudès na nkombo ya Valdès, Valdesius, to mpe Valdo. Nkombo Valdo nde ebimisaki “Vaudois.” Bato bazalaki mpe kobenga Ba-Vaudois ete Babola ya Lyon.
b Na mobu 1199, episkɔpɔ ya Metz, na nɔrdi-ɛsti ya France, amilelaki epai ya Pápa Innocent III ete bato bazalaki kotánga Biblia na monɔkɔ ya mboka mpe bazalaki koloba makambo oyo bazalaki kotánga. Ekoki mpenza kozala ete episkɔpɔ wana azalaki kolobela Ba-Vaudois.
c Talá “Ba-Cathares—Bazalaki bamartiru baklisto?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 sɛtɛmbɛ 1995, nkasa 27-30.
d Makambo oyo bazalaki kokosela Ba-Vaudois ntango nyonso ebimisaki nkombo vauderie (euti na liloba ya Lifalanse vaudois). Esalelamaka mpo na kolobela bato oyo bazali kotalelama ete bazali bapɛngwi to mpe bato oyo basambelaka Zabolo.
[Karte/Bililingi na lokasa 23]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Bisika Ba-Vaudois bazalaki na bandimi
FRANCE
Lyon
PROVENCE
Lubéron
Strasbourg
Milan
Rome
Berlin
Prague
Vienne
[Elilingi]
Ba-Vaudois bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kobongola Bible d’Olivétan na mobu 1535
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Biblia: © Cliché Bibliothèque nationale de France, Paris
[Bililingi na lokasa 20, 21]
VAUDÈS
Batumbi mibange mibale ya basi oyo bazalaki Ba-Vaudois
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Nkasa 20 mpe 21: © Landesbildstelle Baden, Karlsruhe