Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/10 nk. 17-22
  • Tólona ezaleli ya botosi lokola nsuka ekómi pene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólona ezaleli ya botosi lokola nsuka ekómi pene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi ya libosoliboso oyo Yesu azwaki
  • Bapambolami mpo batosi “kapita” oyo Nzambe atii
  • Shilo akómi mokonzi oyo abongi mpo na mokili mobimba
  • Oyo ezali ntango ya “kotosa nsango malamu”
  • Tóboya kolala mpɔngi, makambo ya mbindo, mpe komipesa na koluka biloko ya mokili
  • Bapesi bango longonya mpo na botosi na bango
  • “Ayekolaki botosi”
    “Yaká, landá ngai”
  • Yoka makambo oyo elimo ezali koloba na masangá!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Koteya bana botosi ezali mpenza na ntina?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Botosi na yo ezali na motuya na miso ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/10 nk. 17-22

Tólona ezaleli ya botosi lokola nsuka ekómi pene

“Bato nyonso bakotosa [Shilo].”​—⁠GENESE 49:​10, NW.

1. (a) Na ntango ya kala, kotosa Yehova ezalaki mbala mingi kosɛnga nini? (b) Yakobo asakolaki likambo nini oyo etaleli botosi?

NA NTANGO ya kala, mbala mingi, kotosa Yehova ezalaki kosɛnga kotosa bamonisi na ye. Ezalaki ntango mosusu baanzelu, batata ya mabota, bazuzi, banganga-nzambe, basakoli, mpe bakonzi. Kutu, kiti ya bokonzi ya bakonzi ya Yisalaele ezalaki kobengama kiti ya bokonzi ya Yehova. (1 Ntango 29:23) Kasi, likambo ya mawa, ebele ya bakonzi ya Yisalaele batikaki kotosa Nzambe mpe na ndenge yango, bamilukelaki mpasi mpe balukelaki bato oyo bango bazalaki koyangela mpasi. Nzokande, bato oyo bazalaki sembo, Yehova atikaki bango te kozanga elikya; abɔndisaki bango na elaka oyo apesaki bango ete akotya Mokonzi ya malamu mpenza, oyo bato ya sembo bakosepela kotosa ye. (Yisaya 9:​6, 7) Ntango etikalaki moke akufa, mobange Yakobo asakolaki na ntina na mokonzi yango ete: “Lingenda ya bokonzi ekolongwa na Yuda te, to mpe nzete ya bokonzi kati na makolo na ye te, tii Shilo akoya; mpe bato nyonso bakotosa ye.”​—⁠Genese 49:​10, NW.

2. Nkombo “Shilo” elimboli nini, mpe akoyangela banani?

2 Liloba ya Liebele “Shilo” elimboli “Nkolo na yango.” Shilo asengelaki kozwa lotomo nyonso ya koyangela, oyo emonisami na lingenda ya bokonzi, mpe nguya ya kopesa mitindo, oyo emonisami na nzete ya bokonzi. Lisusu, asengelaki te koyangela kaka bana ya Yakobo, kasi “bato” nyonso. Yango ezali na boyokani na elaka oyo Yehova apesaki Abalayama ete: “Mombóto na yo akobɔtɔla monɔkɔ ya ndako ya banguna na ye. Mpe na nzela ya mombóto na yo, bikólo nyonso bakomipambola.” (Genese 22:​17, 18, NW) Yehova amonisaki “mombóto” yango na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.) ntango apakolaki Yesu, moto ya Nazalete, na elimo santu.​—⁠Luka 3:​21-23, 34; Bagalatia 3:⁠16.

Bokonzi ya libosoliboso oyo Yesu azwaki

3. Yesu azwaki bokonzi nini ntango amataki na likoló?

3 Ntango Yesu amataki na likoló, abandaki mbala moko koyangela mokili mobimba te. (Nzembo 110:⁠1) Kasi, azwaki “bokonzi” mpo na koyangela bato oyo bazalaki kotosa ye. Ntoma Paulo alobelaki bokonzi yango ntango akomaki boye: “[Nzambe] asikoli biso [baklisto bapakolami na elimo] uta na nguya ya molili mpe akɔtisi biso na kati ya bokonzi ya Mwana ya bolingo na ye.” (Bakolose 1:13) Kosikolama yango ebandaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. ntango elimo santu ekitelaki bayekoli ya sembo ya Yesu.​—⁠Misala 2:​1-4; 1 Petelo 2:⁠9.

4. Bayekoli ya liboso ya Yesu batosaki na makambo nini, mpe Yesu abengaki bango nyonso na nkombo nini?

4 Lokola “baambasadɛrɛ na esika ya Klisto,” bayekoli oyo bapakolamaki na elimo bamonisaki botosi mpe babandaki koyanganisa bato mosusu oyo basengelaki kokóma “basitwayɛ,” lokola bango, na kati ya bokonzi wana ya elimo. (2 Bakolinti 5:20; Baefese 2:19; Misala 1:⁠8) Lisusu, bato yango basengelaki kotikala “liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko” mpo ete mokonzi na bango Yesu Klisto andima bango. (1 Bakolinti 1:10) Bango nyonso wana nde babengamaki “moombo ya sembo mpe ya mayele” to kapita ya sembo.​—⁠Matai 24:45; Luka 12:⁠42.

Bapambolami mpo batosi “kapita” oyo Nzambe atii

5. Banda na ntango ya kala, ndenge nini Yehova ateyaka basaleli na ye?

5 Banda kala, Nzambe atindelaka basaleli na ye bateyi. Na ndakisa, ntango Bayuda bautaki na Babilone, Ezela mpe mibali mosusu ya mayele bazalaki kosuka kaka te na kotángela bato Mibeko ya Nzambe, kasi bazalaki “kolimbola” yango, ‘bazalaki komonisa ntina na yango mpe kosalisa bato básosola’ Liloba ya Nzambe.​—⁠Nehemia 8:​8, NW.

6, 7. Ndenge nini moombo, na nzela ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, apesi bilei ya elimo na ntango na yango, mpe mpo na nini ebongi mpenza kotosa moombo yango?

6 Ntango likambo ya kokatama ngenga ebimisaki ntembe na mobu 49 T.B., lisangani ya mikóló-bakambi ya moombo ya sembo na ntango wana batalelaki likambo yango malamumalamu mpe basalaki libondeli liboso bázwa likanisi ya nsuka oyo eyokanaki na mitinda ya Makomami. Ntango batindaki mokanda mpo na koyebisa likanisi oyo bazwaki, masangá etosaki malako oyo epesamaki mpe Nzambe apambolaki mpenza masangá yango. (Misala 15:​6-15, 22-29; 16:​4, 5) Na ntango na biso mpe moombo ya sembo, na nzela ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alimboli makambo mingi ya ntina. Na ndakisa, amonisi ete baklisto basengeli kokɔta na makambo ya politiki te, basengeli kotalela makila ete ezali eloko ya bosantu mpe basengeli komɛla bangi te to mpe makaya te. (Yisaya 2:4; Misala 21:25; 2 Bakolinti 7:⁠1) Yehova apesaki basaleli na ye mbano na ndenge batosaki Liloba na ye mpe moombo ya sembo.

7 Ntango bazali kotosa moombo yango, basaleli ya Nzambe bazali komonisa mpe ete bazali kotosa Nkolo, Yesu Klisto. Botosi yango ekómi na ntina mingi koleka na ntango na biso, mpamba te Yesu akómi lisusu na bokonzi mingi, ndenge Yakobo asakolaki yango liboso a liwa na ye.

Shilo akómi mokonzi oyo abongi mpo na mokili mobimba

8. Ndenge nini mpe ntango nini Yesu akómaki lisusu na bokonzi mingi?

8 Yakobo asakolaki ete “bato nyonso bakotosa” Shilo. Yango elingi koloba ete bokonzi ya Klisto ekosuka kaka na Yisalaele ya elimo te. Asengeli koyangela mpe banani? Emoniseli 11:15 epesi eyano ete: “Bokonzi ya mokili ekómi bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na ye, mpe akoyangela libela na libela seko.” Esakweli moko ya Biblia emonisi ete Yesu azwaki bokonzi yango na nsuka ya “ntango nsambo,” to “bantango oyo etyamá ya bikólo mosusu” na 1914.a (Danyele 4:​16, 17; Luka 21:24) Na mbula wana, “kozala” ya Klisto lokola Mokonzi Masiya oyo azali komonana te ebandaki; mpe ntango ebandaki mpo akoka “kozala na bokonzi kati na bayini na [ye].”​—⁠Matai 24:3; Nzembo 110:⁠2.

9. Yesu asalaki nini ntango azwaki Bokonzi, mpe yango esalaki ete bato, mpe mingimingi bayekoli na ye, bámona makambo nini?

9 Ntango Yesu azwaki bokonzi, likambo ya liboso asalaki ezalaki ya kobwaka Satana “na mabele,” moto oyo aleki bato nyonso na kozanga botosi, nzela moko na bademo na ye. Banda ntango wana, bilimu mabe yango bazali komemela bato nsuka ya bwale, mpe bazali kolendisa makambo oyo ezali kokómisa kotosa Yehova likambo ya mpasi koleka. (Emoniseli 12:​7-12; 2 Timote 3:​1-5) Kutu, na etumba yango ya elimo, Satana azali mpenza nde kokanela bapakolami ya Yehova, “oyo bazali kotosa bakomandema ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali Yesu,” na baninga na bango “bampate mosusu.”​—⁠Emoniseli 12:17; Yoane 10:⁠16.

10. Bisakweli nini ya Biblia oyo kokokisama na yango ezali kondimisa ete Satana akolonga te etumba oyo azali kobundisa baklisto ya solo?

10 Kasi, Satana akolonga te mpamba te tozali sikoyo na “mokolo ya Nkolo,” mpe eloko moko te ekoki kopekisa Yesu ‘asukisa bolongi na ye.’ (Emoniseli 1:10; 6:⁠2) Na ndakisa, akosala na boye ete mosala ya kotya Bayisalaele ya elimo 144 000 bilembo ekende tii na nsuka. Lisusu, akobatela “ebele ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 7:​1-4, 9, 14-16) Kasi, bato yango bakozwa mbano moko te na baninga na bango bapakolami, bango bakozala bato ya bokonzi ya Yesu oyo bakofanda awa na mabele. (Danyele 7:​13, 14) Lokola bato yango bamonani awa na mokili ezali komonisa ete Shilo azali mpenza Mokonzi na “bokonzi ya mokili.”​—⁠Emoniseli 11:⁠15.

Oyo ezali ntango ya “kotosa nsango malamu”

11, 12. (a) Kaka banani nde bakobika na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo? (b) Bizaleli nini emonanaka epai ya bato oyo bazali na “elimo ya mokili”?

11 Bato nyonso oyo balingi kozwa bomoi ya seko basengeli koyekola kotosa, mpamba te Biblia elobi polele ete “baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu” bakobika te na mokolo ya nkanda ya Nzambe. (2 Batesaloniki 1:⁠8) Kasi, mokili mabe oyo mpe elimo na yango ya kobo ya kotosa mibeko mpe mitinda ya Biblia ezali kokómisa likambo ya kotosa nsango malamu etumba monene.

12 Biblia ezali kobenga elimo yango ya koboya kotosa Nzambe ete “elimo ya mokili.” (1 Bakolinti 2:12) Ntoma Paulo alimbolaki ndenge elimo yango esalaka epai ya bato ntango akomelaki baklisto ya Efese na ekeke ya liboso, ete: “Bozalaki kotambola kala engebene ebongiseli ya makambo ya mokili oyo, engebene moyangeli ya nguya ya mopɛpɛ, elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi. Ɛɛ, na kati na bango biso nyonso tozalaki komitambwisa kala na kolanda bamposa ya mosuni na biso, kosaláká makambo oyo mosuni mpe makanisi ezalaki kolinga, mpe tozalaki mpenza bana ya nkanda ndenge moko ná bamosusu oyo batikali.”​—⁠Baefese 2:​2, 3.

13. Ndenge nini baklisto bakoki mpenza kolonga elimo ya mokili, mpe matomba nini bakozwa soki basali yango?

13 Likambo ya malamu ezali ete baklisto ya Efese balongwaki na boombo ya elimo wana ya kozanga botosi. Bakómaki bana ya Nzambe oyo bazali na botosi na ndenge bazalaki kotosa elimo na ye mpe bazalaki kobuka ebele ya mbuma malamu ya elimo yango. (Bagalatia 5:​22, 23) Lelo oyo mpe ndenge moko, elimo ya Nzambe, nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́, ezali kosalisa bamilio ya bato bákóma kotosa Yehova, mpe mpo na yango, bakoki kozala na “kondimisama makasi ya elikya tii na nsuka.”​—⁠Baebele 6:11; Zekalia 4:⁠6.

14. Ndenge nini Yesu akebisaki baklisto nyonso oyo bazali na bomoi na mikolo ya nsuka na komekama oyo basengelaki kokutana na yango mpo na kotala botosi na bango?

14 Lisusu, tóbosana te ete Shilo azali kosunga biso, ye azali na nguya mingi; ye na Tata na ye bakotika monguna moko te, ezala demo to moto, ete ameka botosi na biso koleka esika oyo tokoki kokangela motema. (1 Bakolinti 10:13) Kutu, mpo na kosalisa biso na etumba ya elimo oyo tozali na yango, Yesu amonisaki mwa mikakatano oyo tokokutana na yango na mikolo ya nsuka oyo tozali. Amonisaki yango na mikanda nsambo oyo apesaki ntoma Yoane na emonaneli moko oyo alakisaki ye. (Emoniseli 1:​10, 11) Mikanda yango ezalaki na toli ya ntina mpenza mpo na baklisto na ntango wana; kasi etaleli mpenzampenza makambo oyo ezali na “mokolo ya Nkolo,” oyo ebandaki na 1914. Yango wana, ebongi tótyela mpenza mikanda yango likebi!b

Tóboya kolala mpɔngi, makambo ya mbindo, mpe komipesa na koluka biloko ya mokili

15. Mpo na nini tosengeli kokeba na mokakatano oyo ekómelaki lisangá ya Efese, mpe ndenge nini tokoki kosala yango? (2 Petelo 1:​5-8)

15 Yesu atindaki mokanda na ye ya liboso na lisangá ya Efese. Nsima ya kopesa lisangá yango longonya mpo na ezaleli na yango ya koyika mpiko, Yesu alobaki boye: “Atako bongo, nazwi yo mabe na likambo oyo, ete otiki bolingo oyo ozalaki na yango liboso.” (Emoniseli 2:​1-4) Lelo oyo, ezali na baklisto mosusu oyo bazalaki na molende, kasi babungisi bolingo oyo bazalaki na yango epai ya Nzambe. Soki moto abungisi bolingo ya liboso ndenge wana akoki kolɛmbisa boyokani na ye na Nzambe, na yango asengeli kosala nokinoki mpo na kotalela likambo yango. Ndenge nini moto akoki kosala mpo bolingo yango ezonga lisusu makasi? Asengeli koyekolaka Biblia ntango nyonso, koyanganaka na makita, kobondela, mpe komanyola. (1 Yoane 5:⁠3) Ya solo, makambo nyonso wana esɛngaka ‘kosala molende,’ kasi ezali na ntina ete moto asala yango. (2 Petelo 1:​5-8) Soki omitaleli na bosembo mpenza mpe omoni ete bolingo na yo ekiti, kokanga mabɔkɔ te, bongisá makambo nokinoki mpo na kotosa likambo oyo Yesu alobaki mpo na kolendisa ete: “Kanisá lisusu na nini okwei, mpe bongolá motema mpe salá misala ya kala.​—⁠Emoniseli 2:⁠5.

16. Na masangá ya Pelegame na Tyatila, na makambo nini ya mabe bato mosusu bazalaki kobenda baninga mpe mpo na nini maloba oyo Yesu alobaki na bango ebongi mpe na biso lelo oyo?

16 Bapesaki baklisto ya Pelegame mpe ya Tyatila longonya mpo bazalaki sembo, bazalaki koyika mpiko mpe bazalaki na molende. (Emoniseli 2:​12, 13, 18, 19) Kasi, bazalaki kolanda bato oyo bazalaki na elimo mabe ya Balama oyo abebisaki Yisalaele ya kala na makambo ya pite, mpe elimo ya Yezabele, oyo abebisaki Yisalaele na losambo ya Baala. (Mituya 31:16; 1 Mikonzi 16:​30, 31; Emoniseli 2:​14, 16, 20-23) Kasi, ezali boni mpo na mikolo na biso, oyo ebengami “mokolo ya Nkolo”? Elimo ya ndenge wana ezali mpe komonana epai ya bato mosusu? Ɛɛ, mpamba te bato bazali kobimisama na lisangá mingimingi mpo na pite to ekobo. Yango wana, ezali na ntina mingi tóboya kozala baninga ya bato nyonso oyo bazali kosala makambo ya mabe oyo ekoki kobebisa biso, ezala na kati ya lisangá to te! (1 Bakolinti 5:​9-11; 15:33) Bato oyo balingi ete Shilo azala mokonzi na bango basengeli mpe koboya masano ya mabe mpe mikanda na bililingi ya bato bazali bolumbu oyo bazali kolakisa na nzela ya Internet.​—⁠Amosa 5:15; Matai 5:​28, 29.

17. Ndenge nini makanisi mpe elimo ya bato ya Saladi na ya Laodikia ekeseneki na ndenge oyo Yesu azalaki komona ezaleli na bango na elimo?

17 Yesu apesaki lisangá mobimba ya Saladi longonya te; apesaki longonya kaka na mwa bato moke. Lisangá yango ‘eyebanaki,’ to ezalaki komonana lokola nde ezali na bomoi, kasi ezalaki na mpɔngi makasi na elimo; yango wana mpo na Yesu, ezalaki lokola ‘ekufá.’ Botosi na bango na nsango malamu ezalaki kouta na motema te. Yesu atɔndɔlaki mpenza lisangá yango! (Emoniseli 3:​1-3) Lisangá ya Laodikia mpe ezalaki ndenge yango. Ezalaki komikumisa mpo na bozwi ya mokili na maloba lokola oyo: “nazali moto ya bomɛngo”; nzokande, mpo na Klisto ezalaki “moto ya mpasi mpe moto ya mawa mpe mobola mpe moto akufá miso mpe bolumbu.”​—⁠Emoniseli 3:​14-17.

18. Ndenge nini tokoki kosala mpo ete Nzambe amona biso te ete tozali lisusu mɔtɔ te na elimo?

18 Lelo oyo, baklisto mosusu oyo liboso bazalaki sembo, bakómi mpe na kozanga botosi ndenge yango. Mbala mosusu batiki elimo ya mokili emema bango na kobosana ete mikolo etikali ya kotánga, yango wana bazali lisusu mɔtɔ te na makambo lokola koyekola Biblia, kobondela, koyangana na makita, mpe mosala ya kosakola. (2 Petelo 3:​3, 4, 11, 12) Ezali na ntina ete bato yango bátosa Klisto, báluka bozwi ya elimo, to na maloba mosusu, ‘básomba epai na [Klisto] wolo oyo epɛtolami na mɔtɔ’! (Emoniseli 3:18) Bozwi wana ya solosolo esɛngaka mpe kozala ‘bato ya bomɛngo na misala ya malamu mpenza, kozala lobɔkɔ pɛtɛɛ, mpe bato bayebi kokaba.’ Soki tozali koluka biloko yango oyo ezali mpenza na motuya, ‘tokomibombela moboko kitoko na esika moko ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo na kosimba makasi bomoi ya solosolo.’​—⁠1 Timote 6:​17-19.

Bapesi bango longonya mpo na botosi na bango

19. Maloba nini ya kopesa longonya Yesu alobaki mpe makambo nini ya kolendisa ayebisaki baklisto ya Similina mpe ya Filadelefia?

19 Lisangá ya Similina na lisangá ya Filadelefia epesaki ndakisa mpo na botosi, mpamba te mikanda oyo Yesu atindelaki masangá yango ezali na mpamela te. Yesu alobaki na bato ya Similina boye: “Nayebi bolɔzi na yo mpe bobola na yo​—⁠kasi ozali moto ya bomɛngo.” (Emoniseli 2:⁠9) Bakeseni mpenza na bato ya Laodikia oyo bazalaki kotombola mapeka mpo bazalaki na bozwi ya mokili, nzokande bazalaki babola! Kasi, Zabolo azalaki kosepela te komona moto oyo azali sembo epai ya Klisto mpe azali kotosa ye. Yango wana, Yesu akebisaki bango na maloba oyo: “Kobanga te makambo oyo elingi kokómela yo. Talá! Zabolo akokoba kobwaka bamosusu na bino na kati ya bolɔkɔ mpo bómekama mpenza na mobimba, mpe mpo bózwa bolɔzi mikolo zomi. Omimonisa sembo ata tii ya liwa, mpe nakopesa yo motole ya bomoi.” (Emoniseli 2:10) Yesu apesaki mpe bato ya Filadelefia longonya na maloba oyo: “Obatelaki liloba na ngai [to, otosaki ngai] mpe owanganaki nkombo na ngai te. Nazali koya nokinoki. Simbá makasi oyo ozali na yango, mpo moto moko te azwa motole na yo.”​—⁠Emoniseli 3:​8, 11.

20. Ndenge nini bamilio ya bato lelo oyo bazali kobatela liloba ya Yesu, mpe bazali kosala bongo atako bakutani na makambo nini?

20 Na “mokolo ya Nkolo,” oyo ebandaki na 1914, mwa ndambo ya bapakolami oyo bazali naino awa na mabele na baninga na bango bampate mosusu, oyo bango nyonso bazali lelo oyo bamilio ya bato, babateli mpe liloba ya Yesu na mosala oyo bazali kosala na molende mpe na ndenge batikali sembo. Lokola bandeko na bango ya ekeke ya liboso, bamosusu banyokwamaki mpo bazali kotosa Klisto, kutu bakɔtaki babolɔkɔ mpe batyaki bango na bakaa ya bakangami. Basusu babateli liloba ya Yesu na ndenge bazali na ‘liso oyo ezali alima,’ atako bazali komona bato ya bomɛngo mpe ezaleli ya lokoso na bisika bazali. (Matai 6:​22, 23) Ezala na esika nini to na makambo nini oyo bazali, na botosi na bango, baklisto ya solo bazali kokoba kosepelisa motema ya Yehova.​—⁠Masese 27:⁠11.

21. (a) Moombo akokoba kokokisa mokumba nini? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali mpenza kotosa Shilo?

21 Lokola bolɔzi monene ezali se kokóma pene, “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali na ekateli makasi ya kotika te kotosa Nkolo, Klisto. Botosi yango esɛngi mpe kobongisela bato ya ndako ya Nzambe bilei ya elimo na ntango oyo ebongi. Yango wana, tókoba kosepela na ebongiseli ya Teokrasi oyo Yehova asali mpe bilei oyo ebongiseli yango ezali kopesa biso. Na ndenge yango, tokomonisa ete tozali kotosa Shilo, oyo akopesa bato na ye nyonso mbano ya bomoi ya seko.​—⁠Matai 24:​45-47; 25:40; Yoane 5:​22-24.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba ndimbola ya “ntango nsambo,” talá buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mokapo 10, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Mikanda nsambo yango elimbolami malamu na buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, banda na lokasa 33, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Ozali koyeba lisusu?

• Mokumba nini oyo Yesu akokokisa Yakobo asakolaki liboso akufa?

• Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kondima ete Yesu azali Shilo, mpe elimo nini tosengeli koboya?

• Mikanda oyo batindelaki masangá nsambo oyo Emoniseli elobeli, ezali na toli nini oyo ebongi na mikolo na biso?

• Na makambo nini tokoki kolanda ndakisa ya baklisto ya lisangá ya Similina na lisangá ya Filadelefia?

[Bililingi na lokasa 18]

Yehova apambolaka basaleli na ye mpo batosaka “kapita” ya sembo

[Elilingi na lokasa 19]

Kotosa Nzambe ezali etumba monene mpo na mikakatano oyo Satana azali kobimisa

[Bililingi na lokasa 21]

Kozala moninga ya motema ya Yehova esalisaka biso na kotosa ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto