Batindami mpo na kosalisa bato oyo bazali na nzala!
OKOKI mbala mosusu kotuna ete: ‘Nzala ya ndenge nini?’ Ezali nde nzala ya bilei ya elimo! Mosakoli moko Moebele asakolaki nzala yango na maloba oyo: “Nkolo [Yehova] alobi ete, Talá, mikolo ekoya wana nakotinda nzala kati na mokili. Ekozala nzala na kwanga te, kozanga na mai mpe te; ekozala nzala na koyoka maloba na [Yehova].” (Amosa 8:11) Mpo na kosalisa bato oyo bazali na nzala ya elimo, bandeko 48 oyo bakɔtaki na kelasi ya mbala ya 112 ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, na Patterson, na etúká ya New York, batindami na mikili 19 ya kɔntina 5 mpe na bisanga ya mai monene.
Bamemi biloko ya kolya te, bakei nde na boyebi, mayele mpe formasyo oyo bazwi. Balekisaki sanza mitano mobimba na koyekola Biblia malamumalamu mpo na kolendisa kondima na bango mpo na mosala ya misionɛrɛ na mboka mopaya. Mokolo ya 9 Marsi 2002, bato 5 554 bayanganaki mpo na likita oyo ebongisamaki mpo na kopesa bana-kelasi yango badiplome mpe bato nyonso balandaki likita yango na esengo.
Stephen Lett, ye azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, afungolaki likita yango na esengo nyonso. Atombelaki ebele ya bapaya oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge boyei malamu. Na nsima, akokanisaki mosala ya bamisionɛrɛ yango ya sika na maloba ya Yesu ete, “Bino bozali moi ya mokili.” (Matai 5:14) Alobaki boye: ‘Na bisika oyo bakotinda bino “bokongɛngisa” makambo ndenge na ndenge oyo etali misala ya kokamwa ya Yehova; na ndenge yango nde bokosalisa bato ya mitema sembo bámona nkembo ya Yehova mpe mikano na ye.’ Ndeko Lett alendisaki bamisionɛrɛ na kosalela Liloba ya Nzambe mpo na komonisa polele molili oyo mateya ya lokuta ezali kotya mpe kolakisa bato oyo bazali koluka solo nzela oyo basengeli kolanda.
Kozala na makanisi ya malamu ezali na ntina mingi mpo na kolonga
Nsima ya maloba ya prezida mpo na kofungola likita, Baltasar Perla, ye azali na komite ya filiale ya États-Unis, asalaki eteni ya liboso ya masukulu oyo elandanaki mpo na kosalisa bana-kelasi na kolonga na mosala ya misionɛrɛ. Motó ya likambo ya lisolo na ye ezalaki “Zalá na mpiko mpe na makasi mpe salá.” (1 Ntango 28:20, NW) Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala azwaki mokumba ya kosala likambo moko monene oyo asalaki naino yango liboso te: asengelaki kotonga tempelo na Yelusaleme. Salomo asalaki, mpe na lisalisi ya Yehova, tempelo etongamaki tii na nsuka. Ndeko Perla abimiselaki bana-kelasi liteya na likambo yango mpe alobaki boye: ‘Bapesi bino mosala ya sika, sikoyo bokómi bamisionɛrɛ, mpe esengeli bózala na mpiko mpe bózala na makasi.’ Na ntembe te bana-kelasi balendisamaki na elikya ete Yehova akotika bango te soki bazali ntango nyonso penepene na ye. Ndeko Perla asimbaki mitema ya bayangani na maloba na ye ya nsuka ntango alobelaki likambo moko oyo etali ye moko: ‘Bokoki kosala makambo mingi ya malamu na mosala ya misionɛrɛ. Ezali bamisionɛrɛ nde bateyaki ngai na libota na biso mateya ya solo!’
Ndeko Samuel Herd, ye mpe azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisolo oyo ezali na motó ya likambo ete: “Bótya motema epai ya Yehova mpo bókoka kolonga.” Bana-kelasi babandi mosala ya misionɛrɛ, mpe mpo na kolonga, ezali kosɛnga mingimingi ete bázala na boyokani malamu na Yehova. Ndeko Herd apesaki bango toli oyo: ‘Bozwi boyebi ya Biblia mingi na nzela ya makambo oyo boyekoli na Gileadi. Bozwaki na esengo. Kasi sikoyo, mpo na kolonga mpenza, bokobanda kopesa makambo oyo boyekoli.’ (Misala 20:35) Bamisionɛrɛ bakozala na mabaku mingi ya kosala yango wana bakoboma nzoto mpo na basusu.—Bafilipi 2:17, NW.
Toli ya nsuka nini balakisi bapesaki bana-kelasi? Mark Noumair asalelaki maloba ya Luta 3:18 (NW) lokola motó ya likambo ya lisolo na ye ete, “Fandá nyɛɛ tii okomona ndenge oyo likambo yango ekosuka.” Molobi asalelaki ndakisa ya Naomi na Luta mpo na kolendisa bana-kelasi bátya elikya na bango nyonso na makambo nyonso oyo ebongiseli ya Nzambe awa na mabele esali mpe bátosa bokonzi ndenge ebongisami na kati ya Teokrasi. Ndeko Noumair asimbaki mitema ya bana-kelasi ntango alobaki boye: ‘Ekoki kokóma na bantango mosusu ete bokokanga mpenza te ntina oyo bazwi ekateli moko mpo na bino to ntango oyo bokomona ete likambo moko esengelaki mpenza esalema ndenge mosusu. Bokosala nini na ntango wana? Bokotɛlɛma mpo na kosala makambo na ndenge bino moko bolingi to “bokofanda nyɛɛ” mpe kotyela Nzambe motema, na elikya ete na nsima, akosala ete mbuma ya malamu ebotama?’ (Baloma 8:28) Na ntembe te toli ya ‘komipesa na mosala mpo ete matomba ya Bokonzi ekende liboso, kotya makanisi na makambo oyo ebongiseli ya Yehova ezali kosala na esika ya kotalaka nde bato,’ ekosalisa bamisionɛrɛ ya sika na mosala na bango na mboka mopaya.
Wallace Liverance, oyo azalaká misionɛrɛ mpe sikoyo azali molakisi na Gileadi, asalaki eteni ya nsuka ya masukulu oyo elandanaki na ebandeli. Motó ya likambo ya lisukulu na ye elobaki “Bótya makanisi na bino esika moko, bótikala na mosala ya Nzambe.” Amonisaki ete, ntango mosakoli Danyele amonaki ete Babilone ekwei mpe akanisaki makambo oyo Yilimia asakolaki, asosolaki ete etikali moke Bayisalaele bálongwa na boombo. (Yilimia 25:11; Danyele 9:2) Danyele ayebaki ndenge oyo Yehova akabolaki ntango mpo na kosala makambo na ye, mpe yango esalisaki ye atya makanisi na ndenge oyo mokano ya Nzambe ezalaki kokokisama. Nzokande, na mikolo ya mosakoli Hagai, Bayisalaele bazalaki koloba ete: “Naino ntango ekómi te.” (Hagai 1:2) Babosanaki eleko oyo bazalaki, batyaki makanisi na bango nyonso na koluka bomoi ya malamu mpe bisengo, mpe babosanaki ntina oyo babimisaki bango na Babilone epai bazalaki baombo: kotonga lisusu tempelo. Ndeko Liverance asukisaki na maloba oyo: “Yango wana bosengeli kotya makanisi na bino esika moko, elingi koloba kokanisa ntango nyonso mokano ya Yehova.”
Lawrence Bowen, molakisi mosusu ya Gileadi, atambwisaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Yehova apambolaka bato oyo basalelaka liloba ya bomoi.” (Baebele 4:12) Lisolo yango elobelaki makambo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango na mosala ya kosakola; emonisaki mingimingi ndenge oyo Yehova apambolaka bato oyo basalelaka Biblia ntango bazali kosakola mpe koteya. Motambwisi amonisaki ete Yesu Klisto apesaki baministre nyonso ya Nzambe ndakisa ya malamu: ‘Yesu alobaki solo ete makambo oyo azalaki koteya eutaki epai na ye te, kasi azalaki koloba Liloba ya Nzambe.’ Bato ya mitema sembo basosolaki solo mpe bayambaki yango. (Yoane 7:16, 17, NW) Lelo oyo mpe ezali se ndenge yango.
Mateya ya Gileadi ebongisaka moto mpo na mosala nyonso ya malamu
Na nsima, Richard Abrahamson na Patrick LaFranca, bandeko oyo baumeli mingi na Betele, batunaki mituna na bandeko motoba oyo basilá kozwa diplome na Gileadi mpe lelo oyo bazali kosala na mitindo ndenge na ndenge ya mosala ya ntango nyonso. Bana-kelasi ya mbala ya 112 balendisamaki na koyoka ete bambula mingi na nsima, bandeko motoba oyo bazalaki kotuna bango mituna, ata soki bazali sikoyo kosala lolenge nini ya mosala ya Nzambe, bazali kokoba kosalela mateya oyo bazwaki na Gileadi ntango bayekolaka Biblia, bayekolaka makambo ya sika na mikanda mpe mpo na kofanda malamu na bato.
Theodore Jaracz, ye mpe azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisukulu ya monene mpo na likita yango. Motó ya likambo na yango ezalaki ete “Makambo oyo ezali kosalema ntango tozali koyikela koyina ya Satana mpiko.” Na boumeli ya sanza mitano, bana-kelasi bazalaki na esika oyo bazalaki komona bolingo mpe makambo nyonso ezali kotambola na ndenge ya Teokrasi. Kasi, ndenge oyo bayokaki yango na mateya na kelasi, tozali na kati ya mokili oyo ezali koyina biso. Na mokili mobimba, bazali kobundisa basaleli ya Yehova. (Matai 24:9) Ndeko Jaracz asalelaki masolo ndenge na ndenge ya Biblia mpo na komonisa ete ‘Zabolo azali mpenzampenza kokanela biso. Tosengeli kosala nyonso mpo boyokani na biso na Yehova ezala makasi mpe tólendisama mpo na koyikela komekama mpiko.’ (Yobo 1:8; Danyele 6:4; Yoane 15:20; Emoniseli 12:12, 17) Ndeko Jaracz asukisaki na koloba ete atako bazali ntango nyonso koyina basaleli ya Nzambe, Yisaya 54:17 elobi ete ‘ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kotɛmɛla biso ekoki kolonga. Yehova akobikisa biso na ntango mpe na ndenge oyo ye moko aponi.’
Lokola bandeko oyo bazalaki na kelasi ya mbala ya 112 ya Gileadi ‘bazali na biloko nyonso ya mosala,’ tondimi mpenza ete bakosala mingi mpo na kopesa bilei na bato oyo bazali na nzala ya elimo na mikili oyo batindami. (2 Timote 3:16, 17, NW) Tozali mpenza kozela tóyoka ndenge bakokabola nsango oyo ezali lokola bilei epai ya bato na mikili yango.
[Etanda na lokasa 23]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na bikólo: 6
Batindami na bikólo: 19
Bana-kelasi bazalaki: 48
Mwayene ya mbula ya kobotama: 33,2
Mwayene ya mbula basali na lisangá: 15, 7
Mwayene ya mbula basali mosala ya ntango nyonso: 12, 2
[Elilingi na lokasa 24]
Kelasi ya mbala ya 112 ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ; banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Parotte, M.; Hooker, E.; Anaya, R.; Reynolds, J.; Gesualdi, K.; Gonzalez, J. (2) Robinson, C.; Phillips, B.; Maidment, K.; Moore, I.; Noakes, J.; Barnett, S. (3) Stires, T.; Palmer, B.; Yang, C.; Groothuis, S.; Groppe, T.; Bach, C. (4) Anaya, R.; Soukoreff, E.; Stewart, K.; Simozrag N.; Simottel, C.; Bach, E. (5) Stewart, R; Yang, H.; Gilfeather, A.; Harris, R.; Barnett, D.; Parotte, S. (6) Maidment, A.; Moore, J.; Groothuis, C.; Gilfeather, C.; Noakes, S.; Stires, T. (7) Gesualdi, D.; Groppe, T.; Soukoreff, B.; Palmer, G.; Phillips, N.; Simottel, J. (8) Harris, S.; Hooker, P.; Gonzalez, J.; Simozrag, D.; Reynolds, D.; Robinson, M.