Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/6 nk. 12-17
  • Salá likambo oyo basɛngaki na Mokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salá likambo oyo basɛngaki na Mokonzi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yekolá lokola mokonzi
  • Mokumba mpo na bakonzi mpe mpo na yo
  • Zwá litomba mpo na yo mpe mpo na basusu
  • Osepelaka na boyekoli na yo moko?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Bongisá ndenge na yo ya koyekola!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Tángá Liloba ya Nzambe mpe salelá ye kati na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/6 nk. 12-17

Salá likambo oyo basɛngaki na Mokonzi

“Akokoma mpo na ye mpenza kati na buku maloba ya Mobeko oyo . . . Yango ekozala na ye elongo mpe akotánga kati na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye.”​—DETERONOME 17:18, 19.

1. Ntango mosusu ekoki kosɛnga ete moklisto azala lokola nani?

EZALI mwa mpasi mpo okoka komitalela lokola mokonzi moko ya ekólo. Moklisto moko te oyo azali sembo mpe oyo ayekolaka Biblia akoki kokanisa ete abanda kosala makambo lokola mokonzi, ata mokonzi ya malamu lokola Davidi, Yosiya, Hizikiya to Yosafata. Kasi, ezali na likambo moko oyo okoki, to tóloba ete osengeli kosala lokola bakonzi yango. Likambo yango nini? Mpe mpo na nini osengeli kosala lokola bango na likambo yango?

2, 3. Likambo nini Yehova ayebaki liboso na ntina etali mokonzi, mpe mokonzi yango asengelaki kosala nini?

2 Na mikolo ya Mose, bambula mingi mpenza liboso Nzambe apona moto moko mpo azala mokonzi ya Bayisalaele, Nzambe ayebaki ete bato na Ye bakokóma na mposa ya mokonzi. Yango wana, atindaki Mose akoma malako mpo na mokumba yango na kati ya kondimana ya Mibeko. Ezalaki malako to toli mpo na mokonzi.

3 Nzambe alobaki boye: “Wana ekokóma yo na mokili oyo [Yehova] Nzambe na yo apesi na yo, . . . mpe na ntango yango ekoloba yo ete, Nalingi kotyela ngai mokonzi, [ndenge moko] na mabota mazingeli ngai; okokoka solo komityela lokola mokonzi ye oyo [Yehova] Nzambe akopona. . . . Wana ekofanda ye na kiti ya bokonzi na ye, akokoma mpo na ye mpenza kati na buku maloba ya Mobeko oyo . . . Yango ekozala na ye elongo mpe akotánga kati na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye, ete ayekola [kobanga Yehova, NW] Nzambe na ye na kotosa maloba nyonso ya lilako oyo mpe ya mibeko oyo, mpe na kosala yango.”​—Deteronome 17:14-19.

4. Malako nini Nzambe apesaki mpo na bakonzi?

4 Mokonzi oyo Yehova akopona mpo na basambeli na ye asengelaki kokoma makambo oyo ezali na Biblia oyo ozali na yango. Na nsima, mokonzi asengelaki kotángaka yango mokolo na mokolo. Ezalaki te mpo akanga makambo yango na motó. Asengelaki nde koyekola mpe ezalaki mpo na mokano ya malamu. Mokonzi oyo Yehova akondima asengelaki koyekolaka ndenge wana mpo na kozwa mpe kobatela makanisi oyo ebongi. Asengelaki mpe koyekola makomi mapemami mpo azala mokonzi ya malamu mpe ya bososoli.​—2 Mikonzi 22:8-13; Masese 1:1-4.

Yekolá lokola mokonzi

5. Mikanda nini ya Biblia oyo Davidi asengelaki kokoma mpe kotángaka makambo na yango, mpe azalaki koyoka ndenge nini na motema na ye ntango azalaki kosala yango?

5 Na makanisi na yo, ntango Davidi akómaki mokonzi ya Yisalaele, likambo yango esɛngaki ye asala mosala nini? Esengelaki ete akoma makambo oyo ezali na mikanda oyo: Genese, Exode, Levitike, Mituya, Deteronome. Kanisá ndenge oyo Davidi azalaki koyoka na makanisi mpe na ye ntango azali kosalela miso mpe mabɔkɔ na ye mpo na kokoma makambo oyo ezali na kati ya Mibeko. Ekoki mpe kozala ete Mose nde akomaki mokanda ya Yobo mpe Nzembo 90 na 91. Boye, Davidi akomaki mpe makambo oyo ezali na mikanda yango? Ekoki kozala bongo. Lisusu, ekoki mpe kozala ete azalaki na mokanda ya Yosua, ya Basambisi mpe ya Luta. Omoni ete Mokonzi Davidi azalaki na ebele ya mikanda ya Biblia oyo asengelaki kotángaka mpe kosimba makambo na yango. Okoki mpenza kokanisa ete asalaki ndenge yango, mpamba te soki otángi na Nzembo 19:7-11, okomona maloba oyo alobaki mpo na Mibeko ya Nzambe.

6. Nini ezali kondimisa biso ete Yesu azalaki kosepela na Makomami lokola nkɔkɔ na ye Davidi?

6 Yesu, ye oyo abengami Mwana ya Davidi mpe Davidi Monene, alandaki mpe ndakisa yango. Pɔsɔ na pɔsɔ, Yesu azalaki na momeseno ya kokende na sinagoga ya mboka na bango. Kuna, azalaki koyoka ntango bazali kotánga Makomami mpe kolimbola yango. Kutu, mokolo mosusu Yesu ye moko atángelaki bato Liloba ya Nzambe na mongongo makasi mpe alimbolaki yango. (Luka 4:16-21) Ezali mpasi te mpo na komona ete Yesu ayebaki mpenza Makomami. Tángá kaka Baevanzile mpe talá mbala boni Yesu alobaki ete “ekomami ete” to maloba mosusu mpo na kolobela bavɛrsɛ ya Makomami. Na ndakisa, evanzile ya Matai emonisi ete ntango asalaki Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu azongelaki mbala 21 makambo oyo ezali na Makomami ya Liebele.​—Matai 4:4-10; 7:29; 11:10; 21:13; 26:24, 31; Yoane 6:31, 45; 8:17.

7. Na makambo nini Yesu akesanaki na bakonzi ya mangomba?

7 Yesu alandaki toli ya Nzembo 1:1-3: “Esengo ezali na moto oyo aboyi [kolanda] toli ya bato ya mabe, . . . kasi mposa na ye ezali kati na Mobeko ya [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi. . . . Nyonso ekosalaka ye ebongi.” Yesu akesanaki mpenza na bakonzi ya mangomba ya ntango na ye, baoyo ‘bafandaki na kiti ya Mose’ kasi bazalaki kolanda “Mobeko ya Yehova” te!​—Matai 23:2-4.

8. Mpo na nini bakonzi ya mangomba ya Bayuda oyo bazalaki kotánga mpe koyekola Biblia bazalaki kosala mosala ya mpunda?

8 Kasi, bato mosusu bakoki kokamwa na ntango batángi vɛrsɛ moko boye ya Biblia; vɛrsɛ yango ezali komonisa lokola nde Yesu apekisaki bato koyekola Biblia. Na Yoane 5:39, 40, tozali kotánga maloba oyo Yesu alobaki na bato mosusu ya ntango na ye: “Bozali kolukaluka kati na [Makomami, NW] mpo ete bobanzi ete na yango bokozwa bomoi ya seko. Mpe ezali yango mpenza etatoli mpo na ngai. Kasi bolingi koya epai na ngai te ete bózala na bomoi.” Soki Yesu alobaki bongo ezalaki te mpo na kopekisa Bayuda oyo bazalaki koyoka ye ete báyekolaka Makomami te. Azalaki nde komonisa ete bazali sembo te mpe makambo na bango ezali bongolabongola. Bayebaki ete Makomami ekokaki kolakisa bango nzela ya bomoi ya seko, kasi kaka Makomami yango oyo bazalaki koyekola esengelaki mpe komema bango epai na Masiya, Yesu. Kasi, bato yango baboyaki kondima ye. Yango wana, koyekola na bango ezalaki mosala ya mpunda mpamba te bazalaki sembo te, bazalaki mitó makasi.​—Deteronome 18:15; Luka 11:52; Yoane 7:47, 48.

9. Ndakisa malamu nini bantoma na basakoli ya kala batikaki?

9 Bato yango bakesanaki mpenza na bayekoli ya Yesu, na bantoma na ye! Bango bazalaki koyekola “makomi mosantu, oyo ekoki kopesa [moto] bwanya mpo na lobiko.” (2 Timote 3:15, NW) Na likambo yango, basalaki lokola basakoli ya ntango ya kala oyo bazalaki “kolukaluka na molende mpe koyekola malamumalamu.” Basakoli wana bazalaki te kotalela boyekoli yango lokola likambo oyo basengelaki komipesa na yango kaka na boumeli ya mwa basanza to mbula moko. Ntoma Petelo alobaki ete “batikaki te kolukaluka,” mingimingi makambo etali Klisto mpe nkembo oyo esanganaki na mokumba na ye ya kobikisa bato. Na mokanda na ye ya liboso, Petelo azongelaki mbala 34 makambo oyo ezali na mikanda zomi ya Biblia.​—1 Petelo 1:10, 11, NW.

10. Mpo na nini mokomoko na biso asengeli kosepela koyekola Biblia?

10 Sikoyo, tomoni polele ete bakonzi na Yisalaele ya kala bazalaki na mokumba ya koyekola mpenza Liloba ya Nzambe. Yesu mpe asalaki ndenge yango. Bato oyo mpe bakozala bakonzi elongo na Klisto na likoló bamipesaki na koyekola Liloba ya Nzambe. (Luka 22:28-30; Baloma 8:17; 2 Timote 2:12; Emoniseli 5:10; 20:6) Lelo oyo, likambo oyo basɛngaki bakonzi básala ezali mpe na ntina mpo na bato oyo bazali kolikya kozwa mapamboli awa na mabele oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela.​—Matai 25:34, 46.

Mokumba mpo na bakonzi mpe mpo na yo

11. (a) Momeseno nini ya mabe moklisto akoki kokóma na yango na likambo etali koyekola? (b) Mituna nini ebongi tómituna?

11 Tokoki koloba na kondima nyonso mpe na bosembo mpenza ete moklisto mokomoko ya solo asengeli koyekolaka Biblia. Yango ezali kaka te likambo ya kosala yango na ebandeli ntango obandi koyekola na Batatoli ya Yehova. Mokomoko na biso asengeli kozwa mokano ya kozala te lokola bato mosusu na ntango ya ntoma Paulo oyo, nsima ya ntango, batikaki koyekola bango moko. Bayekolaki “makambo mikemike ya maloba mosantu ya Nzambe,” na ndakisa “mateya ya ebandeli na ntina na Klisto.” Kasi, batikaki koyekola mpe ‘bakendaki liboso te tii na kokɔmela.’ (Baebele 5:12–6:3, NW) Yango wana, tokoki komituna mituna oyo: ‘Ndenge nini natalelaka likambo ya koyekola Liloba ya Nzambe ngai moko, ata soki nazali moto ya sika na lisangá ya boklisto to naumeli bambula ebele? Paulo abondelaki mpo ete baklisto na mikolo na ye bálanda “kokola na boyebi ya solosolo ya Nzambe.” Namonisaka ete ngai mpe nazalaka na mposa yango?’​—Bakolose 1:9, 10, NW.

12. Mpo na nini kolinga Liloba ya Nzambe ntango nyonso ezali na ntina?

12 Mpo na kokóma na momeseno malamu ya koyekola esengeli liboso kolinga Liloba ya Nzambe. Nzembo 119:14-16 emonisi ete kokanisa Liloba ya Nzambe ntango nyonso mpe na mokano malamu nde nzela oyo ekoki kosalisa moto alinga yango. Ezali bongo, ata soki moto azali moklisto banda kala to te. Mpo na komona ete ezali mpenza bongo, kanisá lisusu Timote. Atako azalaki nkulutu mpe azalaki kosala lokola “soda malamu ya Klisto Yesu,” Paulo alendisaki ye asala nyonso oyo ekokaki na ye mpo na “koteya liloba ya solo na ndenge esengeli.” (2 Timote 2:3, 15, NW; 1 Timote 4:15, NW) Ezali polele ete ‘kosala oyo ekoki’ na yo ezali kosɛnga kozala na momeseno malamu ya koyekola.

13. (a) Ndenge nini moto akoki kobakisa ntango mosusu mpo na koyekola Biblia? (b) Makambo nini okoki kotalela lisusu mpo na kozwa ntango ya koyekola?

13 Mpo na kokóma na momeseno malamu ya koyekola esengeli kobombaka ntango mpo na koyekola Biblia. Osalaka ndenge nini na likambo yango? Ata soki eyano na yo ezali nini na motuna yango, okanisi mpenza ete okoki kozwa litomba soki obakisi lisusu ntango oyo okoki kosalela na koyekola yo moko? Kasi, okoki komituna ete ‘Ndenge nini nakoki kozwa ntango mpo na koyekola?’ Bato mosusu, mpo na kobakisa ntango ya koyekola Biblia malamu koleka, bakómá kolamuka ntɔngɔntɔngɔ. Mbala mosusu bazwaka miniti 15 mpo na kotánga Biblia to koyekola makambo mosusu ya elimo. Likanisi mosusu ezali ya kotalela soki okoki kobongola mwa moke programɛ na yo ya pɔsɔ. Na ndakisa, soki otángaka zulunalo mikolo mingi to mpe olandaka bansango na televizyo na mpokwa, okoki te kopona mokolo moko na pɔsɔ oyo okobanda kosala makambo yango te? Okoki kosalela ntango wana mpe kobakisa yango na ntango na yo ya koyekola Biblia. Soki olongoli mokolo moko ya pɔsɔ ete olandaka bansango te mpe osaleli miniti 30 mpo na koyekola, na mbula moko okobakisa ngonga koleka 25 na ntango na yo ya koyekola. Kanisá ebele ya matomba oyo okoki kozwa soki obakisi ngonga 25 na ntango oyo olekisaka na kotánga to koyekola Biblia! Likanisi mosusu yango oyo: Na boumeli ya pɔsɔ oyo ezali koya, na nsuka ya mokolo mokomoko, meká naino kotalela makambo oyo okosala na boumeli ya mokolo yango. Talá soki okoki komona likambo moko oyo okoki kotika yango to kokitisa bangonga oyo olekisaka na kosala yango mpo okoka kozwa ntango mosusu mpo na kotánga to koyekola Biblia.​—Baefese 5:15, 16.

14, 15. (a) Mpo na nini komityela mikano ezali na ntina mingi na boyekoli ya moto ye moko? (b) Mikano nini moto akoki komityela mpo na botángi ya Biblia?

14 Eloko nini ekoki kosalisa yo mpo ete boyekoli ezala te lokola kilo na motó na yo mpe esepelisa yo mingi? Ezali nde mikano. Mikano nini ya malamu okoki komityela na ntina etali koyekola? Mpo na bato mingi, mokano ya malamu oyo bamityelaka liboso ezali ya kotánga Biblia mobimba. Mbala mosusu osilá kotánga mikapo mosusu ya Biblia mpe ozwelaki yango litomba. Sikoyo, okoki nde komityela mokano ya kotánga Biblia mobimba? Okoki kobanda na mokano ya kotánga Baevanzile nyonso minei; na nsima, okoki komityela mokano ya kotánga mikanda nyonso oyo etikali ya Makomami ya Grɛki. Ntango okoyoka esengo na yango mpe okomona matomba na yango, okoki kozwa mokano ya kotánga mikanda ya Mose mpe mikanda ya masolo ya kala tii na mokanda ya Esetele. Soki osali yango, okomona ete ekozala lisusu mpasi te mpo otánga mikanda oyo etikali mpo na kosilisa Biblia mobimba. Mwasi moko azalaki na mbula 65 ntango akómaki moklisto; akomaki na kati ya ezipeli ya Biblia na ye dati oyo abandaki kotánga Biblia mpe na nsima akomaki dati oyo asilisaki yango. Lelo oyo, asili kotánga Biblia mbala mitano! (Deteronome 32:45-47) Lisusu, na esika atángaka yango na kati ya ordinatɛrɛ, azalaki nde kosimba Biblia na mabɔkɔ na ye.

15 Bato mosusu oyo basilá kokokisa mokano ya kotánga Biblia mobimba bamityelaka mikano mosusu mpo bákoka koyekola makambo ya sika mpe boyekoli na bango ememela bango matomba mingi koleka. Moto akoki, na ndakisa, koluka naino makambo mosusu etali mokanda moko ya Biblia liboso atánga yango, mpe akobanda kosala bongo mpo na mokanda mokomoko. Na buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba” mpe buku Étude perspicace des Écritures, okoki koyeba makambo ya malamu mpenza mpo na mokanda mokomoko ya Biblia, na ndakisa makambo oyo ezalaki ntango mokanda yango ezalaki kokomama, lolenge oyo bakomaki yango mpe matomba oyo moto akoki kozwa na mokanda yango.a

16. Mpo na koyekola Biblia, tosengeli kolanda te ndakisa ya banani?

16 Ntango ozali koyekola, kosala te lokola bato mingi oyo babengamaka ete bato ya mayele na Biblia. Bato yango batyaka makanisi na bango mingi na koyekola makomi lokola nde Biblia ezali mokanda ya bato. Bamosusu balukaka koyeba soki mokanda mokomoko ekomamaki mpo na banani to mpe balukaka mokano mpe makanisi nini moto oyo akomaki mokanda mokomoko azalaki na yango. Makanisi ya ndenge wana ekoki kotinda moto na kotalela Biblia lokola kaka mokanda ya masolo ya kala to kotalela masolo na yango lokola nde ezali kaka komonisa ndenge oyo losambo ezalaki na bileko mosusu mpe ndenge oyo ezalaki kobongwana. Bato mosusu ya mayele bamipesaka mingi nde na koyekola maloba, na ndakisa ndenge oyo maloba oyo ezali na mikanda ya Biblia ebandaki mpe ndenge oyo ezalaki kosalelama na bileko ndenge na ndenge. Bamipesaka mingi na koyekola ndenge oyo liloba boye to boye ebandaki mpe balobelaka mingi bandimbola ya maloba yango na Liebele mpe na Grɛki na esika ya koluka ndimbola ya nsango ya Nzambe. Okanisi mpenza ete koyekola ndenge wana ekoki kopesa moto kondima makasi oyo ekotinda ye na misala?​—1 Batesaloniki 2:13.

17. Mpo na nini tosengeli kotalela Biblia lokola mokanda oyo ezali na nsango mpo na bato nyonso?

17 Makanisi ya bato wana ya mayele ezali nde malamu? Ezali solo ete mokanda mokomoko ya Biblia ezali na likanisi ya moboko kaka moko to ekomamaki kaka mpo na lolenge moko boye ya bato? (1 Bakolinti 1:19-21) Mikanda ya Liloba ya Nzambe esilaka ngala te ezala mpo na bilenge to mikóló, babola to bazwi, bato oyo batángá mingi to baoyo batángá mingi te. Ata soki mokanda moko boye, na ebandeli batindaki yango epai ya moto moko, na ndakisa Timote to Tito, to etuluku moko ya bato, lokola Bagalatia to Bafilipi, biso nyonso tokoki, to mpe, tosengeli koyekola yango. Mikanda yango ezali na ntina mpo na mokomoko na biso, mpe mokanda moko ekoki kozala na mitó ya makambo mingi mpe bato ndenge na ndenge bakoki kozwela yango litomba. Nsango ya Biblia ezali mpo na bato nyonso; likambo yango nde ezali kosalisa biso tókanga ntina oyo ebongolami na minɔkɔ ya bato ya mokili mobimba.​—Baloma 15:4.

Zwá litomba mpo na yo mpe mpo na basusu

18. Ntango ozali kotánga Liloba ya Nzambe, mituna nini osengeli komituna?

18 Na boyekoli na yo ya Biblia, okozwa litomba mingi soki ozali koluka kokanga ntina ya makambo mpe soki ozali koluka koyeba boyokani oyo ezali kati na makambo ndenge na ndenge. (Masese 2:3-5; 4:7) Makambo oyo Yehova amonisi na kati ya Liloba na ye ezali na boyokani mpenza na mokano na ye. Yango wana, ntango ozali kotánga Biblia, meká koyokanisa makambo na yango mpe toli na yango na mokano ya Nzambe. Okoki koluka boyokani nini ezali kati na likambo moko, likanisi moko, to esakweli moko mpe mokano ya Yehova. Omituna mituna oyo: ‘Likambo oyo ezali koteya ngai nini mpo na Yehova? Ezali na boyokani nini na mokano ya Nzambe oyo azali kokokisa yango na nzela ya Bokonzi na ye?’ Okoki mpe komituna: ‘Ndenge nini nakoki kosalela likambo oyo? Nakoki kosalela yango na ntango nakoteya to na ntango nakopesa basusu toli oyo euti na Makomami?’​—Yosua 1:8.

19. Nani akozwa litomba soki ozali koyebisa bato mosusu makambo oyo oyekoli? Limbolá.

19 Kokanisa bato mosusu ezali mpe na litomba mosusu. Ntango ozali kotánga mpe koyekola Biblia, okoyeba makambo ya sika mpe yango ekobakisela yo mayele. Meká kolobela makambo yango ntango bozali kosolola masolo ya kolendisa na kati ya libota na bino to na bato mosusu. Soki ozali kolobela makambo yango na ntango oyo ebongi mpe na elimo ya komilakisa te, na ntembe te masolo yango ekozala na litomba. Ntango ozali kolobela na bosembo mpe na esengo makambo oyo oyekolaki to makambo oyo esepelisaki yo, yango ekobenda mpenza bato mosusu. Lisusu, ekozala na litomba mingi mpo na yo moko. Na ndenge nini? Bato ya mayele bayekoli ete moto abombaka ntango molai makambo oyo ayekoli to atángi soki, ntango ezali naino sika na bɔɔngɔ na ye, azali kosalela to kozongela yango, na ndakisa ntango azali koyebisa yango bato mosusu.b

20. Mpo na nini kozongela kotánga Biblia mbala na mbala ezali na litomba?

20 Na ntembe te, mbala nyonso oyo otángi mokanda moko ya Biblia tii na nsuka, okoyeba makambo ya sika. Yo moko okokamwa ndenge oyo okoyeba ndimbola ya bavɛrsɛ mosusu oyo ozalaki kokanga ntina na yango te. Yango esengeli kondimisa yo ete mikanda ya Biblia ezali kaka te mikanda oyo bato bakomaki, kasi ezali na bozwi monene oyo ebongi oyekolaka yango mbala na mbala mpe ozwela yango litomba. Kobosana te ete mokonzi, lokola Davidi, asengelaki ‘kotángaka kati na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye.’

21. Okoki kolikya kozwa mbano nini soki omipesi mingi lisusu na koyekola Liloba ya Nzambe?

21 Ya solo, baoyo bazwaka ntango ya koyekola Biblia malamumalamu bazwaka matomba mingi mpenza. Bakómaka na bozwi mpe bososoli ya elimo. Boninga na bango na Nzambe ekómaka makasi koleka. Bakómaka mpe na ntina mingi na kati ya mabota na bango, na miso ya bandeko na lisangá ya boklisto mpe na miso ya bato oyo bakómi naino basambeli ya Yehova te.​—Baloma 10:9-14; 1 Timote 4:16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mikanda yango esalisaka moto mpo na koyekola Biblia, ebimisami na Batatoli ya Yehova mpe ezali na minɔkɔ mingi.

b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1993, nkasa 13-14.

Ozali koyeba lisusu?

• Bakonzi ya Yisalaele basengelaki kosalaka likambo nini?

• Yesu na bantoma na ye bapesaki ndakisa nini na likambo ya koyekola Biblia?

• Makambo nini okoki kobongola mpo na kozwa ntango mingi lisusu ya koyekola yo moko?

• Osengeli kotalela boyekoli ya Liloba ya Nzambe na makanisi ya ndenge nini?

[Etanda na lokasa 15]

“Na mabɔkɔ na biso”

“Soki tolingi . . . koluka maloba ya Biblia, esaleli oyo eleki malamu ezali Internet. Kasi, soki tolingi kotánga Biblia, koyekola yango, mpe kokanisa likoló na yango, tosengeli kosimba yango na mabɔkɔ na biso, mpo yango nde lolenge kaka moko ya kosala mpo na kokɔtisa yango na makanisi mpe na mitema na biso.”​—Gertrude Himmelfarb, professeur émérite na City University, na New York.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto