Mituna ya Batangi
Ekoki kozala malamu mpo na moklisto moko ete asala mombongo elongo na moto moko oyo azali mondimi te, mpamba te Biblia elobi na biso ete: “Bokangama na ekanganeli ya bokesene te esika moko na bato bazangi kondima”?
Tozali kokuta toli oyo kati 2 Bakolinti 6:14-16: “Bokangama na ekanganeli ya bokeseni te elongo na bato bazangi kondima. Mpo ete kokokana nini ezali kati na boyengebene mpe mabe? Lisangani nini lizali kati na moi mpe molili? Kokokana nini ezali kati na Klisto mpe Beliale? Likabo nini lizali na mondimi mpe moto azangi kondima? Esambelo na Nzambe ezali na kondimana nini na bikeko?”
Ntina moko ezali te ya kokanisa ete ntoma Paulo apesaki toli oyo mpo na kopekisa baklisto makambo ya sikisiki, lokola oyo ya koboya kosala mombongo elongo na moto moko oyo azali mondimi te. Atako bongo, ntembe ezali te ete toli na ye ekoki mpe kosalelama na likambo wana, lokola ekoki mpe kosalelama na makambo mosusu ya bomoi.
Paulo apesaki toli oyo epai na bandeko na ye baklisto ya Kolinti ya kala. Lokola bazalaki kofanda kati na engumba oyo ezalaki na bozimbisi mingi, basengelaki ntango nyonso kobundisa makámá na ntina etali bizaleli malamu mpe elimo. Soki bamibatelaki te, bopusi ya mbindo oyo ezalaki zingazinga na bango elingaki kolembisa mokemoke ekateli na bango ya kotikala “libota liponami, banganga ya bokonzi, libota ya bulee, bato baponami.”—1 Petelo 2:9.
Liboso ya kokoma makambo oyo tozali kotanga kati na 2 Bakolinti 6:14-16, Paulo asilaki kolobela nkáka moko monene oyo ezalaki kati na bandeko na ye ya Kolinti. Batikaki nzela ete likambo moko ya mbindo monene ezala kati na bango; yango wana Paulo apesaki bango etinda ya kobengana, to kobimisa na lisangá mosumuki oyo azangi kobongola motema. (1 Bakolinti 5:1) Lisumu ya mobali wana ezalaki komonisa ete baninga mabe to kosangana elongo na bato ya mokili kozanga kokeba ekokaki kobebisa baklisto.
Baklisto ya Kolinti basengelaki kokima boninga ya bato oyo babimisamaki na lisangá, kasi yango elingaki koloba ete basengelaki komikabola mobimba na bato oyo bazali bandimi te? Basengelaki solo kokima bokutani nyonso elongo na bato oyo bazalaki baklisto te, bakóma bongo lolenge ya mwa lingomba oyo ekosanganaka na bato te, lokola Bayuda oyo bamibendaki na Qumrān penepene ya la mer Morte? Tala eyano ya Paulo: “Nakomelaki bino na mokanda na ngai ete bosangana na bato na pite te. Nakanisaki te ete bokima bato na pite kati na mokili soko bato na bilulela kati na mokili . . . Soki bongo, mbele ekokoka na bino kolongwa na mokili.”—1 Bakolinti 5:9, 10.
Ndimbola ya maloba wana ezali polele. Paulo ayebaki ete baklisto bazalaki naino awa na mabelé, bazalaki kofanda kati na bato bazangi kondima mpe bazalaki na boyokani ya mokolo na mokolo elongo na bato na mbindo mpe baoyo bazalaki na mitinda mikeseni. Mpo ete ezalaki mpasi kopengola bokutani yango, baklisto basengelaki kokeba na makámá na yango.
Sikawa, totalela lisusu mokanda ya mibale ya Paulo epai na Bakolinti. Amonisaki ete baklisto bapakolami babongisamaki lokola basaleli ya Nzambe, bantoma na esika na Klisto. Ayebisaki bango ete bakeba na bantina nyonso ya kobetisa mabaku oyo ekokaki kofingisa mosala na bango. (2 Bakolinti 4:1 kino 6:3) Paulo alendisaki na polele bandeko na ye Bakolinti, baoyo bazalaki lokola bana na ye ya elimo, ete bakólisa bolingo na bango mpo na bandeko. (2 Bakolinti 6:13) Nsima na yango alendisaki bango ete: “Bokangana na ekanganeli ya bokesene te elongo na bato bazangi kondima.” Asalelaki molongo ya makambo makeseni moko na mosusu mpo na kobenda likebi na likambo yango.
Makambo ya zingazinga mazali komonisa ete Paulo azalaki te kokanisa mpo na likambo moko ya sikisiki ya bomoi, lokola mombongo to mosala ya mosuni, mpe kobimisa mobeko ya sikisiki na likambo yango. Azalaki nde kopesa toli ya ntina, ya mayele mpe ya kosunga epai na bandeko oyo alingaki bango mingi.
Na ndakisa, toli oyo ekokaki kosalelama na likambo ya moklisto oyo alingaki kobala? Ezali mpenza bongo. Kati na mokanda na ye ya liboso, ntoma alendisaki Baklisto oyo balingaki kobala ete basala yango “bobele kati na Nkolo.” (1 Bakolinti 7:39) Alimbolaki polele mayele ya maloba wana na oyo akomaki nsima, lokola yango eyebisami kati na 2 Bakolinti 6:14-18. Soki moklisto moko akanaki kobala moto oyo azali mosaleli na Jéhovah te mpe moyekoli na Klisto te, asengelaki kotalelama lokola ete akangami elongo na moto azali mondimi te. (Tala Levitike 19:19; Deteronome 22:10.) Ezali polele ete kozanga boyokani wana ya moboko ekobimisa mikakatano, mingimingi mikakatano ya elimo. Na ndakisa, ekoki kozala ete moto azali mondimi te azali kosambela nzambe moko ya lokuta to akosala yango na mikolo mizali koya. Paulo abimisaki likanisi oyo ete: “Boyokani nini ezali kati na Klisto mpe Beliale?”
Kasi tokoloba boni mpo na likambo mosusu ya bomoi—kosala mombongo elongo na moto azali mondimi te? Na bantango mosusu moklisto akoki komona ete mpo na koleisa mpe kosunga libota na ye, asengeli kosala boyokani ya mombongo elongo na moto moko oyo azali moklisto te. (1 Timoté 5:8) Tala mwa bandakisa oyo:
Moklisto moko alingi mbala mosusu kobanda koteka lolenge moko ya biloko, kasi mwango bobele moko oyo esengeli ezali ete andima kosala boyokani elongo na moto mosusu oyo azali na makoki ya kozwa biloko yango to mbongo oyo azali na yango mposa. Moklisto mosusu akoki kolinga kosala bilanga (to kobokola lolenge moko ya bibwele), nzokande, mabelé ya mpamba ezali te, mpo na yango asengeli kosala yango elongo na moto oyo alingi kotikela ye mabelé ya kofutela mpo bakoka kokabola matomba ya biloko yango. Mbala mosusu moklisto akoki te kosala mosala ya kobongisa batuyo ya mai mpo ete Kaisala azali kopesa bobele mikanda ya ndingisa moke, mpe esilaki kozwama nyonso; mwango bobele moko mpo na ye ezali ya kosala boyokani elongo na ndeko ya mosuni oyo azali mondimi te, oyo azali na mikanda yango.—Malako 12:17.
Oyo ezali bobele mwa bandakisa. Tozali te koluka kopesa bandakisa nyonso ya makambo oyo makoki kokóma, tozali mpe koloba te soki ezali malamu to mabe. Kasi, wana ozali kokanisa na bandakisa oyo, okoki kososola mpo na nini osengeli te kobosana toli oyo ya 2 Bakolinti 6:14-18?
Moklisto oyo azali kosala mombongo elongo na moto oyo azali mondimi te, azala ndeko na ye ya mosuni to moto mosusu, akoki kokutana na mikakatano mpe masenginya oyo amizelaki na yango te. Mbala mosusu moninga na ye ya mombongo akanisi ete mwango malamu mpo na kozwa matomba mingi ezali ya koyebisa bobele mosolo moke ya matomba na ye to ya kosalela basali oyo bayebani na Leta te, atako likambo yango lizali kobuka mibeko na Leta. Akolinga mbala mosusu kosomba biloko oyo babimisi na moyibi mpe ekomami te likoló ya ba factures. Moklisto akosangana na kozanga kolongobana to na bizaleli motindo yango? Mpe moklisto akosala nini soki ekómi ntango ya kotya maboko na mikanda mitali kofuta mpako to mikanda misusu ya Leta mitali mombongo na bango?—Exode 23:1; Baloma 13:1, 7.
Ekoki kokóma ete moninga ya mombongo oyo azali mondimi te alingi koteka biloko oyo bizali na boyokani na bilambo ya bapakano, kotinda bakarte mpo na kotombela bilambo malamu na nkombo ya kompanyi, mpe kotya bililingi na magazini mpo na kokumisa bilambo ya mangomba. Paulo atunaki ete: “Esambelo na Nzambe ezali na kondimana nini na bikeko? Mpo ete bino bozali Esambelo na Nzambe na bomoi.” Oyo ezali solo maloba mabongi: “‘Yango wana, bobima na kati na bango, mpe bokabwana na bango,’ Jéhovah alobi bongo, ‘mpe bosimba eloko na mbindo te’”; “‘mpe nakoyamba bino.’” (2 Bakolinti 6:16, 17) Kolandáká toli oyo ya mayele, baklisto mingi baponaki lolenge ya mosala ya mosuni oyo ekotya bango mingi mpenza te na mikakatano.—Baebele 13:5, 6, 18.
Lisangá lizali na mokumba te ya kokengela to ya kolukaluka oyo baklisto nyonso bazali kosala na mosala na bango ya mosuni, ezala bazali basali to bankóló mombongo. Nzokande, soki eyei koyebana ete moklisto moko asanganaki na misala mabe (lokola kotombola matomba ya losambo ya lokuta to na lolenge moko ya lokuta to ya moyibi) lisangá ekozwa meko mpo na kolongisa mitinda ya Jéhovah.
Nzokande, likambo ya ntina ezali ete toli ya Paulo oyo epemami: “Bokangama te na ekanganeli moko elongo na bato bazangi kondima,” ekoki kosalisa baklisto na kopengola mikakatano mpe ntina ya kosambisama kati na lisangá. Baklisto oyo bazali na mayele bakosimba toli oyo kati na mitema na bango mpe bakopona te komikotisa na makambo oyo makobakisela bango bopusi oyo ekoki kotinda bango na kobuka mitinda ya Biblia. Soki ndeko moko amoni ete akoki kosala mombongo elongo na moto azangi kondima, basusu basengeli te kosambisa ye to kotɔnga ye, kososoláká ete ye moko akomema mikumba ya liponi na ye. Na mokuse, Paulo apesaki te mobeko ya sikisiki, ya makasi mpo na kopekisa kosala mombongo elongo na moto azangi kondima. Atako bongo, esengeli kotosa toli na ye. Nzambe apemisaki toli wana mpe asalaki ete bakoma yango kati na Biblia mpo na matomba na biso. Tokomonisa ete tozali na mayele soki tosaleli yango.