Bongolabongola ya Tertullien
‘MOKLISTO mpe moto ya filozofi bakokani na nini? Moto oyo abebisaka mateya ya solo na moto oyo abongisaka mpe ateyaka yango bakokani na nini? Boyokani nini ezali kati na mateya ya Platon mpe Lingomba?’ Tertullien, mokomi na ekeke ya mibale mpe ya misato ya ntango na biso (T.B.) moto atunaki mituna wana. Tertullien ayebanaki lokola “moko na bato oyo, na ntango na ye, bakomaki babuku mingi mpo na makambo ya lingomba mpe mateya na yango.” Alobelaki makambo nyonso oyo etali losambo.
Ekoki mpenza kozala ete Tertullien ayebanaki mingi mpo na elobeli na ye ya bongolabongola lokola oyo: “Nzambe azalaka monene mpenza, ntango azali moke.” “Esengeli mpenza kondima [liwa ya Mwana ya Nzambe] mpo ezali likambo oyo bato bazali kokanga ntina na yango te.” “[Yesu] akundamaki, mpe asekwaki; likambo yango ezali solo, mpo ete ekoki kosalema te.”
Bongolabongola ya Tertullien esuki kaka te na elobeli na ye. Atako azalaki koloba ete mikanda na ye ezalaki mpo na kolongisa solo mpe kobatela bosembo mpe mateya ya lingomba, Tertullien abebisaki nde mateya ya solo. Likambo monene oyo akɔtisaki na lingomba ya boklisto ezalaki likanisi oyo bakomi mosusu, na nsima, basalelaki yango mpo na kobimisa liteya ya bosato. Mpo na koyeba ndenge oyo likambo yango esalemaki, tóluka naino koyeba Tertullien ye moko malamu.
“Bato bazalaki ntango nyonso na mposa ya koyoka ye”
Bomoi ya Tertullien eyebani mpenza mingi te. Bato mingi ya mayele balobaka ete abotamaki soki na mobu 160 T.B. na Carthage, na Afrika ya Nɔrdi. Emonani ete atángaki kelasi mingi mpe ayebaki malamu mateya ndenge na ndenge ya filozofi na ntango wana. Emonani ete eloko ebendaki ye na lingomba ya boklisto ezalaki ekateli oyo baklisto bazalaki na yango ya kondima ata kokufa mpo na kondima na bango. Mpo na likambo ya kokufa lokola martiru, Tertullien atunaki boye: “Nani oyo akanisaka yango, kasi azalaka na mposa te ya kotuna eloko nini etindaka moto andima yango? Nani oyo, nsima ya koluka koyeba, aboyaka kolanda mateya na biso?”
Tertullien akómaki moklisto ya nkombo mpamba mpe mokomi oyo azalaki na makoki ya kokoma mwa maloba moke mpe ya mayele. Buku moko (The Fathers of the Church) elobi ete: “Azalaki na makoki koleka bato mingi ya teoloji, bato bazalaki ntango nyonso na mposa ya koyoka ye.” Moto moko ya mayele alobaki ete: “Tertullien [azalaki] na likoki ya kosalela maloba na esika ya bafraze mpe kokanga ntina ya maloba na ye ya mayele ezali pɛtɛɛ koleka makanisi na ye. Mbala mosusu ezali mpo na ntina wana nde maloba na ye ezongelamaka mingi na mokuse kati na mikanda mpe batángaka mpenza te makomami na ye na bolai na yango.”
Alongisi mateya ya boklisto
Mokanda ya Tertullien oyo eyebani mingi ezali Apologétique, batalelaka buku yango lokola mokanda oyo ezali na makanisi oyo eleki malamu mpo na kolongisa mateya ya lingomba ya boklisto. Akomaki yango na ntango oyo bato ya mobulu, mpo na biyambayamba, bazalaki konyokola baklisto. Tertullien akɔtelaki baklisto yango mpe asepelaki te na ndenge bazalaki konyokola bango mpambampamba. Alobaki ete: “[Banguna] bamonaka ete baklisto nde babimiselaka bato makama mpe mikakatano nyonso. . . . Soki mai ya Ebale Nil ekómi na bilanga te, soki likoló ebongwani te, soki mabele eningani, nzala, bolɔzi—mbala moko okoyoka: ‘Bóbwaka baklisto epai ya nkosi!’ ”
Atako mbala mingi bato bazalaki koloba ete baklisto balingaka ekólo na bango te, Tertullien asalaki nyonso mpo na komonisa ete bazali mpenza bato oyo ebongi kotyela motema na mokili. Nsima ya kolobela ndenge makambo esalemaki mpo na kokweisa boyangeli ya Loma, Tertullien akundolelaki banguna na ye ete batomboki wana bazalaki mpenza bapakano kasi baklisto te. Tertullien amonisaki ete ntango bazali koboma baklisto, bazali nde kobebisa ekólo.
Mikanda mosusu ya Tertullien elobelaki bomoi ya baklisto. Na ndakisa, na buku na ye moko (On the Shows), Tertullien akebisaki baklisto bákendaka te na bisika mosusu ya masano, básanganaka te na masano ya bapakano, mpe na bateyatre. Emonani ete ezalaki na bandimi ya sika oyo bazalaki komona mabe te ya kokende kotala masano ya bapakano nsima ya koyangana mpe koteyama Biblia. Mpo na kosalisa bango bákanisa malamu, Tertullien akomaki boye: “Ezali mabe monene kouta na ndako-nzambe mpe kokende na ndako ya losambo ya zabolo, kouta na makambo ya elimo mpe kokende na makambo ya bonyama.” Alobaki ete: “Makambo oyo bolingaka kosala te, bóboya mpe koyoka yango.”
Abebisaki mateya ya solo ntango azali koluka kokɔtela yango
Tertullien abandaki buku na ye oyo ezali na moto ya likambo Contre Praxéas na maloba oyo: “Zabolo atɛmɛli mpe abundisi solo na mitindo ndenge na ndenge. Ntango mosusu, mokano na ye ezalaki ya kokɔtela mateya ya solo mpo na kobebisa yango.” Praxéas, moto oyo ye alobelaki na lisolo wana, ayebani malamu te, kasi Tertullien atyanaki na ye ntembe na mateya na ye na oyo etali Nzambe mpe Yesu. Azalaki kotalela Praxéas lokola moto oyo Satana azalaki kosalela ye na mayele mabe mpo na koluka kobebisa lingomba ya boklisto.
Ntembe monene oyo bato oyo bazalaki komibenga baklisto na ntango wana bazalaki kotyana etalelaki esika ya Nzambe na Yesu. Bamosusu kati na bango, mingimingi mpenza Bagrɛki, bazalaki na mokakatano mpo na koyokanisa likambo etali kondima Nzambe moko mpe mokumba ya Yesu lokola Mobikisi mpe Mosikoli. Praxéas alukaki kosilisa mokakatano wana ntango ateyaki bango ete Yesu azali lolenge mosusu ya Tata mpe bokeseni ezali te kati na Tata mpe Mwana. Liteya yango elobaka ete Nzambe amimonisaki “lokola Tata na Bozalisi mpe na ntango apesaki Mibeko, amimonisaki lokola Mwana kati na Yesu Klisto, mpe amimonisaki lokola Elimo Santu nsima wana Klisto amataki na likoló.”
Tertullien amonisaki ete Makomami ezalaki kokesenisa polelepolele Tata mpe Mwana. Nsima ya kotánga maloba ya 1 Bakolinti 15:27, 28, alobaki boye: “Ye oyo asili kokitisa (biloko nyonso), mpe Ye oyo biloko nyonso ekitisami na nse na ye bazali mpenza bato mibale.” Tertullien alobelaki maloba ya Yesu ye moko boye: “Tata aleki ngai.” (Yoane 14:28) Asalelaki bavɛrsɛ ya Makomami ya Liebele, lokola Nzembo 8:5 mpe amonisaki ndenge Biblia elobi ete Mwana azali “na nse.” Na nsuka, Tertullien alobaki boye: “Yango wana, tata akeseni na Mwana, Ye aleki mwana. Se lokola Ye oyo aboti azali moto mosusu, mpe Ye oyo abotami azali moto mosusu; Ye oyo mpe atindi azali moto mosusu, mpe ye oyo atindami azali mosusu; mpe lisusu Ye oyo asali azali moto mosusu, mpe Ye oyo na nzela na ye biloko bisalemi azali moto mosusu.”
Tertullien azalaki kotalela Mwana ete azali na nse ya Tata. Kasi, ntango amekaki kokweisa liteya wana, asalelaki “makambo makomami te.” (1 Bakolinti 4:6) Tertullien asalaki libunga na ndenge alukaki komonisa bonzambe ya Yesu na nzela ya liteya mosusu, abimisaki likanisi ya koloba ete “eloko moko na bapersona misato.” Asalelaki likanisi wana mpo na komeka komonisa ete Nzambe, Mwana na ye mpe elimo santu bazali bato misato kati na Nzambe moko. Na bongo, Tertullien azalaki moto ya liboso oyo asalelaki liloba ya Latin oyo ebongolami na “bosato” mpo na kolobela Tata, Mwana, mpe elimo santu.
Kebá na filozofi ya mokili
Ndenge nini Tertullien azwaki makanisi ya kobimisa liteya ya “eloko moko na bapersona misato”? Eyano ezali na bongolabongola mosusu oyo azalaki na yango: ndenge oyo azalaki kotalela mateya ya filozofi. Tertullien azalaki kobenga filozofi ete “ ‘mateya’ ya bato mpe ‘ya bademo.’ ” Azalaki koloba polele ete ezali mabe kosalela filozofi mpo na kolongisa mateya ya boklisto. Alobaki ete: “Bóboya makanisi nyonso ya kobimisa lingomba ya boklisto ya mabe oyo esangisi mateya ya Basetoa, ya Platon, mpe oyo euti na bikanisakanisa ya bato. Kasi, mbala mingi ye moko Tertullien azalaki kosalela mateya ya filozofi ya mokili soki eyokani na makanisi na ye.—Bakolose 2:8.
Mokanda moko elobi ete: “Esengelaki ete bato bápesa makanisi mpe bábakisa makambo mosusu ya Bagrɛki mpo na kolimbola liteya ya Bosato mpe kopanza yango.” Lisusu, buku moko (The Theology of Tertullian) elobi ete: “[Ezalaki] makanisi mpe maloba ya mibeko mpe mateya ya filozofi nde Tertullien asangisaki yango mpo na kobimisa liteya ya Bosato na ndenge oyo, atako ezalaki kolimbola makambo mosusu te, bazwaki yango lokola moboko ya mateya oyo epesamaki na Likita Monene ya Nicée.” Na bongo, liteya oyo Tertullien abimisaki ya Nzambe moko na bapersona misato esalaki ete mateya ya lokuta epanzana na lingomba mobimba ya boklisto.
Tertullien alobaki ete bato mosusu babebisaki mateya ya solo ntango bazalaki koluka kolongisa yango. Nzokande, na ndenge asangisaki solo ya Biblia oyo epemami na Nzambe mpe filozofi, ye moko asalaki libunga yango. Yango wana, tólanda malamumalamu likebisi oyo Makomami ezali kopesa na ntina etali “kolanda maloba ya lokuta mapemami mpe mateya ya bademo.”—1 Timote 4:1.
[Bililingi na lokasa 30]
Tertullien alobaki ete mateya ya filozofi ezali mabe, kasi ye moko asalelaki yango mpo na kolongisa makanisi na ye
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Nkasa 29 na 30: © Cliché Bibliothèque nationale de France, Paris
[Elilingi na lokasa 31]
Baklisto ya solo baboyaka kosangisa solo ya Biblia na mateya ya filozofi