Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/5 nk. 4-7
  • Nzambe azali nani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali nani?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nguya moko boye to moto ya solo?
  • Nzambe azali na nkombo
  • Yesu azali Nzambe?
  • Yebá Nzambe malamumalamu
  • Nkombo ya Nzambe nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Yesu Klisto azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Nkombo ya Nzambe
    Lamuká!—2017
  • Yesu Klisto: Mwana-molingami na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/5 nk. 4-7

Nzambe azali nani?

BUKU moko (The Encyclopedia Americana) elobi ete: “Nzambe ezali nkombo oyo babengaka na yango eutelo mpenza mpe nguya ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe oyo bato basambelaka.” Diksionɛrɛ moko elimboli liloba “Nzambe” lokola “oyo aleki nyonso to oyo azali likoló ya nyonso.” Ye oyo azali likoló ya nyonso azali ndenge nini?

Nzambe azali nguya moko boye to azali nde moto ya solo? Azali nde na nkombo? Azali Bosato, ndenge bato ebele bakanisaka? Ndenge nini tokoki koyeba Nzambe? Biblia epesi biyano ya solo mpe oyo ebongi na mituna yango. Kutu, ezali kolendisa biso tóluka Nzambe ntango ezali koloba boye: “Azali mpe mosika na moto na moto na biso te.”​—⁠Misala 17:⁠27.

Nguya moko boye to moto ya solo?

Bato mingi oyo bandimaka ete Nzambe azali, bakanisaka ete azali nguya moko boye, kasi azali moto te. Na ndakisa, na bisika mosusu bilima nde bazali banzambe. Basusu oyo batalelaki malamumalamu makambo oyo bato ya siansi bayekoli mpo na koyeba ndenge mɔlɔ́ngɔ́ ebongisamá mpe ndenge bikelamu ezalaka na bomoi awa na mabele, bamonaki ete ezali na nguya moko oyo ebandisaki biloko nyonso. Atako bongo, bakakatanaka mpo na kondima ete nguya yango ezali na bomoto.

Kasi, omoni te ete ndenge oyo biloko nyonso ya bozalisi ezali na molɔngɔ na makambo nyonso emonisaka ete nguya oyo etyaki biloko yango na molɔngɔ ezalaki mpenza na mayele mingi? Nzokande, mayele esɛngaka bɔɔngɔ. Bɔɔngɔ oyo eleki mosusu nyonso, bɔɔngɔ oyo ezalisaki biloko nyonso, ezali ya Nzambe. Nzambe azali na nzoto ya mosuni te lokola biso, azali nde na nzoto ya elimo. Biblia elobi ete: “Soki nzoto ya mosuni ezali, nzoto ya elimo ezali mpe.” (1 Bakolinti 15:44) Biblia ezali komonisa polele ndenge oyo Nzambe azali, ezali koloba ete: “Nzambe azali Elimo.” (Yoane 4:​24, NW) Elimo ezalaka na bomoi oyo ekeseni mpenza na oyo ya biso, mpe moto amonaka elimo na miso te. (Yoane 1:18) Ezali mpe na bikelamu ya elimo, elingi koloba bikelamu oyo emonanaka te. Bazali baanzelu​—⁠“bana ya Nzambe.”​—⁠Yobo 1:6; 2:⁠1.

Lokola Nzambe azali moto ya elimo oyo bakelá ye te, asengeli kozala na esika oyo ye afandaka. Biblia elobeli mokili ya bilimo ntango eyebisi biso ete makoló ezali “efandelo” ya Nzambe. (1 Mikonzi 8:43) Paulo, moko na bato oyo bakomaki Biblia, alobi mpe ete: ‘Klisto asili [kokɔta, NW] na kati na Likoló mpenza [mpo na, NW] komonana liboso na Nzambe mpo na biso.’​—⁠Baebele 9:24.

Biblia esalelaka mpe liloba “elimo” na ndimbola mosusu. Mokomi ya nzembo abondelaki Nzambe ete: “Yo okotindaka [elimo, NW] na yo, bango bazali kosalama.” (Nzembo 104:30) Elimo yango ezali Nzambe ye moko te kasi nguya oyo Nzambe atindaka to asalelaka mpo na kokokisa likambo nyonso oyo akani. Nzambe asalelaki nguya yango mpo na kokela likoló, mabele mpe bikelamu nyonso ya bomoi. (Genese 1:2; Nzembo 33:⁠6) Elimo na ye ebengami elimo santu. Nzambe asalelaki elimo santu na ye mpo na kopesa bato oyo bakomaki Biblia makanisi na ye mpo bákoma yango. (2 Petelo 1:​20, 21) Na yango, elimo santu ezali nguya oyo Nzambe asalelaka mpo na kokokisa mikano na ye.

Nzambe azali na nkombo

Agulu, moko na bakomi ya Biblia atunaki mituna oyo: “Nani abuti na lola mpe akiti? Nani ayanganisi mopɛpɛ na matandu na ye? Nani akangi mai na elamba? Nani akokisi nsuka nyonso na mokili? Nkombo na ye nani? Nkombo na mwana na ye mpe nani?” (Masese 30:⁠4) Agulu azalaki mpenzampenza kotuna ete ‘Oyebi nkombo to libota ya moto oyo asalaki makambo nyonso wana?’ Kaka Nzambe nde azali na makasi ya kotambwisa banguya nyonso ya mokili. Atako biloko oyo Nzambe akelá ezali komonisa polele ete azali, kasi biloko yango eyebisaka nkombo ya Nzambe te. Tokoki koyeba nkombo ya Nzambe te soki ye moko ayebisi biso yango te. Ayebisi biso yango. Mozalisi alobi boye: “Nazali Yehova, yango nde nkombo na ngai.”​—⁠Yisaya 42:​8, NW.

Nkombo ya Nzambe Yehova ezali soki mbala 7000 na Makomami ya Liebele. Yesu Klisto alakisaki bato nkombo yango mpe asanzolaki yango liboso na bango. (Yoane 17:​6, 26) Na mokanda ya nsuka ya Biblia, nkombo yango ezali na kati ya liloba “Aleluya” oyo elimboli “sanzolá Yah.” Bongo “Yah” ezali ebengeli mokuse ya nkombo “Yehova.” (Emoniseli 19:​1-6) Kasi, nkombo yango ezali mpenza te na Babiblia mingi oyo ezali kobongolama mikolo oyo. Mbala mingi Babiblia yango ezali kosalela liloba “NKOLO” to “NZAMBE,” ekomami na balɛtrɛ ya minene mpo na kokesenisa yango na batitre “Nkolo” na “Nzambe.” Bato mosusu ya mayele oyo bayekolaka maloba ya Biblia balobaka ete ekoki kozala ete nkombo ya Nzambe ezalaki kobengama Yawe.

Mpo na nini bato bazali na makanisi ndenge na ndenge mpo na nkombo ya Ye oyo aleki bato nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba? Mokakatano yango ebandá kala ntango Bayuda, na biyambayamba na bango, batikaki kobenga nkombo ya Nzambe; mpe na bisika nyonso oyo yango ezali na Makomami, bakómaki kosalela liloba ya Liebele oyo elimboli “Nkolo Mokonzi.” Lokola Liebele ya kala oyo bakomaki na yango Biblia ezalaki na milelisi (voyelles) te, tokoki koyeba te lolenge oyo bato ya kala lokola Mose, Davidi na bato mosusu bazalaki kotánga balɛtrɛ ya nkombo ya Nzambe. Kasi, Yehova ezali nde ndenge oyo nkombo yango ekomami na Babiblia ya kalakala mpe yango nde ekokani na ndenge oyo babengaka nkombo yango na minɔkɔ mosusu.​—⁠Exode 6:3; Yisaya 26:​4, Biblia na Ngala, Uele.

Atako toyebi te soki nkombo ya Nzambe ezalaki kobengama ndenge nini na Liebele ya kala, ndimbola ya nkombo yango eyebani malamu. Nkombo na ye elimboli “Ye oyo akómisaka.” Na yango, Yehova Nzambe amonisaka ete azali Mokokisi Monene ya mikano. Ntango nyonso asalaka ete mikano na ye ekokisama. Kaka Nzambe ya solo, ye oyo azali na nguya ya kosala likambo yango, nde abongi kozwa nkombo wana.​—⁠Yisaya 55:⁠11.

Na ntembe te nkombo Yehova esalisaka mpo tókesenisa Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso na banzambe mosusu nyonso. Yango wana nkombo yango ezali na bisika ebele na Biblia. Atako mabongoli mingi ezali na nkombo ya Nzambe te, kasi Basauma [Nzembo] 83:18 (Biblia na Ngala, Uele) eyebisi polele ete: “Boyo bo akuki kuiba Yo moko, kombo na Yo Yehova, Azi Motu na Likolo Nyoso na mokili nyoso.” Ntango Yesu Klisto azalaki kosala mosala na ye ya kosakola, ateyaki bayekoli na ye boye: “Bino bóbondela boye ete, Tata na biso oyo azali na Likoló, nkombo na yo ezala mosantu.” (Matai 6:⁠9) Na yango, esengeli tósalelaka nkombo ya Nzambe ntango tozali kobondela, koloba mpo na ye, mpe kosanzola ye epai ya bato.

Yesu azali Nzambe?

Yehova Nzambe ye moko amonisi Mwana na ye polele. Evanzile ya Matai elobi ete nsima ya kozwa batisimo, “mongongo uta na likoló elobi ete, Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli [na] ye mingi.” (Matai 3:​16, 17) Yesu Klisto azali Mwana ya Nzambe.

Kasi, bato mosusu ya mangomba balobaka ete Yesu azali Nzambe. Basusu balobaka ete Nzambe azali Bosato. Liteya yango elobaka ete “Tata azali Nzambe, Mwana azali Nzambe, mpe Elimo Santu azali Nzambe; nzokande Banzambe bazali misato te kasi bobele moko.” Liteya yango elobaka ete bango misato “bazali libela na libela mpe bakokani na nyonso.” (The Catholic Encyclopedia) Makanisi yango ezali solo?

Makomami epemami elobi na ntina na Yehova ete: “Yo ozali Nzambe, banda kala kino bileko binso.” (Nzembo 90:​2, Liloba lya Nzambe) Azali “Mokonzi ya seko”​—⁠azali na ebandeli te mpe na nsuka te. (1 Timote 1:​17, NW) Nzokande, Yesu azali “mobotami ya liboso na biloko nyonso ezalisami,” “ebandeli ya bozalisi ya Nzambe.” (Bakolose 1:​13-15; Emoniseli 3:14) Mpo na Nzambe, Tata na ye, Yesu alobaki ete: “Tata aleki ngai.” (Yoane 14:28) Yesu alobaki lisusu ete ezalaki na makambo mosusu oyo ezala baanzelu to mpe ye moko bayebaki te, kaka Nzambe nde ayebaki yango. (Malako 13:32) Longola yango, Yesu abondelaki Tata na ye ete: “Mokano na ngai esalema te, kasi bobele mokano na yo.” (Luka 22:42) Azalaki kobondela nani? Na ntembe te, azalaki kobondela Moto moko oyo aleki ye. Mpe ezali Nzambe nde asekwisaki ye na liwa, Yesu ye moko amisekwisaki te.​—⁠Misala 2:⁠32.

Na yango, na kotalela Makomami, Yehova azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe Yesu azali Mwana na ye. Bango mibale bazalaki ndenge moko te liboso ete Yesu aya awa na mabele to mpe ntango azalaki na bomoi awa na mabele; ezala nsima ya kosekwa mpe kozonga na likoló, Yesu akokanaki na Tata na ye te. (1 Bakolinti 11:3; 15:28) Ndenge touti komona yango, oyo babengaka persona ya misato na Bosato, elimo santu, ezali moto te. Ezali nde nguya oyo Nzambe asalelaka mpo na kokokisa nyonso oyo akani. Na yango, liteya ya Bosato euti na Makomami te.a Biblia elobi ete: “Yehova Nzambe na biso azali Yehova moko.”​—⁠Deteronome 6:​4, NW.

Yebá Nzambe malamumalamu

Mpo tólinga Nzambe mpe tósambela kaka ye mpo abongi na yango, esengeli tóyeba ndenge azali mpenza. Ndenge nini tokoki koyeba Nzambe malamumalamu? Biblia elobi ete: “Bizaleli na ye oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpamba te yango emonanaka na nzela ya biloko oyo esalemá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye.” (Baloma 1:​20, NW) Nzela moko ya koyeba Nzambe malamu ezali na kotalela mpe kokanisa na botɔndi mpenza likoló ya biloko oyo azalisaki.

Atako bongo, tokoki koyeba makambo nyonso te oyo tosengeli koyeba na ntina na Nzambe kaka na nzela ya biloko oyo akelá. Na ndakisa, mpo tókanga ntina ete azali Moto ya elimo oyo azali na nkombo na ye, esengeli tótánga likambo yango na Biblia. Koyekola Biblia ezali lolenge oyo eleki malamu mpo na koyeba Nzambe malamumalamu. Na kati ya Makomami, Yehova ayebisi biso makambo mingi oyo etali bomoto na ye. Azali mpe komonisa biso mikano na ye mpe azali koteya biso banzela na ye. (Amosa 3:7; 2 Timote 3:​16, 17) Tozali mpenza na esengo lokola Nzambe azali na mposa ete ‘tókóma na boyebi ya sikisiki ya solo’ mpo ete tókoka kozwa matomba na bibongiseli na ye ya bolingo! (1 Timote 2:​4, NW) Na yango, tósala nyonso mpo na koyeba makambo nyonso oyo etali Yehova.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba likambo yango malamumalamu, tángá mwa buku Osengeli kondima Trinité? oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Bililingi na lokasa 5]

Nzambe asalelaki elimo santu na ye mpo na kokela mabele mpe mpo na kopemama ya bato oyo bakomaki Biblia

[Elilingi na lokasa 5]

Mongongo moko eutaki na likoló elobaki ete: “Oyo Mwana na ngai”

[Elilingi na lokasa 7]

Yesu abondelaki Nzambe​—⁠Moto oyo aleki ye

[Elilingi na lokasa 7]

Yesu alakisaki bato nkombo ya Nzambe

[Bililingi na lokasa 7]

Tokoki koyeba Nzambe malamumalamu

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto