Lisolo ya bomoi
Napesaki mabɔkɔ na bokoli oyo esalemi nsima ya etumba ya mokili mobimba
YA FILIP HOFFMANN
Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki na sanza ya Mai 1945. Na sanza ya Desɛmbɛ ya mbula yango, Nathan Knorr, oyo azalaki kokamba mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, ayaki na Danemark elongo na Milton Henschel, elenge ya mbula 25, oyo azalaki sekrɛtɛrɛ na ye. Tofutelaki ndako moko monene mpo na likita oyo basengelaki kosala ntango bakoya kotala biso, mpamba te tozalaki mpenza kozela bango. Biso oyo tozalaki bilenge tosepelaki mingi na lisukulu ya Ndeko Henschel mpo azalaki elenge lokola biso mpe motó ya likambo oyo aponaki ezalaki: “Kanisá Mozalisi wa yo ntango ozali naino elenge.”—Mosakoli 12:1, Liloba lya Nzambe.
NA MIKOLO oyo balekisaki na biso, bayebisaki biso ete makambo ya malamu ezali kobongisama mpo mosala ya kosakola ekende liboso na mokili mobimba mpe ete tozali na likoki ya kopesa mabɔkɔ na makambo yango. (Matai 24:14) Na ndakisa, na États-Unis, bautaki kofungola eteyelo moko mpo na kobongisa bilenge basi mpe mibali na mosala ya misionɛrɛ. Ndeko Knorr alobaki ete soki babengisi biso na eteyelo yango, bakopesa biso kaka tikɛ ya kokende mpe tokoyeba te epai wapi bakotinda biso na nsima. Atako bongo, bamosusu kati na biso tondimaki kotondisa nkasa mpo na kosɛnga ete tókɔta na eteyelo yango.
Liboso nayebisa bino makambo ndenge na ndenge oyo nakutanaki na yango nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, tiká naino nabanda na ebandeli. Nabotamaki na 1919. Liboso ya etumba mpe na ntango ya etumba, nakutanaki na makambo mingi oyo ebongolaki mpenza bomoi na ngai.
Moto oyo bandeko na ye nyonso baboyaki ye ateyi biso solo
Ntango mama azalaki na zemi na ngai, mwana na ye ya liboso, abondelaki ete soki nabotami mwana mobali, nasengeli kokóma misionɛrɛ. Yaya na ye ya mobali, nɔkɔ Thomas, azalaki Moyekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana; kasi bandeko na ye nyonso baboyaki ye mpo na yango. Tozalaki kofanda penepene ya engumba Copenhague; bongo, mbula nyonso oyo Bayekoli ya Biblia bazalaki kosala liyangani na bango na engumba yango, mama azalaki kobengisa nɔkɔ Thomas aya kofanda epai na biso mpamba te azalaki kofanda mosika. Nɔkɔ ayebaki Biblia mingi mpe ayebaki kolimbola yango malamu; yango etindaki mama andima kokóma Moyekoli ya Biblia na 1930.
Mama alingaki Biblia mingi. Mpo na kotosa likambo oyo Deteronome 6:7 esɛngi, azalaki koteya ngai na leki na ngai ya mwasi ‘ntango azalaki kofanda na ndako, ntango azalaki kotambola na nzela, ntango azalaki kolala mpe ntango azalaki kolamuka.’ Na nsima, nakómaki kosakola ndako na ndako. Nazalaki kolinga mingi kosolola na bato mateya lokola molimo ekufaka te mpe lifelo ya mɔtɔ, mateya oyo mangomba ezalaki koteya. Nazalaki mpenza na makoki ya kosalela Biblia mpo na komonisa polele ete mateya wana ezali mateya ya lokuta.—Nzembo 146:3, 4; Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4.
Libota mobimba tokómi kosambela Nzambe moko
Nsima ya liyangani oyo esalemaki na Copenhague na 1937, bazalaki na mposa ya bandeko oyo bakokaki kopesa mabɔkɔ mpo na mwa ntango na depo ya mikanda ya biro Batatoli ya Yehova ya Danemark. Lokola nautaki kosilisa kelasi na ngai ya mateya ya mombongo (commercial), mpe nazalaki na mokumba mosusu te; napesaki nkombo mpo na kokende kopesa mabɔkɔ na depo yango. Ntango mosala na depo esilaki, basɛngaki ngai natikala kosala na Betele. Mwa moke na nsima, nalongwaki na ndako na biso mpe nakendaki kofanda na Betele na Copenhague, atako nazwaki naino batisimo te. Lokola mikolo nyonso nazalaki esika moko na baklisto oyo bakɔmeli, yango esalisaki ngai nakola na elimo. Na mbula oyo elandaki, elingi koloba na mokolo ya 1 Yanuali 1938, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Yehova Nzambe.
Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki. Na nsima, na mokolo ya 9 Aprili 1940, basoda ya Allemagne bakɔtaki na Danemark. Lokola batikelaki bato ya Danemark bonsomi na makambo mwa mingi, tokobaki mosala na biso ya kosakola.
Na nsima, likambo moko ya esengo mingi esalemaki. Tata akómaki Motatoli ya sembo mpe ya molende, yango ebakisaki lisusu esengo na libota na biso. Yango wana, ntango babengisaki ngai na bandeko mosusu minei ya Danemark na kelasi ya mbala ya mwambe ya Eteyelo ya Gileadi, libota na biso mobimba balendisaki ngai na nzela yango. Tobandaki kelasi na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1946, mpe eumelaki sanza mitano; esalemaki na kati ya bandako kitoko oyo ezalaki mosika te na South Lansing, na etúká ya New York.
Nazwaki Formasyo na Gileadi mpe na bisika oyo nakendaki na nsima
Na Gileadi, nazwaki mabaku mingi ya kozwa baninga ya sika mpe ya malamu mpenza. Mokolo mosusu na mpokwa, ntango ngai na Harold King, oyo autaki na Angleterre, tozalaki kotambola na lopango ya eteyelo mpo na kozwa mwa mopɛpɛ, tozalaki kosolola soki bakoki kotinda biso wapi nsima ya kelasi na biso. Harold alobaki ete: “Nandimi te ete ezali mbala ya nsuka namona mabwaku ya bokula ya Douvres.” Alobaki solo mpamba te amonaki yango lisusu; kasi ezalaki nde nsima ya mbula 17, oyo minei kati na yango alekisaki yango na bolɔkɔ moko ya Chine na mwa esika moko moke oyo batyaki kaka ye moko!a
Nsima ya kozwa badiplome na biso, batindaki ngai nasala lokola mokɛngɛli motamboli na etúká ya Texas, na États-Unis; nasengelaki kotalaka masangá ya Batatoli ya Yehova mpo na kolendisa bandeko na elimo. Bazalaki koyamba ngai na esengo mingi. Bandeko ya Texas bazalaki kosepela na ngai mingi lokola nazalaki naino elenge, nautaki na Mpoto mpe nautaki kosilisa na Eteyelo ya Gileadi. Kasi, nsima ya sanza nsambo mpamba na Texas, babengisaki ngai na biro monene ya Batatoli ya Yehova, na Brooklyn. Kuna, Ndeko Knorr apesaki ngai mosala ya biro mpe asɛngaki ngai nayekola ndenge oyo mosala ezalaki kosalema na departema mokomoko. Na nsima, nazongaki na Betele ya Danemark; nazalaki na mokumba ya kosalela makambo oyo nayekolaki, nasengelaki kosala makasi mpo ete makambo nyonso esalemaka ndenge oyo ezalaki kosalema na Brooklyn. Mposa na biso ezalaki ete na bafiliale nyonso, misala esalemaka ndenge moko. Na nsima, Ndeko Knorr atindaki ngai na Allemagne.
Nakei kosalisa bafiliale na koyekola malako ya sika
Na sanza ya Yuli 1949, ntango nakómaki na Wiesbaden, engumba moko ya Allemagne, namonaki bingumba mingi oyo ezalaki naino na bandako ebebá na bitumba. Bandeko oyo bazalaki kokamba mosala ya kosakola banyokwamaki banda na 1933, mbula oyo Hitler azwaki bokonzi. Kati na bango, bandeko mosusu balekisaki mbula mwambe, bamosusu mbula zomi to mpe koleka na bolɔkɔ mpe na bakaa ya bakangami! Nasalaki elongo na basaleli wana ya Yehova na boumeli ya mbula misato na ndambo. Ndakisa ya malamu mpenza oyo batikaki etindaka ngai nakanisa maloba oyo Gabriele Yonan, moto moko ya Allemagne oyo ayekolaka makambo ya kala akomaki, ete: “Soki tomonaki te ndakisa ya baklisto yango ya mpiko na ntango ya boyangeli mabe ya Banazi, nsima ya makambo oyo elekaki na kaa ya Auschwitz mpe ndenge oyo babomaki ebele ya Bayuda, tolingaki kondima te ete bato bakoki mpenza kolanda mateya ya Yesu.”
Na Betele, mosala na ngai ezalaki kaka oyo nasalaki na Danemark, elingi koloba nasengelaki kolakisa malako ya sika ya mosala, oyo esengelaki kozala ndenge moko na bafiliale nyonso. Ntango bandeko ya Allemagne basosolaki ete mbongwana oyo tozalaki kokɔtisa ezalaki komonisa te ete mosala na bango ezalaki mabe, kasi nde ete tokómaki na ntango oyo bafiliale nyonso esengelaki kosala na bomoko elongo na biro monene, basepelaki mingi mpe bamonisaki mposa ya kopesa ngai mabɔkɔ.
Na 1952, Ndeko Knorr atindelaki ngai mokanda mpo na kosɛnga ngai nakende na Betele ya Suisse, na engumba Bern. Kuna, kobanda na mokolo ya 1 Yanuali 1953, nasengelaki kozala mokɛngɛli ya filiale.
Makambo mosusu ya esengo na Suisse
Mwa moke nsima ya kokóma na ngai na Suisse, nakutanaki na Esther na liyangani moko mpe eumelaki te, tokómaki bafianse. Na sanza ya Augusto 1954, Ndeko Knorr abengisaki ngai na Brooklyn, epai ayebisaki ngai mokumba moko ya sika mpe ya malamu oyo nasengelaki kosala. Lokola, na mokili mobimba, bafiliale ekómaki mingi mpe minene, bazwaki ebongiseli moko ya sika. Bakabolaki bafiliale ya mokili mobimba na bazone, oyo mokomoko na yango esengelaki kozala na mokɛngɛli ya zone. Nazwaki mokumba ya kozala mokɛngɛli ya zone mibale, elingi koloba Mpoto mpe mikili oyo ezali pembenipembeni ya Mai Monene ya Méditerranée.
Nsima ya mwa mikolo oyo nalekisaki na Brooklyn, nazongaki na Suisse mpo na kobongisa mibembo oyo nasengelaki kosala na bazone oyo bapesaki ngai. Tobalanaki na Esther mpe biso mibale tokómaki kosala na Betele ya Suisse. Na mobembo na ngai ya liboso, nakendeki kotala bandako ya bamisionɛrɛ mpe bafiliale na mikili 13: Italie, Grèce, Chypre, mikili ya Proche-Orient mpe oyo ezali pembenipembeni ya bokula ya Afrika ya Nɔrdi, Espagne mpe Portugal. Nazongaki na Bern mpo na mwa mikolo, mpe nsima na yango nakobaki mobembo na bikólo nyonso ya Mpoto ya Wɛsti. Na mbula na ngai ya liboso ya libala, nalekisaki sanza motoba mosika na ndako mpo na kosalela bandeko baklisto.
Bomoi na biso ebongwani
Na 1957, Esther azwaki zemi mpe lokola bandeko oyo bazali na bana bakoki kosala na Betele te, tozongaki na Danemark; kuna, tata na ngai ayambaki biso na ndako na ye mpe andimaki tófanda na ye. Esther azalaki kobatela Rakel, mwana na biso ya mwasi mpe tata na ngai; ngai nazalaki kosala na Betele oyo bautaki kotonga. Nazalaki molakisi na Eteyelo ya Mosala ya Bokonzi mpo na bankulutu ya masangá mpe nazalaki kaka kosala lokola mokɛngɛli ya zone.
Kozala mokɛngɛli ya zone ezalaki kosɛnga kosala mibembo mpo na ntango molai; nzokande nyonso wana esalaki ete nazalaka esika moko te na mwana na biso mpo na ntango molai. Mbuma na yango emonanaki. Na eleko moko, nalekisaki mwa mikolo na Paris, epai totyaki mwa masini ya konyata mikanda. Esther na Rakel bayaki na engbunduka mpo na kotala ngai mpe bakitaki na Gare du Nord. Ngai na Ndeko Léopold Jontès, oyo azalaki kosala na Betele, tokendeki koyamba bango. Rakel atɛlɛmaki na porte ya engbunduka, atalaki naino Léopold mpe na nsima atalaki ngai; atalaki Léopold lisusu mpe nsima na yango ayambaki ye!
Ntango nakokisaki mbula 45, mbongwana mosusu ya monene esalemaki: natikaki mosala ya ntango nyonso mpo na koluka mosala mpo nakoka koleisa libota na ngai. Lokola nasalaki mingi lokola ministre Motatoli ya Yehova, yango esalisaki ngai nazwa mosala na kompanyi moko, epai bapesaki ngai mokumba ya kotalelaka biloko nyonso oyo bazalaki kotɛka na mikili mosusu. Nsima ya kosala mbula soki libwa na kompanyi yango mpe ntango Rakel asilisaki kelasi na ye, tomonaki malamu tóndima kokende kosala na esika oyo basakoli ya Bokonzi bazalaki mingi te.
Lokola nakanisaki mingi kokende na Norvège, nasɛngaki na kompanyi moko oyo elukelaka bato misala soki bakokaki kozwela ngai mosala kuna. Nazwaki mpenza eyano ya malamu te. Lokola nakómaki na mbula 55, elikya ya kozwa mosala ezalaki mpenza te. Atako bongo, nasololaki na bandeko ya Betele ya Norvège, mpe na nsima nazwaki ndako moko ya kofutela pene na engumba Drøbak, na elikya ete mosala ekomonana. Mosala emonanaki, mpe nsima na yango tosalaki mosala ya kosakola oyo esepelisaki biso mingi na Norvège.
Bantango ya esengo mpenza ezalaki oyo bandeko mingi ya lisangá na biso tozalaki kokende na nɔrdi kosakola na bateritware oyo basakoli bazalaki kokóma te. Na mibembo wana, tozalaki kofutela mwa bandako mpe mokolo na mokolo tozalaki kokende kosakola epai ya bato oyo bazalaki kofanda na baferme oyo ezalaki likoló ya bangomba. Ezalaki mpenza esengo koyebisa bato wana ya boboto makambo ya Bokonzi ya Nzambe. Tozalaki kotika mikanda mingi, kasi mpo na kozongela bango, esengelaki kozela mbula mosusu. Kasi, bato yango bazalaki kobosana biso te! Esther na Rakel bazali koyeba lisusu ntango tozalaki kozongela bato yango: bazalaki koyamba biso lokola bandeko na bango oyo bakutaná na bango kala mpenza. Tosalaki mbula misato na Norvège; na nsima, tozongaki na Danemark.
Bisengo na kati ya libota
Mwa moke na nsima, Rakel akómaki fianse ya Niels Højer, mobongisi-nzela moko ya molende. Nsima ya libala na bango, bakobaki na mosala ya mobongisi-nzela tii ntango babotaki bana na bango. Niels azali mobali ya malamu mpe tata moko malamu, amibanzabanzaka mpenza mpo na libota na ye. Mokolo moko na ntɔngɔ, amemaki mwana na ye ya mobali na velo mpe bakendaki na libongo mpo na kotala ndenge moi ezali kobima. Ntango bazongaki, moninga moko ya kartye na bango atunaki mwana yango eloko nini basalaki kuna. Mwana azongisaki ete: “Tobondelaki Yehova.”
Nsima ya mwa bambula, ngai na Esther tozalaki wana ntango Benjamin na Nadja, bankɔkɔ na biso mibale ya liboso, bazwaki batisimo. Niels mpe azalaki wana mpe mbala moko atɛlɛmaki liboso na ngai. Atalaki ngai na miso mpe alobaki boye: “Mibali ya solosolo balelaka te.” Kasi, ntango kaka asilisaki koloba, biso nyonso mibale toyambanaki mpe tolelaki na esengo. Ezali mpenza esengo na kozala na bokilo oyo okoki kosɛka na ye mpe kolela na ye!
Tozali kaka komesana na makambo ya sika
Ngai na Esther tozwaki lipamboli mosusu ntango basɛngaki biso tózonga kosala na Betele ya Danemark. Kasi, na ntango wana bazalaki kobongisa makambo mpo na kotonga bandako ya minene ya filiale na engumba Holbæk. Nazwaki libaku malamu ya kokamba mosala ya botongi oyo esalemaki kaka na basali ya bolingo malamu. Atako mpiɔ ezalaki makasi na eleko yango, misala mingi esilaki na nsuka ya 1982, mpe biso nyonso tozalaki na esengo ya kokɔta na bandako yango oyo ezali minene mpe kitoko!
Mwa moke na nsima, nakómaki kosala mosala ya biro mpe nazalaki kosepela na yango mingi; Esther azalaki kosala mosala ya koyamba telefone soki bato babengi na Betele. Kasi, na nsima basalaki ye lipaso na loketo mpe mbula moko na ndambo na nsima, basalaki ye lipaso na libale (foie). Atako bandeko oyo tozalaki kosala na bango na Betele bazalaki komonisela biso boboto, tomonaki ete mpo na bolamu na biso na bandeko oyo bazalaki kosalisa ye, ebongaki tólongwa na Betele. Tokendaki na lisangá epai mwana na biso mpe bandeko na biso bazali.
Lelo oyo, Esther azali mpenza nzoto kolɔngɔnɔ te. Atako bongo, nakoki mpenza koloba ete na boumeli ya bambula nyonso oyo tosaleli Yehova elongo, na makambo ndenge na ndenge oyo tokutani na yango na bomoi na biso, Esther azalaki mpenza mosungi mpe moninga malamu. Atako nzoto na biso ezali se kolɛmba, tosakolaka kaka mokemoke. Soki nakanisi bomoi na ngai, nazalaka na botɔndi mpe maloba ya mokomi ya nzembo ezongelaka ngai na makanisi, ete: “Ɛ Nzambe, olakisi ngai longwa na bolenge na ngai.”—Nzembo 71:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1963, nkasa 661-666.
[Elilingi na lokasa 24]
Na 1949, nazali kokitisa mikanda ntango bazalaki kotonga Betele ya Allemagne
[Elilingi na lokasa 25]
Nasalaki mpe na bandeko oyo bautaki na bakaa ya bakangami
[Bililingi na lokasa 26]
Ngai na Esther lelo oyo mpe na mokolo ya libala na biso na Betele ya Bern na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1955