Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 17 lok. 46-lok. 47 par. 2
  • Moize aponaki kosambela Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moize aponaki kosambela Yehova
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Eloko oyo eleki biloko ya motuya ya Ezipito
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Babikisi Moize
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Kondima ya baboti epesameli mbano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bayisraele bakómi baombo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 17 lok. 46-lok. 47 par. 2
Mwana ya Farao alɔkɔti Moize; Miriame azali kotala na pembeni

LITEYA 17

Moize aponaki kosambela Yehova

Na Ezipito, bana ya Yakobo bazalaki kobengama Bayisraele. Nsima ya liwa ya Yakobo mpe ya Yozefe, Farao mosusu akómaki koyangela. Abangaki mpo Bayisraele bazalaki se kokóma makasi koleka Baezipito. Na yango, akómisaki Bayisraele baombo. Atindaki bango básala babriki mpe apesaki bango mosala makasi ya bilanga. Kasi, wana Baezipito bazalaki kosalisa bango misala makasi na nko, Bayisraele mpe bazalaki se kokóma ebele. Lokola Farao alingaki bongo te, apesaki mitindo ete báboma bana nyonso ya mibali oyo Bayisraele bakobota. Kanisá ndenge Bayisraele bazalaki kobanga!

Moyisraele moko ya mwasi na nkombo Yokebede abotaki mwana mobali moko kitoko. Mpo na kobatela ye, atyaki ye na kitunga mpe abombaki ye na matiti pembeni ya Ebale Nile. Miriame, ndeko mwasi ya mwana yango, atɛlɛmaki pembeni wana mpo na kotala makambo oyo ekosalema.

Mwana mwasi ya Farao ayaki kosukola na ebale mpe amonaki kitunga yango. Ntango afungolaki yango, amonaki mwana azali kolela, mpe ayokelaki ye mawa. Miriame atunaki ye: “Nakende koluka mwasi moko oyo akoki komɛlisela yo mwana yango mabɛlɛ?’ Ntango mwana mwasi ya Farao andimaki, Miriame akendaki kobenga mama na bango, Yokebede. Mwana mwasi ya Farao alobaki na ye: ‘Zwá mwana oyo, mɛliselá ngai ye mabɛlɛ, mpe nakofuta yo.’

Moize akimi

Ntango mwana yango akolaki, Yokebede amemaki ye epai ya mwana mwasi ya Farao, oyo apesaki ye nkombo Moize mpe abɔkɔlaki ye lokola mwana na ye moko. Moize akolaki lokola mwana ya mokonzi mpe akokaki kozwa eloko nyonso oyo alingi. Kasi Moize abosanaki Yehova te. Ayebaki ete azalaki nde Moyisraele, kasi Moezipito te. Mpe aponaki kosalela Yehova.

Ntango akómaki na mbula 40, Moize alingaki kosalisa bandeko na ye. Ntango amonaki Moezipito moko azali kobɛta moombo moko ya Yisraele, abɛtaki Moezipito yango makasi, abomaki ye, mpe akundaki ye na zɛlo. Ntango Farao ayokaki likambo yango, alukaki koboma Moize. Moize akimaki na mokili ya Midiane. Kuna, Yehova abatelaki ye.

“Na kondima, Moize . . . aboyaki kobengama mwana ya mwana mwasi ya Farao, aponaki konyokwama elongo na bato ya Nzambe.”​—Baebre 11:24, 25

Mituna: Makambo nini bazalaki kosala Bayisraele na Ezipito? Mpo na nini Moize akimaki Ezipito?

Ebandeli 49:33; Kobima 1:1-14, 22; 2:1-15; Misala 7:17-29; Baebre 11:23-27

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto