Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/10 nk. 4-7
  • Satana azalaka mpenza to ezali kaka lisapo mpamba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Satana azalaka mpenza to ezali kaka lisapo mpamba?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mateya ya boklisto ya lipɛngwi
  • Biyambayamba ya Moyen Âge
  • Lelo oyo bato mosusu bandimaka ete Satana azali, basusu bandimaka te
  • Oyo Makomami ezali koteya
  • Boyangeli ya Satana ekómi na nsuka
  • Zabolo azali mpenza, ezali kaka biyambayamba te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Kebá—Satana alingi kolya yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Bakonzi kati na bisika ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Satana Zabolo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/10 nk. 4-7

Satana azalaka mpenza to ezali kaka lisapo mpamba?

BANDA kalakala, bato ya mayele balukaka koyeba ndenge mabe ebandaki. Mokomi moko, nkombo na ye James Hastings, akomaki na buku na ye (A Dictionary of the Bible) ete: “Banda na ebandeli, mayele ya moto emonisaki ete ezali na nguya oyo eleki ye na makasi, mpe nguya yango ezalaki kobenda ye na makambo ya mabe.” Alobaki lisusu ete: “Bato ya kala bazalaki koluka koyeba ntina ya makambo; mpo na bango, ezali na bikelamu oyo etindaka mipɛpɛ, koningana ya mabele mpe makambo mosusu oyo esalemaka.”

Bato ya mayele na makambo ya kala balobaka ete bato babandaki kondima ete bademo mpe bilimo mabe bazali banda na bato ya liboso oyo bafandaki na Mesopotamia. Bato ya Babilone na ntango ya kala bazalaki kondima ete ezalaka na mokonzi moko ya mokili ya bilimo, to “mokili oyo, moto azongaka te soki akei kuna”; mokonzi yango ya makambo mabe oyo nkombo na ye ezalaki Nergal, bazalaki mpe kobenga ye “ye oyo atumbaka.” Bato ya Babilone bazalaki mpe kobanga bademo; yango wana, bazalaki koyembela bango nzembo ya maji mpo na kokitisa bango nkanda. Na masapo ya Ezipito bazalaki koloba ete Set azalaki nzambe ya makambo mabe; “bazalaki komonisa ye na lolenge ya nyama moko ya nsɔmɔ oyo azali na zolo molai mpe egumbamá, matoi na ye ezali kare mpe etɛlɛmá, mpe azali na mokila moko ya makasi mpe ekabwaná lokola nkanya.”​—⁠Mythologie générale, édition Larousse.

Bagrɛki na Baloma bazalaki na banzambe ya malamu na banzambe ya mabe, kasi bazalaki na nzambe moko te ya mabe oyo alekaki baninga na ye. Bato na bango ya mayele na filozofi bazalaki koteya ete ezali na makambo mibale oyo eyokanaka te. Empédocle azalaki koloba ete ezali Bolingo mpe Kozanga boyokani. Platon ye azalaki koteya ete mokili ezali na “Milimo” mibale, mosusu esalaka malamu, mosusu esalaka mabe. Mokomi moko, nkombo na ye Georges Minois, akomaki na buku na ye (Le Diable) ete “[Bagrɛki na Baloma] bazalaki kondima Zabolo na losambo na bango te.”

Na ekólo Iran, Lingomba ya Zoroastre ezalaki koteya ete Ahura Mazda to Ormazd, nzambe oyo alekaki banzambe na bango nyonso, akelaki Angra Mainyu to Ahriman, oyo aponaki kosala mabe mpe akómaki Elimo-Oyo-Ebebisaka to mpe Mobebisi.

Na Lingomba ya Bayuda, bazalaki koteya kaka ete Satana azali Monguna ya Nzambe mpe ete ye nde moto abandisaki lisumu. Kasi, nsima ya bankama ya bambula, Bayuda babebisaki likanisi wana na mateya ya bapakano. Buku moko (Encyclopaedia Judaica) elobi boye: “Mbongwana monene esalemaki . . . na bikeke ya nsuka liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na ntango wana, losambo [ya Bayuda] . . . ezwaki mpe makambo mingi oyo eutaki na liteya oyo ezalaki komonisa ete, ezala kuna na likoló to awa na nse, ezali na ngámbo mibale oyo ezali kobundana: na ngámbo mosusu tozali na Nzambe, nguya ya malamu mpe solo, mpe na ngámbo mosusu, tozali na nguya ya mabe mpe lokuta. Ekoki kozala ete makanisi yango eutaki na losambo ya Baperse.” Buku mosusu (The Concise Jewish Encyclopedia) elobi boye: “Mpo na komibatela na [bademo], bazalaki kotosa bikila mpe kolata bankisi.”

Mateya ya boklisto ya lipɛngwi

Ndenge moko na Lingomba ya Bayuda oyo ezwaki mateya oyo eutaki na Biblia te na ntina etali Satana mpe bademo, boklisto ya lipɛngwi ebimisaki mpe makanisi oyo eyokani na Biblia te. Buku moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi boye: “Moko na mateya ya teoloji ya kala oyo eyokani mpenza ata moke te na mateya ya Biblia elobaki ete, mpo na kobikisa bato na ye, Nzambe afutaki Satana mpo na lobiko na bango.” Irénée, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mibale ya ntango na biso (T.B.), nde abandaki likanisi yango. Origène, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya misato ya T.B., abakisaki makambo mosusu na likanisi yango; ye alobaki ete “zabolo azwaki lotomo nyonso likoló ya bato” mpe Origène azalaki kotalela “liwa ya Klisto . . . lokola lisiko oyo bafutaki zabolo.”​—⁠History of Dogma, ekomami na Adolf Harnack.

Buku mosusu (The Catholic Encyclopedia) elobi ete “na boumeli ya mbula soki 1 000, [likanisi ya koloba ete bafutaki Zabolo lisiko] ezwaki esika monene mpenza na teoloji” mpe etikalaki moko ya bindimeli ya lingomba. Batata mosusu ya Lingomba, kati na bango Augustin (oyo azalaki na bomoi na ekeke ya minei mpe ya mitano ya T.B.), bandimaki mpe likanisi yango. Nsukansuka, na ekeke ya 12 T.B., Anselme na Abelard, Bakatolike mibale oyo bazalaki bato ya mayele na teoloji, batalelaki likambo yango malamu mpe bamonaki ete mbeka ya Klisto epesamaki nde epai ya Nzambe, kasi epai ya Satana te.

Biyambayamba ya Moyen Âge

Atako ebele ya makita minene ya bakonzi ya Lingomba ya Katolike etalelaki likambo yango ya Satana te, Likita Monene ya minei, oyo esalemaki na ndako-nzambe ya Latran na mobu 1215 T.B., ebimisaki oyo buku moko (New Catholic Encyclopedia) ebengi “makambo matali kondima.” Likambo ya liboso elobaki boye: “Zabolo na bademo mosusu bazalaki malamu ntango Nzambe akelaki bango; kasi bango moko nde bamikómisaki mabe.” Ebakisaki ete bamipesi mosala ya komeka bato. Likanisi yango ezalaki na mitó ya bato mingi na boumeli ya Moyen Âge. Likambo nyonso oyo bazalaki koyeba kolimbola yango te, na ndakisa maladi oyo bayebi ntina na yango te, liwa ya mbalakaka to mpe soki bilanga eboti malamu te; bato bazalaki koloba ete euti na Satana. Na mobu 1233 T.B., Pápa Grégoire IX abimisaki mibeko mingi mpo na kotɛmɛla bapɛngwi; moko na yango etalelaki Ba-Luciférien, bato bazalaki koloba na bato yango ete basambelaka Zabolo.

Mosika te, likanisi ya koloba ete Zabolo to bademo na ye bakoki kokɔta na nzoto ya moto mpe kofanda kuna esalaki ete bato mingi bákóma kobanga bandɔki na banganga-nkisi makasi mpenza. Kobanda na ekeke ya 13 tii na ekeke ya 17, bato mingi na Mpoto bakómaki kobanga bandɔki mpe bamosusu kati na bango, baoyo bakendaki kofanda na Amerika ya Nɔrdi, bamemaki mpe kobanga yango kuna. Ata Martin Luther na Jean Calvin, bato oyo babandisaki Lingomba ya Protesta, bandimaki ndenge oyo bato bazalaki koluka bandɔki mpo na koboma bango. Na Mpoto, tribinale ya Lingomba ya Katolike na batribinale ya Leta ezalaki kosambisa bato mpo na bondɔki, ata soki ezalaki kaka mpo na bilobaloba mpamba ya bato to mpe bifundeli ya lokuta. Mbala mingi, bazalaki konyokola bato mpo báloba soki bazali bandɔki.

Soki bazuzi bamoni ete moto azali ndɔki bazalaki kokatela ye etumbu ya liwa mpe batumbi ye to,soki ezali na Angleterre to na Écosse, bazalaki kobaka ye na nzete. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete: “Bato mosusu ya mayele na makambo ya kala balobi ete, kobanda na mobu 1484 tii mobu 1782, mangomba ya boklisto ebomaki basi soki 300 000 mpo na likambo ya bondɔki.” Soki ezali Satana nde azalaki kotinda makambo wana ya nsɔmɔ oyo esalemaki na Moyen Âge, tokoki komituna motuna ya koyeba banani oyo azalaki kosalela: bato oyo bazalaki kobomama mpo na bondɔki to bandimi ya mangomba oyo bazalaki koboma bato yango?

Lelo oyo bato mosusu bandimaka ete Satana azali, basusu bandimaka te

Na ekeke ya 18, lokola liteya oyo babengi philosophie des Lumières epalanganaki mingi, bato mingi bakómaki komona ete bafungwamaki miso. Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Philosophie des Lumières na teoloji na yango esalaki nyonso mpo na kolongola likanisi ya zabolo na mitó ya baklisto; bazalaki koloba ete likanisi wana ezali kaka lisapo mpamba oyo bato ya Moyen Âge babimisaki.” Na Likita Monene oyo bakonzi ya Lingomba ya Katolike basalaki mpo na mbala ya liboso na Vatican (1869-1870), baboyaki likambo wana mpe bamonisaki lisusu ete lingomba na bango ezali kaka kondima ete Satana Zabolo azali mpenza. Na Likita Monene oyo basalaki mpo na mbala ya mibale na Vatican (1962-1965), bandimisaki lisusu likambo yango, kasi kaka likolólikoló.

Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete, “Lingomba endimaka ete baanzelu na bademo bazali.” Nzokande, diksionɛrɛ moko ya Lifalanse ya makambo ya Lingomba ya Katolike (Théo) elobi ete “lelo oyo, baklisto mingi bazali kondima te ete mabe oyo ezali na mokili ezali kouta na zabolo.” Na bambula oyo, bato ya mayele na teoloji na Lingomba ya Katolike bazali kosala makambo na likebi mingi mpenza mpo na kolongisa to kokweisa likanisi moko te na kati ya liteya ya Lingomba na makanisi oyo bato bazali na yango na mikolo na biso. Buku mosusu (Encyclopædia Britannica) elobi ete: “Teoloji oyo ezali kotika makambo ya kala [ya Lingomba] ezali komonisa ete makambo oyo Biblia elobi mpo na Satana ezali makambo ya solosolo te, ezali nde ‘maloba ya elilingi,’ ezali kaka lisapo oyo basaleli mpo na komeka kolobela mabe oyo ezali na molɔ́ngɔ́ mpe ndenge oyo epalangani.” Mpo na Baprotesta, kaka buku yango elobi ete: “Baprotesta oyo bazali kokangama na bindimeli ya kala te bazali komona te ntina oyo basengeli kondima ete zabolo azali mpenza ekelamu moko ya elimo.” Baklisto ya solo basengeli nde kotalela makambo oyo Biblia elobi mpo na Satana ete ezali se “maloba ya elilingi”?

Oyo Makomami ezali koteya

Mateya ya filozofi mpe teoloji ezali kolimbola te ndenge mabe ebandaki koleka ndenge oyo Biblia ezali kolimbola yango. Makambo oyo Biblia elobi na biso mpo na Satana ezali na ntina mpo na kosalisa biso tóyeba malamu ndenge mabe mpe bampasi ya bato ebandaki; ezali mpe na ntina mpo na kosalisa biso tóyeba mpo na nini mbula na mbula makambo ya mobulu ezali se kokóma nsɔmɔ koleka.

Bato mosusu bakoki kotuna boye: ‘Soki Nzambe azali Mozalisi malamu mpe azali na bolingo, mpo na nini akelá elimo mabe lokola Satana?’ Biblia emonisi ete misala nyonso ya Yehova Nzambe ezali ya kokoka mpe bikelamu na ye nyonso oyo ezali na mayele ezali na bonsomi ya kopona. (Deteronome 30:19; 32:4; Yosua 24:15; 1 Mikonzi 18:21) Na yango, elimo oyo ekómaki Satana ezalaki ekelamu ya kokoka ntango bakelaki yango mpe yango moko nde eponaki kolongwa na nzela ya solo mpe ya boyengebene.​—⁠Yoane 8:44; Yakobo 1:​14, 15.

Biblia elobi ete mokonzi ya Tulo ‘alekaki nyonso na bonzenga’ mpe ‘azalaki na likambo na kotambola na ye te longwa na mokolo ya kozalisama na ye kino ntango lisumu ezwani na ye’; makambo yango ekokani mpenza na makambo ya Satana. (Ezekiele 28:​11-19) Satana atyaki ntembe te ete Yehova azali na bokonzi nyonso to mpe Yehova azali Mozalisi. Akokaki kotya ntembe na likambo yango te, mpamba te ye moko Nzambe nde akelaki ye. Nzokande, Satana atyaki ntembe na ndenge oyo Yehova azalaki kosalela bokonzi na ye. Na elanga ya Edene, Satana alobaki ete Nzambe azali kopimela mwasi na mobali ya liboso eloko moko oyo basengelaki kozala na yango mpe oyo esengelaki kopesa bango bolamu. (Genese 3:​1-5) Satana alongaki kobenda Adama na Eva ete bátika kotosa bokonzi ya sembo ya Yehova mpe amemaki bango na bana oyo babotaki na nsima na lisumu mpe na liwa. (Genese 3:​6-19; Baloma 5:12) Yango wana, Biblia ezali komonisa ete Satana nde azali mobandisi mpenza ya bampasi ya bato.

Liboso ya Mpela, baanzelu mosusu balandaki Satana na kozanga botosi na ye. Balataki banzoto ya bato mpo na kokokisa bamposa na bango ya kosangisa nzoto na bana basi awa na mabele. (Genese 6:​1-4) Na ntango ya Mpela, baanzelu yango oyo bapesaki Nzambe mokɔngɔ bazongelaki nzoto na bango ya elimo, kasi bazongaki te “na esika na bango ya ebandeli,” epai ya Nzambe kuna na likoló. (Yuda 6) Nzambe akitisaki bango, atyaki bango na molili makasi na elimo. (1 Petelo 3:​19, 20; 2 Petelo 2:⁠4) Bakómaki bademo, bazalaki lisusu kosalela Yehova te, kasi bazalaki nde kotosa Satana. Atako bademo bakoki lisusu kolata nzoto ya mosuni te, bazali naino na likoki ya kosala na makanisi mpe na bomoi ya bato; mpe na ntembe te, bango nde bazali kobimisa mobulu mingi oyo tozali komona lelo oyo.​—⁠Matai 12:​43-45; Luka 8:​27-33.

Boyangeli ya Satana ekómi na nsuka

Ezali polele ete nguya ya mabe ezali kosala mosala lelo oyo. Ntoma Yoane akomaki ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.”​—⁠1 Yoane 5:⁠19.

Nzokande, bisakweli ya Biblia oyo esili kokokisama ezali komonisa ete Zabolo azali kongalisa bampasi awa na mabele mpo na kotya mobulu, mpo ayebi ete atikali kaka “na eleko moko ya ntango mokuse” liboso ete akangama. (Emoniseli 12:​7-12; 20:​1-3) Ntango boyangeli ya Satana ekosuka, mokili ya sika mpe ya sembo ekobanda; kuna, mpisoli, liwa mpe mpasi “ekozala lisusu te.” Na ntango wana, mokano ya Nzambe ‘ekosalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.’​—⁠Emoniseli 21:​1-4; Matai 6:⁠10.

[Bililingi na lokasa 4]

Bato ya Babilone bazalaki kondima Nergal (na nsuka na lobɔkɔ ya mwasi), nzambe moko ya motema mabe; Platon (na lobɔkɔ ya mwasi) azalaki kondima ete ezali na “Milimo” mibale oyo eyokanaka te

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Silɛndrɛ: Musée du Louvre, Paris; Platon: National Archaeological Museum, Athènes, Grèce

[Bililingi na lokasa 5]

Irénée, Origène na Augustin bazalaki koteya ete lisiko efutamaki epai ya Zabolo

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Origène: Culver Pictures; Augustin: euti na buku Great Men and Famous Women

[Elilingi na lokasa 6]

Babomaki bankóto mingi ya bato oyo bakanisaki ete bazali bandɔki

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Euti na buku Bildersaal deutscher Geschichte

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto