Lifelo ya mɔ́tɔ ebongwani?
NA MAKANISI na yo, soki balobeli “lifelo,” omonaka yango esika ya ndenge nini? Okanisaka ete lifelo ezali mpenza esika oyo mɔ́tɔ epelaka na sufulu mpe bato bakendaka konyokwama mpe kotungisama kuna libela na libela? To okanisaka nde ete basalelaka liloba lifelo mpo na kolobela lolenge moko boye oyo bato bakómaka?
Na boumeli ya bikeke ebele, bakonzi ya mangomba ya boklisto bateyaki ete bato nyonso ya masumu bakendaka na lifelo, esika bakendaka konyokwama makasi. Bandimi ya mangomba mingi bazalaka na likanisi wana tii lelo oyo. Zulunalo moko (U.S.News & World Report) elobi ete: “Ekoki kozala mangomba ya boklisto nde epalanganisaki liteya ya lifelo, kasi mangomba mosusu mpe eteyaka likambo yango. Na mangomba nyonso ya minene, ata mpe na mangomba mosusu ya mikemike, bateyaka bandimi na bango ete bato mabe bakozwa etumbu ya konyokwama nsima ya liwa mpo na masumu na bango.” Ezala Bahindu, Babudiste, Bamizilma, bato ya Lingomba ya Jaïn, na bato ya Lingomba ya Tao bandimaka motindo moko boye ya lifelo.
Nzokande, bato bakómi na makanisi mosusu mpo na lifelo na mikolo oyo. Zulunalo oyo touti kolobela eyebisaki ete: “Atako bato mosusu bazali naino kondima makanisi ya kala ete lifelo ezali esika ya mɔ́tɔ, bato mingi bakómi na makanisi mosusu, bazali kokanisa ete etumbu ya seko ezali mpasi oyo moto akoyoka ya kozala lokola na bolɔkɔ na esika oyo azali ye moko kaka, bazali komona ete lifelo ezali esika ya mɔ́tɔ te ndenge oyo bato bazalaki kokanisa.”
Zulunalo moko ya Ba-Jésuite (La Civiltà Cattolica) elobi ete: “Ezali lokuta . . . ete Nzambe, na nzela ya bademo, anyokolaka bato ya masumu na mɔ́tɔ.” Elobi lisusu ete: “Lifelo ezali esika te, kasi ezali nde ezalela ya moto oyo azali konyokwama na mpasi ya kokabwana na Nzambe.” Na 1999, Pápa Jean Paul II alobaki boye: “Lifelo ezali esika te, kasi emonisaka ndenge bato oyo baponi kokabwana na Nzambe, Mopesi ya bomoi mpe ya esengo, bamiyokaka.” Mpo na bililingi oyo emonisaka lifelo lokola esika ya mɔ́tɔ, alobaki boye: “Emonisaka nde ndenge oyo bomoi ya moto ezalaka na mawa mpe ezangaka ntina soki apesi Nzambe mokɔngɔ.” Martin Marty, moto ya mayele na makambo ya mangomba, alobaki ete soki pápa alimbolaki ete lifelo ezali esika oyo “mɔ́tɔ epelaka mpe zabolo alati bilamba ya motane mpe asimbi kanya ya monene, bato balingaki kondima yango te.”
Mbongwana yango ezali mpe kosalema na mangomba mosusu. Lapolo moko ya komisyo ya mateya ya Lingomba ya Angleterre elobaki ete: “Lifelo elimboli minyoko ya seko te, kasi ezali kaka kobomama nyɛɛ mpo na moto oyo aponi kotɛmɛla Nzambe libela mpe alingi kobongwana te.”
Buku ya mateya ya Église épiscopalienne ya États-Unis elobaka ete lifelo ezali “liwa ya seko na ntango oyo toboyi Nzambe.” Zulunalo U.S.News & World Report elobi ete bato bazali se kokóma mingi oyo bazali kokanisa ete “nsuka ya bato ya masumu ezali kobomama, kasi ezali konyokwama seko te. . . . Bazali kondima ata moke te ete bato oyo baboyaka Nzambe, bakokende na ‘mɔ́tɔ oyo epelaka ntango nyonso’ ya lifelo nsima ya liwa na bango.”
Atako mikolo oyo bato ebele bazali koboya liteya ya kala ete lifelo ezali esika ya mɔ́tɔ mpe ya sufulu, mingi mpe bazali kaka kondima ete lifelo ezali esika oyo bato bakendaka konyokwama. Albert Mohler, ye azali molakisi na eteyelo moko ya teoloji na Louisville, na etúká ya Kentucky, na États-Unis, alobi ete: “Makomami ezali koloba polele ete lifelo ezali esika mpenza oyo bato banyokwamaka na mɔ́tɔ.” Lisusu, lapolo moko (The Nature of Hell), ya bato ya Alliance de la Commission Évangelique, elobi ete: “Lifelo ezali esika moto azali koyeba mpenza ete baboyi ye mpe azali konyokwama.” Ebakisi ete: “Na kati ya lifelo, moto na moto azwaka etumbu mpe minyoko na kotalela masumu oyo asalaki ntango azalaki naino na mabele.”
Tozongi lisusu na mituna na biso: lifelo ezali esika ya mɔ́tɔ epai bato bakendaka konyokwama seko na seko to ezali nde kobomama nyɛɛ? To ezali kaka ezalela ya moto oyo akabwani na Nzambe? Lifelo ezali mpenza nini?
[Etanda/Bililingi na lokasa 4]
Ndenge oyo liteya ya lifelo ya mɔ́tɔ ebandá
NTANGO nini bandimi ya mangomba ya boklisto babandaki kondima liteya ya lifelo ya mɔ́tɔ? Ezalaki bambula ebele nsima ya liwa ya Yesu na bantoma na ye. Buku moko (Encyclopædia Universalis), elobi boye: “Emoniseli ya Petelo (ekomamaki na ekeke ya mibale ya ntango na biso) ezalaki buku ya liboso [oyo etángami te na kati ya makomami oyo epemami] ya boklisto oyo elimbolaki ndenge bato ya masumu bazwaka etumbu mpe banyokwamaka na lifelo.”
Nzokande, Batata ya libosoliboso ya Lingomba bazalaki bango nyonso na likanisi moko te mpo na lifelo. Bato lokola Justin le Martyr, Clément d’Alexandrie, Tertullien, mpe Cyprien bazalaki kondima ete lifelo ezali esika ya mɔ́tɔ makasi. Origène na moto ya teoloji Grégoire de Nysse, bazalaki kokanisa ete lifelo elimboli kokabwana na Nzambe, mpe na bongo, konyokwama na elimo. Augustin d’Hippone azalaki kokanisa ete moto oyo azali na lifelo anyokwamaka na nzoto mpe na elimo na ye—bato mingi bakómaki kondima likanisi yango. Profɛsɛrɛ John Kelly akomaki ete: “Na ekeke ya mitano, liteya oyo elobi ete bakotikela bato ya masumu libaku mosusu te ya kobongwana nsima ya bomoi oyo, mpe ete mɔ́tɔ oyo ekozikisa bango ekokufa te, epalanganaki.”
Na ekeke ya 16, Martin Luther na Jean Calvin, bato oyo babandisaki Lingomba ya Protesta, bazalaki kondima ete minyoko ya lifelo ya mɔ́tɔ ezali maloba ya elilingi mpo na komonisa kokabwana libela na Nzambe. Atako bongo, na boumeli ya mbula nkama mibale oyo elandaki, bato bazongelaki kokanisa ete lifelo ezalaka esika ya minyoko. Jonathan Edwards, oyo azalaki moteyi ya Protesta na ekeke ya 18, azalaki na momeseno ya koloba makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaka na lifelo mpo na kobangisa bato oyo bakómaki kofanda na Amerika.
Kasi, eumelaki te, likanisi oyo emonisi ete lifelo ezali esika ya mɔ́tɔ ekómaki kobunga. Zulunalo U.S. News & World Report elobi ete: “Likanisi oyo elobi ete lifelo ezali esika ya mɔ́tɔ ezalaki koteyama lisusu mpenza te na ekeke ya 20.”
[Bililingi]
Justin le Martyr azalaki kondima ete lifelo ezali esika ya mɔ́tɔ
Augustin d’Hippone azalaki koteya ete na kati ya lifelo moto anyokwamaka na elimo mpe na nzoto