Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/6 nk. 17-22
  • Yekolá mpe teyá bizaleli malamu ya boklisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yekolá mpe teyá bizaleli malamu ya boklisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini yo moko osengeli komiteya?
  • Teyá bizaleli malamu ya boklisto
  • Yekolá mpo na koteya
  • Okebaka ntango nyonso na mateya na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Bwanya ya mokili oyo” ebungisa yo nzela te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Tómekola Yesu—Tóteyaka na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/6 nk. 17-22

Yekolá mpe teyá bizaleli malamu ya boklisto

“Nzokande, yo moto ozali koteya moto mosusu, omiteyaka yo moko te?”​—BALOMA 2:21, NW.

1, 2. Mpo na bantina nini osengeli koyekola Biblia?

EZALI na bantina ebele oyo osengeli koyekola Liloba ya Nzambe. Ntango mosusu okoki koluka koyeba makambo oyo yango ezali kolobela, na ndakisa bato, makambo oyo esalemá, bisika mpe makambo mingi mosusu. Okoki mpe koluka koyeba mateya ya solo, bokeseni na yango na mabunga oyo mangomba eteyaka, na ndakisa Bosato to lifelo ya mɔ́tɔ. (Yoane 8:32) Osengeli mpe koluka koyeba Yehova malamu mpenza mpo okoka mpenza kokóma na bizaleli lokola oyo ya ye mpe kotambola na bosembo liboso na ye.​—1 Mikonzi 15:4, 5.

2 Ntina mosusu monene eyokani na oyo tolobeli oyo osengeli koyekola Liloba ya Nzambe ezali mpo na kozwa makoki ya koteya bato mosusu, ezala bandeko, baninga, bato oyo oyebani na bango, ata mpe bato oyo oyebi naino bango te. Mpo na baklisto, yango ezali te likambo oyo bakoki kosala soki bango moko balingi. Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.”​—Matai 28:19, 20, NW.

3, 4. Mpo na nini koteya ndenge Yesu atindaki ezali lokumu mpo na yo?

3 Koyekola Biblia na mokano ya koteya bato mosusu ezali likambo ya lokumu mpe moto akoki kozwela yango esengo mingi. Banda kala, mosala ya koteya ezalaka mosala ya lokumu. Buku moko (Encarta Encyclopedia) elobi boye: “Epai ya Bayuda, mikóló mingi bazalaki kotalela balakisi lokola bato oyo bazalaki kolakisa nzela ya lobiko mpe bazalaki kosɛngisa bana ete bákumisa balakisi na bango koleka kutu baboti na bango.” Ezali mpenza lokumu mpo na baklisto soki bazali koyekola Biblia mpo na komiteya, mpe na nsima koteya bato mosusu.

4 “Bato oyo basalaka mosala ya molakisi bazali mingi koleka bato oyo basalaka mosala mosusu nyonso. Na mokili mobimba, mibali na basi pene na milio 48 bazali balakisi.” (The World Book Encyclopedia) Na mokili, molakisi azali moto oyo azali na mokumba ya koteya bana mpe mateya na ye ekoki kobongola bango mpe kotambwisa bango na boumeli ya bambula mingi oyo ekolanda. Nzokande, mateya ya moto oyo azali kolanda etinda oyo Yesu apesaki, ya koteya basusu, esalaka mosala monene koleka oyo wana; mateya na ye ekoki kobongola mpe kotambwisa bomoi ya bato mpo na libela. Ntoma Paulo amonisaki yango ntango apesaki Timote toli oyo: “Kebá ntango nyonso mpo na yo moko mpe mpo na mateya na yo. Kangamá na makambo yango, mpamba te na kosaláká bongo okobikisa na yo moko na baoyo bazali koyoka yo.” (1 Timote 4:16, NW) Ya solo, koteya na yo ekoki kobikisa.

5. Mpo na nini koteya ya baklisto eleki koteya mosusu nyonso?

5 Komiteya yo moko mpe na nsima koteya bato mosusu ezali mosala oyo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba apesi nzela na yango mpe ye moko azali kotambwisa yango. Ezali mpo na yango nde koteya wana eleki koteya mosusu nyonso ya mokili, ezala koteya mateya ya ebandeli, ezala mayele ya mosala, to mpe mayele ndenge na ndenge ya monganga. Koteya ya moklisto esɛngaka ete moyekoli ayekola kolanda ndakisa ya Mwana ya Nzambe, Yesu Klisto, mpe ateya bato mosusu básala mpe ndenge yango.​—Yoane 15:10.

Mpo na nini yo moko osengeli komiteya?

6, 7. (a) Mpo na nini biso moko tosengeli libosoliboso komiteya? (b) Na makambo nini Bayuda ya ekeke ya liboso babongaki kozala bateyi te?

6 Mpo na nini balobi ete biso moko tosengeli komiteya liboso? Mpamba te tokoki te koteya bato mosusu malamu soki biso moko tomiteyi naino te. Paulo amonisaki yango na mituna ya ntina mingi oyo atunaki Bayuda na ntango wana, kasi ezali mpe na ntina mingi mpo na baklisto lelo oyo. Paulo atunaki boye: “Nzokande, yo moto ozali koteya moto mosusu, omiteyaka yo moko te? Yo moto ozali kosakola ete ‘Koyiba te,’ oyibaka? Yo, moto ozali koloba ete ‘Kosala ekobo te,’ osalaka ekobo? Yo, moto ozali koyina bikeko, ozwaka na makasi biloko ya batempelo? Yo, moto ozali komikumisa mpo na mibeko, oyokisaka Nzambe nsɔni na kobukáká Mibeko?”​—Baloma 2:21-23, NW.

7 Na nzela ya mituna, Paulo atángaki makambo mibale ya mabe oyo Mibeko Zomi elobelaki: Koyiba te mpe kosala ekobo te. (Exode 20:14, 15) Bayuda mosusu na ntango ya Paulo bazalaki komikumisa ete bazalaki na Mibeko ya Nzambe. ‘Balakisaki bango na monɔkɔ na kati ya Mibeko mpe bandimaki mpenza ete bazali batambwisi ya bato bakufá miso mpe pole mpo na baoyo bazali na kati ya molili, bateyi ya bana mike.’ (Baloma 2:17-20, NW) Nzokande, bamosusu bazalaki bakosi, mpamba te, bazalaki koyiba to kosala ekobo na kobombana. Yango ezalaki kobebisa lokumu ya Mibeko yango moko mpe ya Moto oyo azali na likoló oyo apesaki yango. Omoni ete bato wana babongaki te mpo na koteya bato mosusu; bango moko bazalaki komiteya te.

8. Ekoki kozala na ndenge nini Bayuda mosusu na mikolo ya Paulo bazalaki ‘kozwa na makasi biloko ya batempelo’?

8 Paulo alobaki likambo ya kozwa na makasi biloko ya batempelo. Bayuda mosusu basalaki mpenza likambo wana? Paulo alingaki mpenza koloba nini? Lokola vɛrsɛ yango elobi likambo yango na molai te, tokoki mpenza te koloba na kondima nyonso ndenge oyo Bayuda mosusu ‘bazalaki kozwa na makasi biloko ya batempelo.’ Mwa bambula liboso, mokomi ya engumba Efese alobaki ete baninga ya Paulo bazalaki ‘miyibi ya batempelo’ te; maloba wana ezali komonisa ete ezalaki na bato mosusu oyo bazalaki kokanisa ete Bayuda bazalaki kosala likambo wana. (Misala 19:29-37) Toyebi te soki Bayuda yango bazalaki kosalela bango moko to kotɛkisa biloko ya motuya oyo eutaki na batempelo ya bapakano oyo basoda ya bamboka mopaya to bandimi ya mangomba oyo bazalaki na molende mabe bapunzaki. Mibeko ya Nzambe elobaki ete esengeli kobebisa wolo mpe palata ya bikeko, ebongaki te kosalela yango. (Deteronome 7:25)a Boye, ekoki kozala ete Paulo azalaki kolobela Bayuda oyo bazalaki kobuka mobeko wana ya Nzambe mpe bazalaki kosalela biloko oyo eutaki na batempelo ya bapakano to mpe bazalaki kotɛkisa yango.

9. Wapi misala ya mabe oyo ezalaki kosalema na tempelo ya Yelusaleme oyo ekoki kotalelama lokola kozwa na makasi biloko ya tempelo?

9 Josèphe alobelaki mpe likambo moko ya nsɔni oyo Bayuda minei basalaki na Loma, mokonzi na bango azalaki molakisi ya Mibeko. Bato yango minei bandimisaki mwasi moko Moloma oyo azalaki prozelite, elingi koloba moto ya ekólo mosusu oyo akɔtaki na Lingomba ya Bayuda, apesa bango wolo mpe biloko mosusu ya valɛrɛ lokola likabo mpo na tempelo ya Yelusaleme. Nsima ya kozwa biloko yango, basalelaki yango bango moko; yango mpe ezali lokola kozwa na makasi biloko ya tempelo.b Tokoki mpe koloba ete bato mosusu bazalaki kozwa na makasi biloko ya tempelo ya Nzambe na ndenge bazalaki kopesa banyama ya mabe lokola mbeka mpe na ndenge bazalaki kosala mombongo ya lokoso na tempelo, bakómisaki tempelo “libulu ya bayibi.”​—Matai 21:12, 13; Malaki 1:12-14; 3:8, 9.

Teyá bizaleli malamu ya boklisto

10. Likanisi nini ya ntina tosengeli kobosana te na maloba ya Paulo oyo ezali na Baloma 2:21-23?

10 Ata soki koyiba, kosala ekobo mpe kozwa na makasi biloko ya batempelo oyo Paulo alobelaki ezalaki na ndenge nini, tóbosana te likanisi ya ntina na maloba na ye. Atunaki boye: “Nzokande, yo moto ozali koteya moto mosusu, omiteyaka yo moko te?” Tozali komona ete bandakisa oyo Paulo alobeli etaleli bizaleli malamu. Awa, ntoma Paulo alobelaki te mateya ya Biblia to mpe masolo ya kala. Paulo alobelaki nde komiteya mpe koteya bato mosusu bizaleli malamu ya boklisto.

11. Mpo na nini osengeli kotya makanisi na bizaleli malamu ya boklisto ntango ozali koyekola Liloba ya Nzambe?

11 Mpo tólanda liteya ya Baloma 2:21-23 ezali kosɛnga ete tóyekola bizaleli malamu ya boklisto na kati ya Liloba ya Nzambe, tósalela makambo oyo tozali koyekola, mpe na nsima tóteya bato mosusu ete básala mpe ndenge yango. Yango wana, ntango ozali koyekola Biblia, luká koyeba mitinda ya Yehova mpo na bizaleli malamu oyo baklisto ya solo basengeli kozala na yango. Kanisá malamu toli mpe mateya oyo ozali komona na Biblia. Na nsima, kobanga te mpo na kosalela makambo oyo ozali koyekola. Yango ezali kosɛnga mpiko mpe ekateli makasi. Ezali mpasi te mpo bato ya kozanga kokoka bábanda kokanisa makambo to bantina oyo, na likambo moko boye, bango bakoki te to mpe basengeli te kolanda ezaleli malamu oyo esɛngami na baklisto. Ekoki kozala ete Bayuda oyo Paulo alobeli bazalaki na mayele mabe wana ya koluka ndenge ya kolongisa mabe na bango to mpe kokosa bato mosusu. Kasi, maloba ya Paulo emonisi ete esengeli te kokakola to kobwaka pembeni bizaleli malamu ya boklisto.

12. Ndenge nini etamboli malamu ekumisaka Yehova Nzambe to mpe etamboli mabe ebebisaka lokumu na ye, mpe mpo na nini ezali malamu tóbosanaka likambo yango te?

12 Ntoma Paulo amonisaki ntina monene oyo osengeli koyeba bizaleli malamu ya boklisto oyo ezali na Biblia mpe na nsima kosalela yango. Etamboli mabe ya Bayuda ezalaki nsɔni mpo na Yehova: “Yo, moto ozali komikumisa mpo na mibeko, oyokisaka Nzambe nsɔni na kobukáká Mibeko? Mpo ‘nkombo ya Nzambe ezali kotukama mpo na bino na kati ya bikólo mosusu.’” (Baloma 2:23, 24, NW) Ndenge moko mpe, soki tozali kobosana bizaleli malamu ya boklisto, tozali nde kobebisa lokumu ya Mopesi na yango. Nzokande, soki tokangami na mitinda ya Nzambe, tozali kokumisa ye. (Yisaya 52:5; Ezekiele 36:20) Ntango ozali koyeba likambo yango ekoki kolendisa ekateli na yo soki okutani na komekama to makambo mosusu oyo, mpo na yango, kotosa mitinda ya boklisto te ekoki komonana lokola nzela ya mokuse to ya pɛtɛɛ. Maloba ya Paulo ezali mpe koteya biso likambo mosusu. Longola likambo ya koyeba ete etamboli na yo ekoki kokumisa Nzambe to koyokisa ye nsɔni, ntango ozali koteya basusu, salisáká bango na komona ete soki bazali kotosa mitinda ya bizaleli malamu oyo bazali koyekola ekokumisa Yehova. Bizaleli malamu ya boklisto epesaka esengo mpe ebatelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya moto oyo azali kotosa yango, kasi esukaka kaka wana te. Ekumisaka mpe Moto oyo apesaki mpe azali kolendisa bizaleli yango.​—Nzembo 74:10; Yakobo 3:17.

13. (a) Ndenge nini Biblia ezali kosalisa biso na makambo etali bizaleli ya malamu? (b) Wapi likanisi ya ntina oyo ezali na toli ya 1 Batesaloniki 4:3-7?

13 Bizaleli malamu ememelaka mpe bato mosusu matomba. Okoki komona yango na bandakisa oyo ezali na Liloba ya Nzambe oyo ezali komonisa malamu ya kotosa mitinda ya bizaleli malamu oyo Nzambe azali koteya mpe mbuma mabe ya kozanga kotosa yango. (Genese 39:1-9, 21; Yosua 7:1-25) Okoki mpe komona toli ya malamu na ntina etali bizaleli malamu, na ndakisa oyo: “Talá eloko oyo Nzambe alingi, kosantisama na bino, ete bóboya pite; ete moko na moko na bino ayeba kokanga mbɛki na ye moko malamu na kati ya kosantisama mpe lokumu, na mposa ya lokoso ya kosangisa nzoto te lokola mpe oyo bikólo wana mosusu oyo bayebi Nzambe te bazalaka na yango; ete moto moko te akóma tii na kosalela ndeko na ye mabe mpe kobɔtɔla ntomo na ye na likambo yango, . . . mpo Nzambe abengaki biso, ezali te mpo na kondima bosɔtɔ, kasi nde mpo na kosantisama.”​—1 Batesaloniki 4:3-7, NW.

14. Okoki komituna mituna nini likoló ya toli ya 1 Batesaloniki 4:3-7?

14 Moto nyonso oyo atángi bavɛrsɛ oyo akomona ete kosala pite, ekobo mpe etamboli ya nsɔni eyokani te na bizaleli malamu ya boklisto. Kasi, okoki kososola lisusu bavɛrsɛ yango na mozindo. Ezali na bavɛrsɛ mosusu oyo tokoki kotalela yango na mozindo mpe kokanisa likoló na yango, mpe na nsuka, ekobakisa bososoli na biso. Na ndakisa, okoki koluka koyeba makanisi nini Paulo azalaki na yango ntango alobaki ete kosala pite ekoki komema moto “na kosalela ndeko na ye mabe mpe kobɔtɔla ntomo na ye na likambo yango.” Ntomo yango ezali nini, mpe soki ososoli yango malamumalamu, ndenge nini ekobakisa mposa na yo ya kobatela bizaleli malamu ya boklisto? Soki oyekoli likambo yango na mozindo, ndenge nini ekosalisa yo lisusu mpo na koteya basusu mpe kosalisa bango na kokumisa Nzambe?

Yekolá mpo na koteya

15. Biloko nini okoki kosalela mpo na komiteya na nzela ya boyekoli na yo moko?

15 Batatoli ya Yehova bazali na biloko mingi oyo bakoki kosalela mpo na koluka biyano na mituna oyo ebimaka ntango bango moko bazali koyekola mpo na komiteya to koteya bato mosusu. Moko na yango, oyo ezali mpe na minɔkɔ mingi, ezali Index des publications de la Société Watch Tower. Okoki kosalela yango mpo na koyeba esika oyo okoki komona makambo oyo ozali koluka na kati ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova. Okoki koluka na liste ya mitó ya makambo to na liste ya bavɛrsɛ ya Biblia. Esaleli mosusu oyo Batatoli ya Yehova bazali na yango na ebele ya minɔkɔ oyo bato mingi mpenza balobaka ezali Watchtower Library. Yango ezali CD-ROM oyo basalelaka na ordinatɛrɛ; na kati na yango ezali na makambo oyo ezali na mikanda ebele. Yango esalisaka moto na koluka mitó ya makambo mpe ndenge oyo bavɛrsɛ ya Biblia elimbolami. Soki esaleli moko to bisaleli nyonso wana ezali na monɔkɔ moko oyo oyebi, saleláká yango mingi ntango ozali koyekola Liloba ya Nzambe mpo na koteya basusu.

16, 17. (a) Epai wapi okoki kokuta bandimbola oyo ekobakisa bososoli na yo mpo na ntomo oyo elobelami na 1 Batesaloniki 4:6? (b) Na ndenge nini pite ekoki kobɔtɔla ntomo ya bato mosusu?

16 Tózwa naino ndakisa ya 1 Batesaloniki 4:3-7, oyo touti kolobela. Totikaki motuna likoló ya ntomo oyo balobeli na bavɛrsɛ yango. Ntomo ya nani? Mpe ndenge nini ntomo yango ekoki kobɔtɔlama? Na lisalisi ya biloko oyo tolobeli, okoki komona makambo oyo ekobakisa bososoli na yo ya bavɛrsɛ yango; ata mpe ntomo oyo Paulo alobelaki. Okoki kotánga makambo yango na buku Étude perspicace des Écritures, volimi 1, nkasa 920-921; Kimia ya solo​—ekouta wapi?, lokasa 148; Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 15 Novɛmbɛ 1989, lokasa 31.

17 Soki okei mwa mosika na boyekoli na yo, okomona ndenge mikanda yango ezali komonisa ete maloba ya Paulo ezali solo. Moto oyo azali kosala pite, azali kosala lisumu na miso ya Nzambe mpe azali komikaba na bamaladi. (1 Bakolinti 6:18, 19; Baebele 13:4) Mobali oyo azali kosala pite azali kobɔtɔla ntomo ya mwana mwasi oyo azali kosala na ye lisumu wana. Azali kokómisa ye mbindo na elimo mpe azali kobebisa lisosoli na ye. Soki mwana mwasi yango azali monzemba, mobali yango azali kobɔtɔla lotomo ya mwana mwasi yango ya koyeba mobali te liboso ya kobala; azali mpe kobɔtɔla lotomo ya mobali oyo akobala ye ya kobala mwana mwasi oyo ayebani naino na mobali te. Azali kosala baboti ya mwana mwasi yango mpasi to mpe mobali na ye soki mwasi yango abalá. Mobali oyo azali kosala pite azali kobebisa lotomo ya libota na ye moko ya kozala na lokumu ete bazali na bizaleli ya pɛto. Soki azali na lisangá ya boklisto, azali kofingisa yango, azali kobebisa lokumu na yango.​—1 Bakolinti 5:1.

18. Matomba nini okoki kozwa ntango ozali koyekola bizaleli malamu ya boklisto na kati ya Biblia?

18 Bandimbola oyo tolobeli mpo na ntomo efungoli yo miso mpo na vɛrsɛ yango? Koyekola ya ndenge yango ezali mpenza na ntina mingi. Ntango ozali kosala yango, ozali komiteya. Bososoli na yo ya bosolo mpe bokasi ya nsango ya Nzambe ekobakisama. Okolendisa ekateli na yo ya kokangama na bizaleli malamu ya boklisto ata soki okutani na komekama nini. Kanisá sikoyo ndenge oyo yango ekoki kosalisa yo ozala molakisi malamu koleka! Na ndakisa, ntango ozali koteya bato mosusu mateya ya solo ya Biblia, okoki kolakisa bango ndimbola ya mozindo ya 1 Batesaloniki 4:3-7, yango ekosalisa bango básosola malamumalamu mpe básepela mingi koleka na mitinda ya bizaleli malamu ya boklisto. Na bongo, boyekoli na yo ekoki kosalisa yo mpe ebele ya bato mosusu na kokumisa Nzambe. Wana totaleli kaka ndakisa moko oyo euti na mokanda ya Paulo epai ya Batesaloniki. Nzokande, ezali mpe na makambo mosusu mpo na bizaleli malamu ya boklisto; okoki mpe koyekola, kosalela mpe koteya bandakisa mosusu mingi mpe toli euti na Biblia oyo etali makambo yango.

19. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete ozalaka na bizaleli malamu ya boklisto?

19 Ntembe ezali te ete kosala yango ezali nzela ya mayele. Yakobo 3:17 (NW) elobi ete “bwanya oyo euti na likoló,” elingi koloba oyo euti na Yehova Nzambe, ezalaka “libosoliboso na bizaleli ya pɛto.” Na maloba mosusu ya polele, yango ezali kosɛnga kolanda mitinda ya Nzambe mpo na bizaleli malamu. Kutu, Yehova azali kosɛnga baoyo bazali koteya Biblia na nkombo na ye ete bázala ndakisa malamu “na etamboli ya pɛto.” (1 Timote 4:12, NW) Bomoi ya bayekoli ya liboso lokola Paulo na Timote ezali komonisa yango; baboyaki pite mpe ekobo; kutu, Paulo akomaki boye: “Tiká ete pite mpe bosɔtɔ ya ndenge nyonso to lokoso etángama ata kotángama te na kati na bino, ndenge mpenza ebongi na basantu; etamboli ya nsɔni mpe te, masolo ya bozoba te, masɛki ya nsɔni te.”​—Baefese 5:3, 4, NW.

20, 21. Mpo na nini ondimi makambo oyo ntoma Yoane akomaki na 1 Yoane 5:3?

20 Bizaleli malamu oyo Liloba ya Nzambe ezali koteya ezali polele mpe sikisiki, kasi ezali kilo te. Yoane, ntoma oyo aumelaki na bomoi koleka bantoma mosusu nyonso, amonaki yango. Makambo oyo amonaki na bomoi na ye molai emonisaki ye ete bizaleli malamu ya boklisto esalaka mabe te. Kutu, ezali malamu, ezali na litomba mpe epesaka mbano malamu. Yoane amonisaki yango polele ntango akomaki boye: “Mpo bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye; kutu bakomandema na ye ezali kilo te.”​—1 Yoane 5:3, NW.

21 Kasi, tozali komona ete Yoane amonisaki te ete kotosa mibeko ya Nzambe ezali nzela eleki malamu kaka mpo ezali kobatela biso na mikakatano, na mbuma mabe oyo tokoki kobuka soki tolandi banzela mosusu. Amonisaki makambo na ndenge oyo ebongi mpenza; amonisaki ete soki totosaka bizaleli malamu oyo Nzambe azali kosɛnga, ezali komonisa ete tolingaka ye, ezali libaku malamu mpenza ya komonisa ete tolingaka Yehova Nzambe. Ya solo, komiteya biso moko to koteya bato mosusu bolingo ya Nzambe ezali kosɛnga ete tóndima mpe tósalela mitinda na ye ya malamu mingi. Elakisi komiteya biso moko mpe koteya bato mosusu bizaleli malamu ya boklisto.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ntango amonisaki ete Bayuda bazalaki kotyola te biloko ya bosantu, Josèphe alobelaki mobeko ya Nzambe boye: “Moto moko te atuka banzambe oyo bato ya bingumba mosusu basambelaka, mpe azwa na makasi te biloko ya batempelo ya bapaya, mpe azwa te eloko ya motuya oyo epesami na nkombo ya nzambe moko.” (Biso nde totɛngisi makomi.)​—Antiquités judaïques, Mokanda 4, mokapo 8, paragrafe 10.

b Antiquités judaïques, Mokanda 18, mokapo 3, paragrafe 5.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini tosengeli koyekola mpo na komiteya biso moko liboso tóteya basusu?

• Etamboli na biso ekoki kosala nini epai na Yehova?

• Moto ya pite akoki kobɔtɔla ntomo ya banani?

• Ekateli na yo ezali nini na oyo etali bizaleli malamu ya boklisto?

[Elilingi na lokasa 22]

“Bakomandema na ye ezali kilo te”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto