Mituna ya batángi
Kosomba ndako ya lingomba mosusu mpo na kokómisa yango Ndako ya Bokonzi ekoki mpe kozala lolenge ya kosangana na mangomba mosusu?
Batatoli ya Yehova baboyaka kosala makambo ya ndenge wana na mangomba mosusu. Kasi, ata soki tosombi eloko ya ndenge wana, yango ekoki ntango mosusu kozala likambo ya kosangisa mangomba te. Tokoki ntango mosusu kotalela yango kaka lokola likambo ya kosomba eloko. Ezali te ete lisangá moko ya Batatoli ya Yehova eyokani na lingomba mosusu mpo na kotonga esika ya losambo oyo bakobanda kosalela bango nyonso.
Eloko nini Yehova amonaka ete ezali kosangana na mangomba mosusu? Tótalela naino toli ya ntoma Paulo oyo: “Bósala te ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te. Mpo boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe botyoli-mibeko? To bosangani nini ezali na kati ya pole mpe molili? Lisusu, boyokani nini ezali na kati ya Klisto mpe Beliala? To eloko nini moto ya sembo azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te? Mpe boyokani nini ezali na kati ya tempelo ya Nzambe mpe bikeko? . . . ‘Yango wana bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo’; ‘mpe ngai nakoyamba bino.’ ” (2 Bakolinti 6:14-17) Ntoma Paulo alingaki koloba nini na maloba “boninga” mpe “bosangani”?
Emonani polele ete boninga oyo Paulo alobelaki etali mpenza kosangisa losambo mpe makambo ya elimo na bato oyo basambelaka bikeko mpe bato oyo bazali bandimi te. Akebisaki Bakolinti na likambo ya “kolya na . . . mesa ya bademo.” (1 Bakolinti 10:20, 21) Yango wana, kosangana na mangomba mosusu elimboli kosambela na bango to kosangisa na bango makambo ya elimo. (Exode 20:5; 23:13; 34:12) Ntango Batatoli basombi ndako moko oyo lingomba mosusu ezalaki kosalela, yango ezali se mpo na kozwa esika ebongi mpo na kokómisa yango Ndako ya Bokonzi. Liboso ete básalela yango lokola Ndako ya Bokonzi, bakolongola biloko nyonso ya losambo ya lokuta na kati na yango. Soki babongisi yango ndenge wana, ekokóma ndako oyo epesami na Yehova kaka mpo na losambo na ye. Bosangani to boninga ezali te na kati ya losambo ya solo na losambo ya lokuta.
Na ntango tozali koyokana mpo na kosomba esika ya ndenge wana, kokutana na batɛkisi esengeli kosuka kaka na kosomba esika. Baklisto ya solo basengeli te kobosana toli ya ntoma Paulo ete básala te “ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te.” Atako tomimonaka te ete biso nde toleki bato ya mangomba mosusu, toboyaka kosangana na bango to koluka kokɔta na losambo na bango.a
Bongo soki lisangá moko elingi efutelaka ndako ya lingomba mosusu? Mbala mingi, kofutela esɛngaka kokutana mbala na mbala na bakóló ndako, yango nde tosengeli koboya. Ata soki esengeli kofutela ndako wana mpo na likita oyo ekosalema kaka mbala moko, bankulutu basengeli kotalela makambo oyo: Bikeko to bilembo ya mangomba ezali na kati to na libándá ya ndako yango? Soki tosaleli esika ya ndenge wana, bato ya kartye bakotalela likambo yango ndenge nini? Moto moko te na kati ya lisangá akobɛta libaku soki tosaleli ndako yango? (Matai 18:6; 1 Bakolinti 8:7-13) Bankulutu bakotalela naino makambo wana mpe na nsima bakozwa ekateli. Bakotalela lisosoli na bango mpe oyo ya bandeko ya lisangá mobimba mpo na koyeba soki basengeli kosomba ndako ya lolenge wana mpe kokómisa yango Ndako ya Bokonzi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ndenge ya kotalela mosala to mombongo na masangá oyo Yehova andimaka te, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1999, nkasa 28 mpe 29.
[Elilingi na lokasa 27]
Ndako oyo ezalaki sinagoga, basombaki yango mpe babongisaki yango mpo ekóma Ndako ya Bokonzi