Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/5 nk. 12-17
  • Tózwa litomba na motema-boboto ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózwa litomba na motema-boboto ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ekeseni na bolingo, ekeseni mpe na bosembo
  • Kobikisa: Lolenge moko ya komonisa motema-boboto
  • Yehova amonisaka motema-boboto na ndenge atambwisaka bato
  • Motema-boboto ya Nzambe ekitisaka mpasi mpe ebatelaka
  • Nzambe azangaka te komonisa motema-boboto
  • Basaleli ya Yehova bazali na libaku malamu
  • “Mobeko ya motema boboto” ebatela lolemo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tómonisa motema-boboto epai na baoyo bazali na mposa ya lisalisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tolanda ntango nyonso komonisa motema malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Pesá Yehova matɔndi mpo na motema-boboto na ye
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/5 nk. 12-17

Tózwa litomba na motema-boboto ya Yehova

“Nani oyo azali na bwanya? . . . Akotya makanisi na ye na misala ya motema-boboto ya Yehova.”​—⁠NZEMBO 107:​43, NW.

1. Ntango nini liloba “motema-boboto” esalelamaki mpo na mbala ya liboso na kati ya Biblia, mpe mituna nini tokotalela na ntina etali ezaleli yango?

ELEKI sikoyo soki mbula 4 000, Lota, mwana ya ndeko ya Abalayama alobaki na Yehova ete: “Ozali kokolisa motema-boboto na yo.” (Genese 19:​19, NW) Wana ezali mbala ya liboso oyo tokoki komona liloba “motema-boboto” na Traduction du monde nouveau epai basaleli liloba yango mbala 250. Kasi na Biblia ya Lingala (haut-fleuve), liloba yango ebongolami kaka na “boboto.” Yakobo, Naomi, Davidi na basaleli mosusu ya Nzambe balobelaki mpe ezaleli yango ya Yehova. (Genese 32:10; Luta 1:8; 2 Samwele 2:⁠6) Kasi, motema-boboto ya Yehova elimboli nini? Amoniselaki yango banani na ntango ya kala? Mpe ndenge nini azali komonisela biso yango lelo oyo?

2. Mpo na nini ezali mpasi mpo na kopesa ndimbola ya liloba ya Liebele oyo ebongolami na “motema-boboto,” mpe ndenge nini mosusu tokoki kobongola yango malamu?

2 Na kati ya Makomami, liloba ya Liebele oyo ebongolami na “motema-boboto,” ezali na ndimbola mozindo na boye ete na minɔkɔ mingi ezali na liloba moko te oyo ezali komonisa ndimbola na yango mobimba. Yango wana, maloba lokola “bolingo,” “ngɔlu,” mpe “bosembo” epesaka mpenza ndimbola na yango mobimba te. Atako bongo, liloba “motema-boboto” oyo tozali kosalela, ezali kolimbola yango malamu mpe ezali mosika te na ndimbola mobimba ya liloba wana. Biblia Traduction du monde nouveau avec notes et références emonisi ete liloba ya Liebele oyo tobongoli na “motema-boboto” ekoki mpe kobongolama na “bolingo ya sembo.”​—⁠Exode 15:​13, NW; Nzembo 5:​7, NW, maloba na nse ya lokasa.

Ekeseni na bolingo, ekeseni mpe na bosembo

3. Bokeseni nini ezali kati na motema-boboto mpe bolingo?

3 Motema-boboto to bolingo ya sembo ezali ndeko ya bolingo mpe ya bosembo. Kasi, ekeseni mingi na maloba yango. Tótala naino bokeseni oyo ezali kati na motema-boboto na bolingo. Moto akoki kolinga biloko to mpe makanisi. Biblia elobeli ‘kolinga vinyo mpe mafuta’ mpe ‘kolinga mayele.’ (Masese 21:17; 29:⁠3) Kasi bamonisaka motema-boboto epai ya bato, bamonisaka yango na makanisi to mpe na biloko te. Na ndakisa, Exode 20:6 (NW) ezali kolobela nde bato ntango eyebisi ete Yehova “amonisaka motema-boboto na libota ya mbala ya nkóto.”

4. Bokeseni nini ezali kati na motema-boboto mpe bosembo?

4 Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “motema-boboto” ezali mpe na ndimbola monene koleka “bosembo.” Na minɔkɔ mosusu, basalelaka liloba “bosembo” mpo na kolobela ezaleli oyo moto asengeli komonisa epai ya mokonzi na ye. Kasi, lokola moto moko ya mayele alobi yango, na Biblia, motema-boboto “ezalaka mbala mingi bosembo oyo moto amonisaka yango epai ya moto oyo azali na nse to oyo azali na mpasi to na mposa ya lisalisi.” Yango wana, Mokonzi Davidi asɛngaki Yehova ete: “[Ngɛngisá] elongi na yo epai na moombo na yo, bikisá ngai na [motema-boboto, NW] na yo.” (Nzembo 31:16) Davidi, moto oyo azalaki na mposa ya lisalisi, asɛngaki Yehova, Nzambe oyo aleki na nguya, ete amonisela ye motema-boboto to bolingo ya sembo. Lokola moto oyo azali na mposa ya lisalisi azali na nse, soki moto oyo azali na nguya amonisi motema-boboto na likambo ya ndenge wana, asalaka yango na kotindikama te.

5. (a) Liloba ya Nzambe ezali komonisa makambo nini na oyo etali motema-boboto na ye? (b) Tokotalela makambo nini oyo ezali komonisa motema-boboto ya Yehova?

5 Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Nani azali na bwanya? . . . Akotya makanisi na ye na misala ya motema-boboto ya Yehova.” (Nzembo 107:​43, NW) Motema-boboto ya Yehova ekoki kopesa lobiko mpe ekoki kobatela bomoi. (Nzembo 6:4; 119:​88, 159) Motema-boboto ya Nzambe ezali libateli mpe ekitisaka mpasi. (Nzembo 31:​16, 21; 40:11; 143:12) Ezaleli yango nde epesaka nzela na kolimbisama ya masumu. (Nzembo 25:⁠7) Soki totaleli masolo mosusu mpe totii likebi na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia, tokomona ete Yehova amonisaka motema-boboto (1) na misala mpe (2) epai ya basaleli na ye ya sembo.

Kobikisa: Lolenge moko ya komonisa motema-boboto

6, 7. (a) Ndenge nini Yehova akolisaki motema-boboto epai ya Lota? (b) Ntango nini Lota alobelaki motema-boboto ya Yehova?

6 Mbala mosusu ndenge eleki malamu mpo na komona malamumalamu motema-boboto ya Yehova ezali nde na kotalela masolo ya Bibia oyo elobeli ezaleli yango. Na Genese 14:​1-16, tozali kotánga ete basoda oyo bayaki bitumba bakangaki Lota, mwana ya ndeko ya Abalayama, mpe bakendaki na ye. Kasi, Abalayama akendaki kobikisa Lota. Na nsima, bomoi ya Lota ezalaki lisusu na likama ntango Yehova azwaki mokano ya koboma Sodomo, mboka ya bato ya misala mabe, epai Lota azalaki kofanda na libota na ye.​—⁠Genese 18:​20-22; 19:​12, 13.

7 Liboso mpenza Sodomo ebomama, baanzelu ya Yehova babimisaki Lota na libota na ye na engumba yango. Na ntango wana, Lota alobaki ete: “Mosaleli na yo azwi ngɔlu na miso na yo na boye ete ozali kokolisa motema-boboto na yo, oyo omonisi epai na ngai mpo na kobatela molimo na ngai na bomoi.” (Genese 19:​16, 19, NW) Maloba ya Lota emonisi ete andimaki ete Yehova amoniselaki ye motema-boboto mingi na ndenge abikisaki ye. Awa tokoloba ete Nzambe amonisaki motema-boboto na ndenge abikisaki mpe abatelaki bomoi.​—⁠2 Petelo 2:⁠7.

Yehova amonisaka motema-boboto na ndenge atambwisaka bato

8, 9. (a) Moombo ya Abalayama azalaki na mokumba nini? (b) Mpo na nini moombo abondelaki mpo Nzambe amonisa motema-boboto na ye, mpe likambo nini esalemaki ntango azalaki kobondela?

8 Na Genese mokapo 24 ezali na lisolo oyo ezali komonisa ndenge mosusu oyo Nzambe amonisaki motema-boboto to bolingo ya sembo. Ezali lisolo ya moombo oyo Abalayama atindaki ye asala mobembo tii na mboka oyo bandeko ya Abalayama bazalaki kofanda mpo na kolukela mwana na ye Yisaka mwasi. (Vɛrsɛ 2-4) Ezalaki mokumba ya makasi, kasi Abalayama andimisaki moombo yango ete anzelu ya Yehova akotambwisa ye. (Vɛrsɛ 7) Nsukansuka moombo akómaki na libulu moko ya mai pembeni ya “mboka ya Nahola” (ekoki kozala Alana to mboka mosusu oyo ezalaki pene ya Alana) na ntango oyo basi bazalaki koya na libulu mpo na kotoka mai. (Vɛrsɛ 10, 11) Ntango amonaki basi bazali koya, ayebaki ete ngonga ya kokokisa mokumba na ye ekoki. Kasi, ndenge nini akokaki koyeba mwana mwasi oyo abongi?

9 Lokola ayebaki ete azali na mposa ya lisungi ya Nzambe, moombo ya Abalayama abondelaki boye: “[Yehova], Nzambe ya nkolo na ngai Abalayama, nalɔmbi yo ete likambo na ngai ebonga lelo, mpe moniselá nkolo na ngai Abalayama [motema-boboto, NW].” (Vɛrsɛ 12) Ndenge nini Yehova amonisaki motema-boboto na ye? Moombo yango asɛngaki elembo moko oyo ekosalisa ye ayeba elenge mwasi oyo Nzambe aponi. (Vɛrsɛ 13, 14) Elenge mwasi moko asalaki likambo mpenza oyo moombo asɛngaki Yehova. Ezalaki lokola nde elenge mwasi yango ayokaki maloba oyo moombo yango alobaki na libondeli na ye! (Vɛrsɛ 15-20) Moombo ‘azalaki kotala ye’ na kokamwa. Kasi, ezalaki naino na makambo mosusu ya ntina oyo asengelaki koyeba. Mwana mwasi yango ya kitoko azalaki nde na libota ya Abalayama? Azalaki naino monzemba? Yango wana moombo atikalaki “nyɛɛ mpo na koyeba soki Yehova asalisaki ye alonga na mobembo na ye to te.”​—⁠Vɛrsɛ 16, 21, NW.

10. Mpo na nini moombo ya Abalayama alobaki ete Yehova amoniselaki nkolo na ye motema-boboto?

10 Mwa moke na nsima, elenge mwasi alobaki ete azali “mwana ya Betuele mwana ya Milika oyo ye aboteli Nahola [ndeko ya Abalayama].” (Genese 11:26; 24:24) Na ntango yango nde moombo amonaki ete Yehova ayokaki libondeli na ye. Asepelaki mingi, afukamaki mpe alobaki ete: “[Yehova], Nzambe ya nkolo na ngai Abalayama, asanzolama, ye oyo alongoli [motema-boboto, NW] mpe sembo na ye epai na nkolo na ngai te. Na [likambo] na ngai, [Yehova] akambi ngai na nzela ya ndako ya bandeko ya nkolo na ngai.” (Vɛrsɛ 27) Nzambe amoniselaki Abalayama motema-boboto na ndenge oyo atambwisaki moombo na ye.

Motema-boboto ya Nzambe ekitisaka mpasi mpe ebatelaka

11, 12. (a) Yosefe amonaki motema-boboto ya Yehova ntango azalaki na minyoko nini? (b) Ndenge nini Nzambe amoniselaki Yosefe motema-boboto na ye?

11 Sikoyo, tótalela Genese mokapo 39. Lisolo oyo ezali kolobela Yosefe, nkɔkɔ ya nkɔkɔ ya Abalayama, oyo batɛkaki ye na boombo na Ezipito. Atako bongo, “[Yehova] azalaki elongo na Yosefe.” (Vɛrsɛ 1, 2) Kutu, ata Potifala, Moezipito oyo azalaki nkolo ya Yosefe, alobaki ete Yehova azalaki elongo na Yosefe. (Vɛrsɛ 3) Kasi, Yosefe amekamaki makasi. Bakoselaki ye makambo ete alukaki kosangisa nzoto na mwasi ya Potifala, yango wana batyaki ye na bolɔkɔ. (Vɛrsɛ 7-20) Kuna “na bolɔkɔ” “banyokolaki makolo na ye na minyoto, mpe molimo na ye ekɔtaki na kati na minyɔlɔlɔ.”​—⁠Genese 40:15; Nzembo 105:​18, NW.

12 Likambo nini esalemaki ntango azalaki na mpasi wana? “Yehova azalaki na Yosefe elongo mpe amoniselaki ye [motema-boboto, NW].” (Vɛrsɛ 21a) Na motema-boboto na ye, Nzambe asalaki makambo mingi oyo na nsima, esalaki ete mikakatano nyonso oyo Yosefe azalaki na yango esila. Yehova “apesaki [Yosefe] lokumu na miso ya nkolo ya bolɔkɔ.” (Vɛrsɛ 21b) Yango wana, mokonzi ya bolɔkɔ aponaki Yosefe azala kapita. (Vɛrsɛ 22) Kuna na bolɔkɔ, Yosefe akutanaki na moto moko oyo na nsima, akendaki kobɛta lisolo na ye epai ya Falo, mokonzi ya Ezipito. (Genese 40:​1-4, 9-15; 41:​9-14) Na nsima, mokonzi atyaki Yosefe moto ya mibale nsima na ye na bokonzi ya Ezipito, mpe yango epesaki ye nzela asala mosala oyo ebikisaki bomoi ya bato ntango nzala ekɔtaki na Ezipito. (Genese 41:​37-55) Yosefe abandaki komona mpasi ntango azalaki na mbula 17 mpe anyokwamaki koleka mbula zomi na mibale! (Genese 37:​2, 4; 41:46) Kasi na bambula nyonso wana ya mpasi mpe ya bwale, Yehova Nzambe amoniselaki Yosefe motema-boboto na ndenge abatelaki ye na likama ya monene mpe abatelaki ye mpo ete na nsima akokisa mokumba monene na kati ya mokano ya Nzambe.

Nzambe azangaka te komonisa motema-boboto

13. (a) Nzembo 136 elobeli makambo nini oyo Yehova asalaki mpo na motema-boboto na ye? (b) Motema-boboto elimboli mpenza nini?

13 Yehova azalaki mbala na mbala komonisela libota mobimba ya Yisalaele motema-boboto. Nzembo 136 elobi ete na motema-boboto na ye, abikisaki bango (Vɛrsɛ 1-15), atambwisaki bango (Vɛrsɛ 16), mpe abatelaki bango. (Vɛrsɛ 17-20) Nzambe amonisaki mpe motema-boboto epai ya bato mosusu ya libota yango. Moto oyo azali komonisela bazalani na ye motema-boboto asalaka yango na misala oyo ye moko asepeli kosala mpo na kokokisa mposa moko ya ntina mingi. Mokanda moko oyo elimboli maloba ya Biblia elobi mpo na motema-boboto ete: “Ezali likambo oyo esalemaka mpo na kobatela to kobikisa bomoi. Ezali likambo oyo esalemaka mpo na kosunga moto oyo akwei to azali na mpasi.” Molimboli moko ya maloba ya Biblia amonisaki ete motema-boboto ezali “bolingo oyo emonisami na misala.”

14, 15. Mpo na nini tondimi ete Lota azalaki mosaleli oyo Nzambe asepelaki na ye?

14 Masolo ya Genese oyo touti kotalela emonisi biso ete Yehova azangaka te komonisa motema-boboto na ye epai ya bato oyo balingaka ye. Lota, Abalayama, mpe Yosefe bazalaki na bomoi na eleko moko te mpe bakutanaki na mikakatano ndenge moko te. Bazalaki bato ya kozanga kokoka, kasi bazalaki basaleli ya Yehova oyo Yehova andimaki bango, mpe bazalaki na mposa ya lisalisi ya Nzambe. Ezali kolendisa biso na koyeba ete Tata na biso ya likoló amonisaka motema-boboto epai ya bato ya ndenge yango.

15 Lota azwaki bikateli mosusu ya mabe oyo na nsima ememelaki ye mikakatano. (Genese 13:​12, 13; 14:​11, 12) Kasi, azalaki mpe na bizaleli ya malamu. Ntango baanzelu mibale bakómaki na Sodomo, Lota ayambaki bango epai na ye. (Genese 19:​1-3) Lokola andimaki mpenza ete etikali moke Sodomo ebomama, akebisaki babokilo na ye. (Genese 19:14) Mokapo ya 2 Petelo 2:​7-9 ezali komonisa biso ndenge oyo Nzambe azalaki kotalela Lota; tozali kotánga boye: “[Yehova] abikisi mpe Lota moyengebene, oyo azalaki [komitungisa, NW] mpo na lofundo ya bizaleli ya bato kati na mobulu. Zambi efandaki moyengebene kati na bango, amoni mpe ayoki mosala na bango na kilikili mokolo na mokolo mpe anyokolami [mpo] na elimo na ye [ya] sembo. Boye Nkolo ayebi kobikisa bango bakosambela ye wana ezali bango kati na komekama.” Ya solo, Lota azalaki moto ya sembo, mpe maloba ya vɛrsɛ yango ezali komonisa ete azalaki kobanga Nzambe. Nzambe akoki mpe komonisela biso motema-boboto soki tozali komonisa “bizaleli ya bosantu mpe misala ya kobanga Nzambe.”​—⁠2 Petelo 3:​11, 12, NW.

16. Maloba nini ya malamu Biblia esaleli mpo na kolobela Abalayama mpe Yosefe?

16 Lisolo ya Genese mokapo 24 ezali komonisa mpenza ete Abalayama azalaki na boyokani malamu na Yehova. Vɛrsɛ ya liboso elobi ete “[Yehova] asilaki kopambola Abalayama na makambo nyonso.” Moombo ya Abalayama abengaki Yehova ete “Nzambe ya nkolo na ngai Abalayama.” (Vɛrsɛ 12, 27) Lisusu, moyekoli Yakobo alobaki ete Abalayama ‘atángamaki moyengebene’ mpe “abengamaki ‘moninga ya Yehova.’ ” (Yakobo 2:​21-23, NW) Ezali mpe bongo mpo na Yosefe. Mokapo mobimba ya Genese 39 ezali komonisa polele boyokani malamu mpenza oyo Yosefe azalaki na yango na Yehova. (Vɛrsɛ 2, 3, 21, 23) Yango wana, moyekoli Setefano alobaki mpo na Yosefe ete: “Nzambe azalaki na ye elongo.”​—⁠Misala 7:⁠9.

17. Ndakisa ya Lota, ya Abalayama mpe Yosefe ekoki koteya biso nini?

17 Bato touti kolobela, baoyo Nzambe amoniselaki bango motema-boboto bazalaki na boyokani malamu na Yehova Nzambe mpe bakokisaki mokano ya Nzambe na makambo ndenge na ndenge. Bakutanaki na mikakatano oyo bakokaki kolonga yango te na makasi na bango moko. Bomoi ya Lota ezalaki na likama, likama mosusu ezalaki ete molɔngɔ ya bakitani ya Abalayama esuka; lisusu, kobatelama ya mokumba oyo Yosefe asengelaki kokokisa ezalaki mpe na likama. Kaka Yehova nde akokaki kokokisa bamposa ya bato yango oyo bazalaki kobanga ye, mpe asalaki yango na misala oyo emonisaki motema-boboto. Mpo ete Yehova Nzambe amonisela biso motema-boboto na ye libela, tosengeli kozala na boyokani ya malamu biso na ye, mpe tosengeli ntango nyonso kosala mokano na ye.​—⁠Ezela 7:28; Nzembo 18:50.

Basaleli ya Yehova bazali na libaku malamu

18. Mikapo mingi ya Biblia ezali komonisa nini mpo na motema-boboto ya Yehova?

18 “Mokili mobimba etondi” na motema-boboto ya Yehova mpe biso tozali mpenza na botɔndi mingi mpo na ezaleli yango ya Nzambe! (Nzembo 119:64) Na motema mobimba tozali kosangisa mingongo na biso na oyo ya mokomi ya nzembo mpo na koyemba ete: “Tiká ete básanzola [Yehova] mpo na [motema-boboto, NW] na ye; mpo na misala na ye ya kokamwa epai ya bana ya bato.” (Nzembo 107:​8, 15, 21, 31) Tozali na esengo ya komona ete Yehova azali komonisela mosaleli na ye mokomoko mpe basaleli na ye nyonso motema-boboto. Na libondeli moko oyo mosakoli Danyele asalaki, alobaki ete Yehova azali “Nzambe monene mpe ya nsɔmɔ, oyo akobatelaka kondimana mpe [motema-boboto, NW] mpo na baoyo balingi ye mpe batosi mibeko na ye.” (Danyele 9:⁠4) Mokonzi Davidi abondelaki ete: “Umelisá [motema-boboto, NW] na yo epai ya bango bayebi yo.” (Nzembo 36:10) Tozali na botɔndi mingi lokola Yehova azali komonisela basaleli na ye motema-boboto!​—⁠1 Mikonzi 8:23; 1 Ntango 17:13.

19. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo elandi?

19 Ya solo, biso basaleli ya Yehova tozali mpenza na libaku malamu! Nzambe alingi biso lokola bato nyonso, kasi likoló na yango, tozali mpe na mapamboli mosusu oyo ezali kouta na motema-boboto, to bolingo ya sembo ya Tata na biso ya likoló. (Yoane 3:16) Mingimingi, Yehova amoniselaka biso ezaleli yango ya malamu mingi na ntango ya mpasi. (Nzembo 36:⁠7) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya motema-boboto ya Yehova Nzambe? Mokomoko na biso amonisaka ezaleli malamu yango? Tokotalela mituna oyo mpe mituna mosusu na lisolo oyo elandi.

Ozali koyeba lisusu?

• Na kati ya Makomami, wapi ndenge mosusu babongoli liloba oyo ebongolami na “motema-boboto”?

• Bokeseni nini ezali kati na motema-boboto na bolingo mpe bosembo?

• Ndenge nini Yehova amonisaki motema-boboto na ye epai ya Lota, Abalayama mpe Yosefe?

• Ndenge oyo Yehova amonisaki motema-boboto na ye na ntango ya kala ekoki kolendisa biso na nini?

[Elilingi na lokasa 13]

Oyebi ndenge oyo Nzambe amoniselaki Lota motema-boboto?

[Bililingi na lokasa 15]

Na motema-boboto na ye, Yehova atambwisaki moombo ya Abalayama

[Bililingi na lokasa 16]

Yehova amonisaki motema-boboto na ndenge abatelaki Yosefe

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto