Mituna ya batángi
Abele ayebaki ete esengelaki kopesa mbeka ya nyama mpo na kosepelisa Nzambe?
Lisolo ya Biblia oyo elobelaka makabo ya Kaina na Abele ezali mokuse mpenza. Na buku ya Genese 4:3-5, tozali kotánga boye: “Na nsima na ntango mosusu Kaina apesaki [Yehova] likabo ya mbuma ya elanga. Mpe Abele, ye lokola, ayeisaki bana ya liboso kati na etonga na ye mpe mafuta na yango lokola. [Yehova] andimaki Abele mpe likabo na ye lokola. Nde andimaki Kaina te mpe likabo na ye te.”
Biblia elobi na esika moko te ete liboso likambo yango esalema, Yehova asilaki kopesa lilako moko ya sikisiki mpo na oyo etali mbeka to lolenge ya mbeka oyo ezali malamu na miso na ye. Na yango, emonani polele ete Kaina na Abele bapesaki makabo na bango kaka ndenge bango moko balingaki. Nzela ya paladiso, epai baboti na bango bazalaki kofanda liboso, ekangamaki; bakómaki kozwa mikakatano mpo na lisumu; mpe bakómaki mosika na Nzambe. Lokola bakómaki bato ya masumu mpe ya mawa, na ntembe te bayokaki mposa makasi ya kosɛnga lisalisi ya Nzambe. Emonani mpenza ete kopesa Nzambe makabo ezalaki likambo oyo basalaki ndenge bango moko balingaki mpo ete andima bango.
Likambo yango esukaki boye: Nzambe andimaki likabo ya Abele kasi oyo ya Kaina endimamaki te. Mpo na nini? Ezalaki nde mpo Abele apesaki biloko ya malamu koleka Kaina? Tokoki koloba mpenza te ete lolenge ya likabo ezalaki na ntina moko te na likambo oyo, mpamba te bayebisaki moto moko te kati na bango eloko nini ekokaki kondimama to oyo ekokaki kondimama te. Nzokande, emonisami mpenza ete lolenge nyonso ya makabo yango ezalaki malamu. Na kati ya mobeko oyo Yehova ayaki kopesa na ekólo ya Yisalaele bambula mingi na nsima, makabo oyo andimaki ezalaki biloko lokola banyama to biteni ya banyama, mbuma oyo bakalingi, mipiko ya orge, farini, mikate to bagato, to mpe vinyo. (Levitike 6:19-23; 7:11-13; 23:10-13) Yango emonisi polele ete ezalaki te lolenge ya makabo ya Kaina na Abele nde esalaki ete Nzambe andima moko mpe aboya mosusu.—Kokanisá na Yisaya 1:11; Amosa 5:22.
Na nsima ya bikeke mingi, ntoma Paulo alobaki boye: “Na kondima Abele apesaki Nzambe mbeka ya motuya monene koleka oyo ya Kaina, kondima oyo na nzela na yango litatoli epesamaki mpo na ye ete azalaki moyengebene, na ndenge Nzambe apesaki litatoli na ntina etali makabo na ye.” (Baebele 11:4, NW) Na yango, kondima ya Abele nde esalaki ete Nzambe amona ye moyengebene. Kondima yango ezalaki na nini? Kondima elaka ya Yehova ete akopesa momboto, oyo asengelaki ‘kosasa motó ya nyoka’ mpe kozongisa kimya mpe bomoto ya kokoka oyo bato bazalaká na yango na ebandeli. Na kotaleláká maloba ‘bakosasa litindi’ ya momboto, Abele ayaki kososola ete mbeka oyo esɛngaka kosopama ya makila nde ezalaki mpenza na ntina. (Genese 3:15, NW) Atako bongo, likambo ya ntina ezali ete kondima ya Abele nde esalaki ete ye ‘aleka Kaina na kotombwela Nzambe mbeka malamu.’
Ndenge moko, Kaina aboyamaki te mpo ete apesaki likabo ya lolenge ya mabe, kasi nde mpo azangaki kondima, lokola misala na ye emonisaki yango. Yehova alobaki na Kaina polelepolele ete: “Soki osali malamu okondimama te?” (Genese 4:7) Nzambe aboyaki Kaina te mpo asepelaki na likabo na ye te. Kasi “mpo ete misala na ye ezalaki mabe”—yango etondaki na zuwa, koyina, mpe nsukansuka abomaki—nde ntina Nzambe aboyaki Kaina.—1 Yoane 3:12.