Mituna ya batángi
Na kotalela Emoniseli 20:8, tosengeli kokanisa ete Satana akopɛngwisa bato mingi mpenza na komekama ya nsuka?
Emoniseli 20:8 ezali kolobela etumba oyo Satana akobundisa bato nyonso oyo bakofanda awa na mabele na nsuka ya mbula nkóto ya boyangeli ya Bokonzi ya Masiya. Vɛrsɛ yango elobi ete Satana “akobima mpo na kobungisa nzela na bikólo wana oyo ezali na bansuka minei ya mabelé, Gogi ná Magogi, mpo na koyanganisa bango mpo na etumba. Motángo na bango ezali lokola zɛlɔ ya mbu.”
Lelo oyo, bato ya siansi basali biloko ndenge na ndenge mpo na kotánga mituya ya mineneminene; atako bongo, maloba “lokola zɛlɔ ya mbu” esalelamaka kaka mpo na kolobela motuya oyo eyebani te. Na bongo, tokoki koloba ete maloba yango emonisaka motángo to motuya oyo eyebani te. Kasi, yango elingi nde koloba ete motuya yango ezali monene mpenza koleka, to ezali kaka komonisa motuya oyo eyebani te kasi ezali mpe monene?
Na Biblia, maloba “lokola zɛlɔ ya mbu” esalelami na ndenge ebele. Na ndakisa, na Genese 41:49, tozali kotánga boye: “Yosefe abombaki masango na koleka mingi, lokola zɛlɔ [ya mbu, NW], kino etikaki ye kotánga yango mpo ete yango ekokaki kotángama te.” Na mokapo oyo, maloba yango esalelami mpo na komonisa ete motuya yango ekokaki kotángama te. Ndenge moko mpe, Yehova alobaki ete: “Lokola ebolo ya lola eyebi kotángama motuya te, to zɛlɔ ya mai-na-monana eyebi [komekama kilo] te, bongo nakofulisa bana ya Davidi moombo na ngai.” Se lokola minzoto ya likoló mpe zɛlɔ ya mbu ekoki kotángama te, ndenge moko mpe Yehova alingaki mpenza kokokisa bilaka na ye epai ya Davidi.—Yilimia 33:22.
Mbala mingi maloba “zɛlɔ ya mbu” esalelamaka mpo na eloko oyo ezali na motángo moko monene to ezali beboo. Na Gilegale, Bayisalaele bayokaki nsɔmɔ ntango bamonaki mapinga ya Bafilistia oyo eyanganaki na Mikemase, ebele “lokola zɛlɔ na libongo ya ebale.” (1 Samwele 13:5, 6; Basambisi 7:12) Lisusu, “Nzambe apesaki Solomo [bwanya na mayele, NW] koleka bipimeli mpe motema monene lokola mingi na zɛlɔ na libongo na mai-na-monana.” (1 Mikonzi 4:29) Atako bandakisa nyonso wana ezali kolobela motángo ya monene, ezali polele ete motángo yango ekokaki kotángama.
Maloba “zɛlɔ ya mbu” ekoki mpe kolimbola motuya oyo eyebani te ata soki motuya yango ezali mpenza monene te. Yehova alobaki na Abalayama ete: “Nakopambola yo solo mpe nakofulisa bana na yo lokola [minzoto] ya likoló mpe lokola zɛlɔ na libongo ya mai.” (Genese 22:17) Ntango azongelaki elaka yango epai ya Yakobo, nkɔkɔ ya Abalayama, Yehova asalelaki maloba “mputulu ya mokili”; na nsima, ntango Yakobo ye moko alobelaki lisusu elaka yango, asalelaki maloba “zɛlɔ ya mai na monana.” (Genese 28:14; 32:12) Na nsuka, eyei komonana ete “mombóto” ya Abalayama, soki tolongoli Yesu ye moko, ezali na bato 144 000, oyo Yesu abengaki bango ete “etonga moke.”—Luka 12:32; Bagalatia 3:16, 29; Emoniseli 7:4; 14:1, 3.
Bandakisa nyonso oyo eteyi biso nini? Eteyi biso ete maloba “lokola zɛlɔ ya mbu” esalelamaka kaka te mpo na komonisa motuya moko ya monene koleka, to mpe mpo na kolobela eloko moko monene mpenza. Mbala mingi esalelamaka nde mpo na kolakisa motuya moko oyo eyebani te, kasi ekoki kotángama. Na bongo, tokoki mpenza kokanisa ete batomboki oyo bakolanda nzela ya Satana ntango akobundisa libota ya Nzambe mpo na mbala ya nsuka bakozala ebele koleka te, kasi bakozala mwa mingi mpe ete bakoki kozala likama mpo na bato mosusu. Kasi lelo oyo, motuya yango eyebani te.