Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/6 nk. 8-11
  • Eloko oyo eleki biloko ya motuya ya Ezipito

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eloko oyo eleki biloko ya motuya ya Ezipito
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Boombo na Ezipito
  • Babombi ye, amonani, mpe moto mosusu azwi ye mpo abɔkɔla ye
  • Kobɔkɔlama mpe koyekola na ye
  • Ekateli monene
  • Moize aponaki kosambela Yehova
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Tóyeba banzela ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Moize akimi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Mokanda ya Biblia nimero 2​—Exode
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/6 nk. 8-11

Eloko oyo eleki biloko ya motuya ya Ezipito

MOSE azali moko na bato ya kala oyo bayebani mingi. Mikanda minei mobimba ya Biblia, banda na Exode tii na Deteronome, elobeli mingimingi makambo oyo Nzambe asalaki na Yisalaele ntango Mose azalaki kotambwisa libota yango. Atambwisaki bango ntango babimaki na Ezipito, azalaki moyokanisi ya kondimana ya Mibeko, mpe atambwisaki Yisalaele tii liboso bákɔta na Mokili ya Ndaka. Mose abɔkwamaki na ndako ya Falo, kasi aponamaki mpo na kotambwisa libota ya Nzambe, azalaki mpe mosakoli, mosambisi, mpe mokomi oyo apemamaki na Nzambe. Atako asalaki nyonso wana, “azalaki na bopɔlɔ mingi, na koleka bato nyonso bazalaki na nse.”​—Mituya 12:3.

Biblia elobeli Mose mingimingi na makambo oyo elekaki na mbula 40 ya nsuka na bomoi na ye, banda ntango oyo Bayisalaele balongwaki na boombo tii na liwa na ye, ntango akokisaki mbula 120. Kobanda ntango azalaki na mbula 40 tii akokisaki mbula 80, azalaki mobateli ya mpate na Midyani. Kasi, buku moko elobi ete mbula 40 ya liboso ya bomoi ya Mose, banda kobotama na ye tii ntango akimaki Ezipito, ezali “mbala mosusu bambula ya bomoi na ye oyo tomitunaka mituna mingi mpo na yango, kasi ezali mpe bambula oyo makambo na yango eyebani te.” Makambo nini oyo tokoki kokanisa ete elekaki na eleko yango? Makambo oyo akutanaki na yango ntango azalaki kokola esalaki nini na bomoto na ye ntango akómaki mokóló? Makambo nini ayekolaki? Mikakatano nini akutanaki na yango? Mpe liteya nini tokoki kozwa na makambo nyonso wana?

Boombo na Ezipito

Mokanda ya Exode elobi ete Falo moko akómaki kobanga bana ya Yisalaele oyo bafandaki na Ezipito mpo bazalaki kokóma ebele nokinoki. Akanisaki ete azali ‘kosala na mayele,’ ntango akómaki konyokola bango na misala ya makasimakasi; atyelaki bango bakapita oyo bazalaki kobɛta bango fimbo; bakómaki komema mikumba ya kilo, kosala babiliki ya mabele, mpe bazalaki kokatela moto na moto motángo ya biliki oyo asengelaki kobɛta na mokolo moko; nyonso wana mpo bákóma mingi koleka te.​—Exode 1:8-14; 5:6-18.

Makambo oyo Biblia elobi ezalaki kosalema na Ezipito na ntango oyo Mose abotamaki ekokani mpenza na makambo oyo bato ya istware bamoni na bolukiluki na bango. Bapapirise mingi ya kala mpe liyemi oyo ezali na lilita moko ya kalakala ezali komonisa baombo bazali kobɛta biliki ya mabele na milɛnɛrɛ ya mibale liboso ya ntango na biso (L.T.B.) to liboso na yango. Bakonzi oyo bazalaki kokamba mosala ya biliki bazalaki kosangisa baombo na bituluku ya bato nsambo kino bato 18 mpe bazalaki kotyela bango kapita to mokambi moko. Basengelaki kotimola mabele mpe komema matiti na esika ya kosala biliki. Bato ya bikólo ndenge na ndenge bazalaki kosala mosala ya kotoka mai, mpe bazalaki kosalela kongo mpo na kosangisa mai, mabele, na matiti mpo na kolamba mabele ya biliki. Bazalaki kobɛta ebele ya milɔngɔ ya biliki ya mike mpe milai. Na nsima, basali bazalaki komema babiliki oyo ekauká na moi tii na esika oyo bazali kotonga ndako; ntango mosusu esengelaki kotambola likoló ya libaya mpo na komata. Baezipito oyo bazalaki bakapita ya misala bazalaki na fimbo na mabɔkɔ, bazalaki kofanda to kotambolatambola ntango bazali kokɛngɛla mosala.

Na lokasa moko ya kalakala oyo ezali na lapolo ya kalaka moko, bakomi ete basali 602 babɛtaki biliki 39 118, elingi koloba ete moto mokomoko abɛtaki biliki soki 65 na mokolo moko. Mpe na mokanda moko ya ekeke ya 13 L.T.B. bakomi boye: “Basali bazali kokokisa motángo ya biliki oyo basengeli kobɛta mokolo na mokolo.” Nyonso wana ekokani mpenza na ndenge oyo mokanda ya Exode elobeli misala oyo bana ya Yisalaele bazalaki kosala.

Minyoko elongaki te kokitisa motángo ya Baebele. Kutu, “elekaki bango konyokolama [na Baezipito], balekaki kobota mpe balekaki kokóma mingi. Baezipito bayokaki nsɔmɔ mpo na bato na Yisalaele.” (Exode 1:10, 12) Yango wana, Falo apesaki mitinda, liboso epai ya basi ya Baebele oyo bazalaki kobotisa, mpe na nsima epai ya Baezipito nyonso ete bábomaka mwana mobali nyonso oyo Bayisalaele baboti. Yokebede, mwasi ya Amalama, abotaki mwana mobali moko kitoko na nkombo Mose na ntango makambo ebebaki ndenge wana.​—Exode 1:15-22; 6:20; Misala 7:20.

Babombi ye, amonani, mpe moto mosusu azwi ye mpo abɔkɔla ye

Baboti ya Mose batosaki etinda ya Falo te, babombaki mwana na bango. Toyebi te soki ntango basalaki yango ezalaki na banɔngi mpe bato oyo bazalaki koluka bana oyo bauti kobotama na ndako mokomoko. Ata soki ezalaki ndenge nini, nsima ya sanza misato, baboti ya Mose bakokaki lisusu kobomba ye te. Yango wana mama na ye asalaki kitunga na papirise mpe apakolaki yango gudrɔ mpo mai ekɔta te, mpe atyaki mwana na kati. Na lolenge mosusu, tokoki mpe koloba ete Yokebede atosaki etinda ya Falo ya kobwaka mwana nyonso ya mobali ya Moebele na Ebale Nile. Milyami, yaya ya Mose, atɛlɛmaki penepene mpo na kokɛngɛla ye.​—Exode 1:22–2:4.

Toyebi te soki Yokebede asalaki bongo mpo mwana mwasi ya Falo amona Mose ntango akendeke kosukola na ebale; kasi ezali yango nde esalemaki. Mwana mwasi ya Falo amonaki ete mwana yango azalaki mwana ya Moebele. Asalaki nini? Atosaki nde etinda ya Tata na ye mpe atindaki ete báboma mwana yango? Te, asalaki likambo oyo mwasi nyonso oyo azali na makanisi ya malamu asalaka. Ayokelaki ye mawa.

Mbala moko, Milyami apusanaki penepene na ye. Atunaki ye ete: “Olingi ete nakende kolukela yo monungisi kati na basi na Baebele ete anungisa mwana yango mpo na yo?” Bato mosusu bakamwaka likambo elekaki oyo elobelami na bavɛrsɛ oyo. Ndeko ya Mose abimisaki likanisi oyo ekesanaki mpenza na makanisi ya ‘kosala na mayele’ mpo na koboma bana ya Baebele oyo Falo na bapesi-toli na ye bazalaki na yango. Emonanaki ete Mose abikaki kaka ntango mwana mwasi ya Falo andimaki maloba ya Milyami. Mwana mwasi ya Falo alobaki na ye ete “kende!” mpe Milyami akendeki mbala moko kobenga mama na ye. Likambo ya kokamwa, bayokani ete Yokebede abɔkɔla mwana na ye na ndingisa ya mwana ya mokonzi.​—Exode 2:5-9.

Motema mawa ya mwana mwasi ya Falo ekeseni mpenza na motema mabe ya Tata na ye. Ayebaki malamu ntina oyo mwana wana azalaki na kati ya kitunga oyo babombaki na mai. Azwaki ye mpo abɔkɔla ye mpo ayokelaki ye mawa, mpe ndenge andimaki ete bázwela mwana monungisi ya Moebele elakisi mpenza ete azalaki kotyela bango makanisi mabe te lokola Tata na ye.

Kobɔkɔlama mpe koyekola na ye

Yokebede “akamataki mwana mpe anungisaki ye. Mwana akolaki mpe ye akendaki na ye epai ya mwana mwasi ya Falo mpe ye akómaki mwana na ye.” (Exode 2:9, 10) Biblia eyebisi te ntango boni Mose afandaki epai ya baboti na ye. Bato mosusu balobaka ete ekoki kozala afandaki tii ntango balongolaki ye na mabɛlɛ, elingi koloba ntango azalaki na mbula mibale to misato, kasi ekoki kozala ete atikalaki ntango molai koleka. Mokanda ya Exode elobi kaka ete “akolaki” na baboti na ye, mpe yango ekoki komonisa mpenza te soki akómaki na mbula boni. Ata soki ezalaki ndenge nini, ntango wana oyo mwana na bango azalaki na bango elongo, Amalama na Yokebede bayebisaki ye ete azali Moebele mpe bateyaki ye makambo ya Yehova. Eyaki koyebana nsima mpenza ete balonaki kondima mpe kolinga bosembo na motema ya mwana na bango.

Ntango bazongisaki ye epai ya mwana mwasi ya Falo, Mose ayaki kobɔkwama “na mayele nyonso ya Baezipito.” (Misala 7:22) Yango elingi koloba ete ateyamaki mpo ete mokolo mosusu azala na mikumba na bokonzi ya Ezipito. Na bakelasi ya Baezipito bazalaki koyekola makambo mingi lokola matematiki, jeometri, mayele ya kosala ndako mpe ya kotonga, mpe mayele mosusu ya siansi mpe misala ya ntɔki. Ntango mosusu, libota ya mokonzi elingaki ete ateyama mpe na lingomba ya Baezipito.

Ekoki mpenza kozala ete Mose ateyamaki makambo yango esika moko na bana mosusu oyo bazalaki na libota ya mokonzi. Na kati ya bato oyo balandaki mateya wana, ezalaki na “bana ya bakonzi ya bamboka mosusu oyo batindaki bango na Ezipito to oyo bakamataki na makasi mpo ete ‘báyekola’ mpe na nsima bázonga na bamboka na bango mpo bákende koyangela na nkombo ya Falo.” (The Reign of Thutmose IV, ya Betsy Bryan) Ekoki mpenza kozala ete biteyelo ya bana oyo etambwisamaki na ndako ya mokonzi nde ezalaki bisika oyo bazalaki kobongisa bilenge oyo bazalaki kokóma basali na ndako ya mokonzi.a Mikanda oyo ekomamá na ntango ya Bokonzi ya Ntei mpe Bokonzi ya Sika ya Ezipito emonisi ete basaleli mosusu ya Falo mpe bakonzi mosusu bazalaki na nkombo ya lokumu: “Mwana ya eteyelo ya bana” ata ntango bakómaki mikóló.

Bomoi na kati ya ndako ya mokonzi ezalaki komekama mpo na Mose. Kuna moto akokaki kozwa bomɛngo, biloko ya ntalo mingi, mpe nguya. Ezalaki mpe na makama mpo na bizaleli ya malamu. Mose alingaki kosala nini? Akozala sembo epai ya nani? Na motema na ye, azalaki mosambeli ya Yehova, ndeko ya Baebele oyo bazalaki konyokwama, to azalaki nde kosepela na makambo nyonso ya bopakano oyo ezalaki na Ezipito?

Ekateli monene

Ntango Mose akokisaki mbula 40, ntango mosusu asilaki kokóma Moezipito mpenza na makambo nyonso, ‘akendeki epai na bato na ye mpo atala ndenge bazalaki konyokwama.’ Makambo oyo asalaki na nsima emonisaki ete akendeki kaka te mpo na kotala mpamba; azalaki mpenza na mposa makasi ya kosalisa bango. Ntango amonaki Moezipito azali kobɛta Moebele moko, abomaki monyokoli yango. Likambo yango emonisaki ete motema ya Mose ezalaki epai ya bandeko na ye. Ntango mosusu moto oyo akufaki azalaki mokonzi mpe abomamaki ntango azalaki kosala mosala na ye. Na miso ya Baezipito, Mose asengelaki kozala sembo epai ya Falo mpo na nyonso oyo asalelaki ye. Kasi Mose asalaki makambo wana mpo alingaki bosembo, ezaleli oyo amonisaki lisusu mokolo oyo elandaki ntango apamelaki Moebele moko oyo azalaki kobɛta moninga na ye. Mose azalaki na mposa ya kosikola Baebele na boombo ya makasi, kasi ntango Falo ayokaki likambo oyo asalaki, alukaki koboma ye, mpe Mose akimaki na Midyani.​—Exode 2:11-15, NW; Misala 7:23-29.b

Ntango oyo Mose aponaki mpo na kosikola basaleli ya Nzambe na boombo ekokanaki te na oyo ya Yehova. Atako bongo, makambo asalaki emonisaki ete azalaki na kondima. Baebele 11:24-26 (NW) elobi ete: “Na kondima Mose, ntango akolaki, aboyaki kobengama mwana ya mwana mwasi ya Falo, koponáká konyokwama elongo na bato ya ekólo ya Nzambe na esika ya kozwa bosepeli ya ntango mokuse ya lisumu.” Asalaki bongo mpo na nini? Mpo ete “atalelaki nsɔni ya Klisto lokola bomɛngo monene koleka biloko ya motuya ya Ezipito; mpo azalaki kotala na likebi mpenza epai mbano ekofutama.” Ndenge oyo basaleli liloba “Klisto,” elingi koloba “mopakolami,” mpo na Mose ebongi mpenza na ye mpo na nsima, Yehova aponaki ye mpo na mokumba monene.

Kanisá naino! Mose abɔkwamaki ndenge bazalaki kobɔkɔla bana ya bakonzi ya Ezipito. Esika azalaki na yango na Ezipito, akokaki kozala na mosala moko ya lokumu mpe akokaki kozala na bisengo ya lolenge nyonso, kasi asundolaki yango nyonso. Mpo na ye, bomoi na ndako ya bokonzi ya Falo, monyokoli, eyokanaki te na bolingo oyo azalaki kolinga Yehova mpe boyengebene. Koyeba bilaka oyo Nzambe apesaki bankɔkɔ na ye Abalayama, Yisaka, na Yakobo mpe komanyola likoló na yango etindaki Mose apona kosepelisa Yehova. Lokola asalaki bongo, Yehova asalelaki Mose na mokumba moko ya lokumu mingi koleka mpo na kokokisa mikano na ye.

Biso nyonso tosengeli kopona makambo oyo eleki ntina. Lokola Mose, ntango mosusu osengeli kozwa ekateli ya monene. Osengeli kotika kosalela mimeseno mosusu to kosundola makambo mosusu ya kitoko, ata soki ezali mpasi mingi mpo osala yango? Soki ozali liboso ya makambo ya ndenge yango, kobosana te ete Mose amonaki ete boninga na ye na Yehova elekaki biloko nyonso ya motuya ya Ezipito, mpe ayokaki mawa ata mokolo moko te ndenge atikaki yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ekoki kozala ete koteyama yango ekokani na oyo Danyele na baninga na ye bazwaki mpo bákóma basali ya Leta na Babilone. (Danyele 1:3-7) Talá buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! mokapo 3, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Molende ya Mose mpo na boyengebene emonanaki lisusu ntango akɔtelaki bana basi oyo bazalaki kobatela mpate na Midyani, epai akimaki, ntango bazalaki na moto ya kosalisa bango te wana bazalaki konyokola bango.​—Exode 2:16, 17.

[Etanda na lokasa 11]

Mosala ya konungisa

Mingimingi, bamama bazalaki komɛlisa bana na bango moko mabɛlɛ. Kasi, Brevard Childs, moto moko ya mayele na Biblia, alobi boye na zulunalo moko (Journal of Biblical Literature) ete “mbala mosusu, na mabota ya bakonzi [na Moyen Orient] bazalaki kozwa monungisi oyo bazalaki kofuta ye mbongo. Bazalaki mpe kosala yango mingi soki mama ya mwana akokaki komɛlisa mwana na ye te, to soki mama ayebanaki te. Monungisi azalaki na mokumba ya kobɔkɔla mwana mpe komɛlisa ye mabɛlɛ na boumeli ya ntango oyo bayokanaki.” Bapapirise mingi oyo bakomaki bakɔntra mpo na mosala ya konungisa ezali tii lelo. Makomi yango ezali komonisa ete ezalaki likambo moko oyo Ba-Sumérien bazalaki kosala mingi tii na eleko ya Bagrɛki na Ezipito. Makambo oyo bakomá na mikanda yango ezali mingimingi maloba ya moto ya mosala mpe ya patrɔ, ntango oyo akosala mosala yango, ndenge oyo mosala ekosalema, makambo ya sikisiki mpo na bilei ya mwana, lomande moto akofuta soki akimi mosala liboso ete asilisa yango, lifuti, mpe ndenge nini lifuti ekopesama. Childs alobi ete mingimingi, “mosala ya konungisa ezalaki koumela mbula mibale to misato. Monungisi azalaki kobɔkɔla mwana na ndako na ye moko, kasi mbala na mbala esengelaki amema mwana epai ya baboti na ye mpo bátalatala ye soki azali malamu.”

[Bililingi na lokasa 9]

Mosala ya biliki na Ezipito ebongwaná mingi te kobanda na ntango ya Mose, ndenge oyo liyemi moko ya kala emonisi yango

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Likoló: Pictorial Archive (Histoire du Proche-Orient) Est.; na nse: Erich Lessing/Art Resource, NY

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto