Tómonisa motema-boboto epai na baoyo bazali na mposa ya lisalisi
“Bómonisana motema-boboto.”—ZEKALIA 7:9, NW.
1, 2. (a) Mpo na nini tosengeli komonisa motema-boboto? (b) Mituna nini tokotalela?
LILOBA ya Yehova Nzambe ezali kolendisa biso ete tólinga “motema-boboto.” (Mika 6:8, NW, maloba na nse ya lokasa) Ezali mpe koyebisa biso bantina oyo tosengeli kosala yango. Ya liboso, “moto ya [motema-boboto, NW] akosunga molimo na ye moko.” (Masese 11:17) Ezali mpenza solo! Kozala na motema-boboto esalaka ete moto azala na boyokani ya malamu mpe ya makasi na basusu. Yango epesaka mbano malamu ya kozala na baninga ya motema!—Masese 18:24.
2 Lisusu, Makomami elobi na biso ete: “Moto oyo azali koluka boyengebene mpe motema-boboto akomona bomoi.” (Masese 21:21, NW) Soki tozali koluka kozala na motema-boboto, Nzambe akosepela na biso mingi mpe akobakisela biso mapamboli mosusu na mikolo ezali koya, bakisa mpe bomoi ya seko. Kasi, ndenge nini tokoki komonisa motema-boboto? Tokomonisa yango epai ya nani? Motema-boboto ekeseni nde na motema malamu mpe boboto oyo moto nyonso akoki kozala na yango?
Motema malamu ekeseni na motema-boboto
3. Bokeseni nini ezali kati na motema-boboto na motema malamu?
3 Motema malamu na motema-boboto ekeseni na makambo mingi. Na ndakisa, mbala mingi bato oyo bamonisaka motema malamu basalaka yango epai ya bato oyo ntango mosusu bazali baninga to bandeko na bango te. Nzokande, ntango tozali komonisa motema-boboto epai ya moto moko, topesaka ye mpenza motema na biso. Bato oyo Biblia elobi ete bamonisanaki motema-boboto bazalaki liboso na boyokani. (Genese 20:13; 2 Samwele 3:8; 16:17) To mpe ekoki kozala mpo na boyokani oyo euti na motema-boboto oyo bato yango bamoniselaki bango liboso. (Yosua 2:1, 12-14; 1 Samwele 15:6; 2 Samwele 10:1, 2) Mpo tómona bokeseni yango, tókokanisa bandakisa mibale ezali na kati ya Biblia: moko ya motema malamu na mosusu ya motema-boboto.
4, 5. Ndenge nini ndakisa mibale euti na Biblia oyo tolobeli awa ezali komonisa bokeseni kati na motema malamu mpe motema-boboto?
4 Ndakisa moko ya motema malamu ezali oyo bamoniselaki bato oyo bazalaki na masuwa moko oyo ezindaki, ntoma Paulo mpe azalaki kati na bango. Bakendaki kobima na libongo ya Esanga Melita. (Misala 27:37–28:1) Atako bato ya Melita bayebaki bapaya yango te mpe bazalaki bandeko na bango te, bayambaki bango malamu, bamoniselaki bango “motema malamu ya koloba te.” (Misala 28:2, 7, NW) Bayambaki bango na boboto, kasi ezalaki likambo ya mbalakaka mpe bamonisaki boboto yango epai ya bapaya. Yango wana, tokoloba ete ezalaki kaka motema malamu.
5 Sikoyo, tókokanisa yango na bolamu oyo Mokonzi Davidi asalelaki Mefibosete, mwana ya moninga na ye Yonatana. Davidi alobaki na Mefibosete ete: “Okobanda kolya limpa na mesa na ngai mikolo nyonso.” Davidi alimbolaki ntina oyo asalaki likambo yango, alobaki boye: “Nakomonisela yo mpenza motema-boboto mpo na Yonatana tata na yo.” (2 Samwele 9:6, 7, 13, NW) Bolamu ya solosolo oyo Davidi asalaki ezali mpenza motema-boboto; ezali kaka motema malamu te, mpamba te ezalaki ndenge ya komonisa ete azalaki sembo na moninga na ye. (1 Samwele 18:3; 20:15, 42) Lelo oyo mpe ndenge moko, basaleli ya Nzambe bamoniselaka moto nyonso motema malamu. Kasi, bamonisaka motema-boboto, to bolingo ya sembo, epai ya baoyo bazali bandeko na bango na elimo.—Matai 5:45; Bagalatia 6:10.
6. Liloba ya Nzambe ezali komonisa makambo nini na ntina etali motema-boboto oyo bato bamonisanaka?
6 Mpo na komona makambo mosusu oyo ezali kolakisa motema-boboto, tokotalela na mokuse masolo mosusu misato oyo ezali komonisa ezaleli yango. Masolo yango ekomonisa biso ete motema-boboto ya bato (1) emonanaka na misala, (2) basalaka yango na kotindikama te, mpe (3) emonisamaka mingimingi epai ya bato oyo bazali na mposa ya lisalisi. Masolo yango ezali mpe kolakisa ndenge oyo tokoki komonisa motema-boboto lelo oyo.
Tata moko amonisi motema-boboto
7. Moombo ya Abalayama alobaki na Betuele mpe na Labana nini, mpe mposa na ye ezalaki nini?
7 Genese 24:28-67 eyebisi ndenge oyo mokumba ya moombo ya Abalayama oyo tolobelaki na lisolo eleki esukaki. Nsima ya kokutana na Lebeka, bakendaki tii na ndako ya Betuele, tata ya mwana mwasi yango. (Vɛrsɛ 28-32) Kuna, moombo alimbolaki malamumalamu mokumba oyo Abalayama apesaki ye ya koluka mwasi mpo na mwana na ye. (Vɛrsɛ 33-47) Amonisaki ete mpo na ye, lokola makambo na ye etambolaki malamu tii na ntango wana, yango ezali elembo oyo euti na Yehova, ye oyo “akambi ngai na nzela ya sembo ete nakamata mwana ya ndeko ya nkolo na ngai mpo na mwasi ya mwana na ye.” (Vɛrsɛ 48) Tokanisi mpenza ete moombo yango alikyaki ete lisolo na ye ekondimisa Betuele na mwana na ye Labana ete Yehova atambwisaki ye mpo akokisa mokumba na ye malamu. Na nsuka, moombo alobaki boye: “Soko bino bokosalela nkolo na ngai [motema-boboto, NW] mpe sembo, lobá na ngai, mpe soko boye te lobá na ngai ete nakoka kokende epai na lobɔkɔ ya mobali soko epai na lobɔkɔ ya mwasi.”—Vɛrsɛ 49.
8. Betuele alobaki nini na likambo oyo etalelaki Lebeka?
8 Yehova amoniselaki Abalayama motema-boboto liboso. (Genese 24:12, 14, 27) Betuele alingaki nde kosala lokola Yehova? Alingaki kotika Lebeka akende na moombo ya Abalayama? Bato balingaki nde komonisa motema-boboto likoló na oyo ya Nzambe mpo ekokisa mokano na ye mobimba? To mobembo molai oyo moombo ya Abalayama asalaki elingaki nde kozala se mosala ya mpunda? Tokanisi ete maloba ya Labana na Betuele ekitisaki mpenza motema ya moombo ya Abalayama, mpamba te bango balobaki ete: “Likambo oyo euti na [Yehova].” (Vɛrsɛ 50) Bamonaki ete Yehova atambwisaki makambo mpe bakakatanaki te mpo na kondima mokano na ye. Na nsima, Betuele amonisaki motema-boboto na ye ntango abakisaki ete: “Talá Lebeka azali na liboso na yo. Kamatá ye mpe kendá ete azala mwasi ya mwana ya nkolo na yo, lokola esili [Yehova] koloba.” (Vɛrsɛ 51) Lebeka andimaki kokende na moombo ya Abalayama, mpe akómaki mwasi ya Yisaka mpe Yisaka alingaki ye mingi.—Vɛrsɛ 49, 52-58, 67.
Mwana moko amonisi motema-boboto
9, 10. (a) Yakobo asɛngaki mwana na ye Yosefe asala nini mpo na ye? (b) Ndenge nini Yosefe asalelaki tata na ye motema-boboto?
9 Moto mosusu oyo bamoniselaki ye motema-boboto ezali Yakobo, moko ya bankɔkɔ ya Abalayama. Ndenge lisolo ya Genese mokapo 47 emonisi yango, Yakobo azalaki kofanda na Ezipito ntango ‘liwa na ye ekómaki pene.’ (Vɛrsɛ 27-29, NW) Azalaki komitungisa mingi mpamba te akokufa mosika na mabele oyo Nzambe alakaki Abalayama. (Genese 15:18; 35:10, 12; 49:29-32) Kasi, Yakobo alingaki te ete bákunda ye na Ezipito, yango wana asɛngaki ete soki akufi, bámema ebembe na ye na mokili ya Kanana. Lokola mwana na ye Yosefe azalaki moto monene na Ezipito, ye nde moto akokaki kokokisa mposa na ye.
10 Lisolo elobi boye: “[Yakobo] abyangaki mwana na ye Yosefe mpe alobelaki ye ete, Soko nabongi na miso na yo, . . . okosalela ngai [motema-boboto, NW] mpe boyengebene. Kundá ngai na Ezipito te, kasi tiká nalala na batata na ngai elongo. Kumbá ngai longwa na Ezipito mpe kundá ngai na malita na bango.” (Genese 47:29, 30) Yosefe alakaki Yakobo ete akokokisa mposa na ye, mpe mwa moke na nsima, Yakobo akufaki. Yosefe na bana mosusu ya Yakobo bamemaki nzoto na ye “na mokili ya Kanana mpe bakundaki ye na lidusu ya elanga ya Makapela, . . . oyo Abalayama asombaki.” (Genese 50:5-8, 12-14) Na bongo, Yosefe asalelaki tata na ye motema-boboto.
Motema-boboto ya bokilo
11, 12. (a) Ndenge nini Luta amoniselaki Naomi motema-boboto? (b) Na ndenge nini motema-boboto “ya nsuka” ya Luta elekaki oyo “ya liboso”?
11 Mokanda ya Luta ezali na lisolo oyo elobeli motema-boboto oyo Luta, mwasi moko ya Moaba oyo mobali na ye akufá, amoniselaki bokilo na ye Naomi, oyo mobali na ye mpe akufá. Ntango Naomi azwaki ekateli ya kozonga na Beteleme, na Yuda, Luta amonisaki motema-boboto mpe mposa makasi, alobaki boye: “Esika ekokenda yo, ngai mpe nakokenda kuna, mpe esika ekolala yo, ngai mpe nakolala wana. Bato na yo bakozala bato na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.” (Luta 1:16) Luta amonisaki lisusu motema-boboto na ye ntango andimaki ete Boaza, moto moko ya libota ya Naomi abala ye, atako mobali yango akómaki mobange.a (Deteronome 25:5, 6; Luta 3:6-9) Boaza alobaki na Luta ete: “[Motema-boboto, NW] na yo ya nsuka eleki oyo ya liboso, awa ekei yo nsima ya mibali bilenge te, soko babola soko bazwi.”—Luta 3:10.
12 Motema-boboto “ya liboso” oyo Luta amonisaki ezalaki na ntango atikaki bato na ye mpe akangamaki na Naomi. (Luta 1:14; 2:11) Kasi, motema-boboto na ye “ya nsuka,” elingi koloba ndenge oyo andimaki ete Boaza abala ye, elekaki oyo ya liboso. Lokola ye moko Naomi akómaki na mbula oyo akokaki lisusu kobota te, Luta akokaki kobotela Naomi mwana oyo akozala mosangoli. Boaza abalaki Luta; na nsima, ntango Luta abotaki, basi ya Beteleme balobaki ete: “Mwana mobali abotami na Naomi.” (Luta 4:14, 17) Luta azalaki mpenza “mwasi malamu” mpe Yehova apesaki ye mbano monene ya kozala nkɔkɔ ya Yesu Klisto.—Luta 2:12; 3:11; 4:18-22; Matai 1:1, 5, 6.
Bamonisaki motema-boboto na misala
13. Ndenge nini Betuele, Yosefe na Luta bamonisaki motema-boboto na bango?
13 Olandi malamu ndenge oyo Betuele, Yosefe na Luta bamonisaki motema-boboto? Basalaki yango kaka te na maloba ya kitoko, kasi na misala mpenza. Betuele alobaki kaka te ete, “Talá Lebeka” kasi ‘atindaki Lebeka.’ (Genese 24:51, 59) Yosefe asukaki kaka te na koloba ete, “Nakosala lokola elobi yo” kasi ye na bandeko na ye basalelaki Yakobo “lokola elakaki ye bango.” (Genese 47:30; 50:12, 13) Luta asukaki kaka te na koloba ete, “Esika ekokenda yo, ngai mpe nakokenda kuna” kasi atikaki bato na ye mpe alandaki Naomi, “bango mibale bakendaki kino ekómaki bango na Beteleme.” (Luta 1:16, 19) Mpe ntango bakómaki kofanda na Yuda, Luta azalaki kosala “nyonso lokola elobaki bokilo na ye.” (Luta 3:6) Luta na baoyo mosusu bamonisaki motema-boboto na bango na misala.
14. (a) Ndenge nini basaleli ya Nzambe lelo oyo bamonisaka motema-boboto na misala? (b) Na esika oyo bofandi, baklisto basalaka makambo nini oyo emonisi motema-boboto?
14 Ezali mpenza esengo na komona ndenge oyo basaleli ya Yehova bazali kokoba komonisa motema-boboto na misala lelo oyo. Na ndakisa, kanisá naino baoyo bazali kolɛmba te mpo na kosalisa bibɔsɔnɔ, bato oyo bazali konyokwama na makanisi to bandeko na bango oyo bazali na mawa. (Masese 12:25) To mpe, kanisá ebele ya Batatoli ya Yehova oyo, pɔsɔ na pɔsɔ balɛmbaka te mpo na kokende kozwa mibange na mituka na bango mpo na komema bango na makita na Ndako ya Bokonzi. Anna, mobange ya mbula 82 oyo abɛlaka mingai ya makasi, amonisaki makanisi oyo ebele ya bandeko mosusu bazalaka na yango ntango alobaki boye: “Koya kozwa ngai na motuka mpo na komema ngai na makita nyonso ezali lipamboli ya Yehova. Nazali kotɔnda ye na motema na ngai na ndenge apesi ngai bandeko mibali mpe basi ya bolingo.” Yo mpe osalaka makambo ya ndenge wana na lisangá na bino? (1 Yoane 3:17, 18) Soki osalaka yango, yebá ete bandeko basepelaka mingi na motema-boboto na yo.
Bamonisaki motema-boboto na kotindikama te
15. Masolo misato ya Biblia oyo touti kotalela emonisi likambo nini lisusu na oyo etali motema-boboto?
15 Masolo ya Biblia oyo totaleli emonisi mpe ete moto amonisaka motema-boboto na bolingo na ye moko, kasi batindikaki bango te mpo bamonisa motema-boboto. Betuele andimaki kokokisa mposa ya moombo ya Abalayama na bolingo na ye moko; Lebeka mpe andimaki ye moko. (Genese 24:51, 58) Moto mosusu te nde atindikaki Yosefe na komonisa motema-boboto. (Genese 50:4, 5) Luta “atingamaki ete akende na [Naomi].” (Luta 1:18, NW) Ntango Naomi apesaki Luta likanisi ete asala likambo moko mpo na kobenda likebi ya Boaza, motema-boboto etindaki mwasi yango ya Moaba na koloba ete: “Yango nyonso elobi yo, nakosala yango.”—Luta 3:1-5.
16, 17. Wapi likambo moko ya ntina tozali komona na motema-boboto ya Betuele, Yosefe na Luta, mpe nini etindaki bango na komonisa ezaleli yango?
16 Motema-boboto oyo Betuele, Yosefe na Luta bamonisaki ezali komonisa likambo moko ya ntina mpamba te Abalayama, Yakobo na Naomi batindaki bango na makasi te. Mobeko moko te ezalaki kosɛngisa Betuele ete atika mwana na ye akende mosika. Akokaki mpe koloba na moombo ya Abalayama ete: ‘Te, naboyi mwana na ngai oyo azali makasi na misala akende mosika na ngai.’ (Genese 24:18-20) Yosefe akokaki kokokisa to mpe kokokisa te mposa ya tata na ye, mpamba te ntango oyo Yakobo akufaki, azalaki na likoki te ya kosɛngisa ye ete akokisa maloba na ye. Naomi amonisaki ye moko ete Luta azalaki na likoki ya kotikala na Moaba. (Luta 1:8) Luta akokaki mpe kobala ‘mobali oyo azali elenge’ na esika abala Boaza oyo akómaki mobange.
17 Betuele, Yosefe na Luta bamonisaki motema-boboto na kotindikama te, motema na bango nde etindaki bango. Bayokaki mposa ya komonisa ezaleli wana epai na baoyo bazalaki na bango na boyokani, se ndenge oyo Mokonzi Davidi ayokaki ete asengeli komonisela Mefibosete motema-boboto.
18. (a) Bankulutu ‘babatelaka bampate’ na elimo nini? (b) Nkulutu moko alobaki nini na ndenge na ye kotalela likambo ya kosalisa bandeko mosusu na lisangá?
18 Ata na moi ya lelo, motema-boboto ezali ezaleli ya basaleli ya Nzambe, ezala mibali oyo bazali babateli ya mpate ya Nzambe. (Nzembo 110:3; 1 Batesaloniki 5:12) Bankulutu, to bakɛngɛli bamonaka ete bazali na mokumba monene oyo basengeli kokokisa mpo bazali kotyela bango motema na ndenge baponi bango. (Misala 20:28) Atako bongo, na kati ya lisangá basalaka mosala na bango ya kobatela bampate mpe basalaka makambo mosusu oyo ezali komonisa motema-boboto “na kopusama te, kasi na mitema malamu.” (1 Petelo 5:2) Bankulutu babatelaka bampate mpo ezali mokumba na bango, lisusu mpo bazalaka na mposa ya kosala yango. Bamoniselaka bampate ya Klisto motema-boboto mpamba te basengeli kosala yango mpe mpo balingaka kosala yango. (Yoane 21:15-17) Nkulutu moko alobaki boye: “Nasepelaka kotala bandeko na bandako na bango to mpe kosolola na bango na telefone mpo na komonisa bango ete nakanisaki bango. Kosalisa bandeko epesaka ngai mpenza esengo!” Na mokili mobimba, bankulutu oyo bamibanzabanzaka mpo na bampate bandimaka likanisi yango.
Tómonisa motema-boboto epai ya baoyo bazali na mposa ya lisalisi
19. Makambo nini etali motema-boboto emonisami na masolo ya Biblia oyo tolobeli na lisolo oyo?
19 Masolo ya Biblia oyo touti kotalela ezali mpe komonisa ete tosengeli komonisa motema-boboto epai ya baoyo bazali na mokakatano moko oyo bango moko bakoki kolonga yango te. Mpo libota ya Abalayama esuka te kasi bana na ye bálanda kobotana, esengelaki ete Betuele asalisa ye. Mpo ete nzoto ya Yakobo ekende na Kanana, esengelaki lisalisi ya Yosefe. Mpo ete Naomi azwa mwana oyo akozala mosangoli, esengelaki ete Luta asalisa ye. Moto moko te, ezala Abalayama, Yakobo, to Naomi akokaki kolonga mikakatano wana kozanga ete básalisa ye. Lelo oyo mpe tosengeli mpenza komonisa motema-boboto epai ya baoyo bazali na mposa ya lisalisi. (Masese 19:17) Tosengeli kolanda ndakisa ya Yobo, oyo atyaki likebi na “mobola oyo alelaki, mpe etike ya tata oyo azalaki na mosungi na ye te” mpe na “ye oyo azalaki penepene ya kufa.” Yobo ‘ayembisaki na esengo motema ya mwasi oyo akufelá mobali’ mpe akómaki ‘miso epai na bakufeli miso mpe lokola makolo epai na bibɔsɔnɔ.’—Yobo 29:12-15.
20, 21. Banani oyo tosengeli komonisela bango motema-boboto, mpe mokomoko na biso asengeli kozala na mokano ya kosala nini?
20 Lisangá na lisangá ezali na ‘babola oyo bazali kolela.’ Mpo na bato mosusu ekoki kozala mpo na kozanga molongani, bamosusu balɛmbi nzoto, bamosusu bazali komiyoka ete bazali na ntina te, ezali mpe na baoyo bato mosusu balɛmbisi bango nzoto, bamosusu mpo na maladi makasi, to mpe bamosusu bakufeli ndeko to moninga ya motema. Ata soki mpasi na bango ezali mpo na likambo nini, bandeko wana ya bolingo bazali na bamposa oyo ekoki mpe esengeli kokokisama na misala na biso ya motema-boboto oyo tokosala yango na kotindikama te.—1 Batesaloniki 5:14.
21 Yango wana, tólanda ntango nyonso ndakisa ya Yehova Nzambe oyo “atondi na motema-boboto.” (Exode 34:6, NW; Baefese 5:1) Tokoki kosala yango kaka na maloba te, kasi soki tozali mpenza kosalisa, mingimingi baoyo bazali na mposa ya lisalisi. Na ndenge yango, tokokumisa Yehova mpe tokoyoka esengo mingi ntango ‘tokomonisana motema-boboto’—Zekalia 7:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ndimbola malamu ya lolenge ya libala oyo basalaki ezali na buku Étude perspicace des Écritures, volimi 2, lokasa 226, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okopesa eyano nini?
• Bokeseni nini ezali kati na motema-boboto mpe motema malamu?
• Na ndenge nini Betuele, Yosefe na Luta bamonisaki motema-boboto?
• Tosengeli komonisa motema-boboto na elimo nini?
• Banani oyo tosengeli komonisela bango motema-boboto?
[Elilingi na lokasa 18]
Ndenge nini Betuele amonisaki motema-boboto?
[Elilingi na lokasa 21]
Bolingo ya sembo ya Luta ezalaki lipamboli mpo na Naomi
[Bililingi na lokasa 23]
Moto amonisaka motema-boboto na kotindika te, kasi na misala mpe epai ya bato oyo bazali na mposa ya lisalisi